Bato balukaka kozala na bomoi molai
“Moto oyo abotami na mwasi azali na mikolo mingi te mpe atondi na mpasi. Akobima lokola felele mpe akokaoka, akolimwa lokola molili mpe akoumela te.”—Yobo 14:1, 2.
ATA lelo, bato mosusu bazali mpe kotya ntembe na maloba wana ya mayele oyo elobeli bomoi mokuse ya moto, maloba oyo elobamaki eleki sikoyo mbula soko 3 500. Bato basepelaka te ndenge bolenge eumelaka te, mpe nokinoki banunaka mpe bakufaka. Yango wana, banda kala, bato bazali kosalela myango ndenge na ndenge mpo na koyeisa bomoi molai.
Na ntango Yobo azalaki na mabelé, bato ya Ezipito bazalaki kolya mabindi ya banyama mpo bázonga lisusu bilenge. Na eleko ya Moyen-Âge, siansi babéngi alchimie ezalaki libosoliboso na mokano ya kobimisa nkisi oyo ekoki kokómisa bomoi molai. Bato mingi oyo bazalaki koyekola siansi yango bazalaki kokanisa ete soki babimisi wolo na mayele na bango moko, yango ekopesa bomoi oyo ekoki kokufa te. Mpe kolya bilei na basaani ya wolo ekoki koyeisa bomoi molai. Na Chine, na ntango ya kala, bandimi ya Lingomba ya Tao bazalaki kokanisa ete bakoki kobongola nzoto ya moto mpe bongo kokufa te soki bazali komanyola, kopema na mitindo ndenge na ndenge mpe kolya bilei oyo ebongi.
Juan Ponce de León, moto ya Espagne, moto ya mibembo mpo na koluka bamboka ya mosika, ayebani mingi mpo azalaki koluka na molende liziba ya mai oyo ezongisaka bato bilenge. Na ekeke ya 18, monganga moko akomaki buku moko (Hermippus Redivivus). Na kati ya buku yango, apesaki likanisi ete bátya bilenge basi na mwa ndako moke na eleko ya molunge, bákanga mpema oyo bakopema kati na milangi mpe básalela mpema yango lokola nkisi mpo na koyeisa bomoi molai. Kasi mwango moko te kati na yango epesaki bato bomoi molai.
Lelo, mbula soko 3 500 nsima ya maloba wana ya Yobo oyo Mose akomáki, moto akómi na sanza, asali mituka, baordinatɛrɛ mpe ayekoli atɔmɛ mpe selile. Kasi, ata siansi esali makambo minene wana, bomoi na biso ezali kaka ‘mokuse mpe etondi na mitungisi.’ Ezali solo ete banda na ekeke oyo eleki, bato bakómi mbala moko koumela mingi na bomoi na mikili ya bozwi. Kasi ezali bongo mingi mpenza mpo bato yango bakómi kozwa bankisi ya malamu, bibongiseli malamu bityami mpo na kolɔngɔnɔ ya nzoto na bango mpe bakómi kolya malamu. Na ndakisa, banda na katikati ya ekeke ya 18 tii na katikati ya bambula ya 1990, na Suède, mibali bazalaki koumela na bomoi mbula soko 40 mpe bakómaki na mbula soko 75 mpe basi bazalaki koumela mbula soko 44 mpe bakómaki na mbula soko 80. Kasi yango ekokisi mpenza mposa ya bato ya kozala na bomoi molai?
Te. Mpamba te atako na mikili mosusu bato bazali kokóma mibange mpenza, maloba oyo ya Mose ezali naino kokokisama lelo ete: “Motuya na mbula na biso ezali ntuku nsambo, mpe soko mpo na makasi ikokóma na ntuku mwambe; . . . zambi ekosila noki mpe biso tokopombwa.” (Nzembo 90:10) Makambo ekobongwana na mikolo ezali koya? Moto akozwa bomoi molai mpenza? Lisolo oyo elandi ekopesa biyano na mituna yango.