Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 1/5 nk. 24-28
  • Nazali kopesa Yehova matɔndi mpo na mosala ya ntango nyonso!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nazali kopesa Yehova matɔndi mpo na mosala ya ntango nyonso!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ebandeli
  • Mosala ya mobongisi-nzela na ntango ya etumba
  • Nakómi na bonsomi oyo nakanisaki te
  • Mikumba mosusu na lisangá
  • Nakei na Gileadi!
  • Nazongi na Londres
  • Na engumba New York na 1958
  • Mapamboli ya mosala ya ntango nyonso
  • Nasalaki na elimo ya komipesa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Nasimbi eteni ya nse ya elamba ya Moyuda banda mbula ntuku nsambo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Yehova ateyaki ngai banda bomwana
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Tósepela mpenza na “bomoi ya sikoyo”!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 1/5 nk. 24-28

Lisolo ya bomoi

Nazali kopesa Yehova matɔndi mpo na mosala ya ntango nyonso!

LISOLO YA STANLEY E. REYNOLDS

Nabotamaki na engumba Londres, na Angleterre, na 1910. Nsima ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, tokendaki kofanda na Westbury Leigh, mwa mboka moko na etúká ya Wiltshire. Ntango nazalaki elenge, mbala mingi nazalaki komituna ete ‘Nzambe azali nani?’ Moto moko te akokaki kopesa ngai eyano. Nazalaki mpe koyeba te ntina oyo mwa mboka na biso oyo ezalaki moke ezalaki na lingomba mpe na ndakonzambe mibale mpo na kosambela Nzambe.

NA MOBU 1935, mbula minei liboso Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebanda, ngai na Dick, leki na ngai ya mobali, tokendaki na Weymouth na velo, mboka yango ezalaki na epai ya sudi ya Angleterre, pene ya mai monene mpo na kolekisa konje kuna. Ntango tofandaki na kati ya hema (tente) na biso, mbula ezalaki kobɛta mpe tozalaki komituna soki tokosala nini, tata moko mobange ya boboto ayaki kotala biso mpe apesaki biso mikanda misato oyo elimbolaka Biblia: La Harpe de Dieu, Lumière I na Lumière II. Nazwaki mikanda yango na esengo mpo namonaki ete nazwi mosala ya kosala. Mbala moko nakómaki kosepela na makambo oyo natángaki kasi nayebaki te ete makambo yango ekobongola mpenza bomoi na ngai mpe bomoi ya leki na ngai.

Ntango nazongaki na ndako, mama ayebisaki ngai ete Kate Parsons, mwasi moko oyo tozalaki kofanda na ye mboka moko, azalaki mpe kokabola mikanda oyo elimbolaka Biblia. Mwasi yango ayebanaki mingi mpo, atako azalaki mobange mpenza, azalaki kotambola na tukutuku moko ya moke mpo na kotala bato bipai na bipai na mboka na biso. Nakendaki koluka ye mpe asepelaki kopesa ngai mikanda Bozalisi, Bozwi, na mikanda mosusu ya Batatoli ya Yehova (nyonso na Lingelesi). Ayebisaki ngai mpe ete azali Motatoli ya Yehova.

Ntango nasilisaki kotánga mikanda yango mpe nazalaki kotánga mikapo na Biblia na ngai, nayebaki ete Yehova azali Nzambe ya solo mpe nalingaki kosambela ye. Yango wana natindaki mokanda na lingomba na biso mpo na komonisa ete nalongwe mpe nabandaki kokenda makita mpo na koyekola Biblia na ndako ya John na Alice Moody. Bango bazalaki kofanda na engumba Westbury, pene mpenza na mboka na biso. Tozalaki kaka bato nsambo oyo tozalaki koyangana na makita yango. Liboso mpe nsima ya makita, Kate Parsons azalaki kobɛta harmonium mpe biso tozalaki koyemba elongo na mongongo makasi!

Ebandeli

Namonaki ete tozali na ntango moko ya ntina mingi mpe nazalaki mpenza na mposa ya kosala mosala ya kosakola oyo elobelami na Matai 24:14. Yango wana, natikaki komela likaya, nasombaki sakosi na ngai mpe namipesaki na Yehova, Nzambe Monene.

Na Augusto 1936, Joseph F. Rutherford, prezida ya Société Watch Tower, ayaki na engumba Glasgow na Écosse mpo na kosala lisukulu na motó ya likambo “Armagedon.” Atako Glasgow ezalaki na ntaka ya soko kilomɛtrɛ 600 na mboka na biso, nakanaki mpenza kozala kuna mpe kozwa batisimo na liyangani yango. Lokola nazalaki na mbongo mingi te, namemaki velo na ngai mpe nakɔtaki na engbunduka tii na Carlisle, engumba moko na ndelo ya Écosse na Angleterre, mpe banda wana, natambolaki na velo kilomɛtrɛ 160 na epai ya nɔrdi. Mpo na kozonga, natambolaki mingi na velo, mpe ntango nakómaki na ndako, nalɛmbaki mingi kasi na elimo, nalendisamaki.

Banda ntango wana, nazalaki ntango nyonso kotambola na velo mpo na kokende koteya bato ya bamboka oyo ezali pembenipembeni. Na ntango wana, Motatoli mokomoko azalaki na kalati oyo ezalaki na mwa lisolo ya Biblia mpo na kopesa bato oyo tozalaki kokutana na bango na bandako mpo bátánga yango. Tozalaki mpe kosalela bafɔnɔ mpo na kobɛta badiskɛ oyo ezalaki na masukulu oyo prezida ya la Société asalaki. Tozalaki mpe komema sakosi moko ya bazulunalo,a yango ezalaki kosalisa bato báyeba mbala moko ete tozali Batatoli ya Yehova.

Mosala ya mobongisi-nzela na ntango ya etumba

Leki na ngai ya mobali azwaki batisimo na 1940. Etumba ya mibale ya mokili mobimba ebandaki na 1939 mpe biso mibale tomonaki ete lisangá ezalaki mpenza na mposa ya basakoli ya ntango nyonso. Yango wana tosɛngaki mosala ya mobongisi-nzela. Tosepelaki mingi lokola batindaki biso na ndako ya babongisi-nzela na Bristol, kuna tokendaki kokuta Edith Poole, Bert Farmer, Tom na Dorothy Bridges, Bernard Houghton, na babongisi-nzela mosusu oyo tozalaki kosepela mpenza na kondima na bango banda kala.

Eumelaki te, motuka moko ya moke eyaki kozwa biso; na mipanzi na yango nyonso mibale bakomaki: “BATATOLI YA YEHOVA.” Sofɛlɛ na yango ezalaki Stanley Jones oyo, na nsima akómaki misionɛrɛ na Chine mpe akɔtaki bolɔkɔ mbula nsambo mpo azalaki kosakola.

Lokola bitumba ezalaki kopusana, ezalaki mpasi mpo tólala butu mobimba. Babɔmbi ezalaki kokwea pene na ndako ya babongisi-nzela mpe esengelaki tósɛnzɛla ntango nyonso mpamba te biloko wana ya mɔ́tɔ ekokaki kozikisa ndako. Mokolo moko na mpokwa, toutaki liyangani moko kitoko, na kati ya Bristol, toyanganaki Batatoli 200 mpe tozongaki na ndako na biso oyo ezalaki na mwa esika ya kobombana mpo na komibatela ete babɔmbi oyo bazalaki kobɛta na yango bampɛpɔ ya bitumba na likoló mpe ezalaki kosopana lokola mbula, ekwela biso te.

Na ntɔngɔ oyo elandaki, ngai na Dick tozongaki na kati ya Bristol mpo na kozwa mwa biloko totikaki kuna. Totikalaki monɔkɔ polele. Bristol ebebaki mpenza. Engumba ebebaki mpenza mpe esika oyo bamagazini mingi mpe bandako ya minene ezalaki ezikaki nyonso. Na balabala oyo babengi Park Street, epai Ndako ya Bokonzi na biso ezalaki, bandako ebele ebukanaki mpe ezalaki kobimisa milinga. Kasi, ata Motatoli moko te akufaki to azokaki. Likambo ya esengo ezalaki ete tobimisaki mikanda nyonso na Ndako ya Bokonzi mpe tokabolaki yango na bandako ya bandeko ya lisangá. Topesaki Yehova matɔndi mpo na nyonso wana.

