Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 1/9 nk. 8-14
  • Bilenge: bólanda elimo ya mokili te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bilenge: bólanda elimo ya mokili te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Elimo ya mokili ezali nini?
  • Elimo ya mokili emonanaka na makambo nini?
  • Bóboya elimo ya mokili
  • Ndenge ya komonisa “elimo mosusu”
  • Ozali kotɛmɛla elimo ya mokili?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Bilenge: Bozali koluka nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Bomibatela na miziki ya mbindo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Tózwa elimo ya Nzambe, kasi ya mokili te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 1/9 nk. 8-14

Bilenge: bólanda elimo ya mokili te

“Biso toyambi [elimo, NW] na mokili te kasi [elimo, NW] uta na Nzambe.”—1 BAKOLINTI 2:12.

1, 2. (a) Bokeseni nini tokoki komona kati na bilenge ya mokili mpe bilenge oyo bazali na masangá ya Batatoli ya Yehova? (b) Mpo na nini bilenge Batatoli mingi babongi kozwa longonya?

ZULUNALO The Sun-Herald ya ekólo Australie eyebisaki boye: “Bilenge ya lelo balɛmbi nzoto, basundolami mpe bazali batomboki.” Eyebisaki lisusu boye: “Balapolo ya batribinale ezali komonisa ete bilenge oyo bazali kosamba mpo na makambo minene babakisami mingi (22 %) [koleka mbula oyo eleki] . . . Lelo oyo, motango ya bana oyo bazali komiboma ebakisami mbala misato koleka na bambula ya 1960 . . . Mpe kozanga koyokana kati na bilenge na mikóló eyei makasi; yango wana bilenge mingi bazali komipesa na komela bangi, kolangwa masanga mpo bábosana mitungisi na bango.” Likambo yango ezali komonana kaka na mboka moko te. Na mokili mobimba, baboti, balakisi, na minganga ya maladi ya motó bazali komitungisa mpo na bilenge.

2 Bilenge Batatoli ya Yehova bakeseni mpenza na bilenge mingi ya mokili oyo! Tolobi te ete bango bazali bato ya masumu te. Bango mpe bazali kobundisa ‘bamposa ya bolenge.’ (2 Timote 2:22) Kasi soki tozwi bango lokola moto moko, tokoloba ete bilenge yango, na mpiko nyonso, baponi kolanda nzela ya sembo mpe baboyi makambo mabe ya mokili oyo. Topesi bilenge nyonso oyo bozali kolonga “mayele mabe” ya Satana longonya mingi! (Baefese 6:11, NW, maloba na nse ya lokasa) Lokola ntoma Yoane, motema na biso ezali kotinda biso tóloba ete: “Bilenge mibali [na bilenge basi], nasili kokomela bino mpo ete bozali makasi mpe Liloba na Nzambe eumeli kati na bino mpe bosili koleka ye mabe.”—1 Yoane 2:14.

3. Liloba “elimo” ekoki kolimbola nini?

3 Kasi, mpo bólonga ntango nyonso etumba na ye mabe, bosengeli nde kosala makasi bólonga eloko oyo Biblia ebéngi “elimo ya mokili.” (1 Bakolinti 2:12) Moto moko ya mayele na lokota ya Greke alobi ete “elimo” ekoki kolimbola “ezaleli to makanisi oyo ezali epai ya moto mpe ezali kotambwisa ye.” Na ndakisa, soki omoni moto moko azali na ezaleli mabe, okoki koloba ete azali na “elimo” mabe. “Elimo” na yo, ezaleli to makanisi oyo etindaka yo osala likambo boye to boye; yango nde epusaka yo na kosala to na koloba ndenge oyo osalaka. Tomoni mpe ete “elimo” moko ekoki komonana epai ya moto moko to epai ya bato ebele. Ntoma Paulo akomelaki baklisto, elingi koloba bato ebele, ete: “Ngɔlu na Nkolo Yesu Klisto ezala na elimo na bino.” (Filemona 25) Kasi, mokili oyo ezali na elimo nini? Lokola “mokili mobimba ezali kolala na kati na oyo mabe,” Satana Zabolo, elimo ya mokili ekoki kozala malamu te, boye te?—1 Yoane 5:19.

