Nazali kosala makasi mpo na komimonisa “Mosali oyo abongi koyoka nsɔni te”
LISOLO YA ANDRÉ SOPPA
Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ezalaki kongala, bato bazalaki kokufa mingi mpe bazalaki lisusu na elikya te. Lokola nazalaki moyambi-nsango (opérateur) na masuwa moko ya etumba ya ekólo Allemagne, pene na libongo ya Narvik, na ekólo Norvège, namonaki ndenge moto azali na motema makasi mpo na konyokola moninga na ye moto. Na butu, nazalaki kotala ndenge likoló ezali kongɛnga mpe nazalaki kokanisa ntina ya bomoi. Nandimaki solo ete Nzambe oyo azalisaki biloko motindo yango akoki kotindika bato na bitumba ya bozoba te.
NABOTAMI na 1923, na mboka moke ebéngami Lassoth (sikoyo ezali na ekólo Pologne), pene na ndelo ya ekólo Tchèque, mpe nakolaki na libota ya babola basali na bilanga. Baboti na ngai bazalaki bandimi na Lingomba ya Katolike, mpe makambo ya losambo esalaki bopusi monene na bomoi na biso. Nzokande, banda bomwana na ngai, nabandaki kotyela lingomba na ngai ntembe. Na mboka na biso ezalaki na mabota misato ya Baprotesta, mpe bato ya mboka oyo bazaki Bakatolike bazalaki kolinga bango te. Nayebaki ntina oyo bazalaki koyina bango te. Na kelasi bazalaki koteya biso mateya ya Katolike. Kasi mokolo moko ntango natunaki sango alimbola Bosato, abɛtaki ngai fimbo zomi na esika ya kopesa ngai eyano. Nzokande, likambo moko oyo esalemaki ntango nakómaki na mbula 17 epusaki ngai natika Lingomba ya Katolike. Baboti ya mama bakufaki bango nyonso na sanza moko, mpe mama azalaki na mbongo ya kosalisa misa mibale ya bawei te. Atunaki sango soki akoki kosala misa bongo afuta mbongo na nsima. Ayanolaki ete: “Baboti na yo bazalaki na biloko? Tɛká yango, bongo oya na mbongo tósala misa.”
Mwa bambula liboso na yango, ntango Hitler akómaki mokonzi na 1933, bapekisaki biso koloba lokota ya Polonais; tosengelaki kolobaka bobele lokota ya Allemand. Baoyo bazalaki koboya, to bazalaki kokoka koyekola lokota yango te, balimwisaki bango—nsima nde bayebisaki biso ete bazalaki kotindama na káa ya bakangami. Ata mboka na biso ekómaki na nkombo euti na Allemand, Grünfliess. Natikaki kokende kelasi na mbula 14, mpe lokola nakɔtaki na lisangá ya Bilenge ya Hitler te, ezalaki mpasi mpo nazwa mosala. Nsukansuka, bazwaki ngai na mosala lokola moyekoli ya kotula bibende (élève forgeron). Ntango etumba ebandaki, bato bazalaki kobondela na bandakonzambe mpo na Hitler mpe basoda na ye. Nazalaki komituna soki mabondeli motindo moko mpo na kolonga etumba, ezalaki mpe kosalema na ngámbo mosusu.
Mosala na force navale ya Allemagne
Na Desɛmbɛ 1941, nakɔtaki na force navale (mampinga oyo esalelaka masuwa) ya Allemagne, mpe na ebandeli ya 1942, batindaki ngai na bokula ya ekólo Norvège mpo na kosala na masuwa ya konɔ́nga banguna. Mosala na biso ezalaki ya komema basoda, mindoki, mpe biloko mosusu, longwa na engumba Trondheim kino na engumba Oslo. Ezalaki kati na mai monene nde nayokaki basali mibale bazali kosolola likambo ya nsuka ya mokili oyo Biblia esakolaki. Atako bazalaki kobanga kosolola na makasi, bayebisaki ngai ete baboti na bango bazali Batatoli ya Yehova, kasi bango balandaki nzela na bango te. Ezalaki mbala ya liboso oyo nayokaki nkombo ya Batatoli ya Yehova.
Na nsuka ya etumba, basoda ya ekólo Angleterre bakangaki biso baombo mpe bapesaki biso na mabɔkɔ ya basoda ya Amerika mpo bázongisa biso na ekólo Allemagne. Na kati na biso, baoyo bamboka na bango ezalaki na mabɔkɔ ya ekólo Union soviétique, bakendaki bolɔkɔ na kaa ya Liévin, na nɔrdi ya ekólo France, mpo na kosala mosala ya kotimola charbon. Ezalaki na Augusto 1945. Nazali koyeba ete natunaki mokɛngɛli moko, moto ya ekólo France, soki azali moto ya lingomba nini. Ayanolaki ete azali “Mokatolike.” Lokola ngai mpe nazalaki Mokatolike, natunaki ye soki tosalaki nini mpo tókóma banguna? Alobaki ete, “Ntina ya koluka koyeba ezali te. Talá se na miso.” Ngai namonaki ete likambo yango elongobani te, ete bato ya lingomba moko bábunda mpe bábomana bango na bango.
Nayoki solo na mosala na esika ya botimoli charbon
Mokolo ya liboso oyo nabandaki mosala na esika ya botimoli charbon, mobali moko, nkombo na ye Evans Emiot akabelaki ngai ndambo ya gato oyo azalaki na yango. Azalaki moto ya etúká ya Ohio, na ekólo États-Unis, kasi afandaki na ekólo France bambula mingi. Ayebisaki ngai makambo ya mokili oyo etumba ekozala lisusu te. Boboto na ye ekamwisaki ngai. Azalaki koyina ngai te, atako nazalaki moto ya Allemagne mpe ye moto ya Amerika. Tokutanaki lisusu te kino na ebandeli ya 1948 ntango apesaki ngai mwa buku oyo ezalaki na motó na likambo “Nkolo na kimya” (na Lingelesi). Na mwa buku yango, nayekolaki makambo ya Nzambe moko ya boboto oyo ayinaka etumba—Nzambe oyo nazalaki kokanisa wana nazalaki kotala ndenge likoló ezalaki kongɛnga. Nazwaki ekateli ya koyeba lingomba oyo ezalaki koteya makambo yango. Kasi lokola Evans azalaki kosala na esika ya botimoli mosusu, nazalaki na likoki ya kokutana na ye te. Natambolaki na mangomba ndenge na ndenge oyo ezalaki na kaa, nazalaki kotuna soki bayebi lingomba oyo ebimisaki mwa buku yango, kasi bayebaki yango te.
Nsukansuka, na Aprili 1948, nabimaki na bolɔkɔ mpe nakómaki kopesa mabɔkɔ esika nyonso oyo mosala emonani. Mokolo ya lomingo oyo elandaki, nakamwaki ntango nayokaki bazali kobɛta ngonga na balabala. Nasepelaki ntango namonaki Evans! Azalaki na etuluku ya Batatoli ya Yehova oyo balataki bitanda oyo bakomá motó na likambo ya lisukulu. Motatoli oyo azalaki kobɛta ngonga ezalaki Marceau Leroy, oyo azali lelo oyo mosangani na komite ya filiale na ekólo France. Balakisaki ngai epai ya Joseph Kulczak, moto ya ekólo Pologne oyo ayebaki koloba lokota ya Allemand. Ye anyokwamaki na kaa ya bakangami na ntina na kondima na ye. Abéngisaki ngai na makita na mpokwa ya mokolo yango. Nakangaki ntina ya makambo mingi oyo balobaki kuna, kasi ntango bato nyonso batombolaki misapi, natunaki moto oyo azalaki pembeni na ngai mpo na nini basalaki bongo. Alobaki ete: “Bazali bato oyo balingi kokende kosakola na engumba Dunkerque na pɔsɔ ekoya.” Natunaki ete: “Nakoki koya?” Ayanolaki ete: “Ɛɛ!” Na mokolo ya lomingo oyo elandaki, nakendaki kosakola ndako na ndako! Atako bato nyonso te oyo tokutanaki na bango nde basepelaki, kasi ngai nasepelaki mpenza mpe nakobaki kosakola mbala na mbala.
Nasali makasi mpo na komipekisa
Mwa moke na nsima, Batatoli babandaki kosakola na kaa ya bato ya Allemagne oyo babimaki na bolɔkɔ. Ezalaki pɛtɛɛ te mpo na ngai, mpamba te nayebanaki malamu kuna mpo na ezaleli na ngai ya nkandankanda. Soki moto moko atyoli ngai mpo nazali kosakola, nazalaki koloba na ye ete: “Kebá na yo, soki te mobulu ekobima awa.” Mokolo moko, ntango nazalaki kosala na esika batimolaka charbon, nabɛtaki moto moko oyo atyolaki Yehova.
Atako bongo, na lisalisi ya Yehova, nabongolaki bomoto na ngai. Mokolo moko, ntango tozalaki kosakola na kaa yango, bato mosusu oyo balangwaki masanga, bazalaki kotungisa Batatoli mosusu. Lokola bandeko bayebaki ete nasilikaka noki, bapekisaki ngai ete nasala mobulu te, kasi moko na mibali yango apusanaki pene na ngai asiliki, mpe abandaki kolongola simisi. Nakitaki na velo na ngai, napesaki mobali yango velo asimbela ngai, mpe natyaki mabɔkɔ na libenga. Akamwaki mpenza na boye ete ayokaki likambo oyo nalobaki na ye. Nalobaki na ye akende kolala na ndako bongo na nsima aya koyoka lisukulu ya bato nyonso. Asalaki mpe bongo; na ngonga ya misato nsima ya midi ayaki na lisukulu. Nsukansuka, bakangami soko 20 bandimaki solo. Ngai moko nazwaki batisimo na Setɛmbɛ 1948.
Mosala mingi, kasi ezali na litomba
Bapesaki ngai mokumba ya kobongisa bateritware epai tosengelaki kosakola mpe koluka bisika oyo tosengelaki kosala masukulu mpo na bato nyonso. Mpo na yango, na ntango mosusu, nazalaki kotambola kilomɛtɛlɛ 50 na tukutuku na ngai ya moke, liboso ya kokende mosala ya kotimola charbon elongo na etuluku ya nsuka. Bawikende, tozalaki kokende na teritware na bisi mpe tozalaki kotika bandeko mibale to minei elongo na ndeko oyo akosala lisukulu. Na bingumba ya minene, soki tozwi esika ya malamu, tozalaki kosangisa basanduku na biso mpo na kosalela yango lokola ebaelo mpo na molobi. Mbala mingi, tozalaki kolata bitanda bakomá motó na likambo ya lisukulu mpo na kobéngisa bato báya koyoka.
Na 1951 nakutanaki na Jeannette Chauffour, Motatoli moko oyo autaki na engumba Reims. Tolinganaki mbala moko, mpe na nsima ya mbula moko, na mokolo ya 17 Mai 1952, tobalanaki. Tokendaki na Pecquencourt, mboka moko ezali pembeni ya esika batimolaka charbon, pene na engumba ya Douai. Kasi, eumelaki te, nabandaki kobɛla. Nabɛlaki maladi ya mpema babéngi silicose oyo nazwaki na mosala ya kotimola charbon, kasi nakokaki kozwa mosala mosusu te. Na yango, na 1955, ntango liyangani ya mikili mingi esalemaki na engumba Nuremberg, na Allemagne, basɛngaki biso tókende kosalisa mwa lisangá moko na Kehl, engumba moko ya moke oyo ezali mpe na baizini pembeni ya ebale Rhin, tokakatanaki soko moke te. Na ntango yango, lisangá ezalaki bobele na basakoli 45. Nsima ya mbula nsambo oyo tosalaki elongo na lisangá yango, basakoli bakómaki 95.
Mikumba ebakisami
Ntango tomonaki ete lisangá ekómi makasi, tosɛngaki la Société tókende kosala lokola babongisi-nzela monene na ekólo France. Tokamwaki ete batindaki biso na engumba Paris. Sanza mwambe oyo tolekisaki kuna ezalaki ya esengo mingi. Ngai na Jeannette tozwaki libaku ya kotambwisa bato 42 na boyekoli ya Biblia. Bayekoli mitano bazwaki batisimo ntango tozalaki naino kuna, mpe 11 bayaki kobatisama na nsima.
Lokola tozalaki kofanda na esika babéngi Quartier latin, tozalaki kokutana mbala mingi na baprofesere ya Iniversite ya Sorbonne. Profesere moko ya filozofi oyo azwá epaso mpe azalaki kobikisa bato na mabondeli, ayekolaki Biblia mpe akómaki Motatoli ya Yehova. Mokolo moko nabandaki kopesa litatoli ya Biblia epai ya moto moko oyo azalaki ingénieur civil oyo azalaki moninga ya ba Jésuites. Ayaki na ndako na biso na ngonga ya misato nsima ya midi mpe abimaki na ngonga ya zomi ya butu. Nsima ya ngonga moko na ndambo, tokamwaki na komona ete ayaki lisusu. Asololaki na sango moko Jésuite oyo akokaki te koyanola na mituna na ye etali esakweli ya Biblia. Azongaki na ndako na ye na ngonga ya yambo ya butu, mpe na ngonga ya nsambo ya ntɔngɔ azongelaki biso lisusu. Na nsima, ye mpe akómaki Motatoli ya Yehova. Mposa oyo moto yango amonisaki mpo na solo elendisaki ngai na mwasi na ngai.
Nsima ya kosala na Paris, batindaki ngai mokɛngɛli-motamboli na ɛsti ya ekólo France. Ezalaki mpenza esengo mpo na biso, kotala masangá ya lokota ya Lifalanse mpe masangá ya lokota ya Allemand, mpo na kolendisa bandeko. Ntango totalaki lisangá ya Rombas, na etúká ya Lorraine, nakutanaki na Stanislas Ambroszczak. Azalaki moto ya ekólo Pologne, asalaki na force navale ya bikólo oyo esanganaki mpo na kobundisa Allemagne, mpe azalaki na bokula ya ekólo Norvège. Tozalaki banguna ntango tozalaki kotambola na masuwa na mai monene. Sikoyo tokómi bandeko oyo bazali kosalela Yehova, Nzambe na biso esika moko. Na liyangani moko na Paris, namonaki moto moko oyo nayebaki. Ezalaki mokonzi ya kaa epai nazalaki na bolɔkɔ na nɔrdi ya France. Tozalaki na esengo mingi ya kosala elongo na boumeli ya liyangani! Ezali bobele nguya ya Liloba ya Nzambe nde ekoki kosala ete bato oyo bazalaki banguna bákóma bandeko mpe baninga!
Likambo ya mawa, nsima ya mbula 14 na mosala ya mokɛngɛli-motamboli, nasengelaki kotika mosala yango mpamba te maladi ebandaki kotungisa ngai. Atako bongo, ngai na mwasi na ngai tozalaki na ekateli ya kolanda kosalela Yehova mingi ndenge tokokoka. Tozwaki ndako mpe mosala na engumba Mulhouse, na ɛsti ya ekólo France, mpe tokómaki babongisi-nzela (basakoli ya ntango nyonso).
Eloko mosusu oyo ebakisaki esengo na ngai na boumeli ya bambula ezalaki likambo ya kosangana na botongi ya Bandako ya Bokonzi. Na 1985, basɛngaki ngai nabongisa ekipi ya batongi ndako mpo na ɛsti ya ekólo France. Na lisalisi ya bamasɔ ya makoki mpe na ndenge tolakisaki bandeko ya bolingo malamu mosala, tosalaki ekipi oyo etongaki to ebongisaki bandako koleka 80 mpo na losambo ya Yehova. Mpe na 1993, nazalaki na esengo ya kosala na botongi ya Ndako ya Liyangani moko mpe Bandako ya Bokonzi mitano na ekólo Guyane française, na Amerika ya Sudi!
Nazali kokende liboso atako komekama ezali
Nakoki koloba ete koleka mbula 50 oyo nasali na mosala ya Teokrasi, bomoi na ngai etondi na esengo mpe nazwaki mikumba mingi. Nzokande, likambo ya mawa, mwasi na ngai ya bolingo, oyo tofandaki esika moko mbula 43, akufaki na Desɛmbɛ 1995. Atako esalaki ngai mpasi mingi—mpe nayokaka yango kino lelo oyo—Yehova azali kopesa ngai makasi, mpe bolingo na lisungi ya bandeko na ngai ya elimo ezali kokitisa mpasi yango ndenge mikolo ezali koleka.
Nabosanaka te maloba oyo ndeko moko mopakolami alobaki na ngai na liyangani moko na engumba ya Munich, na ekólo Allemagne, na 1963. Alobaki ete, “André, kotala bipai na bipai te. Bandeko banyokwamaki na kaa ya bakangami. Sikoyo etali biso soki tokotikala na nzela ya solo. Tosengeli komiyokela mawa te. Tókende liboso!” Nabosanaka maloba yango te. Sikoyo lokola nakoki lisusu kosakola mingi te mpo nzoto ezali lisusu kolɔngɔnɔ te mpe nakómi mobange, maloba ya Baebele 6:10 ebɔndisaka ngai ntango nyonso. Elobi ete: “Nzambe azangi boyengebene te ete abosana mosala na bino mpe bolingo bosili bino kotalisa na nkombo na ye.” Ɛɛ, kosala mosala ya Yehova ezali libaku eleki monene oyo moto akoki kozwa. Na boumeli ya mbula 50 oyo euti koleka, mokano na ngai ezalaki, mpe ezali kino sikoyo, ya komimonisa “mosali oyo abongi koyoka nsɔni te.”—2 Timote 2:15.
[Elilingi na lokasa 22]
Nasalaki na masuwa ya lolenge oyo na bokula ya ekólo Norvège
[Elilingi na lokasa 23]
Na mosala ya kosakola na velo na nɔrdi ya France
[Elilingi na lokasa 23]
Tozalaki kosangisa basanduku mpo na kosala ebaelo mpo na ndeko oyo akosala lisukulu
[Bililingi na lokasa 24]
Ngai na mwasi na ngai Jeannette, na mokolo ya libala na biso na 1952