Okoki koyika mpiko na makambo ya kozanga bosembo!
NANI akutaná naino ata na likambo moko te ya kozanga bosembo? Makambo mosusu oyo tokoki kobenga kozanga bosembo, ezalaka makanisi mpamba; nzokande mosusu ezalaka mpenza ya solo.
Ntango basaleli biso likambo na kozanga bosembo, toyokaka mpasi na motema mpe yango ekoki kobebisa boyokani na biso na Nzambe. Tokoki koyoka mposa makasi ya kosembola likambo yango. Mpo na nini? Ntina moko ezali ete Yehova, Mozalisi na biso “oyo azali na kozanga bosembo te,” asalá biso na mposa ya kosala makambo na bosembo. (Deteronome 32:4, NW; Genese 1:26) Nzokande, bato mosusu bakoki kosala biso makambo oyo tomoni ete ezali sembo te. Moto moko ya mayele alobaki boye: “Ngai nabutwaki mpe nabanzaki mpo na minyoko nyonso misalami na nse ya moi. Mpe talá, mpisoli ya banyokolami mpe moko azali te mpo na kobɔndisa bango. Epai ya banyokoli na bango nguya ezali nde bazali na moko te mpo na kobɔndisa bango.” (Mosakoli 4:1) Tokoki kosala nini soki basali biso makambo ya kozanga bosembo?
Kozanga bosembo elakisi nini?
Kozanga bosembo elakisi kosala makambo oyo ebuki mitinda ya sembo. Mitinda ya sembo ezali nini? Na ntembe te, Mozalisi na biso, oyo azali sembo mpe abongwanaka te, azali na lotomo ya kokata oyo ezali sembo mpe oyo ezali sembo te. Mpo na ye, kotambola na “mibeko ya bomoi” esɛngi mpe “kosala te makambo ya kozanga bosembo.” (Ezekiele 33:15, NW) Na yango, ntango Yehova asalaki moto ya liboso, apesaki ye lisosoli mpo na kosalisa ye ayeba kokesenisa malamu na mabe. (Baloma 2:14, 15) Lisusu, Yehova akomisaki na kati ya Liloba na ye Biblia, mitinda oyo ezali komonisa makambo ya sembo mpe oyo ezali sembo te.
Kasi, ezali boni soki tokanisi ete basali biso likambo moko na kozanga bosembo? Esengeli tótalela malamu soki likambo yango ezali mpenza kozanga bosembo. Na ndakisa, tótalela likambo oyo ekómelaki mosakoli Yona. Yehova atindaki ye akende kokebisa bato ya Ninive na ntina na likama oyo ezalaki koyela bango. Liboso, Yona akimaki, akokisaki mokumba yango te. Kasi, nsukansuka, akendaki na Ninive mpe akebisaki bato ya engumba yango mpo na likama oyo esengelaki koyela bango. Lokola bato yango babongolaki motema, Yehova alimbisaki bango mpe abomaki lisusu engumba yango te. Yona ayokaki ndenge nini? Likambo yango “eyokisaki Yona mabe mingi mpe azalaki na nkanda.” (Yona 4:1) Amonaki ete Yehova asalaki makambo na kozanga bosembo mpenza.
Nzokande, Yehova, ye oyo akoki kotánga mitema mpe “alingi boyengebene mpe sembo,” asalaki mabe te. (Nzembo 33:5) Yona asengelaki koyeba ete ekateli oyo Yehova azwaki eyokanaki na bosembo ya solosolo. Ntango tokanisi ete basali biso likambo moko na kozanga bosembo, tómitunaka boye: ‘Ekoki nde kozala ete Yehova azali kotalela makambo ndenge mosusu?’
Koyika mpiko na kozanga bosembo
Biblia ezali na masolo mingi ya bato oyo basalaki bango makambo ya kozanga bosembo. Tokozwa mateya mingi soki totaleli ndenge oyo bato yango bayikaki mpiko na makambo yango. Tózwa ndakisa ya Yozefe; lokola bandeko na ye bazalaki koyokela ye zuwa, batɛkaki ye na Ezipito lokola moombo. Kuna na Ezipito, mwasi ya nkolo na ye akómaki kolula ye; lokola Yozefe aboyaki, mwasi yango akoselaki ye makambo ete alukaki kosangisa na ye nzoto. Mpo na yango, Yozefe atyamaki na bolɔkɔ. Atako bongo, Yozefe abatelaki kondima makasi. Atikaki te ete kozanga bosembo yango elɛmbisa boyokani na ye na Yehova to etinda ye atika kotyela Nzambe motema.—Genese 37:18-28; 39:4-20; Nzembo 105:17-19.
Moto mosusu oyo akutanaki mpe na likambo ya kozanga bosembo ezali Nabota. Yezabele, mwasi ya mokonzi Ahaba akoselaki ye makambo. Mokonzi Ahaba azalaki na mposa ya kosomba eteni ya mabelé ya Nabota oyo ezalaki pembeni ya ndako na ye. Mibeko epekisaki Moyisalaele atɛka mpo na libela libula na ye, yango wana Nabota aboyaki kotɛkela mokonzi eteni yango ya mabelé. (Levitike 25:23) Na yango, mwasi ya Ahaba ayokanaki na bato bákosela Nabota makambo ete afingi Nzambe mpe mokonzi. Mpo na yango, Nabota ná bana na ye babomamaki. Kanisá naino ndenge Nabota ayokaki ntango bato bazalaki kolɔkɔta mabanga mpo na koboma ye!—1 Mikonzi 21:1-14; 2 Mikonzi 9:26.
Nzokande, bandakisa wana mibale ya kozanga bosembo ezali eloko te soki tokokanisi yango na makambo ya kozanga bosembo oyo basalaki Yesu Klisto. Bakatelaki ye etumbu ya liwa nsima ya kokosela ye makambo mpe kosambisa ye na ndenge oyo eyokani te na mibeko. Pilato, guvɛrnɛrɛ oyo asambisaki ye azangaki makasi ya kokata makambo na ndenge oyo ayebaki ete ezali sembo. (Yoane 18:38-40) Ya solo, moto moko te akutaná na makambo ya kozanga bosembo koleka oyo Satana asalelaki Yesu Klisto.
Bandakisa yango emonisi nde ete Yehova amonaka te makambo ya kozanga bosembo? Amonaka. Kasi atalelaki te makambo wana ndenge oyo bato batalelaka makambo. (Yisaya 55:8, 9) Lokola Yozefe atɛkisamaki na boombo na Ezipito, yango ebikisaki libota na ye. Kuna, akómaki kapita ya biloko ya kolya liboso ete nzala makasi ekɔta ata na mokili oyo bandeko na ye bazalaki. Kanisá naino; soki Yehova apesaki nzela te ete makambo yango ekómela Yozefe, alingaki kokɔta bolɔkɔ te. Mpamba te, ezali kuna nde Yozefe alimbolaki bandɔtɔ ya bato mibale oyo bazalaki na bolɔkɔ, oyo moko na bango na nsima alobaki mpo na ye epai ya Falao, mpe yango esalaki ete Yozefe akóma kapita ya biloko ya kolya.—Genese 40:1; 41:9-14; 45:4-8.
Ezali boni mpo na Nabota? Tómeka mpe kotalela likambo na ye ndenge Yehova atalelaki yango. Na miso ya Yehova, ye oyo azali na likoki ya kosekwisa bakufi, Nabota azali kaka na bomoi, atako babomaki ye. (1 Mikonzi 21:19; Luka 20:37, 38) Nabota azali kozela ntango oyo Yehova akozongisa ye na bomoi, kasi ntango yango ya kozela ezali mokuse mpenza, mpamba te bakufi bayebi eloko moko te. (Mosakoli 9:5) Longola yango, Yehova apesaki Ahaba mpe libota na ye etumbu mpo na likambo oyo basalaki Nabota.—2 Mikonzi 9:21, 24, 26, 35, 36; 10:1-11; Yoane 5:28, 29.
Yesu mpe akufaki. Kasi, Nzambe asekwisaki ye mpe atombolaki ye likoló, “mosika mpenza koleka guvɛrnema nyonso mpe bokonzi mpe nguya mpe bonkolo mpe nkombo nyonso oyo epesami.” (Baefese 1:20, 21) Makambo ya kozanga bosembo oyo Satana asalaki Yesu Klisto ekokaki te kopekisa Yehova apesa Mwana na ye mbano. Yesu azalaki na kondima makasi ete soki yango ezalaki mokano ya Yehova, akokaki kopekisa ete bákanga ye. Kasi, Klisto ayebaki mpe ete Yehova azali na ntango oyo akokokisa bisakweli oyo ezali na kati ya Biblia mpe kolongola makambo nyonso ya kozanga bosembo.
Ya solo, Satana ná bato na ye basalelaki bayengebene makambo ya kozanga bosembo, kasi nsukansuka Yehova abongisaki makambo mpe na mikolo ezali koya, akosilisa nyɛɛ makambo nyonso ya kozanga bosembo. Na yango, mpo makambo ya kozanga bosembo esila, tosengeli kozela Nzambe.—Deteronome 25:16; Baloma 12:17-19.
Ntina oyo Yehova atikaka nzela na kozanga bosembo
Na bantango mosusu, Yehova azalaka na bantina oyo atikaka nzela na makambo ya kozanga bosembo. Akoki kotika yango mpo na kobongisa biso mpo tókóma baklisto ya solosolo. Ya solo, ‘Nzambe amekaka moto na makambo ya mabe te.’ (Yakobo 1:13) Kasi, akoki kotika likambo moko ya mabe kozanga ete apekisa yango, mpe akoki kosunga baoyo bazali kondima kobongisama yango. Biblia elobi boye: “Nsima wana bokosila konyokwama mwa ntango moke, Nzambe ya boboto monene nyonso . . . akosilisa ye moko kobongisama na bino, akokómisa bino ngwi, akokómisa bino makasi.”—1 Petelo 5:10.
Lisusu, Yehova akoki mpe kotika nzela na kozanga bosembo mpo bato oyo bazali kosala yango bábongola motema. Mwa bapɔsɔ nsima ya kobomama ya Yesu, Bayuda mosusu oyo bayokaki toli ya Petelo “batungisamaki na motema.” Bandimaki Liloba ya Nzambe mpe bazwaki batisimo.—Misala 2:36-42.
Ya solo, bato nyonso te oyo bazali kosala mabe nde bakobongola motema. Kutu, basusu bakoki komipesa lisusu mingi na kosala makambo ya kozanga bosembo. Kasi, Masese 29:1 elobi boye: “Ye oyo akoyeisa nkingo na ye makasi mpo na mpamela mingi akobebisama pwasa, na ebikelo te.” Nsukansuka, Yehova akoboma baoyo bazali kotika te kosala makambo ya mabe.—Mosakoli 8:11-13.
Ata soki ekosɛnga ntango boni mpo tóbosana makambo ya kozanga bosembo oyo tozali kokutana na yango, tozali na elikya ete Yehova ayebi ndenge ya kosalisa biso mpo tóbosana yango. Azali mpe na nguya ya kolongola makambo nyonso ya kozanga bosembo oyo tokoki kokutana na yango na ebongiseli ya makambo ya mabe oyo. Lisusu, alaki biso ete akopesa biso likabo ya bomoi ya seko na mokili ya sika epai “boyengebene ekofanda.”—2 Petelo 3:13.
[Elilingi na lokasa 17]
Nabota ayokaki ndenge nini ntango basalaki ye likambo ya kozanga bosembo?