Elimo ya mokili ezali nini?

4, 5. (a) Liboso ya kokóma baklisto, bato ya lisangá ya Efese bazalaki kolanda elimo nini? (b) Nani azali “mokonzi ya nguya ya mopɛpɛ,” mpe “mopɛpɛ” ezali nini?

4 Paulo akomaki ete: “Nzambe nde azongisi bino na bomoi atako bokufaki na mabe mpe na masumu na bino, kala bozalaki kotambola kati na yango na kolanda makambo ya mokili oyo, na kolanda mokonzi ya nguya ya mopɛpɛ, elimo oyo ezali sikoyo kotambwisa bato oyo baboi kotosa. Ɛɛ, kati na bango, kala biso nyonso tozalaki kolanda bamposa ya nzoto na biso, tozalaki kosala makambo oyo nzoto na makanisi elingaki, tobotamaki bana ya nkanda, lokola bamosusu.”—Baefese 2:1-3, NW.

5 Liboso báyekola mateya ya boklisto, baklisto ya Efese bayebaki te ete bazalaki kolanda “mokonzi ya nguya ya mopɛpɛ,” elingi koloba Satana Zabolo. “Mopɛpɛ” yango ezali te esika moko epai Satana na bademo na ye bafandaka. Ntango Paulo akomaki maloba yango, Satana na bademo na ye bazalaki naino kokende na likoló. (Talá Yobo 1:6; Emoniseli 12:7-12.) Liloba “mopɛpɛ” elimboli elimo to makanisi, oyo ezali kotambwisa mokili ya Satana. (Talá Emoniseli 16:17-21.) Lokola mopɛpɛ oyo ezingi biso, elimo yango ezali bipai nyonso.

6. “Nguya ya mopɛpɛ” ezali nini, mpe ndenge nini bilenge mingi bamonisaka yango?

6 Kasi, “nguya ya mopɛpɛ” ezali nini? Ekoki mpenza kolimbola makambo oyo “mopɛpɛ” yango ezali kosala epai ya bato. Paulo alobaki ete elimo yango ezali “kotambwisa bato oyo baboi kotosa.” Elimo ya mokili ezali kopusa bato bázala motɔ́ makasi mpe bátombokaka. Kolanda baninga ezali lolenge moko oyo elimo yango esalaka mosala na yango. Elenge mwasi moko Motatoli alobi: “Na kelasi, moto nyonso azali se kopusa yo ozala mwa motomboki. Bana mike bakobanga yo mingi soki osali likambo oyo ezali komonisa mwa botomboki.”

Elimo ya mokili emonanaka na makambo nini?

7-9. (a) Makambo nini mosusu bilenge bazali kosala oyo ezali komonisa elimo ya mokili? (b) Ozali komona moko na yango na mboka na bino?

7 Bilenge bazali kosala makambo nini oyo ezali komonisa elimo ya mokili? Bazali na bosembo te mpe bazali kotomboka. Zulunalo moko eyebisaki ete bana ebele (koleka 70 %) oyo bazali na kelasi ya 5 mpe ya 6 balobaki ete na bambula oyo balekisi na eteyelo ya ntei (secondaire), batalaki epai ya baninga to na kaye mpo na kozwa biyano malamu na ntango ya baekizame. Bana mingi basepelaka kosala masɛki ya mabe, kobimisa maloba ya kotyola to mpe ya nsɔni. Ezali solo ete Yobo mpe ntoma Paulo basalelaki maloba oyo bato mosusu bakoki kobénga maloba ya kotyola mpo na komonisa nkanda na bango oyo ezalaki mabe te. (Yobo 12:2; 2 Bakolinti 12:13) Kasi, maloba ya kotyola oyo ezali kobima na minɔkɔ ya bilenge mingi ezali mpenza kofinga.

8 Komipesa mingi na masano emonisaka mpe elimo ya mokili. Bilenge mingi basepelaka kokɔta na banganda, na ba ravesa mpe kokende bafeti ya loyenge. Lisusu, bilenge mingi balingaka molato mpe monzele ya mindɔndɔmindɔndɔ. Lelo oyo, bilenge mingi bazali kolanda elimo ya mokili oyo ezali komonisa botomboki: ezali na baoyo balataka bilamba mineneminene lokola bato oyo babɛtaka miziki ya rap mpe bamosusu bazali kosala makambo ya kokamwa lokola kotɔbɔla zolo, motɔlu mpe bisika mosusu. (Talá Baloma 6:16.) Komitungisa mpo na biloko ya mosuni ezali mpe komonisa elimo ya mokili. Zulunalo moko eyebisi ete, “Bakomelesa bazali ntango nyonso kosala bapiblisite ndenge na ndenge mpe bazali kobimisela bilenge biloko ndenge na ndenge.” Na États-Unis, ntango elenge asilisi eteyelo ya ntei, asili kotala piblisite 360 000 na televizyo. Baninga na yo bakoki mpe kopesa yo mposa ya kosomba biloko. Elenge moko ya mbula 14 alobi: “Moto nyonso azali kotuna yo, ‘Triko na yo ezali modɛlɛ nini? bongo veste na yo, bongo pantalon na yo?’”

9 Banda na ntango ya kala, Satana asalelaka miziki mabe mpo na kolamusa mposa mabe ya nzoto. (Talá Exode 32:17-19; Nzembo 69:12; Yisaya 23:16.) Yango wana, tokoki kokamwa te ete bato mingi basepelaka na miziki oyo ezali na melodi, maloba, to ritme oyo ezali kolamusa mposa ya nzoto; nzembo mosusu kutu ezali kolobela yango polele. Kasi, elimo ya mokili ezali mpe komonana na ndenge oyo bato bamipesi na kindumba. (1 Bakolinti 6:9-11) Lisolo moko ya zulunalo moko (The New York Times) eyebisaki boye: “Lelo oyo mpo elenge andimama na baninga na ye asengeli kosala pite . . . Soki okamati bilenge misato oyo bakómi na kelasi ya 5 mpe ya 6 na eteyelo ya ntei, mibale kati na bango basilá kosala pite.” Lisolo ya zulunalo moko (The Wall Street Journal) eyebisaki makambo mingi oyo ezali kolakisa ete bana oyo bazali na mbula 8 tii 12 bazali “kokóma na momeseno ya kosala pite.” Mwasi moko oyo azalaká mopesi-toli ya banakelasi alobi boye: “Tobandi komona mwa bana mosusu ya kelasi ya 6 ya eteyelo ya ebandeli (primaire) na bazemi.”b

Bóboya elimo ya mokili

10. Ndenge nini bilenge mosusu oyo babɔkwamaki na mabota ya baklisto balandaki elimo ya mokili?

10 Ezali mawa na komona ete bilenge baklisto mosusu bazali kolanda elimo ya mokili. Na Japon, elenge mwasi moko alobaki boye: “Na miso ya baboti na ngai mpe bandeko baklisto nazalaki komilakisa mwana malamu. Kasi nazalaki kosala makambo mosusu na kobombana.” Na Kenya, elenge moko alobaki boye: “Na eleko moko nazalaki kosala makambo mosusu na kobombana, nazalaki kokende bafeti, nazalaki koyoka miziki ya rock, mpe nazalaki kotambola na baninga mabe. Nayebaki ete makambo wana ezali mabe, kasi nazalaki komeka kobosana yango, nazalaki kokanisa ete nakotika yango. Kasi, nazalaki kaka kotika te. Nazalaki se kozinda na etamboli yango.” Elenge mosusu na Allemagne alobi boye: “Makambo nyonso ebandaki na baninga mabe. Na nsima nakómaki komela likaya. Nazalaki koluka ete baboti na ngai báyoka motema mpasi, kasi ngai moko nde nayokaki mpasi.”

11. Nini esalisaki Kalebe na kozala na mpiko ya koboya kolanda bato ntango banɔngi bapesaki nsango ya mabe?

11 Atako nyonso wana, moto akoki kobundisa, to mpe koboya elimo ya mokili. Tózwa ndakisa ya Kalebe, moto moko ya kala. Ntango banɔngi oyo bazalaki kobangabanga bapesaki lapolo ya mabe mpo na Mokili ya Ndaka, Kalebe na Yosua, babangaki te mpe balandaki bato te mpo bazalaki mingi. Na mpiko nyonso balobaki ete: “Mokili elekaki biso na kati na yango mpo na konɔnga ezali mokili malamu mingi. Soko [Yehova] asepeli biso, mbɛ akokɔtisa biso na mokili yango mpe akopesa yango na biso. Yango mokili eleki na [miliki, NW] mpe na mafuta na nzoi.” (Mituya 14:7, 8) Nini esalisaki Kalebe na kozala na mpiko ya koboya kolanda bato wana? Yehova alobaki boye mpo na Kalebe: “Ye azali na [elimo, NW] mosusu.”—Mituya 14:24.

Ndenge ya komonisa “elimo mosusu”

12. Mpo na nini ezali malamu tózala na “elimo mosusu” na elobeli na biso?

12 Lelo oyo, esengeli kozala na mpiko mpo na komonisa “elimo mosusu” to makanisi oyo ekeseni na makanisi ya mokili. Okoki kosala yango na koboya masɛki ya mabe mpe maloba ya kotyola. Kutu, liloba ya Greke oyo ebongalami na “masɛki ya mabe” euti na verbe moko oyo elimboli mpenza “kobenda mosuni lokola bambwa.” (Talá Bagalatia 5:15.) Ndenge oyo mino ya mbwa ekoki kobenda mosuni oyo ekangani na mokuwa, moto oyo alingi “masɛki” akoki kobebisa lokumu ya baninga. Kasi Bakolose 3:8 elendisi bino “bólongola na minɔkɔ na bino makambo yango nyonso; nkɛlɛ, nkanda, kotɔnga, kotuka, maloba na nsɔni.” Mpe Masese 10:19 elobi: “Na mingi na maloba, masumu mazangi te; nde ye oyo akangi monɔkɔ na ye azali na mayele.” Soki moto afingi yo, yebá komipekisa mpe ‘pesá ye litama mosusu,’ elingi koloba, mbala mosusu luká bósolola bino mibale mpe na malɛmbɛ mpe na kimya.​—Matai 5:39; Masese 15:1.

13. Ndenge nini bilenge bakoki komonisa ete bamipesi mingi na biloko ya mosuni te?

13 Lolenge mosusu ya kolakisa “elimo mosusu” ezali na komipesa mingi na biloko ya mosuni te. Ya solo, koluka kozala na biloko kitoko ezali mabe te. Yesu Klisto kutu azalaki ata na elamba moko ya ntalo. (Yoane 19:23, 24) Kasi, soki mposa ya kozala na biloko ekómi lobanzo na yo mpe soki ozali kolelalela mpo baboti na yo básombela yo biloko oyo makoki na bango ekoki kopesa nzela te, to soki ozali nde na mposa ya kolanda bilenge mosusu, kebá! mbala mosusu elimo ya mokili ekɔteli yo na ndenge oyo ozali koyeba te. Biblia elobi: “Makambo nyonso kati na mokili, na mposa mabe na nzoto mpe mposa mabe na miso mpe nzombo na bizaleli iuti na Tata te kasi iuti na mokili.” Kolinga te ete elimo ya mokili oyo elingi biloko ya mosuni mingi ekɔtela yo! Sepelá nde na biloko oyo ozali na yango.​—1 Yoane 2:16; 1 Timote 6:8-10.

14. (a) Na ntango ya Yisaya, ndenge nini basaleli ya Nzambe bamonisaki ete bamipesaki mingi na masano? (b) Bilenge mosusu bakutanaki na makama nini na banganda mpe bafeti ya loyenge?

14 Koyeba kotya masano na esika na yango ezali mpe na ntina. Mosakoli Yisaya alobaki boye: “Mawa epai na baoyo bakolamuka na ntɔngɔntɔngɔ ete bápota mbango mpo na komela masanga; baoyo bakoumela kati na butu kino vinyo ekolangisa bango. Bazali na ebɛtɛlo na nsinga mpe na nzenze, na ngomo mpe na pololo mpe na vinyo na bilambo na bango; nde bakotalaka misala na [Yehova] te, bakomona misala na mabɔkɔ na ye te.” (Yisaya 5:11, 12) Ezali mawa na komona ete bilenge baklisto mosusu bamipesaki na bafeti ya loyenge. Ntango batunaki mwa bilenge baklisto báyebisa makambo nini elekaka na banganda, ndeko mwasi moko alobaki: “Bitumba ezangaka te. Mokolo mosusu nakɔtaki na bitumba yango.” Ndeko mobali moko abakisaki ete: “Makambo elekaka kuna ezali: komela masanga, komela likaya, na makambo mosusu ya ndenge yango.” Ndeko mobali mosusu alobaki: “Bato balangwaka. Basalaka makambo ya bozoba! Bangi mpe ezalaka. Makambo ya mabe esalemaka mingi. Soki okanisi ete okoki kokende kuna mpe ekosala yo eloko moko te, yebá ete ozali komikosa.” Yango wana Biblia etángi bilambo ya lokoso, to “bafeti ya loyenge,” na kati ya “misala ya nzoto.”—Bagalatia 5:19-21; Byington; Baloma 13:13.

15. Biblia emonisi likanisi nini ya bokatikati mpo na masano?

15 Soki oboyi masano ya mabe elingi koloba te ete bomoi na yo ekozala kaka mawamawa. Biso tosambelaka “Nzambe . . . ya esengo,” oyo alingi ete osepela lokola ozali elenge! (1 Timote 1:11, Boyokani ya Sika; Mosakoli 11:9) Kasi Biblia epesi likebisi oyo: “Moto oyo alingi bobele bisengo akozala mobola.” (Masese 21:17) Ya solo, soki okómisi masano eloko oyo eleki ntina na bomoi na yo, okozala mobola na elimo. Yango wana, ntango ozali kopona masano, kobosana toli ya Biblia te. Makambo oyo ekoki kosepelisa yo mpe kotonga yo kasi kobebisa yo te ezali mingi.c—Mosakoli 11:10.

16. Ndenge nini bilenge baklisto bakoki kolakisa ete bakeseni?

16 Soki ozali koluka mindɔndɔ te na molato mpe monzele na yo mpe soki ozali koboya bamode okozala lokola bilenge ya mokili te. (Baloma 12:2; 1 Timote 2:9) Ekozala mpe bongo soki ozali kopona miziki oyo olingi koyoka. (Bafilipi 4:8, 9) Elenge moklisto moko alobaki boye: “Nazali na miziki mosusu oyo nayebi malamu ete nasengeli kobwaka yango, kasi ezali miziki kitoko mpenza!” Elenge mobali mosusu mpe alobaki: “Miziki ezali motambo mpo na mpamba te mpo nalingi yango mingi. Soki namoni likambo moko ya mabe na miziki oyo nazali koyoka, to soki baboti na ngai bayebisi ngai yango, esɛngaka mpenza nasala makasi mpo nalonga mposa yango ngai mpamba te nalingaka miziki mingi.” Bilenge, ‘bóyeba mayele ya Satana’ malamu! (2 Bakolinti 2:11) Satana azali kosalela miziki mpo na koluka kokabola bilenge baklisto na Yehova! Mikanda ya la Société ebimisaki masolo mingi oyo elobelaki miziki lokola rap, heavy metal, na rock alternative.d Kasi, mikanda ya la Société ekoki te kolobela lolenge nyonso ya sika ya miziki oyo ekoki kobima. Yango wana, bosengeli kozala na “mayele” mpe na “bososoli” ntango bozali kopona miziki.​—Masese 2:11.

17. (a) Liloba pornéïa elimboli nini, mpe esangisi misala nini? (b) Nzambe alingi ete bana basi elongo na bana mibali bámitambwisa ndenge nini?

17 Mpo na kosukisa, bosengeli mpe kozala ntango nyonso pɛto na etamboli na bino. Biblia elobi: “Bókima pite.” (1 Bakolinti 6:18) Liloba ya Greke oyo ebongolami na pite ezali pornéïa, esangisi makambo nyonso ya nsɔni oyo bato basalaka na binama ya nzoto, makambo oyo Nzambe apekisi epai ya bato oyo babali naino te. Makambo yango ya nsɔni etali mpe kosangisa nzoto na monɔkɔ. Bilenge baklisto mosusu basalaki makambo yango mpe bakanisaki ete bazali mpenza kosala pite te. Nzokande, Liloba ya Nzambe elobi polele ete: “Nzambe alingi boye: bózala bato na ye mpenza mpe bóboya makambo ya nsɔni. Moto na moto na kati na bino afanda na mwasi na ye moko na ndenge ya bosantu mpe ya lokumu.”—1 Tesalonika 4:3, 4, Boyokani ya Sika.

18. (a) Ndenge nini elenge akoki komibatela na mopɛpɛ ya mokili? (b) Tokolobela nini na lisolo elandi?

18 Ɛɛ, Yehova akoki kosalisa bino mpo mopɛpɛ ya mokili ebebisa bino te! (1 Petelo 5:10) Kasi, mbala mingi Satana alakisaka mitambo mabe na ye polele te, mpe ntango mosusu esɛngaka bososoli mpenza mpo na komona likama na yango. Lisolo oyo elandi ebongisami mpo na kosalisa bilenge bákolisa bososoli na bango.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Bokutani mpo na kobina bato ebele oyo mingimingi esalaka ntɔngɔ saa. Talá “Les jeunes s’interrogent . . . Les raves: un amusement sans danger?” na Lamuká! ya 22 Desɛmbɛ 1997, ebimeli ya Lifalanse.

b Bana oyo bazali na mbula soki 11.

c Talá makanisi na mokanda Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano bibongi, nkasa 296-303.

d Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Aprili 1993.

Mituna ya bozongeli

◻ “Elimo ya mokili” ezali nini, mpe “nguya” nini ezali na yango likoló ya bato?

◻ Elimo ya mokili emonanaka na makambo nini epai ya bilenge?

◻ Ndenge nini bilenge baklisto bakoki komonisa “elimo mosusu” na maloba mpe masano?

◻ Ndenge nini bilenge baklisto bakoki komonisa “elimo mosusu” na oyo etali makambo ya bana basi elongo na bana mibali mpe miziki?

[Elilingi na lokasa 9]

Bizaleli ya bilenge mingi ezali kolakisa ete batambwisami na “nguya” ya elimo ya mokili

[Elilingi na lokasa 10]

Yebá kopona miziki

[Elilingi na lokasa 11]

Esengeli kozala na mpiko mpo olanda elimo ya mokili te.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto