Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • bt mok. 26 nk. 203-210
  • “Ata moto moko te akokufa”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Ata moto moko te akokufa”
  • ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Mopɛpɛ ezalaki kobɛta liboso” (Misala 27:1-7a)
  • “Mopɛpɛ . . . makasi ezalaki kobɛta” (Misala 27:7b-26)
  • “Bango nyonso bakómaki na mokili kozanga likama” (Misala 27:27-44)
  • “Boboto moko ya koloba te” (Misala 28:1-10)
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Batindi ntoma Paulo na Roma
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • ‘Na Makama na Mai Monene’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Ntoma Paulo alongi mikakatano
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Makambo mosusu
‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
bt mok. 26 nk. 203-210

MOKAPO 26

“Ata moto moko te akokufa”

Ntango masuwa ezindi, Paulo amonisi kondima makasi mpe bolingo mingi mpo na bato

Euti na Misala 27:1–28:10

1, 2. Mobembo ya ndenge nini Paulo asengelaki kosala, mpe mbala mosusu azalaki komituna mituna nini?

PAULO azali kokanisa maloba ya Guvɛrnɛrɛ Festusi oyo alobaki na ye ete: “Okokende epai ya Kaisala”; ayebi ete likambo yango etaleli bomoi na ye. Paulo auti kolekisa mbula mibale na bolɔkɔ; boye, kosala mobembo molai mpo na kokende tii na Roma, ekozala mbongwana monene mpenza. (Mis. 25:12) Nzokande, lokola Paulo asilá kosala mibembo mingi na masuwa, ayebi ete moto oyo azali kosala mobembo ya ndenge wana akutanaka na makambo mingi, kasi ezalaka kaka te kosepela na mipɛpɛ kitoko mpe komona mai monene ya mbu. Mobembo oyo akosala mpo na kokende kosamba liboso ya Kaisala ekoki mpe kotinda ye amituna mituna ebele.

2 Paulo akutaná “na makama na mbu” mbala mingi; mbala misato azalaki na masuwa oyo ezindaki, mpe alekisaki butu mobimba mpe moi mobimba na kati ya mbu. (2 Ko. 11:25, 26) Longola yango, mobembo yango ekokesana mpenza na mibembo mosusu oyo asalaki na mosala ya misionɛrɛ, ntango azalaki na bonsomi. Paulo akosala mobembo yango lokola mokangami mpe ekozala na ntaka molai mpenza, kilomɛtrɛ soki 3 000 kobanda na Kaisaria tii na Roma. Akoki nde kosala mobembo wana kozanga likama? Ata soki azwi likama te, ekoki nde kozala ete azali kokende epai oyo bakokatela ye etumbu ya makasi? Tóbosana te ete azalaki kokende kosamba liboso ya mokonzi oyo azalaki na nguya koleka bakonzi mosusu nyonso na mokili ya Satana na ntango wana.

3. Paulo azalaki na ekateli nini, mpe tokolobela nini na mokapo oyo?

3 Soki otaleli makambo nyonso oyo tosili kotánga mpo na Paulo, okanisi ete abungisaki elikya mpe alɛmbaki nzoto mpo na makambo oyo ezalaki liboso na ye? Soki moke te! Ayebaki ete akokutana na mikakatano, kasi ayebaki te soki ekozala ya lolenge nini. Yango wana, azalaki na ntina moko te ya kobungisa esengo oyo mosala na ye ezalaki kopesa ye mpe komitungisa mpo na makambo oyo ayebaki te ndenge nini ekozala. (Mat. 6:27, 34) Paulo ayebaki ete mokano ya Yehova mpo na ye ezalaki ete asalela libaku nyonso mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, ata epai ya bakonzi ya mokili. (Mis. 9:15) Paulo azalaki na ekateli makasi ya kokokisa mokumba yango, ata soki akutani na mikakatano nini. Biso mpe tozali na ekateli yango? Yango wana, tótalela sikoyo ndenge oyo mobembo ya Paulo elekaki mpe tókanisa mateya oyo ndakisa na ye ekoki kopesa biso.

“Mopɛpɛ ezalaki kobɛta liboso” (Misala 27:1-7a)

4. Paulo abandaki mobembo na ye na masuwa ya ndenge nini, mpe banani bakendaki na ye?

4 Yuliusi, mokonzi moko ya basoda ya Roma oyo azwaki mokumba ya komema Paulo ná bato mosusu ya bolɔkɔ, asepelaki kokende na bango na masuwa moko ya mombongo oyo eutaki kokóma na Kaisaria. Masuwa yango eutaki na Adramitiume, libongo moko ya masuwa oyo ezalaki na bokula ya wɛsti ya Azia Moke, etalaná na engumba Mitilene na esanga ya Lesbos. Masuwa yango esengelaki kokende na nɔrdi mpe na nsima, kobaluka na wɛsti; esengelaki kotɛlɛma na bisika ndenge na ndenge mpo na kokitisa mpe kozwa biloko mosusu. Bamasuwa ya ndenge wana esalemaki mpo na komema bato ya mobembo te, ata mpe bakangami. (Talá etanda “Mibembo na bamasuwa ya mombongo.”) Likambo ya malamu mpo na Paulo ezali ete na mobembo yango, azalaki kaka ye moko te mokristo na kati ya basali mabe. Bandeko na ye bakristo soki mibale bazalaki na ye na mobembo yango: Aristarke ná Luka. Kutu, Luka nde moto akomaki lisolo yango. Toyebi te soki bandeko yango bafutaki tike bango moko to bandimaki bango bákende ná Paulo mpo básalisaka ye.​—Mis. 27:1, 2.

MIBEMBO NA BAMASUWA YA MOMBONGO

Na ntango ya kala, bamasuwa ezalaki mbala mingi kosalelama mpo na komema biloko ya kotɛka, kasi te mpo na komema bato. Moto oyo alingi kosala mobembo azalaki koluka masuwa oyo ezali komema biloko na mboka oyo alingi kokende, azalaki koyokana na nkolo masuwa mpo na mbongo ya tike mpe kozela tii mokolo masuwa ekokende.

Bamasuwa ebele ezalaki kotambola na Mbu Mediterane mpo na komema biloko ya kolya mpe biloko mosusu ya kotɛka. Bato mingi oyo bazalaki kosala mibembo na bamasuwa yango bazalaki kolala likoló ya nkɔbɛ, mbala mosusu na nse ya hema oyo bango moko bazalaki kotya na butu mpe kolongola yango na ntɔngɔ. Basengelaki mpe komema nyonso oyo bakozala na yango mposa mpo na mobembo, ezala bilei to bilamba ya kofinika.

Mibembo ezalaki koumela na kotalela ndenge oyo mipɛpɛ ezali. Lokola malili ezalaki makasi na eleko ya malili makasi, bamasuwa ezalaki kotambola te kobanda na katikati ya sanza ya zomi na moko tii na katikati ya sanza ya misato.

Masuwa moko ya kala mpe biteni na yango minei ya minene kobanda eteni ya nsima tii ya liboso. 1.Bankai ya koyenda. 2. Elamba ya monene. 3. Balongo. 4. Elamba ya liboso.

5. Paulo azwaki libaku ya kokutana na banani na Sidone, mpe likambo yango ekoki koteya biso nini?

5 Nsima ya kosala mobembo mokolo moko na mbu, na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 110 na ngámbo ya nɔrdi, masuwa esɛmaki na Sidone, na bokula ya Siri. Emonani ete Yuliusi azalaki te kotalela Paulo lokola bato mosusu ya bolɔkɔ oyo bazalaki basali mabe, mbala mosusu mpo Paulo azalaki mwana-mboka Roma, oyo akweisamaki na likambo moko te. (Mis. 22:27, 28; 26:31, 32) Yuliusi apesaki Paulo nzela akende kokutana na bandeko na ye bakristo. Na ntembe te, bandeko basepelaki mingi kosalisa Paulo, ndeko na bango oyo alekisaki bambula mingi na bolɔkɔ! Yo mpe okoki koluka mabaku oyo okoki koyamba ndeko ya ndenge wana, oyo akoki kolendisa yo!​—Mis. 27:3.

6-8. Mobembo ya Paulo elekaki ndenge nini kobanda na Sidone tii na Kinide, mpe ekoki kozala ete Paulo azwaki mabaku nini ya kosakola?

6 Ntango masuwa elongwaki na Sidone, ekobaki komata pembenipembeni ya bokula mpe elekaki Silisia, pembeni ya Tarse, esika oyo Paulo abotamaki. Luka alobeli bisika mosusu te oyo batɛlɛmaki, abakisi kaka likambo oyo emonisi ete balingaki kokutana na mikakatano; alobaki ete “mopɛpɛ ezalaki kobɛta na liboso.” (Mis. 27:4, 5) Atako bongo, tokoki kokanisa ete Paulo azalaki kosalela libaku nyonso mpo na kosakola nsango malamu. Na ntembe te, Paulo apesaki litatoli epai ya baninga na ye bakangami mpe bato mosusu oyo bazalaki na masuwa, mpe batambwisi mpe basoda, mpe bato mosusu na libongo nyonso oyo masuwa ezalaki kosɛma. Biso mpe tosakolaka na libaku nyonso oyo tozwi?

7 Na nsima, masuwa ekómaki na Mira, libongo moko oyo ezalaki na bokula ya sudi ya Azia Moke. Kuna, Paulo ná bato mosusu bakɔtaki na masuwa mosusu oyo esengelaki komema bango tii na Roma, epai bazalaki kokende. (Mis. 27:6) Na eleko wana, biloko mingi oyo bato ya Roma bazalaki kolya ezalaki kouta na Ezipito, mpe bamasuwa ya Ezipito oyo ezalaki komema masango ezalaki kotɛlɛma na Mira. Yuliusi amonaki masuwa moko ya ndenge wana mpe akɔtaki kati na yango elongo na basoda mpe bakangami. Na ntembe te, masuwa yango ezalaki monene koleka oyo ya liboso. Ememaki blé ebele mpenza mpe bato 276, elingi koloba bato ya masuwa, basoda, bakangami, mbala mosusu mpe bato mosusu oyo bazalaki kokende na Roma. Emonani ete lokola bakɔtaki na masuwa mosusu, Paulo azwaki bato mosusu oyo akokaki kopesa litatoli, mpe ntembe ezali te ete alekisaki libaku yango te.

8 Na nsima, masuwa etɛlɛmaki lisusu na Kinide, na sudi-wɛsti ya Azia Moke. Soki mipɛpɛ ezali kobɛta na nsima, masuwa ekokaki kosala mokolo moko mpo na kokóma na Kinide. Kasi, Luka alobi ete ‘nsima ya kotambola malɛmbɛmalɛmbɛ mikolo mingi, tokómaki na Kinide na mpasi.’ (Mis. 27:7a) Masuwa ekómaki kotambola na mpasi. (Talá etanda “Mipɛpɛ mpe bamasuwa na Mbu Mediterane,” na lokasa 208.) Kanisá ndenge bato oyo bazalaki na kati ya masuwa bazalaki koyoka ntango ezalaki kobunda na mipɛpɛ makasi ná mai oyo ezalaki kotombwana.

MIPƐPƐ MPE BAMASUWA NA MBU MEDITERANE

Mipɛpɛ mpe bileko ezalaki kosalisa bato oyo bazalaki kotambwisa bamasuwa ya komema biloko na Mbu Monene, to Mbu Mediterane báyeba bisika nini mpe na ntango nini basengeli kotambola. Na ngámbo ya ɛsti ya mbu yango, na katikati ya mbula, mbala mingi mipɛpɛ ezalaki kouta na wɛsti mpe kokende na ɛsti. Yango ezalaki kosalisa mpo bamasuwa oyo ezali kokende na ɛsti etambola na mpasi te, ndenge esalemaki ntango Paulo azalaki kozonga na nsuka ya mobembo na ye ya misato na mosala ya misionɛrɛ. Paulo ná baninga na ye bazalaki na kati ya masuwa oyo eutaki na Milete, elekaki na Rode, mpe esɛmaki na Patara. Masuwa yango etambolaki semba kobanda na Patara tii na Tire, na bokula ya Fenisia. Luka akomaki ete balekaki esanga ya Shipre na lobɔkɔ ya mwasi, yango elingi koloba ete masuwa elekaki na sudi ya esanga yango.​—Mis. 21:1-3.

Kasi, makambo ezalaki ndenge nini soki masuwa ezali kokende na wɛsti? Soki mipɛpɛ makasi ezali te, bamasuwa ekokaki kolanda kaka nzela oyo ezalaki koleka mpo na kokende na ɛsti. Kasi, na bantango mosusu, ekokaki kosalema te. Buku moko (The International Standard Bible Encyclopedia) elobi ete: “Na eleko ya malili makasi, na bantango mosusu mipɛpɛ ya makasi ebɛtaka longwa na wɛsti tii na ɛsti ya Mbu Mediterane, mpe mbala mingi, ememaka bambula ya makasi to mpe nɛjɛ.” Soki mipɛpɛ ezali makasi ndenge wana, makama ezalaki mpe mingi.

Nzokande, ata na eleko nini, bamasuwa oyo ezalaki kotambola pembenipembeni ya mokili ekokaki komata na nɔrdi na bokula ya Palestine mpe kokende tii na wɛsti, na koleka pembenipembeni ya etúká ya Pamfilia. Na eteni ya nsuka, mipɛpɛ oyo ezalaki kouta na mokili mpe oyo ezalaki kobɛta longwa na wɛsti ekokaki kosalisa bamasuwa etambola malamu. Yango nde esalemaki na masuwa oyo Paulo, oyo azalaki mokangami, asalaki na yango eteni ya liboso ya mobembo ntango akendaki na Roma. Kasi, mipɛpɛ ekokaki mpe “kobɛta liboso.” (Mis. 27:4) Ekoki kozala ete masuwa oyo ememaki biloko, oyo Luka alobeli mingi na lisolo yango, eutaki na Ezipito mpo na kokende na nɔrdi; ebalukaki mpo ekɔta na eteni ya mbu oyo ekaboli esanga ya Shipre ná Azia Moke. Ntango balongwaki na Mira, kapitɛni azalaki na makanisi ya kokoba kokende na ngámbo ya wɛsti, tii akokóma na sudi ya Grɛsi mpe kokatisa na bokula ya wɛsti ya Itali. (Mis. 27:5, 6) Nzokande, makambo nyonso ebongwanaki mpo eleko oyo basalaki mobembo wana ezalaki eleko ya mipɛpɛ makasi!

“Mopɛpɛ . . . makasi ezalaki kobɛta” (Misala 27:7b-26)

9, 10. Mikakatano nini ebimaki ntango masuwa ekómaki pembeni ya Krɛtɛ?

9 Kapitɛni ya masuwa azalaki na mokano ya kokoba kokende na ngámbo ya wɛsti longwa na Kinide, kasi Luka, oyo azalaki na kati ya masuwa yango, alobi ete “mopɛpɛ ezalaki kopekisa biso kokende liboso.” (Mis. 27:7b) Ntango masuwa etikaki mokili, mipɛpɛ ya makasi oyo ezalaki kouta na nɔrdi-wɛsti etindikaki yango na sudi, mbala mosusu na vitɛsi makasi. Esanga ya Krɛtɛ ebatelaki masuwa yango na mipɛpɛ oyo ezalaki kobɛta yango liboso ndenge esanga ya Shipre ebatelaki masuwa oyo bakɔtaki liboso. Ntango masuwa elekaki Salomone, na ɛsti ya esanga ya Krɛtɛ, mipɛpɛ ekitaki mwa moke. Mpo na nini? Masuwa ekómaki na sudi ya esanga, mpe yango ezalaki lokola kobomba yango liboso ya mipɛpɛ makasi. Kanisá ndenge oyo mitema ya bato oyo bazalaki na kati ya masuwa ekitaki! Kasi, lokola masuwa ezalaki kaka na kati ya mbu, bato ya masuwa bazalaki kaka komitungisa mpo eleko ya malili makasi ekómaki kopusana.

10 Luka alobi boye: “Nsima ya kotambola na mpasi pembenipembeni [ya Krɛtɛ], tokómaki na esika moko oyo ebengami Mabongo Kitoko.” Atako mokili ezalaki kobatela masuwa na mipɛpɛ makasi, ezalaki kaka mpasi kotambwisa yango. Atako bongo, nsukansuka, bamonaki mwa libongo moko epai bakokaki kosɛma, oyo mbala mosusu ezali na esika oyo bokula ebaluki na ngámbo ya nɔrdi. Baumelaki ntango boni na esika wana? Luka alobi ete “ntango mingi,” kasi na nsima, makambo ezalaki kobonga kaka te mpo bákoba mobembo. Na sanza ya libwa mpe ya zomi, mobembo ya masuwa ezalaki na makama mingi.​—Mis. 27:8, 9.

11. Likanisi nini Paulo apesaki bato oyo azalaki na bango na masuwa, kasi bazwaki ekateli nini?

11 Ekoki kozala ete bato mosusu ya mobembo batunaki Paulo toli mpo asalaki mibembo mingi na Mbu Mediterane. Apesaki likanisi ete masuwa ekoba mobembo te. Soki ekobi mobembo, ekozala na “likama mpe libebi moko monene,” ata mpe bato bakoki kokufa. Nzokande, motambwisi-masuwa mpe nkolo-masuwa bazalaki na mposa ya kokoba mobembo, mbala mosusu bazalaki na mposa bákóma noki na esika moko oyo eleki malamu. Bandimisaki Yuliusi, mpe bato mingi bamonaki ete basengeli kokóma na Feniksi, libongo moko oyo ezalaki mwa mosika, kaka na bokula ya esanga wana. Ekoki kozala ete ezalaki libongo monene mpe malamu koleka, epai bakokaki kolekisa eleko ya malili makasi. Ntango bamonaki mwa mopɛpɛ moko ya malamu eutaki na sudi, batambwisaki masuwa; kasi, mopɛpɛ yango eumelaki te.​—Mis. 27:10-13.

12. Nsima ya kolongwa na esanga ya Krɛtɛ, masuwa ekutanaki na likama nini, mpe bato ya masuwa basalaki nini mpo na kobika na likama yango?

12 Na nsima, makambo ebebaki lisusu makasi: “mopɛpɛ moko ya makasi” eutaki na nɔrdi-ɛsti. “Mwa esanga moko oyo babengi Koda,” oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 65 kobanda na Mabongo Kitoko, ebombaki bango mwa ntango. Atako bongo, masuwa ezalaki na likama ya komemama na sudi mpe kokende kobwakama na zɛlo na bokula ya Afrika. Mpo likambo ya ndenge wana ekómela bango te, bamatelo bamatisaki kano to mwa bwato oyo masuwa ezalaki kobenda na nsima. Basalaki makasi mpo na komatisa yango, na ntembe te mpo etondaki na mai. Na nsima, basalaki mosala makasi ya kokanga masuwa na bansinga to minyɔlɔlɔ ya minene mpo epanzana te. Mpe, bakitisaki biloko oyo etambwisaka masuwa, bilamba to bansinga, mpe babundaki makasi mpo masuwa etala kaka epai mopɛpɛ ezalaki kouta. Kanisá ndenge oyo bazalaki kobanga! Atako basalaki nyonso wana, bazalaki kaka na likama, mpo “mopɛpɛ yango ya makasi ezalaki kobɛta” bango. Na mokolo ya misato, babwakaki biloko ya masuwa na mai, na ntembe te mpo masuwa ezinda te mpo na kilo.​—Mis. 27:14-19.

13. Bato oyo bazalaki na masuwa bazalaki ndenge nini ntango mipɛpɛ makasi ezalaki kobɛta?

13 Na ntembe te bato nyonso bazalaki na nsɔmɔ. Kasi, Paulo ná baninga na ye bazalaki na mpiko. Mwa mikolo liboso, Nkolo ayebisaki Paulo ete akopesa litatoli na Roma, mpe na nsima, anzelu moko amonisaki ete elaka yango ekokokisama. (Mis. 19:21; 23:11) Atako bongo, na boumeli ya pɔsɔ mibale, mopɛpɛ ya makasi ezalaki kokita te, ezalaki kobɛta butu moi. Lokola mbula ezalaki kobɛta mpe mapata minene ezipaki moi mpe minzoto, motambwisi-masuwa akokaki komona mosika te mpo na koyeba soki masuwa ezali wapi to ezali kokende wapi. Kutu, bazalaki ata kokoka kolya te. Ndenge nini moto akokaki kokanisa kolya na kati ya malili, mbula, nsɔmɔ mpe kobanga ya ndenge wana?

14, 15. (a) Mpo na nini Paulo alobelaki likebisi oyo apesaki liboso epai ya bato oyo azalaki na bango na masuwa? (b) Liteya nini tokoki kozwa na nsango ya elikya oyo Paulo apesaki?

14 Paulo atɛlɛmaki. Amonisaki ete akebisaki bango, kasi maloba na ye ezalaki te mpo na kotyola bango, lokola nde azali koloba ete, ‘Sikoyo tosuki wapi?’ Kasi, ezalaki nde mpo na komonisa ete ebongaki báyokela ye. Na nsima, alobaki boye: “Sikoyo nazali kosɛnga bino bózala na mpiko, mpo ata moto moko te akokufa, kaka masuwa nde ekobeba.” (Mis. 27:21, 22) Na ntembe te maloba yango epesaki bato nyonso makasi! Paulo mpe asepelaki mingi lokola Yehova apesaki ye nsango wana ya esengo mpo ayebisa yango bato wana. Ezali na ntina mingi tóbosana te ete Yehova amibanzabanzaka mpo na bomoi ya moto nyonso. Moto nyonso azali na motuya na miso na ye. Ntoma Petro akomaki boye: “Yehova . . . alingi moto ata moko te abomama, kasi alingi ete bato nyonso bábongola motema.” (2 Pe. 3:9) Yango wana, tosengeli kosala makasi tóyebisa bato mingi koleka nsango ya Yehova! Bomoi ya bato mingi ezali na likama.

15 Emonani ete Paulo azalaki kosakwela bato mingi na kati ya masuwa “elikya ya elaka oyo Nzambe apesaki.” (Mis. 26:6; Kol. 1:5) Lokola bato nyonso bazalaki komona ete masuwa ekozinda, Paulo amonisaki bango ntina oyo azalaki na elikya ete bakokufa te. Alobaki boye: “Na butu ya lelo, anzelu moko ya Nzambe oyo ngai nazali moto na ye . . . atɛlɛmaki pene na ngai, mpe alobaki na ngai: ‘Kobanga te, Paulo. Osengeli kotɛlɛma liboso ya Kaisala, mpe talá! Nzambe akobikisa yo ná baoyo ozali na bango na masuwa.’” Paulo alendisaki bango ete: “Yango wana, mibali, bózala na mpiko, mpo nazali kondimela Nzambe ete ekosalema kaka ndenge mpenza bayebisi ngai. Nzokande, tosengeli kokangama na zɛlo na esanga moko.”​—Mis. 27:23-26.

“Bango nyonso bakómaki na mokili kozanga likama” (Misala 27:27-44)

Paulo azali kobondela ná ebele ya bato na kati ya masuwa oyo ememaka biloko. Bato mosusu ya mobembo oyo balɛmbi makasi bakitisi mitó na bango mpe bamosusu bazali kotala. Mampa efandi likolo ya mwa bakesi.

“Apesaki Nzambe matɔndi liboso na bango nyonso.”​—Misala 27:35

16, 17. (a) Ntango nini Paulo asalaki libondeli, mpe yango esalaki nini epai ya bato mosusu? (b) Ndenge nini maloba ya Paulo ekokisamaki?

16 Nsima ya kolekisa pɔsɔ mibale na nsɔmɔ ya liwa, na ntango oyo masuwa ememamaki na ntaka ya kilomɛtrɛ 870, bamatelo bamonaki ete makambo ebongwani; ekoki kozala ete bayokaki lokito ya mbonge oyo ezali kobwakama na libongo. Bakitisaki balongo na nsima ya masuwa mpo ememama te mpe etalisa motó na yango na ngámbo oyo ekoki kosɛma soki esengeli. Na ntango yango, bamatelo balingaki kosundola masuwa mpe bato mosusu oyo bazalaki na kati, kasi basoda bakangaki bango nzela. Paulo ayebisaki mokonzi ya basoda ná basoda na ye ete: “Soki bato oyo batikali na masuwa te, bokoki kobika te.” Lokola masuwa elongwaki mwa moke na likama, Paulo alendisaki bato nyonso ete bálya mwa eloko, ayebisaki bango lisusu ete bakobika. Na nsima, Paulo “apesaki Nzambe matɔndi liboso na bango nyonso.” (Mis. 27:31, 35) Paulo apesaki Luka, Aristarke, mpe bakristo lelo oyo ndakisa ya malamu na ndenge asalaki libondeli wana mpo na kozongisa matɔndi. Mabondeli oyo osalaka liboso ya bato elendisaka mpe ebɔndisaka basusu?

17 Nsima ya libondeli ya Paulo, “bango nyonso bazwaki mpiko mpe babandaki kolya mwa eloko.” (Mis. 27:36) Babwakaki lisusu blé na mbu mpo na kokitisa masuwa kilo, mpo masuwa ezala pɛpɛlɛ lokola ezalaki kopusana na libongo. Ntango ntɔngɔ etanaki, bamatelo bakataki nsinga ya balongo, bakitisaki bankai ya koyenda na nsima, bamatisaki mwa elamba ya masuwa mpo bákoka kotambwisa yango ntango bazali kopusana na mokili. Na mbala moko, motó ya masuwa ekangamaki, mbala mosusu na zɛlɔ to na pɔtɔpɔtɔ, mpe lokola mbonge ya mai ezalaki kobɛta yango, masuwa ebandaki kopanzana na nsima. Basoda mosusu balingaki koboma bakangami mpo moto ata moko te akima, kasi Yuliusi apekisaki bango. Atindaki bato nyonso ete bábɛta mai to bákanga eloko moko mpo bákóma na libongo. Maloba ya Paulo ekokisamaki: bango nyonso 276 babikaki. Ya solo, “bango nyonso bakómaki na mokili kozanga likama.” Kasi, bazalaki na esika nini?​—Mis. 27:44.

“Boboto moko ya koloba te” (Misala 28:1-10)

18-20. Ndenge nini bato ya Malta bamonisaki “boboto moko ya koloba te,” mpe likamwisi nini Nzambe asalaki na nzela ya Paulo?

18 Bato oyo babikaki na masuwa bayebaki na nsima ete bazalaki nde na esanga ya Malta, na sudi ya Sisili. (Talá etanda “Esanga Malta ezalaki wapi?”) Bato ya esanga yango bazalaki koloba monɔkɔ mosusu; kasi bamoniselaki bango “boboto moko ya koloba te.” (Mis. 28:2) Bapelisaki mɔtɔ mpo na bapaya yango oyo bapɔlaki mpe bazalaki kolɛnga na malili. Mɔtɔ esalisaki bango báyoka mwa molunge atako malili ezalaki mpe mbula ezalaki kobɛta. Lisusu, mɔtɔ yango esalisaki bango bámona likamwisi moko.   

19 Paulo apesaki mabɔkɔ mpo na kosalisa bato nyonso. Alɔkɔtaki mwa bankoni, mpe abakisaki yango na mɔtɔ. Na ntango yango, nyoka moko oyo ezalaka na ngɛngɛ mabe ebimaki na kati ya bankoni mpe ekangamaki na lobɔkɔ na ye mpe eswaki ye. Bato ya esanga ya Malta bakanisaki ete Nzambe nde apesi ye etumbu.a

20 Bato oyo bamonaki ndenge nyoka eswaki Paulo bakanisaki ete “akovimba.” Buku moko emonisi ete liloba ya Grɛki oyo esalelami na vɛrsɛ yango ezali “liloba oyo minganga basalelaka.” Tokoki kokamwa te ete liloba ya ndenge wana eyaki mbala moko na makanisi ya “Luka, monganga mpe ndeko ya bolingo.” (Mis. 28:6; Kol. 4:14) Nzokande, Paulo aningisaki lobɔkɔ mpe akweisaki nyoka yango ya ngɛngɛ, kasi ayokaki eloko moko te.

21. (a) Tángá mwa bandakisa ya maloba ya sikisiki oyo Luka asalelaki na eteni oyo ya lisolo na ye. (b) Likamwisi nini Paulo asalaki, mpe yango etindaki bato ya Malta básala nini?

21 Publiusi, moto moko ya bozwi oyo azalaki nkolo-mabele na esanga yango, azalaki kofanda mosika te na esika oyo bazalaki. Ekoki kozala ete azalaki moto oyo Baroma batyaki mpo azala mokonzi na esanga ya Malta. Luka abengaki ye “moto monene ya esanga yango”; asalelaki ebengeli mpenza oyo bato ya arkeoloji bamonaki na makomi mibale oyo bakundolaki na Malta. Moto yango ayambaki malamu Paulo ná baninga na ye mpe afandisaki bango epai na ye mikolo misato. Nzokande, tata ya Publiusi azalaki kobɛla. Luka alobelaki lisusu maladi na ye na maloba ya sikisiki mpenza. Akomaki ete moto yango “alalaki mpo azalaki konyokwama na fiɛvrɛ ná pulupulu ya makila,” ayebisaki mpenza nkombo ya maladi oyo azalaki na yango. Paulo abondelaki mpe atyaki mabɔkɔ likoló ya moto yango, mpe abikaki. Likambo yango ekamwisaki mingi bato ya esanga wana mpe bamemelaki Paulo bato mosusu ya maladi, mpe bayaki na makabo mpo na kosalisa Paulo ná baninga na ye.​—Mis. 28:7-10.

22. (a) Profesɛrɛ moko alobaki nini mpo na lisolo oyo Luka akomaki mpo na mobembo na Roma? (b) Tokotalela nini na mokapo oyo elandi?

22 Eteni ya mobembo ya Paulo oyo totaleli tii na esika oyo elobelami mpenza na bosikisiki. Profesɛrɛ moko alobaki boye: “Lisolo ya Luka . . . ezali lisolo oyo elobi makambo nyonso na bosikisiki mpenza koleka masolo mosusu nyonso na Biblia mobimba. Makambo mikemike oyo alobi mpo na mibembo ya masuwa na siɛklɛ ya liboso ezali mpenza sikisiki mpe ndenge oyo alimboli makambo oyo ezalaki kosalema na ɛsti ya Mbu Mediterane ezali mpenza solo,” ekoki mpenza kozala ete azalaki kokoma makambo ya mokolo na mokolo na kaye. Ekoki mpenza kozala ete Luka azalaki kokoma makambo yango na boumeli ya mobembo na ye ná ntoma Paulo. Soki ezali bongo, eteni oyo elandi ya mobembo na bango, epesaki ye makambo mingi oyo asengelaki kokoma. Paulo akutanaki na makambo nini ntango akómaki na Roma? Tokotalela yango.

ESANGA MALTA EZALAKI WAPI?

Bato balobelaki bisanga ndenge na ndenge mpo na komonisa “Malta,” epai Paulo akómaki ntango masuwa oyo ezalaki komema bango ezindaki. Bato mosusu balobaki ete ezali esanga moko oyo ezali pene na esanga ya Corfou, etalani na bokula ya wɛsti ya Grɛsi. Bato mosusu batalelaki liloba oyo mokanda ya Misala esaleli, oyo ebongolami na “Malta.” Liloba yango ya Grɛki ezali Mélitê. Yango wana, bato mosusu balobaki ete ezali esanga ya Melita Illyrica, oyo ebengamaka lelo Mljet, oyo etalani na bokula ya ekólo Croatie, na Mbu ya Adriatique.

Ya solo, Misala 27:27 elobeli “mbu ya Adria”; kasi na eleko ya Paulo, mai oyo ezalaki kobengama “mbu ya Adria” ezalaki monene koleka eteni ya mai oyo ebengamaka lelo Mbu ya Adriatique. Yango esangisaki Mbu ya Ionienne mpe eteni ya mbu oyo ezali na ɛsti ya Sisili tii na wɛsti ya Krɛtɛ, mpe na ndenge yango, esangisaki mbu oyo ezali pembeni ya esanga oyo ebengamaka lelo Malte (Malta).

Masuwa oyo Paulo azalaki ememamaki na sudi kobanda na Kinide tii na sudi ya esanga ya Krɛtɛ. Lokola mipɛpɛ makasi ebɛtaki, ezali mwa mpasi tókanisa ete masuwa ebalukaki mpe ekendaki na ngámbo ya nɔrdi tii na Mljet to na esanga moko pembeni ya Corfou. Na yango, ekoki mpenza kozala ete Malta ezalaki na wɛsti ya esanga ya Krɛtɛ, mosika mpenza. Yango emonisi ete Malta, oyo ezali na sudi ya Sisili, nde esanga epai masuwa wana ezindaki.

a Lokola bato bayebaki nyoka ya ndenge wana emonisi ete bitupa ezalaki na esanga yango na ntango wana. Lelo oyo, bitupa ezalaka te na esanga ya Malta. Ekoki kozala ete makambo mingi ebongwanaki na esanga yango nsima ya bankama ya bambula. Ekoki mpe kozala ete lokola bato bakómaki kobakisama mingi na esanga yango, basilisaki bitupa nyonso.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto