Jérôme: Mobongoli Biblia oyo batyelaka ntembe
NA MOKOLO ya 8 Aprili 1546, likita ebéngami concile de Trente ebimisaki mobeko ete “Lingomba [ya Katolike] eponi” libongoli ya Biblia ebéngami Vulgate na lokota ya Latin “mpe moto moko te akoki komeka to kokanisa, ata mpo na ntina nini, koboya yango.” Atako Biblia Vulgate ekomamaki mbula nkóto liboso, bato bazali naino kotyela yango ntembe, na Jérôme, moto oyo abongolaki yango. Jérôme azalaki nani? Mpo na nini, ezala ye to libongoli na ye ya Biblia ezali kobimisa ntembe? Mosala na ye ezali na bopusi nini na mosala ya kobongola Biblia lelo oyo?
Ndenge akómaki nganga-mayele
Nkombo ya Latin ya moto oyo tozali kobénga Jérôme ezalaki Eusebius Hieronymus. Abotamaki soki na mobu 346 T.B. na engumba Stridon, na etúká moko ya Loma ebéngami Dalamatia. Lelo oyo, ezali pene ya ndelo oyo ekaboli ekólo Italie na ekólo Slovénie.a Baboti na ye bazalaki na mwa bozwi, mpe na bomwana na ye amonaki bolamu ya kozala na bomɛngo; atángaki kelasi na engumba Loma epai ya Donatus, nganga-mayele ya lokumu na gramere. Jérôme azalaki na mayele ntango azalaki koyekola gramere, maloba ya ntɔki, mpe filozofi. Na ntango wana, akómaki mpe koyekola lokota ya Greke.
Nsima ya kolongwa na Loma na mobu 366 T.B., Jérôme atambolaki bamboka ndenge na ndenge, akómaki kino na engumba Aquileia, na ekólo Italie, epai ayekolaki lolenge ya bomoi ya koboya bisengo nyonso (ascétisme). Lokola asepelaki na bomoi yango ya komipimela bisengo nyonso, ye na baninga na ye bamipesaki na bomoi yango na boumeli ya bambula mingi.
Na mobu 373 T.B., toyebi te soki matata nini ebimaki na kati na bango, etuluku yango epanzanaki. Jérôme alɛmbaki nzoto, yango wana akómaki koyengayenga na bamboka ya Azia; akatisaki bitúká ya Bitunia, Galatia, Kilikia, mpe na nsuka akómaki na Antiokia ya Sulia.
Mobembo molai wana enyokolaki ye. Jérôme alɛmbaki mingi mpe abɛlaki, kutu alingaki kokufa na fievre. Akomelaki moninga na ye moko boye: “Ah, soki Nkolo Yesu Klisto akokaki komema ngai mbala moko epai na yo. Nzoto na ngai, oyo elɛmba na yango banda kala, ebukani mpenza.”
Longola maladi, kozala ye moko, mpe motungisi ya makanisi, Jérôme akutanaki na mokakatano mosusu: mokakatano ya elimo. Alɔtaki ndɔtɔ moko, na kati na yango amonaki ete “bamemi ye liboso ya tribinale” ya Nzambe. Ntango batunaki ye soki azali nani, Jérôme alobaki: “Nazali moklisto.” Kasi mosambisi moko azongisaki: “Ozali kokosa, ozali moyekoli ya Cicéron, kasi ya Klisto te.”
Liboso ya likambo yango, Jérôme azalaki se kosepela koyekola mikanda ya bapakano kasi Liloba ya Nzambe te. Alobaki ete, “Lisosoli na ngai etungisamaki mingi.” Jérôme alukaki kobongisa makambo, yango wana, na kati ya ndɔtɔ alapaki ndai ete: “Nkolo, soki nazwi lisusu babuku ya mokili, to soki natángi yango lisusu, wana nawangani Yo.”
Na nsima, Jérôme alobaki ete bakoki kosɛngisa ye te ete akokisa ndai oyo alapaki na ndɔtɔ. Kasi azalaki na ekateli ya kokokisa ndai na ye, ata mpo na mpamba. Na yango, Jérôme alongwaki na Antiokia mpe akendaki kofanda mosika, na Chalcis oyo ezali na esobe ya Sulia. Lokola akómaki kofanda mosika na bato, amipesaki na koyekola Biblia mpe mikanda ya teoloji. Jérôme alobaki ete: “Nazali kotánga mikanda ya Nzambe na molende mingi koleka oyo nazalaki na yango mpo na mikanda ya bato.” Ayekolaki mpe lokota ya Syriaque oyo ezalaki kolobama na mboka yango mpe Moyuda moko oyo akómaki moklisto abandaki koyekolisa ye lokota ya Liebele.
Pápa apesi ye mokumba
Nsima ya mbula mitano oyo afandaki mosika na bato, Jérôme azongaki na Antiokia mpo na kolanda koyekola. Nzokande, ntango akómaki kuna, amonaki ete lingomba ekabwani mpenza. Kutu ntango azalaki naino na esobe, Jérôme asɛngaki Pápa Damase toli; alobaki ete: “Lingomba ekabwani na biteni misato, mpe ngámbo mokomoko ezali na mposa na ngai.”
Na nsima, Jérôme aponaki kolanda Paulin de Nole, moko na kati ya bato misato oyo bazalaki kowela lokumu ya episkɔpɔ ya Antiokia. Jérôme andimaki ete Paulin akómisa ye sango soki andimi makambo mibale. Ya liboso, alingaki ete apekisa ye te kokende kofanda mosika na bato. Mpe ya mibale, alingaki te ete bátinda ye sango ata na ndakonzambe moko te.
Na mobu 381 T.B., Jérôme akendaki kotika Paulin na likita ebéngami concile de Constantinople mpe nsima na yango, bakendaki kino na Loma. Pápa Damase amonaki mbala moko ete Jérôme azali moto ya mayele mingi mpe azali na boyebi mingi ya nkota. Nsima ya mbula moko, Pápa Damase aponaki Jérôme na mosala ya lokumu lokola sekretere na ye.
Ntango azalaki sekretere, Jérôme atikaki makambo ya ntembe te. Kutu, azalaki nde koluka yango. Na ndakisa, atikaki momeseno na ye te ya koboya bisengo ata na kati ya ndako ya pápa oyo etondi na bozwi. Lisusu, lokola azalaki kolendisa koboya bisengo nyonso mpe lokola azalaki koloba polele ete bakonzi ya mangomba bamipesaki mingi mpenza na makambo ya mokili, Jérôme akómaki na banguna mingi.
Nzokande, atako bato mingi bazalaki koloba mabe mpo na ye, Pápa Damase azalaki ntango nyonso kobatela ye. Pápa ayebaki ntina oyo azalaki kolendisa Jérôme alanda koyekola Biblia. Na ntango wana, bato bazalaki kosalela mabongoli mingi ya Biblia na Latin. Mingi ebongolamaki malamu te, ezalaki na mabunga minene. Pápa Damase azalaki mpe komitungisa na ndenge lokota ezalaki kokabola lingomba ya Mpoto mpe lingomba ya Azia. Na Azia, bato oyo bayebaki Latin bazalaki mingi te; mpe na Mpoto, bato moke mpenza bayebaki Greke.
Pápa Damase azalaki na mposa ya libongoli ya sika ya Baevanzile na Latin. Damase alingaki Biblia oyo ekobongola malamu mpenza Greke ya ebandeli, kasi oyo ekozala mpe na Latin ya malamu mpe ya polele. Jérôme azalaki moko na mwa banganga-mayele oyo bakokaki kosala mosala wana. Lokola ayebaki koloba Greke, Latin, mpe Syriaque malamu, mpe ayebaki Liebele mwa malamu, abongaki mpenza na mosala yango. Yango wana, lokola Pápa Damase asɛngaki ye, Jérôme abandaki mosala oyo ezwaki ye koleka mbula 20 ya bomoi na ye.
Ntembe ekómi makasi
Atako abongolaki Baevanzile nokinoki, Jérôme asalaki mosala na mayele mpe polele. Akokanisaki bamaniskri ya Greke nyonso oyo ezalaki na ntango wana, mpe alongolaki mabunga oyo ezalaki na makomi ya Latin, ezala mabunga na ekomeli mpe na masolo, mpo ete ayokanisa yango na makomi ya Greke.
Bato mingi bandimaki libongoli ya Baevanzile minei mpe libongoli ya sika ya mokanda ya Nzembo na Latin oyo Jérôme asalaki na lisalisi ya libongoli ya Biblia ya Greke oyo ebéngami Septante. Atako bongo, bato mosusu bazalaki se kotyola ye. Jérôme akomaki ete: “Banyangalakata mosusu bazalaki kofunda ngai ete nabongisaki bavɛrsɛ mosusu ya baevanzile, atako bankulutu bapesaki ngai ndingisa te mpe bato nyonso baboyaki likambo yango.” Bifundeli yango ebakisamaki nsima ya liwa ya Pápa Damase na mobu 384 T.B. Lokola Jérôme na pápa ya sika bazalaki koyokana malamu te, alongwaki na Loma. Na mbala oyo lisusu, Jérôme akendaki na Azia.
Ndenge akómaki nganga-mayele ya Liebele
Na mobu 386 T.B., Jérôme akómaki na Beteleme, mpe afandaki kuna kino liwa na ye. Akendaki elongo na mwa etuluku ya bayekoli na ye oyo balingaki kotika ye te, kati na bango ezalaki na Paula, mwasi moko mozwi oyo azalaki moto monene na Loma. Jérôme ateyaki Paula, yango wana Paula alandaki bomoi ya koboya bisengo. Paula apesaki mbongo oyo batongaki na yango monastere moko oyo Jérôme azalaki kokamba. Kuna, akobaki mosala na ye ya nganga-mayele ya Biblia mpe asilisaki mosala monene oyo asalaki na bomoi na ye.
Kofanda na Palestine epesaki Jérôme libaku ya koyeba Liebele malamu. Azwaki balakisi mingi oyo bazalaki Bayuda mpe azalaki kofuta bango mbongo mpo básalisa ye na koyeba makambo mosusu ya mpasi na lokota yango. Kasi, atako azwaki balakisi, ezalaki pɛtɛɛ te. Jérôme alobaki boye mpo na Baraninas de Tiberias, molakisi na ye moko: “Likambo oyo ete Baraninas ateyaka ngai na butu ezali kotungisa ngai mingi mpe ezali kosɛnga ngai mbongo mingi.” Mpo na nini bazalaki koyekola na butu? Mpamba te Baraninas azalaki kobanga ndenge Bayuda bakotalela boninga na ye na “moklisto”!
Na eleko ya Jérôme, mbala mingi Bayuda bazalaki kosɛka bato ya bikólo mosusu oyo bazalaki koloba Liebele mpamba te bazalaki kokoka koloba malamu te maloba oyo eutaka na mongongo (son guttural). Kasi nsima ya kosala milende makasi, Jérôme alongaki mpe akómaki koloba yango malamu. Jérôme azwaki mpe maloba mingi ekomamá na balɛtre ya Liebele mpe akomaki yango na balɛtre ya Latin. Likambo oyo esalisaki ye na komikundola maloba yango mpe ebatelaki ebéngeli ya maloba yango na Liebele na ntango wana.
Ntembe eleki monene oyo Jérôme abimisaki
Toyebi te soki pápa alingaki ete Jérôme abongola biteni nini ya Biblia. Nzokande, toyebi ndenge oyo Jérôme atalelaki mokumba yango. Jérôme atyaki motema na ye mobimba na mosala yango mpe azalaki na ekateli makasi. Azalaki na mposa makasi ya kobimisa mokanda “oyo ekozala na ntina mpo na Lingomba mpe mpo na bato oyo bakobotama nsima.” Yango wana, alingaki kosala libongoli ya sika ya Biblia mobimba na Latin.
Mpo na Makomami ya Liebele, Jérôme alingaki kosalela Biblia ya Septante. Bato mingi bazalaki kondima ete libongoli yango ya Makomami ya Liebele na lokota ya Greke epemami na Nzambe. Ebongolamaki mbala ya liboso na ekeke ya misato L.T.B. Yango wana, baklisto mingi oyo bazalaki koloba lokota ya Greke bazalaki na Biblia ya Septante na ntango wana.
Kasi, ntango Jérôme azalaki kosala mosala na ye, amonaki bokeseni mingi na kati ya bamaniskri ya Greke, lokola oyo amonaki na makomi ya Latin. Jérôme alɛmbaki lisusu nzoto mingi. Na nsuka, amonaki ete mpo na kobimisa libongoli ya malamu, asengelaki kotika bamaniskri ya Greke, ata mpe Biblia ya Septante oyo bato bazalaki komemya mingi, mpe kosalela mbala moko makomi ya Liebele ya ebandeli.
Bato mingi basepelaki na likambo yango te. Bato mosusu balobaki ete Jérôme akɔtisi makambo na ye moko na makomi, afingi Nzambe, atiki mimeseno ya lingomba mpe alandi Bayuda. Ata Augustin—nganga-mayele monene ya teoloji ya lingomba ya ntango wana—abondelaki Jérôme ete azongela kosalela makomi ya Septante. Alobaki na ye ete: “Soki bato mingi bakómi kotánga libongoli na yo na bandakonzambe mingi, ekozala likama mpenza ete, ntango bakotánga Makomami, bokeseni emonana kati na mangomba oyo balobaka Latin mpe mangomba oyo balobaka Greke.”
Augustin abangaki ete lingomba ekokabwana soki bandakonzambe ya Mpoto ebandi kosalela Biblia ya Latin oyo Jérôme abongolaki na makomi ya Liebele, ntango bandakonzambe oyo balobaka Greke na mikili ya Azia ezalaki naino kosalela libongoli ya Septante.b Lisusu, Augustin asepelaki te ete bato bátika Septante mpe bákóma kosalela libongoli oyo bobele Jérôme akokaki kolongisa.
Jérôme apesaki eyano nini na batɛmɛli nyonso wana? Lokola momeseno na ye, Jérôme atyelaki batyoli yango likebi te. Akobaki kosalela makomi ya Liebele, mpe na mobu 405 T.B., asilisaki Biblia na ye na Latin. Bambula mingi na nsima, libongoli na ye ebéngamaki Vulgate, oyo elimboli libongoli ya bato nyonso (Liloba ya Latin vulgatus elimboli “ya bato nyonso, oyo epalangani mingi”).
Misala oyo litomba na yango eumeli
Libongoli ya Makomami Mosantu oyo Jérôme asalaki ezalaki se mosala ya kobongisa makomi oyo ezalaki liboso te. Mpo na bato oyo babotamaki na nsima, mosala na ye ebongolaki makambo nyonso na oyo etali koyekola mpe kobongola Biblia. Will Durant, nganga-mayele ya istware, alobaki ete, “Vulgate ezali buku ya ekeke ya minei oyo eleki lokumu mpe bopusi.”
Atako Jérôme azalaki moto oyo akatelaka bato mangala mpe alingaki ntembe, na makasi na ye moko, amemaki bato ete bázongela kosala bolukiluki ya Biblia na makomi mapemami ya Liebele. Na likebi mpenza, ayekolaki mpe akokanisaki bamaniskri ya kala ya Biblia ya Liebele mpe ya Greke oyo, ezali lisusu te lelo oyo. Asalaki mpe mosala na ye liboso ya Bamasorete ya Bayuda. Yango wana, Vulgate ezali libongoli ya ntina mingi mpo na kokokanisa makomi makeseni ya Biblia na ndenge oyo mabongolami.
Atako bandimaka makambo makasi na ye te to bindimeli na ye ya lingomba te, bato oyo balingaka Liloba ya Nzambe bandimaka milende makasi ya mobongoli yango ya Biblia oyo bato bazali kotyela ntembe. Ɛɛ, Jérôme akokisaki mokano na ye—abimisaki libongoli “ya ntina mpo na bato oyo bakobotama nsima.”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Banganga-mayele ya istware bazali na likanisi moko te mpo na badati mpe kolandana ya makambo oyo esalemaki na bomoi ya Jérôme.
b Na nsuka, mangomba ya boklisto na mikili ya Mpoto ekómaki kosalela libongoli ya Jérôme, nzokande, mangomba ya boklisto na Azia ekobaki kosalela libongoli ya Septante kino lelo oyo.
[Maloba ya kolimbola elilingi na lokasa 28]
Ekeko ya Jérôme na Bethléhem
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Garo Nalbandian
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 26]
Na likoló na lobɔkɔ ya mwasi, maniskri ya Liebele: Na ndingisa ya Shrine of the Book, Israel Museum, Jérusalem; Na nse, na lobɔkɔ ya mwasi, maniskri ya Syriaque: Tobimisi yango na ndingisa ya bakambi ya Chester Beatty Library, Dublin; Na likoló, na katikati, maniskri ya Greke: Na ndingisa ya Israel Antiquities Authority