Mposa ya kolanda baninga mpe mosala na yo ya kosakola
1 Mposa ya kolanda baninga ezali nguya moko makasi oyo etambwisaka bato—ezala na makambo malamu to na makambo mabe. Baninga na biso basaleli ya Yehova bazalaka na bizaleli malamu oyo etindaka biso ete tósala misala malamu ya Boklisto. (Eb.10:24) Nzokande, Bandeko na biso oyo bazali batatoli ya Yehova te, baninga na biso ya mosala, baninga ya kelasi, baninga ya kartye, to bato mosusu oyo toyebani na bango, bakoki kotinda biso tólanda nzela oyo eyokani te na mitinda ya Boklisto. Bakoki koloba “mabe mpo na etamboli na [biso] malamu na kati ya Klisto.” (1 Pet. 3:16) Ndenge nini tokoki kokangama na ekateli na biso ya kosakola atako baninga na biso bazali kotungisa biso ete tólanda bango?
2 Bato ya libota: Ntango mosusu mobali to tata oyo azali Motatoli ya Yehova te akoki koboya ete mwasi na ye mpe bana na ye básakola. Yango ekómelaki libota moko na mboka Mexique. Mwasi ya moto moko mpe bana na bango nsambo bayambaki solo. Liboso mobali yango azalaki kosepela na solo te mpamba te alingaki te bato ya libota na ye basakolaka mpe bakabolaka mikanda oyo ekolimbolaka Biblia ndako na ndako. Azalaki kokanisa ete yango ekokitisa lokumu na bango. Kasi, mwasi na ye mpe bana na bango bakangamaki kaka na ekateli na bango ya kosalela Yehova mpe kobima ntango nyonso na mosala ya kosakola. Na nsima, mobali yango abandaki komona ntina ya bibongiseli ya Nzambe oyo etali mosala ya kosakola, ye mpe amipesaki epai ya Yehova. Esengelaki na ye mbula 15 mpo andima solo, kasi alingaki kosala yango soki mwasi na ye mpe bana na bango bakangamaki te na mosala na bango ya kosakola?—Luka 1:74; 1 Kol. 7:16.
3 Baninga ya mosala: Ntango mosusu, baninga na yo mosusu ya mosala bakoki kosepela te na milende oyo ozali kosala mpo na kopesa bango litatoli. Ndeko mwasi moko alobi ete mokolo moko, ntango bazalaki kosolola na baninga na ye ya mosala mpo na oyo etali nsuka ya mokili, baninga na ye batyolaki ye ntango ayebisaki bango ete bátánga Matai 24. Nzokande, mwa mikolo moke na nsima, moninga na ye moko ayebisaki ye ete atángaki mokapo yango mpe akamwaki mingi. Ndeko mwasi apesaki ye mokanda, mpe bazwaki bibongiseli mpo mwasi yango na mobali na ye bábanda koyekola Biblia. Mbala ya liboso bayekolaki tii na ngonga ya 2 ya ntɔngɔ. Na nsima ya boyekoli na bango ya misato, babandaki koyangana na makita, mpe mosika te batikaki komela likaya mpe babandaki kosakola nsango malamu. Yango elingaki kozala bongo soki ndeko mwasi asalaki molende moko te mpo na kobanda koyebisa elikya na ye epai ya bato mosusu?
4 Baninga ya eteyelo: Bilenge batatoli bakutanaka na mitungisi mingi ya kolanda baninga na bango ya eteyelo mpe babangaka ete bilenge mosusu batyola bango ntango bazali kobima na mosala ya kosakola. Elenge mwasi moklisto moko na États-Unis alobaki ete: “Nazalaki kobanga kopesa litatoli epai ya bilenge mosusu mpo nazalaki kobanga ete basɛka ngai.” Na yango azalaki kolekisa mabaku malamu ya kopesa litatoli epai ya baninga na ye na eteyelo mpe na teritware na bango. Ndenge nini okoki kokóma na makasi ya koboya kolanda baninga? Tyá elikya epai ya Yehova, luká ete ye andima yo. (Mas. 29:25) Moná ete makoki oyo ozali na yango ya kosalela Liloba ya Nzambe na mosala ya kosakola ezali likambo ya lokumu. (2 Tim. 2:15) Elenge oyo touti kolobela abandaki kobondela Yehova, kosɛnga ye ete asalisa ye akolisa mposa ya kosolola na baninga na ye ya eteyelo. Abandaki kopesa litatoli ya libaku malamu na eteyelo, azwaki matomba malamu, mpe mosika te akómaki kosolola na moto nyonso oyo ayebanaki na ye. Mpo na kosukisa alobi boye: “Bilenge yango bazali na mposa bapesa bango elikya mpo na mikolo oyo ezali koya, mpe Yehova azali kosalela biso mpo tósalisa bango.”
5 Baninga ya kartye: Ekoki kozala ete baninga ya kartye to bato mosusu oyo toyebani na bango, bazali mpenza kosepela na biso te mpo tozali batatoli ya Yehova mpe mpo na bindimeli na biso. Soki ozali kobanga mpo na makambo oyo bato yango bazali kokanisa mpo na yo, omituna motuna oyo: ‘Bayebi solo oyo ezali komema na bomoi ya seko? Nasengeli kosala nini mpo na kosimba mitema na bango?’ Mokɛngɛli moko ya zongazonga amonaki ete litomba malamu ezwamaka ntango tozali kopesa litatoli moke moke epai ya bato oyo tofandaka na bango kartye moko. Tóbondela Yehova mpo na kozwa makasi oyo tozali na yango mposa mpe mayele ya kolanda koluka bato ya mitema sembo.—Filp. 4:13.
6 Soki tolandi bato oyo bazali kotɛmɛla biso, yango ekoki kosepelisa bango, kasi yango ekozala mpenza na litomba malamu mpo na bango to mpo na biso? Yesu, batɛmɛlaki ye epai ya bato ya engumba na ye moko. Akangaki motema ata liboso ya maloba ya kozokisa oyo bandeko na ye bazalaki kolobela ye. Kasi ayebaki ete akoki kosalisa bango bobele soki atikali sembo na nzela oyo Nzambe atyaki liboso na ye. Yango wana, Yesu “ayikaki mpiko na maloba mabe ya bato ya masumu oyo bazalaki kotɛmɛla bolamu na bango moko.” (Ebe. 12:2, 3, NW ) Biso mpe tosengeli kosala bongo. Zalá na ekateli ya kosala mingi mpenza na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Soki ozali kosala bongo, “okomibikisa yo mpenza mpe bango bazali koyoka yo.”—1 Tim. 4:16.