Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 1/4 nk. 24-28
  • Komipimela makambo ya mike ememeli biso mapamboli ya minene

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Komipimela makambo ya mike ememeli biso mapamboli ya minene
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Libota na biso esangani na losambo ya pɛto
  • Mikakatano oyo esɛngaki tómipimela makambo mosusu
  • Mikumba oyo nazwaki nsima ya batisimo esɛngaki namipimela lisusu makambo mingi
  • Tokómi babongisi-nzela monene
  • Tokómi kosakola epai ya bato ya monɔkɔ mosusu
  • Mapamboli oyo tozwi na bomoi ya komipimela
  • Tozwi ebele ya mapamboli mpo tobatelaki elimo ya misionɛrɛ
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Nzambe azali kokólisa na Alaska
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Nandimaki na motema mobimba ete Yehova atambwisa ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Nazali na esengo mpe na botɔndi atako nakufelaki mobali
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 1/4 nk. 24-28

Lisolo ya bomoi

Komipimela makambo ya mike ememeli biso mapamboli ya minene

YA GEORGE NÁ ANN ALJIAN

Ngai ná mwasi na ngai tondimaki te ete mokolo mosusu tokoloba “mpoko” na esika tóloba “motei.” Tondimaki mpe te ete ntango tokokóma na mbula koleka 60, tokozala na etumba ya koyekola makomi ya Ba-Chinois mpo na kosolola na bango. Nzokande, ezali yango nde ngai ná Ann tosalaki na nsuka ya bambula ya 1980. Tiká tóyebisa bino ndenge komipimela mwa makambo ya mike ememeli biso ebele ya mapamboli.

BANKƆKƆ na ngai bautaki na ekólo Arménie, mpe nazalaki mondimi ya Lingomba ya Arménie. Ann azalaki Katolike. Biso mibale tolandaki mateya ya mangomba na biso te ntango tobalanaki na 1950. Ngai nazalaki na mbula 27, mpe Ann azalaki na mbula 24. Tokómaki kofanda na ndako ya etaze likoló ya esika oyo natyaki kompanyi na ngai ya kosukola bilamba, na engumba Jersey City, na etúká ya New Jersey, na États-Unis. Na ntango wana, nakokisaki mbula soki minei na mosala yango.

Na 1955, tosombaki ndako moko kitoko ya shambre misato, na engumba Middletown, na New Jersey. Banda na esika na ngai ya mosala tii na ndako yango ezalaki kilomɛtrɛ 60; nazalaki kosala mikolo motoba na pɔsɔ. Mikolo nyonso nazalaki kozonga na ndako na butu mpenza. Nazalaki kokutana na Batatoli ya Yehova kaka ntango bazalaki koleka mbala na mbala na esika na ngai ya mosala mpo na kotikela ngai mikanda oyo elimbolaka Biblia. Nazalaki kosepela mpenza kotánga mikanda yango. Atako mosala na ngai ezalaki kozwa ngai ntango mingi mpe makanisi na ngai nyonso ezalaki na mosala na ngai, nakómaki komemya Biblia mingi.

Mosika te, nayebaki ete WBBR, radio ya la Société Watchtower, ezalaki kolekisa masukulu ya Biblia na bangonga oyo nazalaki kokende mpe kouta na mosala. Nazalaki kolanda masukulu yango na likebi mpenza mpe nakómaki kosepela makasi na solo, yango wana nasɛngaki Batatoli ete báyaka kosolola na ngai. Na sanza ya Novɛmbɛ 1957, George Blanton ayaki kotala ngai na ndako mpe abandaki koyekola na ngai Biblia.

Libota na biso esangani na losambo ya pɛto

Ndenge nini Ann atalelaki likambo yango? Tiká ye moko ayebisa bino.

“Na ebandeli, nalingaki likambo yango ata moke te. Ntango George azalaki koyekola, nazalaki kokatakata ye mpambampamba, yango wana azwaki ekateli ya kokendaka koyekola epai mosusu, mpe asalaki bongo sanza mwambe. Na ntango wana, George akómaki kokende na makita na Ndako ya Bokonzi mikolo ya lomingo. Yango nde endimisaki ngai ete azwaki mpenza ekateli ya solo ya koyekola Biblia, mpamba te azalaki kosala yango na mokolo na ye kaka moko ya kopema. Kasi, azalaki kaka mobali mpe tata malamu, kutu akómaki lisusu malamu koleka, yango wana nakómaki mokemoke kobongola makanisi na ngai. Kutu mbala mosusu, ntango nazali kopangusa mesa, soki nayebi ete moto azali komona ngai te, nazalaki kozwa Lamuká! oyo George azalaki ntango nyonso kotika wana, mpe nazalaki kotánga yango. Na bantango mosusu, George azalaki kotángela ngai masolo ya Lamuká! oyo ezalaki kolobela makambo ya losambo te, kasi ezalaki ntango nyonso kobenda likebi mpo na Mozalisi.

“Mokolo moko na mpokwa, ntango George akendaki koyekola Biblia na Ndeko Blanton, nazwaki mokanda moko oyo George, mwana na biso ya mbula mibale, atyaki likoló ya mesa oyo ezalaki pembeni ya mbeto na ngai. Mokanda yango ezalaki kolobela elikya mpo na bakufi. Atako nalɛmbaki, nabandaki kotánga yango mpamba te nkɔkɔ na ngai ya mwasi autaki kokufa mpe likambo yango ezalaki kotungisa ngai mingi. Namonaki mbala moko solo ya Biblia mpe nasosolaki ete bakufi bazali te na esika moko epai bazali konyokwama, mpe nayebaki ete mokolo mosusu, bakosekwa. Namisembolaki na mbeto ntango nazalaki kotánga, kasi mosika te nafandaki, natángaki mokanda yango na likebi mpenza mpe nazalaki kotya bilembo na bisika oyo nakanaki kolakisa George ntango akouta na boyekoli na ye ya Biblia.

“Mobali na ngai akamwaki. Ntango akendeki koyekola, nazalaki kaka kotɛmɛla solo, ntango azongaki, nabandaki koyebisa ye na esengo nyonso makambo kitoko ya Biblia oyo nautaki kotánga! Tosololaki masolo ya Biblia tii na nsima ya midi ya butu. George ayebisaki ngai mokano ya Nzambe mpo na mabelé. Kaka na butu wana, natunaki ye soki akoki kozongela koyekola na ndako mpo ngai mpe nayekolaka elongo na ye.

“Ndeko Blanton asɛngaki ete bana na biso mpe básanganaka na biso na boyekoli yango. Lokola oyo ya liboso azalaki kaka na mbula minei mpe leki na ye mbula mibale, tokanisaki ete bakómaki naino na mbula ya koyekola te. Kasi, Ndeko Blanton atángelaki biso mokapo ya Deteronome 31:12, oyo elobi boye: ‘Yanganisá bato, mibali mpe basi mpe bana . . . , ete báyoka mpe báyekola.’ Tosepelaki mpenza na toli yango mpe tobongisaki makambo mpo ete bana na biso mpe bápesaka biyano ntango tozali koyekola Biblia. Tozalaki kobongisa boyekoli elongo, kasi tozalaki kolakisa bango te makambo oyo basengeli koloba. Tokanisi ete yango esalisaki mpo solo efanda mpenza na mitema ya bana na biso. Tokotika te kotɔnda Ndeko Blanton na ndenge asalisaki libota na biso ekola na elimo.”

Mikakatano oyo esɛngaki tómipimela makambo mosusu

Ntango tokómaki koyekola Biblia esika moko, tokómaki na mikakatano mosusu. Lokola mosala na ngai ezalaki mosika na esika tozalaki kofanda, nazalaki mbala mingi kokóma na ndako na ngonga ya libwa na butu. Yango wana, nazalaki kozangisa makita na kati ya pɔsɔ, nazalaki koyangana kaka mikolo ya lomingo. Ann azalaki kokɔta na makita nyonso mpe azalaki kokola nokinoki na elimo. Ngai mpe nakómaki na mposa ya koyanganaka na makita nyonso mpe ya koyekolaka na libota na ndenge oyo esengeli mpenza. Namonaki ete nasengeli kotika makambo mosusu. Yango wana nazwaki ekateli ya kokataka mosala mwa liboso, atako nayebaki ete nakobungisa bakiliya na ngai mosusu.

Emonanaki mpenza ete nasalaki bozoba te. Tozalaki kotalela boyekoli na biso ya libota na ntina mingi, kaka lokola makita mitano oyo tozalaki kokɔta na Ndako ya Bokonzi. Tozalaki kobenga yango likita na biso ya motoba. Toponaki mokolo mpe ngonga mpo na likita yango​—mokolo ya mitano na ngonga ya 8 ya butu. Mbala mosusu, ntango kaka tosilisi kosukola basaani nsima ya kolya na mpokwa, okoyoka moko na biso alobi, “Ngonga ya ‘likita’ elingi kokoka!” Soki nakómi na ngonga te, Ann azalaki kobanda boyekoli na bana, mpe nazalaki kokoba kotambwisa boyekoli soki kaka nakómi.

Likambo mosusu oyo esalisaki biso tótikala makasi na elimo mpe tóbatela bomoko ya libota na biso, ezali botángi ya mokapo ya mokolo, oyo tozalaki kosala elongo ntɔngɔ nyonso. Kasi, ezalaki mpasi tókutana biso nyonso mpo na boyekoli yango. Moto na moto azalaki kolamuka na ngonga na ye. Totalelaki likambo yango mpe toyokanaki ete tólamukaka biso nyonso na ngonga moko, tómɛlaka tii na ngonga ya 6 na miniti 30 na ntɔngɔ, mpe tótalelaka mokapo ya mokolo elongo. Ebongiseli yango esalisaki biso mpenza. Ntango bana na biso bakolaki, baponaki kosala na Betele. Tomonaki ete boyekoli yango oyo tozalaki kosala mokolo na mokolo esalisaki bango na elimo.

Mikumba oyo nazwaki nsima ya batisimo esɛngaki namipimela lisusu makambo mingi

Nazwaki batisimo na 1962, mpe nsima ya mbula 21 oyo nazalaki kosala mosala na ngai, nakɛtaki biloko nyonso ya mosala yango mpe nalukaki mosala mosusu na engumba oyo tozalaki kofanda mpo nazala pene na libota na ngai mpo tókoka kosalela Yehova elongo. Yango epesaki nzela na ebele ya mapamboli. Tozwaki mokano ete biso nyonso tokosala mosala ya ntango nyonso. Tobandaki yango na 1970, ntango mwana na biso ya liboso, Edward, akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza, ntango kaka asilisaki kelasi ya ntei. Mwa moke na nsima, mwana na biso George akómaki mpe mobongisi-nzela, mpe mosika te Ann alandaki. Bango misato balendisaki ngai mpenza na masolo ya makambo ya malamu oyo bazalaki kokutana na yango na mosala ya kosakola. Totalelaki elongo ndenge oyo tokoki kokómisa bomoi na biso pɛpɛlɛ mpo biso nyonso tókóma babongisi-nzela. Tozwaki ekateli ya kotɛka ndako na biso. Tofandaki na ndako yango mbula 18 mpe tobɔkɔlaki bana na biso wana. Tolingaki ndako na biso mingi, kasi Yehova apambolaki biso mpo na ekateli oyo tozwaki ya kotɛka yango.

Edward akɔtaki Betele na 1972, mpe George na 1974. Atako ngai ná Ann tozalaki na mposa na bango makasi, tondimaki komipimela esengo ya kozala na bango esika moko, komona bango na basi mpe bana. Kutu, totondaki nde na esengo ya komona ete bana na biso bazali kosalela Yehova na Betele.a Tondimaki mpenza maloba ya Masese 23:15, oyo elobi boye: “Mwana na ngai, soki motema na yo ezali na mayele, motema na ngai ekosepela, motema na ngai mpenza!”

Tokómi babongisi-nzela monene

Lokola bana na biso nyonso mibale bakɔtaki Betele, tokobaki na mosala ya mobongisi-nzela. Mokolo moko na 1975, tozwaki mokanda ete tóbanda mosala ya mobongisi-nzela monene na teritware moko oyo basakoli bazalaki te, na Clinton County, na etúká ya Illinois. Ezalaki likambo oyo tokanisaká ata moke te! Tosengelaki kotika etúká ya New Jersey, epai tozalaki na likoki ya kokende kotala bana na biso na New York ntango nyonso oyo tosepeli mpe epai baninga na biso mpe bandeko bazalaki. Kasi, tomonaki ete yango ezali etinda ya Yehova mpe tondimaki komipimela makambo mosusu, mpe yango ememelaki biso mapamboli mosusu.

Nsima ya kolekisa ebele ya basanza na teritware yango, tobandaki kosala makita na ndako moko ya makita na engumba Carlyle, na etúká ya Illinois. Kasi, tozalaki na mposa ya esika na biso moko mpo na makita. Ndeko moko ya engumba yango ná mwasi na ye bazwelaki biso mwa ndako moko ya moke ya kofutela. Tosukolaki yango malamu, tii na batwaleti ya libanda, mpe tokómisaki yango esika ya makita. Tobosanaka te mpunda moko oyo ezalaki ntango nyonso kotala biso ntango tozali na makita. Mpunda yango ezalaki mbala na mbala kokɔtisa motó na yango na lininisa mpo na komona nini ezalaki koleka na makita!

Nsukansuka, lisangá esalemaki ya engumba Carlyle, mpe tozalaki na esengo ndenge topesaki mabɔkɔ mpo lisangá yango esalema. Tosalaki na teritware yango elongo na babongisi-nzela mibale, Steve Thompson ná mwasi na ye, Karil, oyo bayaki mpe kosakola kuna. Ndeko Thompson ná mwasi na ye basalaki kuna ebele ya bambula, mpe na nsima babengaki bango na Gileadi, Eteyelo ya la Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia, mpe batindaki bango bamisionɛrɛ na Afrika ya Ɛsti, epai Ndeko Thompson azali mokɛngɛli-motamboli.

Mosika te, mwa esika na biso ya makita ekómaki moke, mpe tokómaki na mposa ya ndako ya monene. Kaka ndeko oyo azwelaki biso esika wana ná mwasi na ye basalisaki biso lisusu mpe basombelaki biso mabelé oyo ebongaki mpo na kotonga Ndako ya Bokonzi. Tozalaki na esengo mpenza ntango babengaki biso mwa bambula na nsima na likita ya kofungola Ndako ya Bokonzi oyo bautaki kotonga na engumba Carlyle! Nazwaki libaku malamu ya kosala lisukulu ya bofungoli. Ntango oyo tolekisaki na teritware yango ezalaki ntango moko ya esengo mpenza mpe ezalaki lipamboli ya Yehova.

Tokómi kosakola epai ya bato ya monɔkɔ mosusu

Na 1979 batindaki biso na engumba Harrison, na etúká ya New Jersey. Tosalaki kuna pene na mbula 12. Ntango tozalaki kuna, tobandaki koyekola Biblia na mwasi moko moto ya Chine, mpe na nzela na ye tozwaki libaku ya koyekola Biblia na Ba-Chinois mingi. Na ntango yango, bayebisaki biso ete ebele ya bana-kelasi mpe mabota ya Ba-Chinois bazalaki kofanda na kartye oyo tozalaki. Yango wana, balendisaki biso tóyekola monɔkɔ ya Chinois. Atako koyekola monɔkɔ yango ezalaki kozwa biso ntango mingi mokolo na mokolo, tozwaki mbano na ndenge toyekolaki Biblia na ebele ya Ba-Chinois na kartye na biso.

Tokutanaki na makambo ebele ya kosɛkisa, mingimingi ntango tozalaki kobunda mpo na koloba monɔkɔ ya Chinois. Mokolo moko, Ann ayebisaki mwasi moko na monɔkɔ ya Chinois ete azali “mpoko” ya Biblia na esika aloba ete azali “moteyi” ya Biblia. Maloba yango mibale ezali mpenza ndenge moko. Mwasi yango asɛkaki mpe alobaki na ye ete: “Kɔtá. Nazwá naino libaku ya kosolola na mpoko ya Biblia te.” Tii lelo oyo toyebaka mpe kaka monɔkɔ yango malamu te.

Na nsima, batindaki biso epai mosusu, kaka na etúká ya New Jersey epai tokobaki kosakola epai ya Ba-Chinois. Na nsima, batindaki biso na engumba Boston, na etúká ya Massachusetts, epai etuluku moko ya Ba-Chinois ezalaki banda mbula soki misato. Tozwaki libaku malamu ya kosalisa etuluku yango mbula nsambo oyo euti koleka mpe, mokolo ya 1 Yanuali 2003, tozalaki na esengo ya komona ete ekómi lisangá.

Mapamboli oyo tozwi na bomoi ya komipimela

Na Malaki 3:10, Yehova azali kosɛnga bato na ye ete báya na makabo mpe bambeka na bango mpo asopela bango mapamboli kino bakozanga esika ya kotya yango. Totikaki mosala oyo nazalaki kosepela na yango mingi. Totɛkaki mpe ndako na biso, oyo tolingaki mingi. Tomipimelaki mpe ebele ya makambo mosusu. Kasi, soki totali mapamboli oyo tozwi, makambo oyo tomipimelaki ezali mpamba.

Ya solo, Yehova asopeli biso mpenza ebele ya mapamboli! Toyokaki esengo ya komona ete bana na biso bandimi solo, tozwaki esengo ya kosala lokola babongisi-nzela na mosala oyo ezali kobikisa bomoi ya bato, mpe tomoni lobɔkɔ ya Yehova na ndenge azali kokokisa bamposa na biso. Ya solo, mwa makambo ya mike oyo tomipimelaki ememeli biso mapamboli minene mpenza!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Bazali kosalela Yehova na bosembo na Betele tii lelo oyo; Edward ná mwasi na ye, Connie, bazali na Patterson mpe George ná mwasi na ye, Grace, na Brooklyn.

[Elilingi na lokasa 25]

Louise ná George Blanton mpe Ann, na 1991

[Elilingi na lokasa 26]

Ndako ya Bokonzi na Carlyle oyo efungwamaki na mokolo ya 4 Yuni 1983

[Elilingi na lokasa 27]

Ná bandeko ya lisangá ya Chinois oyo esalemi sika na Boston

[Elilingi na lokasa 28]

Elongo na Edward, Connie, George mpe Grace

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto