Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 15/9 nk. 2-3
  • Ezali na moto oyo amibanzabanzaka mpo na biso?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ezali na moto oyo amibanzabanzaka mpo na biso?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tozali na mposa ya moto oyo amibanzabanzaka mpo na basusu
  • Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?
    Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?
  • Ezali mpenza na moto moko oyo atyelaka ngai likebi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Biblia ya Bedell
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Ezali na moto oyo amibanzabanzaka mpenza mpo na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 15/9 nk. 2-3

Ezali na moto oyo amibanzabanzaka mpo na biso?

“Mpisoli ya banyokolami” ekómi lokola ebale. Na mokili mobimba, bato ebele bazali kotangisa mpisoli mpo na “minyoko.” Bato yango bazali komona “mobɔndisi” te, elingi koloba, moto moko te azali komibanzabanza mpo na bango.​—Mosakoli 4:1.

ATAKO bato ebele bazali kotangisa mpisoli, bato mosusu bazali koyoka ata mawa moke te na mpasi ya baninga na bango bato. Bakangi miso na bango liboso ya bampasi ya bato lokola nganga na Molevi oyo Yesu Klisto alobelaki na lisese na ye. Bato yango bakutaki moto moko oyo azalaki na mpasi ya liwa; miyibi babɛtaki ye, babɔtɔlaki ye biloko mpe babwaki ye pembeni ya nzela. (Luka 10:30-32) Mpo na bato yango, na ntango bango moko mpe mabota na bango bazali malamu, bamibanzabanzaka mpo na bato mosusu te. Kutu, balobaka ete: “Etali ngai te!”

Likambo yango esengeli kokamwisa biso te. Ntoma Paulo alobaki ete na “mikolo ya nsuka” bato mingi bakozala na “bolingo” te. (2 Timote 3:1, 3) Moto moko ayokaki mawa na ndenge oyo bato mingi bazali lisusu komibanzabanza mpo na baninga te. Alobaki boye: “Kala, na Irlande bato bazalaki komibanzabanza mpo na basusu mpe bazalaki kosalisana, sikoyo ekómi moto na moto asala makasi na ye mpe amizwela.” Na mokili mobimba, bato bazali kosala mpe kozwa mpo na bango moko, mpe mpasi ya bato mosusu etali bango te.

Tozali na mposa ya moto oyo amibanzabanzaka mpo na basusu

Ya solo, tozali mpenza na mposa ya moto oyo amibanzabanzaka mpo na baninga. Na ndakisa, tókanisa naino likambo oyo esalemaki na Allemagne: Moto moko azalaki kofanda ye moko, “akufaki liboso ya televizyo na ye na mokolo moko ya Noele mpe bakendaki komona ye nsima ya mbula mitano.” Moto yango “azalaki kofanda ye moko, akabwaná na mwasi na ye, mpe azalaki ebɔsɔnɔ.” Mikakatano oyo akutanaki na yango esilisaki ye esengo nyonso. Moto moko te ayebaki esika azalaki tii mokolo oyo bato ya banki oyo ezalaki kofutela ye ndako bamonaki ete ntango oyo azalaki komonana te eleki mingi. Moto te azalaki mpenza komibanzabanza mpo na ye.

Lisusu, kanisá ndenge oyo bakonzi ya lokoso bazali konyokola bato. Na mboka moko oyo ezalaki na bato 800 000, bato soki 200 000 “bakufaki na monyoko mpe na nzala” nsima ya kobɔtɔla bango mabelé. Kanisá lisusu bana mike oyo bamonaki makambo ya nsɔmɔ mingi. Lapolo moko eyebisaki boye: “Na [ekólo moko], bana mingi bamonaki makambo ebele ya nsɔmɔ: koboma, kobɛta, kosangisa nzoto na basi na makasi, mpe ntango mosusu bilenge nde bazalaki kosala makambo yango.” Omoni mpo na nini moto oyo azali konyokwama na makambo ya ndenge wana akoki komituna, na mpisoli na miso, ete, “Ezali mpenza na moto oyo amibanzabanzaka mpo na ngai?”

Lapolo moko ya ONU eyebisi ete na mikili ya bobola, bato miliare 1,3 bazali kozwa mbongo oyo ekoki ata dolare moko te mpo na kosomba biloko ya kolia mpo na mokolo mobimba. Na ntembe te bato yango bazali komituna soki moto moko amibanzabanzaka mpo na bango. Ebele ya bato oyo bazali kokima bitumba na bamboka na bango bazali mpe komituna ndenge yango. Zulunalo moko (The Irish Times) eyebisi ete bato yango “bazali na mokakatano ya kopona moko na makambo oyo ata moko te ezali malamu: to báfanda na káa etondi na bosɔtɔ to bákende na mboka mopaya epai bakoyamba bango malamu te to bázonga na mboka na bango epai bikólo ekeseni ezali naino kobunda etumba to kowelana.” Zulunalo yango elakisaki batángi mwa lisano moko ya nsɔmɔ: “Kangá miso na yo, tángá moko, mibale, misato, [ntango kaka osilisi, yebá ete] mwana moko akufi na esika moko na mokili. Na kati ya bana 35 000 oyo bakokufa lelo, moko na bango akokufa na nzala to na maladi oyo ekokaki koboma ye te soki bakataki ye mangwele.” Nyonso oyo ezali kosala ete tókamwa te na ndenge bato mingi bazali kolela na mpasi mpe mawa na motema!—Talá Yobo 7:11.

Makambo yango etángamaki ezala bongo? Ezali mpenza na moto oyo amibanzabanzaka mpe lisusu azali na makasi ya kosilisa bampasi mpe minyoko ya bato?

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 2]

Cover and page 32: Reuters/​Nikola Solic/​Archive Photos

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]

A. Boulat/Sipa Press.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto