Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 1/4 lok. 21
  • “Bato na yo bakomipesa na yo na bolingo nyonso”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bato na yo bakomipesa na yo na bolingo nyonso”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Masolo mosusu
  • Elombe ya etumba ná mwana moko ya mwasi
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Azalaki na mposa ya kosalisa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Na ebandeli amonisaki motó makasi, kasi nsukansuka atosaki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Kobika ya Naamane
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 1/4 lok. 21

Masolo ya Basakoli ya Bokonzi

“Bato na yo bakomipesa na yo na bolingo nyonso”

NAMANA, mokonzi monene ya mampinga ya Sulia azali na maladi ya maba. Maladi yango ya nsɔmɔ soki esalisami te ekoki kobebisa nzoto mpe ata koboma moto. Namana akosala nini? Kati na ndako ya Namana, ezali na elenge mwasi moko, ye azali “mokangami autaki na mokili ya Yisalaele.” Alobi na mpiko nyonso mpe amonisi ete mosakoli Elisa akoki kobikisa Namana.​—2 Mikonzi 5:1-3.

Mpo na mpiko ya elenge mwasi wana, Namana aluki Elisa mpe abikisami. Lisusu, Namana akómi mosambeli ya Yehova! Lisolo oyo ekomami na Biblia esalemaki na ekeke ya zomi L.T.B. (2 Mikonzi 5:4-15) Lelo oyo, bilenge mingi bazali komonisa mpiko motindo wana na kolobáká mpo na matomba ya Bokonzi. Eksperiansi oyo euti na ekólo Mozambique endimisi likambo yango.

Nuno, mwana ya mbula motoba, azali mosakoli ya nsango malamu oyo azwi naino batisimo te. Ata liboso ya kokóma mosakoli oyo azwi naino batisimo te, Nuno azalaki koyanganisa bana mike ya kartye na bango, azalaki kosala libondeli, mpe koteya bango makambo ya Biblia, na kosaleláká Mokanda mpo na Masolo ya Biblia.

Mbala mingi, Nuno alamukaka na ntɔngɔntɔngɔ na mokolo ya pɔsɔ mpe akundwelaka basangani ya libota na ye ete: “Lelo tokokende mosala ya kosakola.” Molende na ye kati na mosala ya Nzambe ezali komonana na makambo mosusu. Na ntango abimaka elongo na baboti na ye na mosala ya kosakola na babalabala ya engumba Maputo, mbala mingi Nuno asololaka na bato ye moko. Mokolo moko, moto moko ya mombongo ayaki pene na ye mpe atunaki ye ete: “Mpo na nini ozali kotɛkisa bazulunalo oyo?” Nuno alobaki: “Nazali kotɛkisa bazulunalo te, kasi nazali kondima mwa lipesi mpo na kosunga mosala ya kosakola.” Moto yango ayanolaki ete: “Atako nasepeli na yango mpenza te, ezalela mpe makoki na yo esepelisi ngai mingi. Nalingi kopesa likabo mpo na mosala oyo.”

Na libaku mosusu, Nuno abɛlɛmaki na moto moko na balabala mpe alakisaki ye buku La paix et la sécurité véritables: comment est-ce possible? Mobali yango atunaki ete: “Okendaka kelasi na eteyelo oyo kuna?” Nuno ayanolaki ete: “Ɛɛ, natángaka na eteyelo wana, kasi lelo nazali kolakisa nsango moko ya ntina ezwami na buku oyo. Ezali komonisa yo ete okoki kozala na bomoi na mokili ya sika oyo Nzambe akosala, lokola emonisami na elilingi na buku oyo.” Nuno ayebaki te ete moto oyo azalaki kosolola na ye azalaki molakisi na eteyelo na bango. Molakisi yango azwaki bobele buku te kasi lisusu akóma kozwa mbala na mbala bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! oyo Nuno amemelaka ye.

Soki batuni Nuno mpo na nini alingaka kosangana na mosala ya kosakola, alobaka ete: “Nalingaka kosolola na bato mpe koteya bango makambo ya Yehova mpe Mwana na ye, Yesu Klisto.” Abakisaka ete: “Mpe soki bato baboyi koyoka, ntina ya kosilika ezali te.”

Na mokili mobimba, bankóto ya bilenge lokola Nuno ‘bazali komipesa na bolingo na bango nyonso’ mpo na koteya mpe kosakola Bokonzi ya Nzambe. (Nzembo 110:3) Kasi yango ezali likambo esalemaka mbalakaka te. Baboti oyo bateyaka bana na bango banzela ya Yehova banda bomwana, bazali kopesa ndakisa malamu na mosala ya kosakola, mpe bazali kolanda matomba ya Bokonzi na molende bakozwa mbano monene.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto