Biyano na mituna na bino
◼ Makambo nini tosengeli kokeba na yango ntango tozali kosakola epai ya bato ya bolɔkɔ?
Na mokili mobimba, bato milio soki mwambe bazali na bolɔkɔ; basusu kati na bango basepelaka na nsango malamu. (1 Tim. 2:4) Biro ya filiale moko ezwaka mikanda soki 1 400 sanza nyonso oyo bato ya bolɔkɔ mpe baboti na bango batindaka mpo na kosɛnga mikanda oyo elimbolaka Biblia to mpo moto akende kotala bango. Atako bato ya bolɔkɔ mosusu basepelaka mpenzampenza na solo ya Biblia, emonani ete bamosusu bakosaka, bazali nde koluka litomba na bango moko epai ya basaleli ya Nzambe. Mpo na yango, basakoli nyonso basengeli kolanda makebisi oyo elandi na ntango bazali kosakola epai ya bato ya bolɔkɔ.
Mbala mingi tokomelaka bato ya bolɔkɔ mikanda mpo na kopesa bango litatoli. Esɛngisami mpenza ete bandeko basi bákomaka mikanda te epai ya mibali oyo bazali na bolɔkɔ, ata mpo na kosalisa bango na elimo. Ezali mokumba oyo epesami kaka na bandeko mibali oyo bazali na makoki. Bandeko basi oyo bazali na makoki bakoki kopesamela mokumba ya kokomela basi oyo bazali na bolɔkɔ oyo bamonisi mpenza mposa ya solo ya Biblia. Ata soki basɛngi yango, kotindela bato ya bolɔkɔ mbongo to biloko mosusu te.
Soki moto ya bolɔkɔ moko amonisi ete azali kosepela na solo ya Biblia, esengeli kopesa nkombo na ye mpe bolɔkɔ epai ye azali na lisangá oyo ezali penepene ya bolɔkɔ yango. Mbala mingi, bandeko ya lisangá yango oyo bazali na makoki bayebaka nini bakoki kosala ata soki likambo ya ndenge nini ebimi. Soki boyebi te lisangá nini ezali penepene na bolɔkɔ yango, esengeli kotinda mokanda na biro ya filiale.
Soki ndeko oyo baponi ye mpo na kosakola na bolɔkɔ amoni malamu kosala makita ná bato ya bolɔkɔ mpo na koyekola na bato mingi mbala moko, ezali mabe te. Atako bongo, esengeli te kobongisa bokutani to likambo moko boye na bolɔkɔ esika bato ya bolɔkɔ ná basakoli bakoki kosangana esika moko. Lisusu, ezali malamu te basakoli bákendeke ndenge balingi na bolɔkɔ mpe bázala na boninga makasi na bato ya bolɔkɔ.
Tiká ete tózala ‘ekɛngɛ lokola banyoka nzokande lokola bibenga tózala na ngambo te’ na ntango tozali kosakola nsango malamu na bato ya bolɔkɔ.—Mat. 10:16.