Nakómi na bonsomi oyo nakanisaki te

Lisangá ya Bristol, esika nazalaki mokɛngɛli-mokambi, ekómaki lisangá moko monene mpe ekómaki na basakoli 64, kasi na ntango yango babengaki ngai nakɔta mosala ya soda. Batatoli mingi bakɔtaki bolɔkɔ mpo baboyaki kokɔta na makambo ya politiki mpe nazalaki kokanisa ete ngai mpe nakosakola lisusu na ndenge ya polele te. Basambisaki ngai na tribinale ya Bristol mpe Ndeko Anthony Buck, oyo azalaká kala mokonzi ya bolɔkɔ, asambaki mpo na ngai. Azalaki mobali ya mpiko, azalaki kobanga te mpe azalaki na molende mpo na solo; yango wana, lokola asambaki malamu, balobaki na ngai ete nakosala mosala ya soda kaka soki natiki kosala mosala ya kosakola ntango nyonso!

Nasepelaki mingi ndenge nakómaki na bonsomi mpe nakanaki komipesa mobimba na mosala kosakola mpo na kosalela malamu bosomi na ngai. Ntango babengaki ngai na Betele ya Londres mpo na kosolola na Albert D. Schroeder, mokɛngɛli ya biro, namitunaki soki likambo nini ezalaki kozela ngai kuna. Kanisá naino ndenge nakamwaki ntango batindaki ngai nakende na Yorkshire kosala lokola mokɛngɛli-motamboli, natalaka lisangá mokomoko na pɔsɔ moko mpo na kosalisa bandeko mpe kolendisa bango. Namonaki ete nabongi te na mosala yango kasi lokola nakosala mosala ya soda te, eloko moko te ezalaki kopekisa ngai kokende. Yango wana nandimaki ete Yehova atambwisa ngai mpe nakendeki.

Albert Schroeder alakisaki ngai epai ya bandeko na liyangani moko na Huddersfield, mpe na Aprili 1941, nabandaki mosala na ngai ya sika. Nazalaki na esengo mingi ya kokutana na bandeko yango ya bolingo! Bolingo mpe boboto na bango esalisaki ngai namona mpenza ete Yehova azali na libota ya bato oyo bamipesi epai na ye mpe balinganaka.​—Yoane 13:35.

Mikumba mosusu na lisangá

Na 1941, tosalaki liyangani moko ya mikolo mitano oyo esangisaki Batatoli ya ekólo mobimba na ndako moko De Montfort Hall ya engumba Leicester. Atako bilei ekómaki ya kobatela mpe babisi ezalaki mingi te, bato 12 000 bayanganaki na mokolo ya lomingo; nzokande na Grande-Bretagne mobimba, na ntango wana Batatoli bazalaki 11 000. Tolandaki masukulu ya prezida ya la Société na diskɛ mpe balakisaki buku ya sika, ezalaki na motó ya likambo ete Bana. Liyangani wana ezalaki liyangani monene mpenza oyo Batatoli ya Yehova basalaki na Grande-Bretagne na ntango oyo Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ezalaki kongala.

Mwa moke nsima ya liyangani yango, babengaki ngai nakende kosala na Betele ya Londres. Kuna, nasalaki na departema ya kokabola mikanda mpe na nsima nasalaki na biro oyo etalaka makambo ya masangá.

Bato nyonso na libota ya Betele bazalaki motema likoló mpo na bampɛpɔ oyo ezalaki kobwaka babɔmbi na Londres butu na moi mpe lisusu bakonzi ya Leta bazalaki koya mbala na mbala koluka bandeko oyo bazalaki kokamba mosala na Betele. Ndeko Pryce Hughes, Ewart Chitty na Frank Platt, bakɔtaki bolɔkɔ mpo baboyaki kokɔta na makambo ya politiki, mpe nsukansuka, bakonzi bazongisaki ndeko Albert Schroeder na États-Unis. Atako mikakatano wana ezalaki, bandeko babatelaki malamu masangá mpe matomba ya Bokonzi.

Nakei na Gileadi!

Ntango etumba esilaki na 1945, nasɛngaki nakɔta na Gileadi, Eteyelo ya Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia, mpe babengisaki ngai mpo na kelasi ya mbala ya mwambe na 1946. Bibongiseli ezwamaki na la Société mpo bamosusu kati na biso tókende kozwa masuwa na libongo ya Fowey, na etúká ya Cornouailles, epai babomaka mbisi mingi. Kati na bandeko yango ezalaki na Tony Attwood, Stanley Jones, Harold King, Don Rendell na Stanley Woodburn. Motatoli moko kuna akomisaki nkombo na biso na masuwa moko ya moke oyo ememaka mabele oyo basalaka bikeko. Bisika na biso ya kolala ezalaki mike mpenza mpe mbala mingi nkɔbɛ na yango ezalaki na mai. Mitema na biso ekitaki mpenza ntango tokómaki pene ya Philadelphie, libongo oyo tolubwaki na États-Unis!

Eteyelo ya Gileadi ezalaki na esika moko kitoko, na South Lansing, na nɔrdi ya etúká ya New York, mpe mateya oyo nazwaki kuna esalisaki ngai mingi. Banakelasi nyonso toutaki na bikólo 18 (ezalaki mbala ya liboso la Société abengisa basakoli mingi ya mikili mosusu) mpe tokómaki baninga mpenza. Nasepelaki mingi na Kalle Salavaara, ndeko oyo tozalaki kolala na ye shambre moko, ye autaki na Finlande.

Mikolo elekaki nokinoki mpe nsima ya sanza mitano, Nathan H. Knorr, prezida ya la Société, autaki na biro monene na Brooklyn mpe ayaki kopesa biso mapɔlɔmi mpe koyebisa biso bisika oyo bakotinda biso. Na ntango wana, bana kelasi bazalaki koyeba te esika nini bakotinda bango tii mokolo oyo bakozwa mapɔlɔmi na bango. Bayebisaki ngai nazonga na Betele ya Londres mpo na kokoba mosala na ngai kuna.

Nazongi na Londres

Nsima ya etumba, bomoi ezalaki mpasi na Londres. Biloko ya kolya mpe biloko mosusu ya ntina mingi, na papye ezalaki mingi te. Kasi tobikaki mpe matomba ya Bokonzi ya Yehova ekolaki. Longola mosala na Betele, nazalaki kosala na mayangani ya etúká mpe ya zongazonga mpe nazalaki kotambola mpo na kotala masangá mingi tii na Irlande. Nazwaki mpe libaku ya kokutana na Erich Frost na bandeko mosusu ya mibali mpe ya basi ya Mpoto; bazalaki koyebisa ngai ndenge bandeko na biso Batatoli ya Yehova batikalaki sembo na ntango ya minyoko na bakaa ya bakangami ya Banazi. Mosala na Betele ezalaki mpenza lipamboli monene mpo na ngai.

Mbula zomi liboso, nayebanaki na Joan Webb, ye azalaki mobongisi-nzela monene na Watford, mboka moko ezali na nɔrdi ya Londres. Na 1952 tobalanaki. Biso mibale tolingaki kokoba kosala mosala ya ntango nyonso, yango wana tosepelaki mingi ntango batindaki ngai mokɛngɛli ya zongazonga nsima ya kotika mosala na Betele. Zongazonga ya liboso totalaki ezalaki na bokula ya sudi ya Angleterre, na etúká ya Sussex mpe ya Hampshire. Mosala ya mokɛngɛli ya zongazonga ezalaki pɛtɛɛ te na ntango wana. Mbala mingi tozalaki kosala mibembo na bisi, na velo to na makolo. Masangá mingi ezalaki na bateritware minene oyo ezalaki na bamboka mingi mpe ezalaki mpasi mpo na kokóma kuna, kasi Batatoli bazalaki se kokóma mingi.

Na engumba New York na 1958

Na 1957, nazwaki mokanda eutaki na Betele oyo bakomaki boye: “Okosepela koya na biro mpe kosalisa biso mpo na kobongisa makambo ya mibembo ya bato oyo bakokende na liyangani ya mikili mingi oyo ekosalema na Yankee Stadium mpe na Polo Grounds na engumba New York na 1958?” Mosika te, ngai na Joan tokómaki na mosala mingi mpo na kotalela bademande ya bandeko oyo bazalaki na mposa ya kosala mobembo na bampɛpɔ mpe na bamasuwa oyo la Société asengelaki kofutela. Bato oyo bazalaki na liyangani yango bautaki na mikili ndenge na ndenge mpe motó ya likambo na yango ezalaki ete “Mokano ya Nzambe”; bato 253 922 bazalaki na liyangani yango. Na liyangani yango, bato 7 136 bazwaki batisimo na mai mpo na komonisa ete bamipesi epai ya Yehova; bato oyo bazwaki batisimo na mokolo yango balekaki bato oyo bazwaki batisimo na Pantekote ya mobu 33 T.B. na ebele mbala mibale na ndambo, ndenge Biblia emonisi yango.​—Misala 2:41.

Ngai na Joan tokobosana ata moke te boboto ya Ndeko Knorr ntango ye moko abengisaki biso tókende na liyangani mpo na kosalisa bango na koyamba bandeko oyo bakoya na engumba New York, bakouta na mikili 123. Ezalaki mpenza ntango moko ya esengo mpo na biso mibale.

Mapamboli ya mosala ya ntango nyonso

Ntango tozongaki, tokobaki na mosala ya mokɛngɛli-motamboli tii ntango tokómaki na mikakatano ya nzoto. Joan akɔtaki lopitalo mpe ngai nakómaki kokwea na maladi oyo nazalaki koyeba eloko te mpe komisimba mpe te (apoplexie), kasi ezalaki mpenza ya makasi te. Tokómaki babongisi-nzela minene, kasi na nsima, tozwaki lisusu libaku ya kosala na zongazonga na boumeli ya mwa ntango. Na nsuka, tozongaki na Bristol mpe kuna, tolandaki kosala mosala ya ntango nyonso. Dick, leki na ngai ya mobali, na libota na ye, bafandaka mosika te na biso mpe mbala mingi tofandaka mpo na kosolola likoló na makambo ebele oyo eleká.

Miso na ngai ebebaki ntango nabɛlaki miso na 1971. Banda ntango wana, nakómaki na mokakatano mpo na kotánga, yango wana namonaka ete bakasɛti ya mikanda oyo elimbolaka Biblia ezali mpenza likabo ya malamu oyo Yehova apesi. Ngai na Joan toyekolaka na bato Biblia tii lelo oyo, mpe na bambula nyonso oyo eleki, tozwaki libaku ya kosalisa bato soki 40 báyeba solo, kati na bango ezali na libota moko ya bato nsambo.

Eleki mbula 60 banda ntango tomipesaki epai ya Yehova mpe na ntango yango, mokano na biso ezalaki ete tósala mosala ya ntango nyonso mpo na libela. Tozali mpenza kopesa Yehova, Nzambe Monene, matɔndi, mpo na makasi oyo apesi biso mpo tósalela ye tii lelo oyo, mpe ezali se na mosala yango nde tokoki kopesa ye matɔndi mpo na boboto na ye epai na biso mpe mpo na bambula nyonso ya esengo oyo tolekisi elongo!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ezalaki sakosi moko ya elamba oyo ezalaki na nsinga mpe okoki kokɔtisa na lipeka mpe esalemaki mpo na komema bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Consolation (oyo ekómá Lamuká!).

[Elilingi na lokasa 25]

Ngai na leki na ngai Dick (na nsuka na lobɔkɔ ya mwasi; Dick atɛlɛmi) na babongisi-nzela mosusu liboso ya ndako ya babongisi-nzela na Bristol

[Elilingi na lokasa 25]

Ndako ya babongisi-nzela na Bristol na 1940

[Bililingi na lokasa 26]

Stanley na Joan Reynolds na mokolo babalanaki, mwa 12 Yanuali 1952, mpe lelo oyo.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto