Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 1/8 nk. 3-4
  • Kozanga bosembo ekoki kosila te?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kozanga bosembo ekoki kosila te?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mitindo mileki mabe ya kozanga bosembo
  • Kozanga bosembo etungisaka?
  • Bosembo ekozala mokolo mosusu awa na mabele?
    Makambo mosusu
  • Osengeli kosala nini mpo na makambo ya kozanga bosembo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Okoki koyika mpiko na makambo ya kozanga bosembo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Nzambe akosala eloko mokolo mosusu mpo na kosilisa bokesene?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 1/8 nk. 3-4

Kozanga bosembo ekoki kosila te?

“Atako makambo oyo nyonso, nazali naino kondima ete bato bazalaka mpenza na motema malamu. Kasi, nakoki te kotonga bilikya na ngai likoló ya mobulungano, bampasi, mpe liwa.”​—Anne Frank.

MWA moke liboso ya kokufa, Anne Frank, elenge mwasi Moyuda ya mbula 15 akomaki maloba wana oyo ezali kosimba motema kati na kaye oyo akomaka basɛkɛlɛ na ye. Na boumeli ya mbula koleka mibale, libota na bango mobimba ezalaki kobombama na kati ya plafɔ ya ndako moko na engumba Amsterdam. Bilikya na ye ya komona mokili ya malamu koleka bizindaki na mai ntango moto moko ayebisaki Banazi esika oyo babombanaki. Na mbula oyo elandaki, elingi koloba 1945, Anne akufaki na maladi ya typhus na káa ya bakangami ya Bergen-Belsen. Bayuda mosusu milio motoba bakufaki lokola ye.

Na ekeke oyo, mokano mabe Hitler azalaki na yango ya koboma Bayuda nyonso ekoki kozala kozanga bosembo oyo eleki mabe basalelaki etuluku moko ya bato, kasi ezali bobele yango moko te. Na 1994, na ekólo Rwanda, Batutsi koleka 500 000 babomamaki, bobele mpo ete bazalaki bato ya etuluka mosusu. Mpe na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, ba Arméniens soko milio moko babomamaki na mokano ya kosilisa bango nyonso.

Mitindo mileki mabe ya kozanga bosembo

Kozanga bosembo esuki bobele te na kosilisa na koboma bato ya etuluka moko. Kozanga bosembo na makambo ya bomoi ekangisi ndambo moko likoló ya mitano ya bato na mokili mobimba na bobola makasi. Nzokande, ebongiseli ebéngami Anti-Slavery International eyebisi likambo moko ya mabe koleka: bato koleka 200 000 000 bazali baombo. Lelo oyo, na mokili mobimba, ekoki kozala ete baombo bazali mingi koleka ndenge bazalaki na eleko mosusu nyonso ya lisolo ya bato. Ekoki kozala solo ete batɛkisaka bango lisusu na zando te, kasi mbala mingi ndenge oyo bazali kosalisa bango misala ezali mabe koleka oyo ya baombo na ntango ya kala.

Kozanga bosembo ya mibeko ezali kopimela bamilio ya bato ntomo (droits) oyo basengeli na yango. Lapolo ya ebongiseli ebéngami Amnesty International mpo na mobu 1996 emonisaki ete, “Mokolo na mokolo, kati na mokili ezali na esika moko epai ntomo ya bato ezali kotyolama. Bato baleki konyokolama ezali bongo babola mpe baoyo bazangi nguya, mingimingi basi, bana, mibange mpe bato bakimá mboka.” Lapolo yango eyebisi ete: “Na mikili mosusu, ekoki kolobama ete Leta ekufa; mibeko mpo na kobatela bato mpamba liboso ya baoyo bazali na nguya ezali te.”

Na 1996, kati na mikili koleka monkama, bankóto mingi ya bato bakangamaki mpe bazalaki konyokolama. Mpe na bambula euti koleka, bankóto mingi ya bato babungaki, ekoki kozala ete balimwisaki bango na basoda to bituluku ya banganga-mobulu. Ekoki kozala ete mingi kati na bango bakufá.

Ya solo, bitumba ezangaka makambo ya kozanga bosembo te, kasi sikoyo ezali nde kobakisama. Na bitumba ya mikolo na biso bazali koluka koboma nde basivili, bakisa mpe basi na bana. Mpe likambo yango ezali te bobele mpo bazali kobwaka babombi na bingumba kozanga kopona esika oyo ekokwea. Ntango basoda bakei etumba, kuna bazali kosangisa nzoto na basi mpe bilenge basi na makasi, mpe bituluku mingi oyo bizali kotɛmɛla baguvernema bizali kokanga bana mpo na kolakisa bango mosala ya koboma bato. Lapolo ebéngami “Impact of Armed Conflict on Children” (Makambo oyo bitumba ezali komemela bana) oyo ebimisamaki na Mabota Masangani (O.N.U.) elobi boye mpo na likambo yango: “Motuya monene ya bato na mokili oyo babungisi mpenza bizaleli malamu.”

Ntembe ezali te ete kobeba ya bizaleli malamu ememi mokili na kozanga bosembo mingi koleka—ezala na koponapona mposo, etɛlɛmɛlo kati na bomoi, na mibeko, to na misala ya basoda. Ya solo, yango ezali likambo ya sika te. Eleki mbula nkóto mibale na nkama mitano, mosakoli moko Moebele amilelaki na maloba oyo: “Boye mobeko elɛmbi mpe kosambisa-sembo ekobimaka te. Zambi bato mabe bakozingelaka moyengebene, boye kosambisa-sembo ebimi wana ekunzami mpenza.” (Habakuku 1:4) Atako kozanga bosembo ezalaka na bileko nyonso, ntembe ezali te ete na ekeke ya 20 kozanga bosembo ebakisami mpenza mingi.

Kozanga bosembo etungisaka?

Soki ozali konyokwama na ntina na kozanga bosembo etungisaka mpenza. Etungisaka mpamba te epimelaka bato mingi lotomo na bango ya kozala na esengo. Mpe lisusu etungisaka mpamba te, mbala mingi kozanga bosembo ebimisaka kowelana oyo ememaka na kosopa makila, oyo na ngala na yango, ebimisaka kozanga bosembo mosusu, mpe elandanaka bongo.

Kimya mpe bolamu ekangani mpenza na boyengebene, nzokande kozanga bosembo elongolaka elikya mpe makanisi ya kolonga. Lokola Anne Frank amonaki yango, bato bakoki kotonga bilikya na bango likoló ya mobulungano, bampasi, mpe liwa te. Lokola ye, biso nyonso tozalaka na mposa ya eloko ya malamu koleka.

Mposa yango ememi bato mingi ya sembo na komeka kotya mwa boyengebene kati na bato. Mpo na yango, ekateli ebéngami Déclaration universelle des droits de l’homme, oyo endimamaki na liyangani monene ya Mabota Masangani na 1948, elobi ete: “Bato nyonso babotami bansomi mpe bazali na lokumu mpe ntomo ndenge moko. Bazali na makanisi mpe lisosoli mpe basengeli kosalana moko na mosusu na elimo ya bondeko.”

Na ntembe te, maloba wana ezali malamu mpenza, kasi bato bazali kolonga te kokokisa mokano kitoko oyo bato nyonso balukaka: kotya mokili ya boyengebene epai bato nyonso bazali na ntomo ndenge moko mpe moto na moto azali kotalela mozalani na ye lokola ndeko na ye. Kokokisa likambo yango, ndenge eyebisami na maloba ya ebandeli ya ekateli ya O.N.U., ekozala lokola “moboko ya bonsomi, ya boyengebene, mpe ya kimya na mokili.”

Tokoki nde koloba ete kozanga bosembo efandá mpenza kati mitema ya bato na boye ete ekoki kosila te? To moboko makasi mpo na bonsomi, bosembo, mpe kimya ekoki kotyama? Soki ɛɛ, nani akoki kotya yango mpe kosala ete bato nyonso bázwela yango litomba?

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]

UPI/Corbis-Bettmann

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto