‘Bólata elimo ya komikitisa’
MOBALI moko autaki na engumba moko oyo eyebani mingi. Abotamaki Moloma mpe ekoki kozala ete azalaki na libota moko oyo eyebanaki malamu. Mobali yango nani? Ezali Saulo. Atángaki bakelasi ya malamu oyo ezalaki na ekeke ya liboso ya ntango na biso (T.B.). Azalaki koloba minɔkɔ soki mibale mpe azalaki kosambela na lingomba moko oyo eyebanaki mingi: lingomba ya Bafalisai.
Na ntembe te, Saulo ayekolaki momeseno ya kotyola bato mpamba mpe kotuta ntolo mpo na boyengene na ye. (Luka 18:11, 12; Misala 26:5) Baninga na ye Bafalisai bazalaki komitombola, balingaki lokumu mingi mpe bazalaki kolinga bato bábengaka bango na bankombo ya lokumu. (Matai 23:6, 7; Luka 11:43) Na ntembe te, kozala esika moko na bato ya lolenge wana ekómisaki Saulo lolendo. Toyebi ete azalaki konyokola baklisto na molende nyonso. Bambula na nsima, ntango bakómaki kobenga ye ntoma Paulo, alobaki ete kala azalaki “motuki mpe monyokoli mpe moto ya lofundo.”—1 Timote 1:13.
Ya solo, Saulo akómaki moklisto, ntoma Paulo, mpe bomoto na ye ebongwanaki mpenza. Atako akómaki ntoma, alobaki na komikitisa nyonso ete azali “moto ya moke koleka moto oyo aleki moke na kati ya basantu nyonso.” (Baefese 3:8) Azalaki mosakoli monene, kasi azalaki komikumisa te mpo na yango. Azalaki nde kozongisa lokumu nyonso epai ya Nzambe. (1 Bakolinti 3:5-9; 2 Bakolinti 11:7) Paulo nde alendisaki baninga na ye baklisto ete: “Bólata bolingo ya motema oyo euti na mawa, motema malamu, elimo ya komikitisa, boboto mpe motema molai.”—Bakolose 3:12.
Toli yango ezali mpe na ntina lelo oyo, na ekeke ya 21? Komikitisa ezali na ntina? Komikitisa ekoki mpenza kozala elembo ya bokasi?
Mozalisi oyo azali na nguya nyonso amikitisaka?
Ntango tozali kolobela likambo ya komikitisa, tosengeli kotalela likanisi ya Nzambe. Mpo na nini? Mpamba te azali Moyangeli mpe Mozalisi na biso. Na bokeseni na ye, biso tosengeli koyeba ete tozali bato ya kozanga kokoka. Bomoi na biso ezali na mabɔkɔ na ye. Elihu, moto moko ya bwanya ya ntango ya kala alobaki ete: “Oyo-ya-Nguya-Nyonso, tokomonaka ye te, azali monene na nguya.” (Yobo 37:23) Soki totali biloko ndenge na ndenge oyo Nzambe asalá, tokomimona mpenza mpamba! Mosakoli Yisaya alobi na biso ete: “Bótombola miso na bino likoló mpe bómona! Nani asalaki yango? Ye oyo akobimisa ebele na bango na motuya, akobenga bango nyonso na nkombo; mpo na monene na nguya na ye mpe mpo ete azali na makasi kati na nguya, moko te azali kozanga.”—Yisaya 40:26.
Atako azali na nguya mingi, Yehova amikitisaka. Mokonzi Davidi abondelaki Nzambe ete: “Opesi mpe ngai nguba ya kobikisama na yo, boboto na yo ekembisi ngai.” (2 Samwele 22:36) Tokoki koloba ete Nzambe amikitisaka mpo amibanzabanzaka mpo na bato mpamba oyo balukaka kosepelisa ye, mpe ayokelaka bango mawa. Atako azali mosika mpenza na likoló, Yehova amikitisaka mpo na komonisela bato oyo babangaka ye boboto.—Nzembo 113:5-7.
Lisusu, Yehova asepelaka na komikitisa ya basaleli na ye. Ntoma Petelo akomaki ete: “Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo, kasi amonisaka boboto monene na ye epai ya bato ya komikitisa.” (1 Petelo 5:5) Mpo na komonisa ndenge Nzambe atalelaka lolendo, mokomi moko ya Biblia alobaki ete: “Mitema nyonso ya lolendo eboyami na [Yehova].” (Masese 16:5) Kasi, ndenge nini komikitisa ekoki kozala elembo ya bokasi?
Komikitisa ekeseni na nini?
Soki moto amikitisi, yango elingi koloba te ete akómi eloko mpamba. Na bisika mosusu na ntango ya kala, moombo, moto ya mawa, moto ya mpasi, nde bazalaki bato ya komikitisa. Nzokande, Biblia ezali komonisa ete komikitisa epesaka moto lokumu. Na ndakisa, Salomo akomaki ete: “[Komikitisa, NW] mpe kotosa [Yehova] ezali nzela na bozwi mpe lokumu mpe bomoi.” (Masese 22:4) Mpe totángaka na Nzembo 138:6 (NW) ete: “Yehova azali na likoló, kasi amonaka moto ya komikitisa; nzokande moto ya lofundo, ayebaka ye se na mosika.”
Kozala moto ya komikitisa elingi koloba te ete ozangi makoki to okoki kosala likambo moko ya malonga te. Na ndakisa, Yesu aboyaki mokolo moko te koloba ete azali mwana-mobotami se moko ya Yehova, mpe alobaki mokolo moko te ete mosala na ye ezali na ntina te. (Malako 14:61, 62; Yoane 6:51) Nzokande, Yesu azalaki komikitisa na ndenge azalaki kozongisa lokumu nyonso epai ya Tata na ye na makambo oyo azalaki kosala mpe ndenge azalaki kosalela nguya na ye mpo na kosalisa basusu, kasi te mpo na kokonza to konyokola bango.
Elembo ya bokasi
Kozanga ntembe, bato ya eleko ya Yesu bayebaki ye “na nzela ya misala ya nguya.” (Misala 2:22) Kasi, na miso ya bato mosusu, azalaki “moto oyo aleki bato nyonso na komikitisa.” (Danyele 4:17, NW) Yesu azalaki kaka komikitisa te, kasi azalaki mpe ntango nyonso koteya bato ete bámikitisaka. (Luka 9:48; Yoane 13:2-16) Kasi, komikitisa na ye ezalaki elembo ya bolɛmbu te. Azalaki kotombola nkombo ya Tata na ye mpe kokokisa mosala na ye na mpiko nyonso. (Bafilipi 2:6-8) Biblia ebengi Yesu nkɔsi. (Emoniseli 5:5) Ndakisa ya Yesu emonisi ete komikitisa ezali na boyokani na mpiko.
Wana tozali kosala makasi mpo na kozala na komikitisa ya solosolo, tokomona ete esɛngaka mpenza molende mpo na komonisa ezaleli yango na bomoi na biso. Komikitisa esɛngaka ntango nyonso kolanda mokano ya Nzambe na esika ya koluka nzela ya mokuse to kokwea na bamposa ya nzoto. Mpo na kozala moto ya komikitisa esengeli kozala na mpiko, mpo yango esɛngaka kobengana mosika bamposa na biso mpo tókoka kosalela Yehova mpe kotya matomba ya basusu liboso ya oyo ya biso.
Matomba ya komikitisa
Komikitisa elimboli kobwaka lolendo mosika to koboya koluka kaka bolamu na yo moko. Moto ya komikitisa ayebaka makasi mpe bolɛmbu na ye, makambo oyo akokoka kosala mpe oyo akokoka te. Na likambo yango, Paulo apesaki toli moko malamu ntango akomaki ete: “Nazali koyebisa moto nyonso kuna na kati na bino ete akanisa mpo na ye moko te koleka ndenge oyo esengeli kokanisa; kasi akanisa nde na ndenge ya kozala na makanisi malamu.” (Baloma 12:3) Moto nyonso oyo alandaka toli wana azali moto ya komikitisa.
Komikitisa emonanaka mpe ntango tozali kotya matomba ya basusu liboso ya oyo ya biso. Na lisalisi ya elimo santu, Paulo apesaki baklisto toli ete: “[Bósalaka] eloko moko te na kowelana to na ezaleli ya komitya liboso, kasi na elimo ya komikitisa bótalelaka bamosusu ete baleki bino.” (Bafilipi 2:3) Maloba yango ezali na boyokani na etinda oyo Yesu apesaki bayekoli na ye ete: “Oyo aleki monene na kati na bino asengeli kozala mosaleli na bino. Moto nyonso oyo azali komitombola akokitisama, mpe moto nyonso oyo azali komikitisa akotombwama.”—Matai 23:11, 12.
Ya solo, Nzambe atombolaka bato ya komikitisa. Yango nde moyekoli Yakobo alingaki koloba ntango akomaki ete: “Bómikitisa na miso ya Yehova, mpe ye akotombola bino.” (Yakobo 4:10) Nani akolinga te ete Nzambe atombola ye?
Kozanga komikitisa ebimisá mobulu mpe kowelana mingi na kati ya bato. Nzokande, komikitisa ezali na matomba. Nzambe akoki mpenza kondima biso soki tozali komikitisa. (Mika 6:8) Tokoki kozala na kimya, mpamba te moto ya komikitisa azalaka na esengo koleka moto ya lolendo. (Nzembo 101:5) Soki tozali komikitisa, tokofanda malamu na bato ya libota, baninga, bato oyo tosalaka na bango mpe bato mosusu. Bato ya komikitisa baboyaka kowelana mpe kotingama kaka na makambo oyo bango balingi, makambo oyo ekoki kobimisa nkanda to bokabwani na kati ya baninga.—Yakobo 3:14-16.
Ya solo, komikitisa ezali lolenge eleki malamu ya kobatela boyokani na basusu. Ekoki kosalisa biso tóboya elimo ya bato ya mokili ya koluka kaka matomba na bango moko mpe ya kowelana. Na lisalisi ya Nzambe, ntoma Paulo alongolaki lolendo oyo azalaki na yango liboso. Ndenge moko mpe tokosala malamu soki totiki komimona lokola biso nde tokoki kosala malamu koleka baninga mosusu. Biblia epesi toli ete: “Lolendo liboso na kobeba, [elimo, NW] ya nzombo liboso ya kokwea.” (Masese 16:18) Soki tolandi ndakisa mpe toli ya Paulo, tokomona bwanya ya ‘kolata elimo ya komikitisa.’—Bakolose 3:12.
[Elilingi na lokasa 4]
Paulo alongaki lolendo na ye
[Elilingi na lokasa 5]
Anglo-Australian Observatory/Bililingi ya David Malin
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 7]
Komikitisa esalisaka biso tóbatela boyokani na basusu