Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 15/9 nk. 3-6
  • Kotánga Biblia—Momeseno oyo epesaka ngai makasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kotánga Biblia—Momeseno oyo epesaka ngai makasi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Ekosɛnga otángaka yango mikolo nyonso”
  • Nabimi bolɔkɔ mpe nazongi na Dunkerque
  • Nazwi makasi mpo na komema mikumba ya sika
  • Bomoi oyo eleki malamu
  • Nazali kosala makasi mpo na komimonisa “Mosali oyo abongi koyoka nsɔni te”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Elimo ya komipesa ememelaki biso bomoi ya malamu mpe ya esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Koleka mbula 50 ya ‘kolekaleka’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Nazalaki Koluka Paladiso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 15/9 nk. 3-6

Kotánga Biblia​—Momeseno oyo epesaka ngai makasi

Lisolo ya Marceau Leroy

NABOMBANAKI na shambrɛ na ngai mpe nabandaki kotánga boye: “Na ebandeli Nzambe azalisaki likoló mpe mabele.” Mpo na nini nazalaki kotánga na kobombana? Nayebaki mpenza ete lokola tata ayebanaki mpenza ete andimaka te ete Nzambe azali, akoboya Biblia, buku oyo nazalaki kotánga.

Natángaki naino Biblia liboso te, mpe maloba wana ya mokapo ya liboso ya mokanda ya Ebandeli ekamwisaki ngai makasi. Nakanisaki boye: ‘Sikoyo namoni mpo na nini makambo nyonso na molɔ́ngɔ́ ezalaka na boyokani; nakamwaka likambo yango banda kala!’ Lokola nasepelaki mingi, natángaki banda ngonga ya 8 na butu tii na ngonga 4 na ntɔngɔ. Ndenge wana nde nabandaki momeseno na ngai ya kotánga Liloba ya Nzambe. Tiká nayebisa biso ndenge oyo kotánga Biblia epesaka ngai makasi na bomoi.

“Ekosɛnga otángaka yango mikolo nyonso”

Nabotamaki na 1926, na Vermelles, mboka moko oyo batimolaka makala (charbon), na nɔrdi ya France. Na ntango ya etumba ya mibale ya mokili mobimba, makala ezalaki eloko ya motuya mingi na ekólo mobimba. Yango wana, lokola nazalaki kotimola yango, balongolaki ngai na molɔngɔ ya bato oyo basengeli kosala mosala ya soda. Atako bongo, mpo na kokóma na bomoi ya malamu koleka, nabandaki koyekola makambo etali radio mpe kura; kelasi yango esalisaki ngai namona mpenza ete makambo na molɔ́ngɔ́ ezali mpenza na boyokani. Ntango nakómaki na mbula 21, moninga moko ya kelasi apesaki ngai Biblia mpo na mbala ya liboso, mpe alobaki boye: “Buku oyo, ebongi kotánga yango.” Ntango nasilisaki kotánga yango, nandimaki mpenza ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe, eloko oyo apesá bato.

Lokola nakanisaki ete bato oyo tozalaki kofanda na bango pembeni mpe bakosepela kotánga Biblia, nazwaki Babiblia 8. Nzokande, basɛkaki ngai nde kosɛka mpe batɛmɛlaki ngai, mpe yango ekamwisaki ngai. Bandeko na ngai ya libota oyo bazalaki bato ya biyambayamba bakebisaki ngai ete: “Soki obandi kotánga buku oyo, ekosɛnga otángaka yango mikolo nyonso!” Natángaki yango mpenza, mpe nayokaka mawa ata moke te. Ekómaki momeseno na ngai ya mokolo na mokolo.

Lokola bamonaki ete nazali kosepela na Biblia, bato mosusu oyo tofandaka na bango pembeni bapesaki ngai mikanda oyo Batatoli ya Yehova bapesaki bango. Mwa babuku lokola Un monde, un gouvernementa (etyami awa) elimbolaki ntina oyo Biblia elobi ete Bokonzi ya Nzambe ezali elikya kaka moko mpo na bato. (Mat. 6:10) Nakómaki na ekateli makasi mpenza ya koyebisa bato mosusu elikya yango.

Moto ya liboso oyo andimaki kozwa Biblia oyo napesaki ye ezalaki Noël, moninga na ngai ya bomwana. Lokola amipesaki na Lingomba ya Katolike, azwaki bibongiseli mpo tókutana na moto moko oyo akɔtaki kelasi ya kokóma sango. Ebangisaki ngai, kasi makambo oyo natángaki na Nzembo 115:4-8 mpe Matai 23:9, 10 esalisaki ngai nayeba ete Nzambe apekisi kosalela bikeko na losambo mpe kosalela batitre mpo na kobenga bakonzi ya lingomba. Yango epesaki ngai mpiko ya kolobela bindimeli na ngai ya sika. Na nsuka, Noël andimaki solo, mpe banda wana azali Motatoli ya sembo.

Nakendaki mpe kotala yaya na ngai ya mwasi. Mobali na ye azalaki na babuku ya misala ya bilimo mabe mpe bademo bazalaki kotungisa ye. Atako na ebandeli nabangaki kosolola na ye, bavɛrsɛ lokola Baebre 1:14 endimisaki ngai ete baanzelu ya Yehova bakosunga ngai. Ntango mobali ya yaya na ngai asalelaki mitinda ya Biblia mpe abwakaki eloko nyonso oyo ezalaki na boyokani na bademo, bademo batikaki kotungisa ye. Ye ná yaya na ngai bakómaki Batatoli ya molende.

Na 1947, Arthur Emiot, Motatoli moko ya États-Unis, ayaki na ndako na ngai. Na esengo nyonso, natunaki ye soki Batatoli bayanganaka wapi. Ayebisaki ngai ete etuluku moko ezali na Liévin, na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 10. Ezalaki mpasi kozwa ata velo na ntango wana; na yango, na boumeli ya basanza mingi, nazalaki kokende na makita mpe kozonga kaka na makolo. Mosala ya Batatoli ya Yehova na France epekisamaki banda mbula mwambe. Batatoli bazalaki kaka 2 380 na ekólo mobimba mpe mingi bazalaki bato ya ekólo Pologne. Kasi na mokolo ya 1 Sɛtɛmbɛ 1947, mosala na biso endimamaki lisusu na Leta na ekólo France. Bazongisaki biro ya filiale na Paris, na Villa Guibert. Lokola na ntango wana ezalaki ata na mobongisi-nzela moko te na France, Informateur (lelo oyo Mosala na biso ya Bokonzi) ya Desɛmbɛ 1947 eyebisaki ete bazali na mposa ya babongisi-nzela ya sanza na sanza, oyo bakobanda kosakola ngonga 150 na sanza. (Na 1949, ngonga yango ekitaki na 100.) Lokola nandimaki mpenza maloba ya Yesu oyo ezali na Yoane 17:17 ete “liloba [ya Nzambe] ezali solo,” nazwaki batisimo na 1948, mpe na sanza ya Desɛmbɛ 1949, nakómaki mobongisi-nzela.

Nabimi bolɔkɔ mpe nazongi na Dunkerque

Teritware ya liboso oyo batindaki ngai ezalaki engumba Agen, na sudi ya France; kuna naumelaki te. Lokola nalongwaki na mosala ya kotimola makala, esɛngaki nakɔta mosala ya soda. Naboyaki mosala ya soda; na yango bakɔtisaki ngai na bolɔkɔ. Atako nazalaki na ndingisa ya kozala na Biblia te, nalongaki kozwa mwa nkasa ya mokanda ya Nzembo. Kotánga yango elendisaki ngai. Ntango nabimaki na bolɔkɔ, nasengelaki kozwa ekateli: Natika mosala ya ntango nyonso mpo naluka mosala mpe esika ya kofanda? Na likambo oyo mpe, makambo oyo natángaki na Biblia esalisaki ngai. Namanyolaki maloba ya Paulo oyo ezali na Bafilipi 4:11-13: “Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.” Nazwaki ekateli ya kokoba na mosala ya mobongisi-nzela. Na 1950, batindaki ngai na teritware mosusu, na Dunkerque, engumba epai nasakolaki liboso.

Ntango nakómaki kuna, nazalaki na eloko moko te. Engumba yango ebebaki makasi na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mpe kozwa esika ya kofanda ezalaki mpasi. Nazwaki ekateli ya kokende na libota moko oyo nazalaki kokende kosakwela nsango malamu, mpe mama ya ndako yango asepelaki mingi mpe alobaki: “Aa, tata Leroy, obimi na bolɔkɔ! Mobali na ngai alobaka ete soki bato mingi bazalaki lokola yo, etumba moko te elingaki kozala.” Bazalaki na shambrɛ moko mpo na bapaya, mpe basɛngaki nafanda epai na bango tii eleko ya baturiste ekobanda. Kaka na mokolo yango, Evans,b yaya ya Arthur Emiot, apesaki ngai mosala. Azalaki kosala na libongo. Mosala na ye ezalaki kobongola monɔkɔ ya bapaya, mpe azalaki koluka sinzili mpo na kokɛngɛla masuwa moko na butu. Alakisaki ngai epai ya mokonzi moko ya masuwa yango. Lokola nautaki kobima bolɔkɔ, nakɔndaki mpenza makasi. Ntango Evans alimbwelaki ye ntina oyo nazalaki bongo, mokonzi yango ayebisaki ngai nazwa biloko ya kolya na frigo. Kaka na mokolo moko, nazwaki esika ya kofanda, mosala, mpe biloko ya kolya! Nakómaki kotya motema mingi koleka na maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 6:25-33.

Ntango eleko ya baturiste ebandaki, ngai ná Simon Apolinarski, moninga na ngai mobongisi-nzela, tosengelaki koluka esika mosusu ya kofanda, kasi tozalaki na ekateli ya kotikala na teritware na biso. Basɛngaki biso tófanda na ndako moko oyo kala, ezalaki ndako ya bampunda, epai tozalaki kolala na matela ya matiti. Tozalaki kolekisa mokolo mobimba na mosala ya kosakola. Topesaki nkolo-ndako yango litatoli, mpe akómaki moko ya bato ebele oyo bandimaki solo. Eumelaki te, lisolo moko ebimaki na zulunalo ya engumba yango; ekebisaki bato ya Dunkerque ete “mosala ya Batatoli ya Yehova ekómi mingi na mboka.” Nzokande, kaka ngai, Simon mpe mwa ndambo ya basakoli nde tozalaki Batatoli kuna! Na ntango ya mikakatano, kokanisa elikya na biso mpe kotalela ndenge Yehova azalaki kotyela biso likebi, ezalaki kolendisa biso mingi. Ntango batindaki ngai na teritware mosusu na 1952, bandeko soki 30 bazalaki kosakola sanza nyonso na Dunkerque.

Nazwi makasi mpo na komema mikumba ya sika

Nsima ya kofanda mwa moke na engumba Amiens, batindaki ngai mobongisi-nzela monene na Boulogne-Billancourt, mboka moko oyo ekangani na Paris. Nazalaki koyekola Biblia na bato mingi, mpe bamosusu bakɔtaki na mosala ya ntango nyonso mpe ya misionɛrɛ. Elenge mobali moko, Guy Mabilat, andimaki solo mpe akómaki mokɛngɛli ya zongazonga, mpe na nsima mokɛngɛli ya etúká. Na nsima, atambwisaki mosala ya kotonga ndako ya konyata mikanda na Betele oyo ezali lelo na Louviers, mosika mingi te na Paris. Kosolola na bato makambo ya Biblia mbala na mbala na mosala ya kosakola ekɔtisaki lisusu mingi Liloba ya Nzambe na bɔɔngɔ na ngai; etondisaki ngai na esengo mpe esalisaki ngai nabongisa makoki na ngai ya koteya.

Na nsima, na 1953, nakamwaki ntango batindaki ngai mokɛngɛli ya zongazonga na Alsace-Lorraine, etúká moko oyo kati na 1871 mpe 1945, ekómaki mbala mibale eteni ya ekólo Allemagne. Na yango, esɛngaki nayekola monɔkɔ ya Allemand mokemoke. Ntango nabandaki mosala ya zongazonga, mituka, batelevizyo, mpe bamasini ya kobɛta mikanda ezalaki mingi te na etúká yango; mpe bato bazalaki na baradio mpe na baordinatɛrɛ te. Kasi bomoi na ngai ezalaki ya mawamawa te to ya komipimela makambo nyonso. Ezalaki nde bomoi ya esengo mingi. Lokola makambo oyo ekokaki kolongola likebi na ngai na mosala ya Yehova ezalaki mingi te ndenge ezali lelo, esalisaki ngai nabatela ‘liso alima,’ ndenge Biblia elobi.​—Mat. 6:19-22.

Nabosanaka te liyangani oyo ezalaki na motó ya likambo “Bokonzi oyo ezali kolonga,” oyo esalemaki na Paris na 1955. Kuna, nakutanaki na Irène Kolanski, oyo na nsima akómaki mwasi na ngai; ye abandaki mosala ya mobongisi-nzela mbula moko liboso na ngai. Baboti na ye bazalaki bato ya Pologne, Batatoli ya molende banda kala. Na France, Ndeko Adolf Weber azalaki kotala bango. Adolf Weber azalaki kosala mosala ya kobongisa bilanga ya fololo ya Ndeko Russell mpe ayaki na Mpoto mpo na kosakola nsango malamu. Ngai na Irène tobalanaki na 1956, mpe akómaki kosala elongo na ngai na mosala ya zongazonga. Azalaka mpenza lisalisi mpo na ngai na boumeli ya bambula mingi!

Mbula mibale na nsima, likambo mosusu ya kokamwa ekómelaki ngai​—batyaki ngai mokɛngɛli ya etúká. Kasi, lokola bandeko ya makoki bazalaki mingi te, nakobaki kotala masangá lokola mokɛngɛli ya zongazonga. Na ntango yango nazalaki na mosala mingi mpenza! Longola kosakola ngonga 100 sanza na sanza, pɔsɔ na pɔsɔ, nasengelaki kosala badiskur, kotala bituluku misato ya boyekoli ya mokanda, kotala badosye mpe kokoma balapolo. Ndenge nini nakokaki kozwa ntango ya kotánga Liloba ya Nzambe? Nazalaki kaka na mayele moko ya kosala: kokata mwa bapapye ya Biblia moko ya kala mpe komema yango. Esika nyonso oyo nazali kozela moto oyo toyokanaki na ye, nazalaki kozwa nkasa yango mpe kotánga. Mwa bantango mokuse wana ya kotánga Biblia epesaki ngai makasi ya kokoba na mosala na ngai.

Na 1967, babengaki ngai ná Irène tókóma kosala ntango nyonso na Betele na Boulogne-Billancourt. Nabandaki kosala na Departema ya Mosala; esali mbula koleka 40, mpe nazali kosala kaka wana. Moko ya makambo oyo nasepelaka na yango mingi na mosala yango ezali ya kopesa biyano na mikanda oyo bato batindaka mpo na kotuna mituna na Biblia. Nasepelaka mpenza kotimola na Liloba ya Nzambe mpe “kokɔtela nsango malamu.” (Flp. 1:7) Likambo mosusu oyo esepelisaka ngai mingi ezali koteya na Betele na ntango ya kotalela mokapo ya mokolo na ntɔngɔ, liboso ya komɛla ti. Na 1976, batyaki ngai na Komite ya filiale ya France.

Bomoi oyo eleki malamu

Atako nakutaná na mikakatano na bomoi na ngai, mokakatano oyo eleki mpasi ezali nde sikoyo mpo bobange mpe maladi ezali kopekisa ngai ná Irène tósala mingi. Atako bongo, kotánga mpe koyekola Liloba ya Nzambe elongo esalisaka biso tóbatela elikya na biso. Tokendeke na bisi na teritware ya lisangá na biso mpo na koyebisa bato elikya yango. Mbula na ngai ná oyo ya Irène na mosala ya ntango nyonso eleki 120, mpe makambo oyo tokutaná na yango etindaka biso tóyebisa bato nyonso na motema moko ete mosala yango nde nzela ya kolanda mpo na moto oyo alingi bomoi ya esengo mpe ya ntina. Ntango Mokonzi Davidi akomaki maloba ya Nzembo 37:25, akómaki “mobange,” kasi lokola ye, ngai mpe “namoná naino te moyengebene asundolami mpenza.”

Na bomoi na ngai, Yehova alendisaka ngai na nzela ya Liloba na ye. Esali sikoyo mbula koleka 60, bandeko na ngai ya libota bayebisaki ngai ete kotánga Biblia ekokóma momeseno na bomoi na ngai. Balobaki solo; ekómá mpenza momeseno na ngai ya mokolo na mokolo, mpe nayoká mawa ata moke te!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisamaki na 1944, lelo ebimisamaka lisusu te.

b Mpo na koyeba makambo etali Evans Emiot, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali 1999, lokasa 23.

[Elilingi na lokasa 5]

Ngai ná Simon

[Elilingi na lokasa 5]

Ntango nazalaki mokɛngɛli ya etúká

[Elilingi na lokasa 5]

Biblia ndenge moko na oyo bapesaki ngai mpo na mbala ya liboso

[Elilingi na lokasa 6]

Mokolo ya libala na biso

[Elilingi na lokasa 6]

Ngai ná Irène tolingaka kotánga mpe koyekola Liloba ya Nzambe

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto