Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 15/3 nk. 24-25
  • Bazwaki yango epai ya bapakano

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bazwaki yango epai ya bapakano
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Masolo mosusu
  • Boyokani kati na “Tempelo ya Nzambe” mpe bikeko na Grèce?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Lingomba ya Katolike kati na Afrika
    Lamuká!—1995
  • Noel ezali motindo malamu yo kokumisa Yesu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 15/3 nk. 24-25

Bazwaki yango epai ya bapakano

PANTHÉON ezali moko ya bamonima minene oyo baturiste bakendaka kotala na engumba Loma, na ekólo Italie. Tempelo yango oyo bato ya Loma batongaki ezali moko ya mwa bandako oyo kino lelo oyo ezali kobatela lolenge na yango ya kala. Akalipa, abandaki kotonga yango soki na mobu 27 L.T.B., mpe Adrien abongisaki yango lisusu soki na mobu 120 T.B. Eloko oyo ebendaka likebi na tempelo yango ezali nsamba na yango oyo egumbama lokola mokɔngɔ ya nkoba na bonene ya mɛtɛlɛ 43, bobele bandako mosusu oyo bazali kotonga mikolo oyo nde eleki yango na monene. Panthéon ezalaki liboso tempelo ya bapakano. Liloba yango euti na Greke mpe elimboli “esika ya banzambe nyonso.” Tii lelo oyo, batalelaka yango lokola ndakonzambe ya Lingomba ya Katolike ya Loma. Ndenge nini mbongwana ya kokamwa boye esalemaki?

Na mobu 609 T.B., Pápa Boniface IV afungolaki lisusu tempelo wana oyo batikaki kosalela kala mpe akómisaki yango ndakonzambe ya “boklisto.” Na ntango yango, bapesaki ndakonzambe yango nkombo Santa Maria Rotunda. Na mobu 1900, zulunalo moko ya ba Jésuites ya ekólo Italie (La Civiltà Cattolica) ebimisaki lisolo moko elobaki ete Boniface alingaki básalelaka ndakonzambe yango mpenzampenza mpo na “kokumisaka baklisto nyonso oyo bakufá lokola bamartiru, to mpe, basantu nyonso, kasi na koleka, mpo na Ngɔndɔ Mama wa Nzambe.” Lelo oyo, Lingomba ya Katolike epesi na Panthéon bankombo oyo: Santa Maria ad Martyres to mpe Santa Maria Rotunda. Bankombo yango emonisi makanisi oyo euti na Biblia te.​—Talá Misala 14:8-15.

Lisolo yango elobi lisusu ete: “Mpo na kokómisa [Panthéon] ndakonzambe ya boklisto, esɛngaki makambo mingi te. Boniface alandaki bobele mibeko ya pɛtɛɛ mpe ya boboto oyo Santu Grégoire Monene [Pápa Grégoire I], Pápa oyo azalaki liboso na ye asilaki kotya. Pápa Grégoire azalaki elombe mpe ndakisa mpo na kokómisa batempelo ya bapakano esika ya losambo ya boklisto.” Mibeko yango ezalaki nini?

Na mobu 601 T.B., na mokanda oyo Grégoire atindelaki sango moko oyo asengelaki kokende na ekólo Angleterre oyo bazalaki kotalela lokola ekólo ya bapakano, apesaki mibeko oyo: “Bosengeli kobuka batempelo ya bikeko oyo ezali na ekólo yango te; kasi bobele bikeko oyo ezali na kati . . . Soki batempelo yango etongamá malamu, ebongi ete tóbongola yango elongwa esika ya losambo ya bademo ekóma esika ya losambo ya Nzambe ya solo.” Likanisi ya Grégoire ezalaki ete soki bapakano bamoni ete batempelo na bango ya kala ebebisami te, bakozala ntango nyonso na mposa ya kokende kuna. Pápa akomaki ete, atako bapakano bazalaki “koboma bangɔmbɛ mpo na kopesa bademo mbeka,” sikoyo tozali kolikya ete “bakopesa lisusu banyama yango mbeka na bademo te kasi bakobanda koboma yango mpo bango moko bálya yango na nkembo ya Nzambe.”

Lisusu, Lingomba ya Katolike ya Loma “esilisaki” losambo ya bapakano na ndenge batongaki bandakonzambe oyo ezali na bankombo ya “baklisto” basantu, pene mpenza ya batempelo ya kala. Bandimaki bafeti ya bapakano mpe bapesaki yango ndimbola ya “boklisto.” Zulunalo La Civiltà Cattolica elobi ete: “Lelo oyo, banganga-mayele nyonso bayebi ete mimeseno mosusu ya bafeti ya lingomba oyo baklisto wana bazalaki kosala eyokanaki mpenza na misala mpe makambo ya bapakano. Ezalaki makambo oyo bato balingaki mingi, mimeseno oyo ekɔtelaki bango mpe ezalaki mpenza komonisa etamboli mpe bomoi ya bapakano na ntango ya kala. Lingomba ya Katolike, ezalaki na boboto mpe na mayele, mpe emonaki ete esengeli kopekisa yango te; kasi soki ekɔtisi yango na kati ya losambo ya boklisto, ekobakisela yango nde lokumu mpe nguya ya sika. Na ndenge yango, Lingomba elongaki bango na ndenge ebongaki mpenza mpe ezalaki na boboto, mpo na kobenda bato, ezala bato mpamba to mpe bato ya mayele, kozanga mobulu.”

Noele ezali ndakisa moko ya feti oyo eyebani mingi oyo bazwaki epai ya bapakano. Mokolo ya 25 Desɛmbɛ ezalaki dati oyo Baloma ya kala bazalaki kosala feti babéngi dies natalis Solis Invicti, elimboli, “mbotama ya moi oyo bakoki kolonga yango te.”

Lokola Lingomba ya Katolike elingaki ete bapakano bákóma bandimi na yango, yango wana eteyaki bango solo ya Biblia te. Elongisaki likambo ya kosangisa bindimeli mingi, mpe ekómaki kolanda bindimeli mpe misala ya bapakano, mpamba te “bato balingaki yango mingi.” Yango ebimisaki lingomba ya lipɛngwi, ya bongolabongola oyo etangwi na mateya ya boklisto ya solo. Yango wana, tokokamwa te soki Panthéon​—tempelo ya kala na Loma mpo na losambo ya “banzambe nyonso” ekómi ndakonzambe ya Lingomba ya Katolike mpo na losambo ya Malia mpe “basantu” nyonso.

Kasi, emonani polele ete, kopesa tempelo ya bapakano nkombo ya boklisto to kosanze nkombo ya feti ekoki te mpo na kokómisa ‘losambo ya bademo losambo ya Nzambe ya solo.’ Ntoma Paulo atunaki ete: “[Tempelo, NW] na Nzambe ezali na kondimana nini na bikeko? Bóbima na kati na bango, mpe bókabwana na bango. Nzambe alobi bongo. [Bósimba] eloko na mbindo te, mpe boye nakoyamba bino. Nakozala tata epai na bino, mpe bino bokozala bana na ngai babali mpe bana na ngai basi. Nkolo-na-Nguya-Nyonso alobi bongo.”​—2 Bakolinti 6:16-18.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto