Tosangani na bomoi oyo eleki malamu
Soki bato bazali se kobakisama, etikali moke mokili oyo ekokóma na bato miliare 6. Atako biso nyonso touti na nkɔkɔ moko, bato mingi bakanisaka te ete bazali bato ya libota moko na mokili mobimba oyo ezali na Mozalisi moko ya mayele mpe ya bolingo. Bokabwani mpe bitumba kati na bikólo, kati na bato bakeseni mposo to oyo bazali na mimeseno moko te ezali mpenza komonisa likambo yango.
SOKI totali ndenge mokili ezali kotambola lelo oyo, tokoki kokanisa ete bato ya mokili mobimba bakoki kofanda na bomoko te. Buku moko (The Columbia History of the World) elobi ete: “Na motuna monene oyo etali ndenge nini tokoki kofanda esika moko, mokili ya lelo ezali kopesa ata likanisi moko ya sika te.”
Nzokande, mpo na kotya bomoko na kati ya bato na mokili mobimba tozali na mposa ya likanisi ya sika te. Makomami Mosantu elakisi ndenge nini kokóma na bomoko. Bomoko esimbami na losambo ya Mozalisi ya mabelé na bikelamu nyonso oyo bizali na mabelé. Basaleli ya Nzambe bazali na bomoko ya solosolo na makanisi, na mikano, mpe na bomoi. Lelo oyo, baleki milio mitano na ndambo na kati ya mikili 233 mpe bango nyonso bazali kondima ete nzela ya Nzambe ezali nzela oyo eleki malamu. Lokola mokomi ya nzembo, bazali kobondela ete: “Ɛ [Yehova], teyá ngai nzela na yo; nakotambola kati na solo na yo; pesá ngai motema moko ete nabanga nkombo na yo.”—Nzembo 86:11.
Kalakala mpenza, Yisaya asakolaká ete bato bakosangana na losambo ya pɛto. Akomaká ete: “Ekozala ete na mikolo na nsuka, ngomba na ndako na [Yehova] ekokokisama likoló koleka ngomba nyonso, ekotombwa likoló na [ngomba mike]; mpe mabota nyonso bakokenda wana. Bikólo mingi bakokenda mpe bakoloba ete, Yakani, tóbuta na ngomba na [Yehova], epai na ndako na Nzambe na Yakobo, ete alakisa biso nzela na ye mpe ete tótambola na bipai bikokendaka ye.”—Yisaya 2:2, 3.
Bomoko ya Batatoli ya Yehova ekokani na bomoko mosusu te. Na kati ya masangá koleka 87 000 na mokili mobimba, bazali kolya bilei ya elimo ndenge moko na makita na bango oyo basalaka pɔsɔ na pɔsɔ. (Matai 24:45-47) Kasi, banda na katikati ya 1998 kino na ebandeli ya 1999, Batatoli balakisaki bomoko na bango na lolenge mosusu: na bisika mingi na mokili mobimba basalaki mayangani ya etúká oyo ezalaki koumela mikolo misato mpe motó ya likambo na yango ezalaki “Nzela ya Nzambe ezali nzela ya bomoi.” Na mikili 13, mayangani yango esangisaki bato oyo bautaki na mikili ndenge na ndenge mpe ebéngamaki mayangani ya mikili mingi; mosusu ezalaki mayangani ya etúká. Kasi mayangani nyonso ezalaki na mateya kitoko ndenge moko.
Komona bato oyo bazali na esengo, balati malamu, bazali kokende na bandako ya mayangani mpe na mabándá ya masano mpo ete Yehova ateya bango ezalaki mpenza kosimba motema! Ndeko mwasi moko oyo azalaki na liyangani ya mikili mingi oyo esalemaki na engumba Michigan, na États-Unis amonisaki mpenza mayoki yango. Alobaki ete: “Ezalaki mpenza esengo na komona bandeko na biso bauti na mikili ndenge na ndenge, lokola République tchèque, Barbade, Nigeria, Hongrie, Angleterre, Pays-Bas, Éthiopie, Kenya, mpe bikólo mosusu ebele, bazali koyambana! Ezalaki malamu na komona bandeko bafandi esika moko, bazali kotangisa mpisoli ya esengo mpamba te bazali kolingana bamoko na bamosusu mpe bazali kolinga Yehova, Nzambe na bango monene.” Lisolo oyo elandi ekolobela manaka ya liyangani oyo bamilio ya bato balandaki na mokili mobimba.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]
Mountain High Maps® Copyright © 1997 Digital Wisdom, Inc.