Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 1/3 lok. 25
  • Nzambe azali kokólisa na Alaska

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe azali kokólisa na Alaska
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Masolo mosusu
  • Komipimela makambo ya mike ememeli biso mapamboli ya minene
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Tozwi ebele ya mapamboli mpo tobatelaki elimo ya misionɛrɛ
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Nandimaki na motema mobimba ete Yehova atambwisa ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Nazali na mibu monkámá kasi nazali naino na nzoto makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 1/3 lok. 25

Masolo ya Basakoli ya Bokonzi

Nzambe azali kokólisa na Alaska

NA NSÉ ya mwa libondo ya mbulampɛmbɛ mpe ngalasi, mombóto moke ezali kozela libaku mpo ete ekóla mpe ekɔmela. Na boumeli ya sanza misato mpamba oyo eleko ya molungé esalaka na Alaska, mombóto ya chou oyo ezali na bonene ya milimɛtɛlɛ misato mpamba ekoki kokóla kino kokóma liboke monene ya ndunda ya kilo 40! Ɛɛ, mabelé oyo bato mingi bazalaki kokanisa ete ekoki kobimisa milóna te, mabelé oyo mabebisami na ngalasi makoki kobota mbuma mingi.

Yango ezali mpenza solo mpo na elanga ya elimo na Alaska. Kuna, na etúká oyo eleko ya mpiɔ eumelaka ntango molai, Batatoli ya Yehova bazali kokóba kolóna mombóto ya Bokonzi. Lolenge moko na bisika mosusu na mabelé, Nzambe azali kokólisa mbuma oyo elónami na mitema ya malamu.​—1 Bakolinti 3:6, 7.

● Kati na bisi ya banakelasi, elenge mwasi moko Motatoli na nkombo Vanessa amonaki ete Ann, moninga na ye ya kelasi, azalaki ntango nyonso kofanda sé na esika na ye moko. Ann azalaki mawamawa. Na bongo, Vanessa abyangaki Ann ete afanda pene na ye. Ann azalaki mawamawa mpo ete mama na ye akufaki na maladi ya motema (crise cardiaque), mpe mwa moke na nsima, tata na ye lisusu akufaki na maladi ya kanser. Yango wana Ann akómaki kofanda epai ya bandeko ya libota na bango na Alaska.

Mokolo ya pɔsɔ́ Vanessa azalaki na mosala ya kosakola, akɔtaki na ndako ya moninga na ye ya sika Ann mpe atikelaki ye mwa búku Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso? Ntango bakómaki na eteyelo na mokolo ya yambo oyo elandaki, Ann akendaki kokutana na elenge Motatoli. Ann azalaki na mituna mingi na ntina na Biblia, mpe Vanessa ayanolaki. Atunaki ete: “Bosalaka makita na bino epai wapi?” Na mpokwa ya mokolo yango Ann ayanganaki na likita ya liboso na Ndako ya Bokonzi.

Ntango elekaki mingi te mpo ete etike oyo azalaki na mbula 17 azwa ‘batata’ mpe ‘bamama’ lokola Yesu alakaki yango. (Matai 19:29) Mpe ezalaki likambo ya esengo komona Ann na elongi ya esengo mpe ya komungamunga komonisáká elembo ya komipesa na ye na Yehova na nzela ya batisimo ya mai na Liyangani ya Etúká “Bamemi nsango ya kimya ya Nzambe”!

● Na bisika bitangwi mosika na nɔ́rdi ya etúká monene ya Alaska—kuna bamboka ekabwani moko na mosusu na bitando ya mabelé makauki na ntáká ya bankámá ya bakilomɛtɛlɛ—mpɛpo ya moke ya la Société Watch Tower esalelamaki mpo na kolóna mombóto ya Bokonzi na bituluku koleka 150. Nzokande, mpo na kokóla na elimo, boyekoli ya Biblia ezalaki kosalema pɔsɔ́ na pɔsɔ́ na nzela ya kotindelana mikanda. Lokola bato mingi bazali na mokakatano ya kokoma mokanda, moteyi ya Biblia asengeli kosalela myango mingi mpo na kobatela bosepeli oyo moyekoli amonisi. Ndenge nini yango ekoki kosalema?

Kathy ayekolaki Biblia na Edna, atako bazalaki kofanda na bisika bikabwani na ntáká ya kilomɛtɛlɛ koleka 600 moko na mosusu! Na esika ete akoma mituna oyo mizali kati na mokanda ya boyekoli, Kathy azalaki kobongisa papyé mosusu mpe azalaki kokoma mituna oyo eutaki na mokanda ya boyekoli mpe atikaki bisika mpo ete Edna akoma biyano. Nsima wana Edna atondisaki yango na biyano, Kathy azalaki kozongisela ye yango mpe soki yango esengelaki azalaki kobakisa mwa makambo mosusu mpo na kolimbola malamumalamu likambo moko. Kathy alobi ete: “Naponaki mokolo ya misato na mpokwa mpo na ‘boyekoli’ na biso, mpe nazalaki kosala makasi mpo na kobatela manáka yango ndenge moko nakokaki kosala mpo na manáka ya boyekoli mosusu nyonso ya Biblia. Natindelaki ye anvɛlɔpi oyo ezali na tɛmbrɛ, ezalaki na nkombo mpe na adresi na ngai. Lokola mikanda ezalaki kokóma nsima ya pɔ́sɔ́ mibale, emonanaki ete boyekoli ezalaki malɛmbɛmalɛmbɛ.”

Kanisá esengo bazalaki na yango ntango Kathy mpe Edna bakutanaki na liyangani ya etúká na engumba Anchorage nsima ya sanza zomi ya koyekola na nzela ya kotindelana mikanda! Batatoli basepelaki lisusu ete kati na bayangani ezalaki na bato oyo bazalaki koyekola Biblia mpe na baninga ya solo bautaki na bamboka mike ya Alaska epai kuna masangá mazali te.

Atako bokóli ekoki komonana malɛmbɛmalɛmbɛ na bantango mosusu, “milóna” mosusu mikólaka nokinoki ntango ezali kozwa pole ya solo. Na mwayene, bato ya sika koleka nkámá moko oyo bazali kosanzola Yehova bazali kobatisama mbula na mbula na Alaska! Tozali koloba ete: “Totɔ́ndi yo Yehova,” na lolenge ozali kokólisa!

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto