Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 15/4 lok. 3
  • Tokoki koumela mbula boni na bomoi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tokoki koumela mbula boni na bomoi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Masolo mosusu
  • Bato ya ntango ya kala bazalaki mpenza na bomoi molai?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Tokelamá te mpo tókufa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2019
  • Elikya ezali mpo na bomoi molai?
    Lamuká!—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 15/4 lok. 3

Tokoki koumela mbula boni na bomoi?

Lelo oyo, bato bazali koumela mingi na bomoi koleka ndenge ezalaki liboso. Likambo yango ezali kopusa bato mosusu na komituna ete ‘tokoki koumela ntango boni na bomoi?’

BUKU moko (The New Encyclopædia Britannica [1995]) eyebisi ete, na bambula eleki, bato bazalaki kondima ete Pierre Joubert nde moto oyo aumelaki mingi na bomoi. Akufaki na mobu 1814, ntango azalaki na mbula 113. Ya solo, balobaka ete ezali na bato mosusu oyo baumelaki mingi koleka ye, kasi bambula na bango ekomamaki na mikanda te. Kasi, ezali na mikanda ya solosolo oyo emonisi ete bato mosusu baumelaki mingi na bomoi koleka Pierre Joubert.

Jeanne Louise Calment abotamaki na mboka Arles na sudi-wɛsti ya ekólo France, na mokolo ya 21 Febwali 1875. Ntango akufaki na mokolo ya 4 Augusto 1997, balobelaki ye mingi na bansango. Na 1986, Shigechiyo Izumi, moto ya ekólo Japon akufaki ntango azalaki na mbula 120. Na buku moko (Guinness Book of Records 1999) bakomaki ete Sarah Knauss alekaki bato nyonso na mbula na ntango bakomaki buku yango. Abotamaki mokolo ya 24 Sɛtɛmbɛ 1880 na etúká ya Pennsylvanie, na États-Unis. Ntango Marie-Louise Febronie Meilleur, na etúká ya Québec, na ekólo Canada, akufaki na 1998, azalaki na mbula 118, kasi alekaki Sarah na mikolo 26.

Ya solo, mibange ya kalakala bakómi mingi mpenza. Balukiluki bazali kokanisa ete ntango tokokóma na katikati ya ekeke ya 21, bato milio 2,2 bakozala na mbula koleka nkama! Ndenge moko mpe, bato oyo bazali na mbula 80 mpe koleka babakisami mingi: na 1970 bazalaki milio 26,7; na 1998 bakómaki milio 66. Yango ezali kobakisama ya 147 %, nzokande bafandi ya mokili mobimba babakisami na 60 %.

Lisusu, bato bazali kosuka kaka na koumela mingi na bomoi te. Mibange mingi bazali mpe kosala makambo oyo bato mingi oyo bazali na mbula 20 to koleka mwa moke bakoki kosala yango te. Na 1990, John Kelley, azalaki na mbula 82, apotaki mbangu na ntaka ya kilomɛtɛlɛ 42,194 na ngonga mitano na miniti mitano. Na 1991, Mavis Lindgren, mobange mwasi moko ya mbula 84, apotaki mbangu na ntaka wana na ngonga nsambo na miniti libwa. Na mikolo eleki, mobange moko ya mbula 91 apotaki tii na nsuka na momekano ya mbangu oyo babéngi Marathon de New York!

Yango elingi koloba te ete mibange ya ntango ya kala bazalaki kosala makambo ya kokamwa te. Ntango azalaki na mbula 99, Abalayama oyo Biblia elobeli, “abandaki mbangu mpo na koyamba” bapaya oyo bayaki epai na ye. Ntango azalaki na mbula 85, Kalebe alobaki ete: “Nguya na ngai [lelo oyo] ezali [lokola] ezalaki nguya na ngai na ntango yango [mbula 45 liboso] mpo na etumba mpe na mpo na kokende mpe na [kozonga].” Lisusu, Biblia elobi ete ntango Mose azalaki na mbula 120, “miso na ye ibebaki te, mpe nguya na nzoto na ye esilaki te.”​—Genese 18:2, NW; Yosua 14:10, 11; Deteronome 34:7.

Yesu Klisto alobaki ete Adama moto ya liboso mpe Noa moto oyo atongaki masuwa, bazalaki mpenza na bomoi. (Matai 19:4-6; 24:37-39) Mokanda ya Genese elobi ete Adama aumelaki mbula 930, mpe Noa aumelaki mbula 950. (Genese 5:5; 9:29) Ezali mpenza solo ete bato baumelaki mbula mingi boye? Tokoki koumela na bomoi bambula koleka oyo wana, to mpe mpo na libela? Tosɛngi yo otalela makambo oyo ezali kondimisa yango na lisolo oyo elandi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto