Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 15/6 nk. 25-26
  • ‘Mposa ya koluka koyeba na motema mpe na makanisi’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Mposa ya koluka koyeba na motema mpe na makanisi’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Makambo ya siansi oyo moto akoki koyeba
  • Lolenge ya koyeba Mozalisi malamumalamu
  • Mozalisi na biso Monene azali komibanzabanza mpo na biso!
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Mokanda ya sika oyo mozali kosepelisa bato mingi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Luká koyeba Mozalisi na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Yehova azali Mozalisi na biso
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 15/6 nk. 25-26

‘Mposa ya koluka koyeba na motema mpe na makanisi’

“Nakokoka te kolimbola na maloba esengo oyo ezali se kobakisama ntango nazali kotánga buku Y a-t-il un Créateur qui se soucie de vous? Buku yango ezali mpenza kopesa moto mposa ya kotánga yango mpo na koyeba makambo mingi. Natɔndi bino na ndenge bolamwisi mposa ya koluka koyeba na motema mpe na makanisi na ngai.”

EZALI ndenge wana Motatoli ya Yehova moko oyo afandaka na etúká ya Caroline du Nord, na États-Unis, amiyokaki ntango azalaki kotánga buku moko la Société Watch Tower abimisaki na mayangani ya etúká oyo ezalaki na motó ya likambo “Nzela ya Nzambe ezali nzela ya bomoi” na 1998 mpe 1999. Ata soki ozali na buku yango te, yoká ndenge bato mosusu balobaki.

Mwa mikolo, nsima ya kozwa buku yango na liyangani ya San Diego, na etúká ya Californie, na États-Unis, moto moko akomaki boye: “Ndenge ngai nazali komona, buku oyo ezali mpenza kolendisa kondima. Etondisi motema na ngai na botɔndi mpo na misala ya Yehova. Nakómi sikoyo na lokasa 98, mpe nazali komona lokola ete mokanda yango esila te! Ezali kopesa esengo mingi.”

Mwasi moko na Azia akomaki boye: “Na liyangani, molobi asalelaki maloba ‘buku oyo ekeseni na buku mosusu,’ mpe maloba yango eyokani mpenza na makambo oyo ezali na kati ya buku. Likambo moko oyo eleki malamu na buku yango ezali ete ezali kondimisa motángi na makasi te ete Nzambe azali, kasi ezali nde komonisa makambo ya solo.”

Na kati ya makambo yango, tozali na makambo ya kokamwa oyo bato ya siansi bazali komona na mikolo na biso na ntina na mokili, bomoi, mpe biso moko. Yango esepelisaki bato mingi. Mwasi moko na Californie, akomaki boye: “Nazangi mpenza maloba mpo na kolimbola ndenge buku moke oyo esimbi motema na ngai. Mwaye ya kotika kotánga buku oyo ezalaki te mpamba te lokasa mokomoko ezali komonisa makambo ya sika mpo na mokili mpe bomoi. Nayekoli mpenza makambo mingi! Nakobatela buku moke oyo malamu mpe nakokabola mosusu epai na bato mingi.”

Likambo oyo esepelisaki bato mingi ezali ndenge buku yango elobeli Biblia na mokuse, emonisi polele bizaleli ya Mozalisi. Moto moko alobaki: “Likanisi mobimba ya Biblia oyo bakomi na mokɔngɔ ya buku yango, ezali moko na makanisi malamu oyo natángá.” Mwa moke nsima ya liyangani ya liboso na etúká ya New York, na États-Unis, moto moko akomaki boye: “Buku oyo ya sika ezali kobenda likebi ya bato koleka mikanda nyonso oyo bobimisá. Nasepelaki mingi na makambo ya solo ya siansi oyo emonisi ete Mozalisi azali. Ndenge bolobeli Biblia na mokuse ekoki mpo na kolimbola makambo oyo esalamá mpe mpo na kopesa mposa ya kotánga mingi.”

Makambo ya siansi oyo moto akoki koyeba

Makambo ya siansi oyo tozali kokuta na mikapo ya ebandeli ekoki komonana lokola ete ezali mpasi mpo na koyeba yango, kasi yoká ndenge bato mosusu balobaki.

Mobali moko na ekólo Canada akomaki ete: “Buku oyo ekeseni na babuku ya makambo ya siansi oyo bakomi na yango balukaka kobangisa biso na maloba ya makasimakasi. Bozali mpenza na boyebi na ndenge bosalisi biso tóyeba makambo ya physique, chimie, A.D.N., chromosomes, mpe bongo na bongo. Ebongaki bino nde bókoma mikanda oyo nayekoláká na iniversite eleki sikoyo bambula mingi!”

Profesere moko oyo atángisaka fizike na iniversite akomaki boye: “[Buku] yango ezali kolimbola polele makambo na yango kozanga mindɔndɔ na bandimbola milaimilai ya tekiniki. Buku yango ezali komema motángi na kokanisa mpe ezali koyebisa makambo basava oyo bayebani mingi balobaki. Oyo ezali ‘buku malamu ya kotánga’ mpo na moto nyonso oyo alingaka koyeba ndenge mokili mpe bomoi ebandá, ata soki azali moto ya siansi to te.”

Elenge mwasi moko azali kolanda kelasi ya lifulumɛ alobaki boye: “Nakamwaki ntango nafungolaki mokapo ya minei mpe natángaki maloba euti na buku oyo tozali koyekola na kelasi! Napesaki profesere na biso buku yango mpe nalobelaki ye ete nayebi ete akokuta makambo oyo ekosepelisa ye. Nalakisaki ye lokasa 54 esika balobeli bɔɔngɔ. Atángaki yango mpe alobaki, ‘Namoni ezali malamu! Nakotalela yango lisusu.’”

Depite moko ya ekólo Belgique akomaki boye: “Eloko ebendaki likebi na ngai mpe esimbaki motema na ngai ezali makanisi ya siansi oyo ezali komonisa ete boyebi ya siansi ya ntango oyo endimi mateya ya Biblia ete Nzambe moko azali. Ezali likanisi oyo esengeli mpenza kobenda likebi na biso.”

Lolenge ya koyeba Mozalisi malamumalamu

Buku yango esalisaki bato na mikili mingi báyeba Nzambe malamumalamu mpe bámiyoka ete bazali pene na ye. Na engumba ya Fukuoka, na ekólo Japon, moto moko oyo atángaki buku yango alobaki boye: “Ezali lokola talatala ya monene oyo ezali kolakisa Yehova mpo na mbala ya liboso. Buku yango ezali mpenza kondimisa. Nayei koyeba Yehova na ndenge oyo nakanisá naino bongo te tii sikoyo.” Moto moko na ekólo Salvador akomaki ete: “Bolimboli polele ete Nzambe azali na motema mawa, azali na ngɔlu, ayokaka nkanda noki te, mpe atondi na boboto. Ezali mpenza eloko oyo tozali na yango mposa mpo tózala pene na ye mpe ya Mwana na ye. Ezali buku ya liboso oyo elimboli mayoki ya Yehova mpe mayoki ya bomoto oyo Mwana na ye, Yesu azali na yango.” Lisusu motángi moko na ekólo Zambie alobaki boye: “Sikoyo nayebi Yehova malamumalamu.”

Batatoli ya Yehova bazali na esengo ya kokabola epai ya bato buku Y a-t-il un Créateur qui se soucie de vous? Motatoli moko alobaki boye: “Ntango nasilisaki kotánga mokapo ya 10 oyo elobi [“Soki Mozalisi amibanzabanzaka mpo na bato, mpo na nini minyoko ezali mingi?”] nalobaki ete, ‘Oyo ezali mpenza buku oyo tosengeli na yango awa na Japon!’ Nakobosana makambo ya mokapo oyo te mpe nakosalela yango mpenza mingi na mosala ya kosakola.” Ndeko mwasi mosusu azali koyekola Biblia na elenge mwasi moko oyo abɔkwamaki na tempelo epai tata na ye azali nganga-nzambe, alobi ete: “Azalaki kondima te ete Mozalisi azali. Eloko moko te na kati ya bandimbola oyo buku wana ezali kopesa ezali kondimisa bato na makasi, kasi bobele bilembeteli; na bongo, namoni ete ezala ata basambeli ya Bouddha bakoki kotánga yango kozanga kokakatana. Ezali lisusu kosalisa biso tóyeba ete Yehova alingaka biso mingi.”

Maloba oyo euti na ekólo Angleterre: “Nasilisi kotánga buku Créateur mpe nalingi kozongela yango lisusu. Ezali mpenza buku kitoko! Soki kaka moto atángi yango akoki kolinga Yehova. Napesaki yango na moninga moko ya kartye, nsima ya kotánga mikapo mibale mpamba alobaki, ‘Azali kokoka kotika kotánga buku yango te, ezali kopesa moto esengo mingi.’ Nayebi ete ekosalisa bato báyeba mpe bálinga Mozalisi na biso Monene.”

Mobali moko na etúká ya Maryland, na États-Unis, alobaki: “Ebakisi mposa na ngai na makambo ya elimo! Nakani kopesa yango na bato nyonso oyo nakutanaka na bango na mosala na ngai. Ntango mosusu nazalaki kokakatana mpo nakobanda koteya bato yango, bazalaka na misala mingi mpe batángá mingi. Sikoyo, na lisalisi ya buku oyo nakozwa maloba kitoko mpe ya malamu mpo na kobanda lisolo.”

Ya solo, buku Y a-t-il un Créateur qui se soucie de vous? ekosalisa bato na mokili mobimba.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 25]

Fɔtɔ na likoló ya lokasa ya ebandeli, Nébuleuse de l’aigle: J. Hester and P. Scowen (AZ State Univ.), NASA

Y a-it-⁠il un Créateur qui se soucie de vous?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto