Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 15/7 nk. 28-30
  • Bakaraite mpe Bolukiluki na bango ya solo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bakaraite mpe Bolukiluki na bango ya solo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Lolenge nini ntembe yango ebandaki?
  • Bowelani ya Bakaraite mpe balabi
  • Lolenge nini balabi basalaki?
  • Lingomba ya Bakaraite ekiti
  • Mibeko oyo mikomamaki te​—Mpo na nini bakomaki yango nsima?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • “Pole” likoló ya Biblia ya bibliotɛkɛ ya libosoliboso ya Russie
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Talmud ezali nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Biblia​—Epemamaki na Nzambe?
    Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 15/7 nk. 28-30

Bakaraite mpe Bolukiluki na bango ya solo

“BÓLUKA solo na mozindo kati na [Makomami] mpe bondimela makanisi na ngai te.” Ezali mokambi moko ya Bakaraite ya ekeke ya mwambe T.B. nde alobaki maloba oyo. Bakaraite bazalaki banani? Tokoki koyekola likambo moko ya ntina na ndakisa na bango? Mpo na koyanola na mituna oyo, tosengeli kotalela lisoló ya kala ya ntembe oyo eumelaki mingi, oyo esalaki ete lingomba ya Bakaraite ebima.

Lolenge nini ntembe yango ebandaki?

Na bikeke ya nsuka liboso ya Ntango na Biso, filozofi moko ya sika ebimaki kati na lingomba ya Bayuda. Ezalaki likanisi oyo ete Nzambe apesaki Mibeko mibale na Ngomba Sinai, moko ekomamaki mpe mosusu ekomamaki te.a Pene na ekeke ya liboso T.B., bowelani makasi ezalaki kati na baoyo bandimaki likanisi wana ya sika mpe baoyo baboyaki yango. Bafalisai bazalaki babandisi na yango mpe Basadukai mpe Baesene bazalaki kati na batɛmɛli.

Katikati na eleko ya ntembe wana, Yesu ya Nasalɛtɛ abimaki lokola Masiya oyo alakamaki. (Danyele 9:24, 25; Matai 2:1-6, 22, 23) Yesu atɛmɛlaki bituluku wana nyonso oyo bizalaki na bowelani. Na kososoláká elongo na bango, akweisaki bango mpo ete babebisaki liloba ya Nzambe mpo na bonkɔ́kɔ na bango. (Matai 15:3-9) Yesu ateyaki mpe makambo ya solo ya elimo na lolenge oyo bobele Masiya akokaki kosala yango. (Yoane 7:45, 46) Lisusu, bobele bayekoli ya solo ya Yesu nde bamonisaki elembeteli ete bazalaki na lisungi ya Nzambe. Bakómaki kobéngama baklisto.​—Misala 11:26.

Na ntango tempelo ya Yelusaleme ebomamaki na 70 T.B., lingomba ya Bafalisai ezalaki lingomba bobele moko oyo ebikaki. Sikawa lokola bonganga ezalaki te, bambeka te, tempelo mpe te, lingomba ya Bayuda oyo etambwisamaki na Bafalisai ekokaki kosala bibongiseli mosusu mpo na kozwa esika na yango, batikaki nzela ete bonkɔ́kɔ mpe bolimboli na bango moko ezwa esika ya Mibeko mikomami. Yango epesaki nzela ete “búku mosantu” ya sika ekomama. Ya liboso Mishnah, na makambo oyo ebakisamaki kati na mibeko na bango mikomami te mpe bandimbola oyo bazalaki kopesa likoló na yango. Na nsima, biteni mosusu bisangisami ya makomami ebakisamaki mpe ebéngamaki Talmud. Bobele na ntango yango baklisto bapɛngwi babandaki kobebisa mateya ya Yesu. Bituluku wana mibale ebimisaki bibongiseli mibale ya nguya ya losambo​—na ngámbo moko bokonzi ya balabi mpe na ngámbo mosusu bakonzi ya mangomba.

Mpo na bowelani kati na Loma ya bopakano, mpe na nsima elongo na Loma ya “boklisto,” ntéi ya losambo ya Bayuda ekómaki na Babilone. Ezali kuna nde makomi ya Talmud ebimisamaki pene na mobimba na yango mpenza. Atako balabi balobaki ete Talmud ezalaki komonisa mokano ya Nzambe na mobimba mpenza, Bayuda mingi bamonaki bopusi makasi ya bokonzi ya balabi mpe bazalaki na mposa makasi ya liloba ya Nzambe oyo epesamelaki bango na nzela ya Mose mpe na nzela ya basakoli.

Pene na nsuka ya ekeke ya mwambe T.B., Bayuda ya Babilone oyo batɛmɛlaki bokonzi mpe bindimeli ya balabi kati na mibeko na bango mikomami te balandaki mokambi moko oyo ayekolaki mingi oyo abéngamaki Anan ben David. Asakolaki lotómo ya Moyuda nyonso ya koyekola Makomami ya Liebele na bonsomi nyonso lokola eutelo bobele moko ya lingomba ya solo, kozanga kotalela bandimbola ya balabi to Talmud. Anan ateyaki ete: “Boluka na mozindo kati na Torah [mibeko mikomami ya Nzambe] kasi bondimela makanisi na ngai te.” Lokola atyaki likebi mingi likoló na Makomami, bayekoli ya Anan bakómaki kobéngama Qa·ra·ʼimʹ, liloba ya Liebele oyo elimboli “batángi.”

Bowelani ya Bakaraite mpe balabi

Wapi mwa bandakisa ya mateya ya Bakaraite oyo ebulunganisaki bituluku ya balabi? Balabi bapekisaki kolya misuni mpe miliki elongo. Bamonisaki yango lokola ndimbola ya mobeko mokomami te ya Exode 23:19, oyo elobi ete: “Okolamba mwana na ntaba na mabéle na mama na yango te.” Na ngámbo mosusu, Bakaraite bazalaki koteya ete mokapo wana elimbolaki bobele makambo oyo elobami wana​—kobakisa te, kolongola te. Balobaki ete bipekiseli ya balabi ezalaki makanisi mpamba ya bato.

Engebene ndimbola oyo bango bazalaki kopesa mpo na Deteronome 6:8, 9, balabi bazalaki koloba ete mibali Bayuda basengelaki kolata telifini wana ezali bango kosambela, mpe basengelaki kotya mezuzah na bikuke nyonso.b Bakaraite bazalaki kotalela mikapo wana ete ezalaki bobele na ndimbola ya elilingi, na yango babwakaki mibeko wana ya balabi.

Na makambo mosusu Bakaraite bazalaki na bipekiseli mingi koleka balabi. Na ndakisa, tolobela lolenge oyo bango bazalaki kotalela Exode 35:3, oyo elobi ete: “Bokopelisa mɔ́tɔ na ndako na bino na mokolo na sabata te.” Bakaraite bazalaki kopekisa kotika mwinda to mɔ́tɔ ya kopela atako epelisamaki liboso ya Sabata.

Mingimingi na nsima ya liwa ya Anan, bakambi ya Bakaraite bazalaki mbala mingi koboya kondima meko mpe lolenge ya bipekiseli mosusu, mpe nsango na bango ebandaki kozala polele ntango nyonso te. Bakaraite bazalaki na bomoko te mpamba te bazali kondimela bobele mokambi moko te kasi bazalaki kotya likebi mingi likoló na botángi mpe ndimbola ya Makomami engebene moto na moto, na bokeseni na lolenge ya bokonzi ya balabi. Nzokande, atako bongo, lingomba ya Bakaraite elingamaki na bato mingi mpe bopusi na yango esukaki bobele te epai na etuluku ya Bayuda ya Babilone mpe epalanganaki na Moyen-Orient mobimba. Esika monene ya Bakaraite etyamaki nkutu na Yelusaleme.

Na boumeli ya ekeke ya libwa mpe ya zomi T.B., banganga-mayele ya Bakaraite bakólaki mingi kati na boyekoli ya sika ya lokóta ya Liebele mpe bazwaki matomba mingi. Batalelaki Makomami ya Liebele oyo ekomami ete ezali bulɛɛ, kasi te engebene mibeko ya bonkɔ́kɔ oyo ezangi kokomama. Bakaraite mosusu bakómaki bakomeli ya molende ya Makomami ya Liebele. Ya solo, ezalaki mosala kitoko ya Bakaraite nde elendisaki ba Massorètes kati na Bayuda báyekola Makomami, kosaláká ete makomi ya Biblia mabatelama malamu kino lelo.

Na boumeli ya eleko wana ya bokóli ya nokinoki, lingomba ya Bayuda oyo ekambamaki na Bakaraite emikɔtisaki na mosala ya polele ya misionere kati na Bayuda mosusu. Yango ezalaki likámá mpo na lingomba ya Bayuda oyo etambwisamaki na balabi.

Lolenge nini balabi basalaki?

Eyano ya balabi ezalaki etumba monene ya maloba, bazalaki koyokanisa mpe kobongola mateya na bango na mayele mabe nyonso. Na ekeke oyo elandaki etumba ya Anan, lingomba ya Bayuda oyo ekambamaki na balabi ekɔtisaki myango mingi ya Bakaraite kati na yango. balabi bakómaki na makoki mingi ya kotánga maloba ya Makomami, kokɔtisáká lolenge mpe myango ya Bakaraite kati na elobeli na bango.

Mokambi monene ya etumba wana ya maloba elongo na Bakaraite ezalaki bongo Sa‘adia’ ben Joseph, ye oyo akómaki mokonzi ya etuluku ya Bayuda kati na Babilone na ebandeli ya ekeke ya zomi T.B. Búku ya ntina mingi ya Sa‘adia’ The Book of Beliefs and Opinions (Búku ya bindimeli mpe ya makanisi), ebongolamaki na Lingelesi na Samuel Rosenblatt, ye oyo alobaki na ebandeli ya mokanda yango ete: “Atako . . . azalaki na boyebi mingi ya Talmud na eleko na ye, [Sa‘adia’] asalelaki mpenza mingi te mokanda wana ya bonkɔ́kɔ ya Bayuda, emonani ete asalaki bongo mpo na kokweisa Bakaraite na bibundeli na bango moko, baoyo bazalaki kondima ete bobele Mibeko Mikomami nde mizalaki na ntina.”

Na kolanda lokolo ya Sa‘adia’, na nsuka lingomba ya Bayuda oyo ekambamaki na balabi ekómaki makasi mpenza. Ezwaki bolóngi wana na koyokanisáká makambo mingi na boye ete elongolaki bantina nyonso oyo ezalaki kopesa nguya na maloba ya Bakaraite. Ezalaki mpo na Moses Mainmonide nde bazwaki elóngá ya nsuka, ye azalaki nganga-mayele ya Talmud ya ekeke ya zomi na mibale oyo ayebanaki mingi. Na ezaleli na ye ya komemya makanisi ya Bakaraite oyo afandaki na bango na Ezipito, mpe na lolenge ya elobeli na ye ya moto ya mayele mpe ya kondimisa, asalaki ete básepela na ye mpe alɛmbisaki etɛlɛmɛlo ya bokonzi na bango.

Lingomba ya Bakaraite ekiti

Lokola bazangaki sikawa bomoko mpe bazalaki na ebongiseli ya malamu te mpo na kotɛmɛla bopusi ya banguna, lingomba ya Bakaraite ebungisaki nguya mpe bato oyo bazalaki kolanda bango. Na nsima, Bakaraite babongolaki makanisi mpe mitindá na bango. Leon Nemoy, mokomi moko ya babúku na lingomba ya Bakaraite, akomaki ete: “Atako Talmud epekisamaki, makambo mingi ya Talmud ekɔtisamaki kozanga koyeba kati na lolenge ya Bakaraite ya kosalela mibeko mpe mimeseno.” Na moboko na bango mpenza, Bakaraite babungisaki mokano na bango ya ebandeli mpe bazwaki makambo mingi ya lingomba ya Bayuda oyo ekambamaki na balabi.

Ezali naino na Bakaraite 25 000 lelo oyo na Yisraele. Mwa bankóto mosusu bazwami na bituluku mosusu, mingimingi na Russie mpe na Etats-Unis. Nzokande, lokola bazali na mibeko na bango ya bonkɔ́kɔ oyo mikomami te, bakeseni na Bakaraite ya liboso.

Liteya nini tokoki kozwa kati na lisoló ya Bakaraite? Ete ‘kobebisa liloba ya Nzambe mpo na mateya ya bankɔ́kɔ’ ezali libunga monene. (Matai 15:6) Mpo na kosikolama na bonkɔ́kɔ ya bato oyo etɔ́ndi na mindɔndɔ́ ezali kosɛnga kozala na boyebi ya sikisiki ya Makomami. (Yoane 8:31, 32; 2 Timoté 3:16, 17) Ee, baoyo bazali koluka koyeba mpe kosalela mokano ya Nzambe bakondimela te bonkɔ́kɔ ya bato. Nzokande, basalaka bolukiluki kati na Biblia na etingya nyonso mpe basalelaka malako oyo ezali kopesa litomba, euti na Liloba lipemami na Nzambe.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na kozwa bandimbola na ntina na oyo ebéngami mibeko mikomami te, talá nkasa 8-11 mwa búku Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba?, ebimisami na Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania.

b Tefilini ezali basanduku mibale ya mike esalemi na pɔ́sɔ ya nyama oyo kati na yango ezalaki na biteni ya nkasa mikemike ya poso ya mpate likoló na yango ekomami mikapo ya Makomami. Basanduku yango ezalaki kala kolatama na lobɔ́kɔ ya mobali mpe na motó na boumeli ya losambo ya ntɔ́ngɔ́ katikati na pɔ́sɔ. Mezuzah ezali ruló moko ya moke esalemi na mposo ya mpate mpe Deteronome 6:4-9 mpe 11:13-21 ekomami likoló na yango, etyami kati na sanduku oyo ekangisami likoló na ekuke.

[Elilingi na lokasa 30]

Etuluku moko ya Bakaraite

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Euti na búku The Jewish Encyclopedia, 1910

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto