Olingaka mpenza Liloba ya Nzambe?
“Nalingi Mobeko na yo na bolingo bɛ! Nakobanzaka yango mokolo mobimba.”—NZEMBO 119:97.
1. Wapi lolenge moko oyo bato oyo babangaka Nzambe bamonisaka ete balingaka Liloba ya Nzambe?
BATO ebele bazali na Biblia. Kasi kozala na Biblia na kolinga Liloba ya Nzambe ezali makambo mibale ekeseni. Moto oyo atángaka Liloba ya Nzambe mingi te, akoki mpenza koloba ete alingaka yango? Te! Nzokande, bato mosusu, liboso bazalaki mpenza kotyela Biblia likebi te, kasi lelo oyo batángaka yango mokolo nyonso Nzambe asalá. Bayekolaki kolinga Liloba ya Nzambe mpe sikoyo, bazali kokanisa Liloba ya Nzambe “mokolo mobimba” lokola mokomi ya nzembo.—Nzembo 119:97.
2. Ndenge nini Motatoli ya Yehova moko alendisaki kondima na ye na ntango ya mpasi?
2 Nasho Dori azali moko na bato oyo bayekolaki kolinga Liloba ya Nzambe. Ye na baninga na ye bandimi, batikaki kosalela Yehova te na boumeli ya bambula ebele na ekólo na bango Albanie. Na bambula wana nyonso, mosala ya Batatoli ya Yehova epekisamaki. Yango wana, baklisto yango ya sembo bazalaki kozwa mikanda mingi te oyo elimbolaka Biblia. Atako bongo, kondima ya Ndeko Dori elɛmbaki te. Azalaki kosala nini? Alobaki boye: “Namonaki malamu natángaka Biblia ata ngonga moko na mokolo, mpe nasalaki yango mbula 60 tii ntango miso na ngai ezalaki lisusu komona malamu te.” Bauti kobongola Biblia na lokota ya Albanais kaka na bambula oyo eleki. Kasi ntango azalaki mwana moke, Ndeko Dori ayekolaki lokota ya Greke, yango wana azalaki kotánga Biblia na Greke. Kotánga Biblia mokolo na mokolo esalisaki Ndeko Dori alɛmba te atako akutanaki na mikakatano ndenge na ndenge. Kotánga Biblia mokolo na mokolo ekoki mpe kosalisa biso.
“Bózala na mposa makasi” ya Liloba ya Nzambe
3. Ndenge nini baklisto basengeli kotalelaka Liloba ya Nzambe?
3 Ntoma Petelo akomaki ete: “Lokola bana oyo babotami sika, bózala na mposa makasi ya miliki ya sika ya liloba.” (1 Petelo 2:2, NW) Ndenge bebe ayokaka mposa makasi ya mabɛlɛ ya mama na ye, baklisto oyo bayebi bamposa na bango ya elimo bazalaka na esengo mingi ya kotánga Liloba ya Nzambe. Yo mpe oyokaka mposa ya Liloba ya Nzambe ndenge yango? Soki te, kolɛmba nzoto te. Yo mpe okoki kolona mposa yango mpo na Liloba ya Nzambe.
4. Mpo na kokóma na momeseno ya kotánga Biblia mokolo na mokolo esengeli kosala nini?
4 Mpo na yango, osengeli liboso komityela mokano ya kotánga Biblia mbala na mbala, ata mpe mokolo na mokolo soki likoki ezali. (Misala 17:11) Mbala mosusu okokoka te kolekisa ngonga mobimba na kotánga Biblia lokola Nasho Dori, kasi okoki mpenza komibombelaka ata mwa ntango moke mokolo na mokolo mpo na kotánga Liloba ya Nzambe. Baklisto mingi balamukaka ntɔngɔntɔngɔ mpo na kotánga mokapo ya Biblia oyo epesami mpo na mokolo na komantɛrɛ na yango. Ezali lolenge malamu mpenza ya kobanda mokolo. Bamosusu basepelaka kotánga Biblia na mpokwa, liboso ya kolala. Bamosusu mpe batángaka Biblia na ngonga oyo bamoni malamu na kotalela programɛ na bango. Na nyonso wana, likambo ya ntina ezali ete tótángaka Biblia mbala na mbala. Yango wana, zwaká mwa ntango mpo na kokanisa malamumalamu makambo oyo otángaki. Tiká tótalela ndakisa ya bato mosusu oyo bazwaki matomba na kotánga Liloba ya Nzambe mpe kokanisa malamumalamu makambo oyo batángaki.
Mokomi ya Nzembo oyo alingaki mibeko ya Nzambe
5, 6. Atako toyebi nkombo ya moto oyo akomaki Nzembo 119 te, makambo nini tokoki koyeba mpo na ye soki totángi mpe tokanisi malamu makambo oyo akomaki?
5 Mokomi ya Nzembo 119 alingaki Liloba ya Nzambe mingi. Biblia eyebisi biso nkombo ya moto yango te. Kasi, makambo oyo nzembo yango elobeli emonisi biso mwa makambo mosusu ya moto yango; mpe emonisi biso ete akutanaki mpe na mikakatano na bomoi na ye. Baninga na ye mosusu, baoyo bazalaki mpe basambeli ya Yehova, balingaki mibeko ya Biblia lokola ye te. Atako bongo, makanisi na bango elɛmbisaki mokomi ya nzembo yango te ete atika kosala oyo ezali malamu. (Nzembo 119:23) Soki ofandaka esika moko to osalaka na moto oyo atosaka mibeko ya Biblia te, okoki komona ete makambo mosusu oyo okutanaka na yango ekokani na makambo oyo mokomi ya nzembo yango akutanaki na yango.
6 Atako azalaki moto oyo amipesaki na makambo ya Nzambe, mokomi wana ya nzembo azalaki komimona sembo koleka baninga na ye te. Na bosembo nyonso, andimaki ete azalaki mpe na mabunga. (Nzembo 119:5, 6, 67) Kasi, amipesaki na kosala masumu te. Atunaki motuna oyo: “Elenge mobali akopɛtola nzela na ye [ndenge] nini?” Mpe apesaki eyano oyo: “Bobele na kokeba ete asala lokola liloba na yo.” (Nzembo 119:9) Na nsima, amonisaki ete Liloba ya Nzambe ezali na bokasi ya kopusa moto na kosala malamu. Alobaki boye: “Nazali kobatela liloba na yo na motema na ngai ete nasala mabe epai na yo te.” (Nzembo 119:11) Nguya oyo ekoki kobatela biso mpo tósala lisumu na miso ya Nzambe te ezali mpenza makasi!
7. Mpo na nini bilenge basengeli mpenza koyeba ete kotánga Biblia mokolo na mokolo ezali na ntina?
7 Ebongi mpenza ete bilenge baklisto bátalela malamumalamu maloba ya mokomi ya nzembo oyo. Bilenge baklisto bazali komekama mingi lelo oyo. Zabolo azali na mposa ya kobebisa bilenge oyo bazali koya kosambela Yehova. Satana azali koluka kobebisa mitema ya bilenge baklisto mpo bálanda bamposa ya nzoto mpe bábuka mibeko ya Nzambe. Bafilme mingi mpe televizyo eteyaka mpenza makanisi ya Zabolo. Bato mingi basepelaka na bavɛdɛti ya bafilme mpe ya televizyo. Balakisaka makambo oyo basalaka, lokola pite to ekobo, lokola nde ezali mabe te. Balingaka báteya bato makanisi nini? ‘Ete ntango mwana mobali na mwana mwasi balingani, ata soki babalani te, ezali mabe te soki bazali kosangisa nzoto.’ Ezali mawa na komona ete mbula na mbula bilenge baklisto mosusu bazali kokwea na motambo yango. Kutu, kondima ya bamosusu ezali kozinda. Tomoni mpenza ete ezali na makambo mabe oyo ezali kobenda bato! Kasi, tokoloba ete makambo yango ezali makasi mingi na boye ete bilenge bakoki kolonga yango te? Ezali bongo te! Yehova alakisi ndenge oyo bilenge baklisto bakoki kolonga bamposa mabe. Bakoki kolonga mayele mabe nyonso oyo Zabolo akoki kosalela soki bazali ‘kokeba ete básala lokola liloba ya Nzambe [elobi] mpe bábatela liloba ya Nzambe na mitema na bango.’ Olekisaka ngonga boni na kotánga Biblia mpe na kokanisa makambo oyo ozali kotánga?
8. Ndenge nini bandakisa oyo epesami na paragrafe oyo ekoki kosalisa yo na kosepela lisusu mingi na Mibeko ya Mose?
8 Mokomi ya Nzembo 119 alobaki boye: “Nalingi Mobeko na yo na bolingo [mingi]!” (Nzembo 119:97) Azalaki kolobela mobeko oyo wapi? Liloba ya Yehova, bakisa mpe Mibeko ya Mose. Soki bataleli yango likolólikoló, bato mosusu bakoki kotyola Mibeko yango ete ezali makambo ya kala, mpe bakoki komituna ndenge nini moto akoki mpenza kolinga yango. Kasi, soki tosali lokola mokomi ya nzembo mpe tokanisi na mozindo makambo ndenge na ndenge oyo ezali na Mibeko ya Mose, tokomona mpenza ete ezali Mibeko oyo ekomami na mayele. Longola ebele ya bisakweli oyo ezali na Mibeko yango, ezali mpe na malako mpo na kobatela nzoto kolɔngɔnɔ mpe mpo na bilei. Makambo yango esalisaki bato bázala pɛto mpe na nzoto kolɔngɔnɔ. (Levitike 7:23, 24, 26; 11:2-8) Mibeko eteyaki bato bázala sembo na makambo ya mombongo mpe elendisaki Bayisalaele báyokelaka bandeko na bango oyo bazalaki babola mawa. (Exode 22:26, 27; 23:6; Levitike 19:35, 36; Deteronome 24:17-21) Mibeko elobaki ete bázala na koponapona te ntango bazali kokata makambo. (Deteronome 16:19; 19:15) Ntango mokomi ya Nzembo 119 akómaki mokolo mpenza, amonaki ete bato oyo bazalaki kotosa Mibeko ya Nzambe bazalaki kozwela yango matomba. Yango wana alingaki lisusu Mibeko yango mingi koleka. Ndenge moko mpe lelo oyo, ntango baklisto bazali kokóma na bomoi malamu mpo bazali kotosa mibeko ya Nzambe, bolingo na bango mpo na Liloba ya Nzambe ebakisamaka.
Mwana ya mokonzi oyo akesanaki na bato mosusu
9. Ndenge nini Mokonzi Hizikiya azalaki kotalela Liloba ya Nzambe?
9 Maloba ya Nzembo 119 ekokani mpenza na makambo oyo toyebi mpo na Hizikiya ntango azalaki naino mwana ya mokonzi. Balimboli mosusu ya Biblia balobaka ete Hizikiya nde akomaki nzembo yango. Atako eloko moko te emonisi polele ete ye nde moto akomaki yango, toyebi ete Hizikiya azalaki kotosa Liloba ya Nzambe mingi. Amonisaki na bizaleli na ye ete makanisi na ye ekokanaki na oyo ekomami na Nzembo 119:97. Biblia elobi boye mpo na Hizikiya: “Amibakisaki na [Yehova] mpe alongwaki na nsima na ye te kasi atosaki mibeko na ye oyo [Yehova] alakisaki Mose.”—2 Mikonzi 18:6.
10. Ndenge nini ndakisa ya Hizikiya ezali kolendisa baklisto oyo babɔkwami na baboti oyo bazali baklisto te?
10 Masolo ya kala ezali komonisa biso ete Hizikiya akolaki na libota oyo ezalaki kobanga Nzambe te. Tata na ye, Mokonzi Ahaza, azalaki kosambela bikeko mpe atumbaki mwana na ye moko na mɔ́tɔ lokola mbeka epai ya nzambe ya lokuta. Mwana wana azalaki ndeko ya Hizikiya! (2 Mikonzi 16:3) Atako Ahaza azalaki ndakisa mabe, Hizikiya ‘apɛtolaki nzela na ye’ mpe alandaki makambo ya bapakano te mpamba te akangamaki na Liloba ya Nzambe.—2 Ntango 29:2.
11. Ndenge Hizikiya amonaki yango, mikakatano nini ekómelaki tata na ye lokola azalaki sembo te?
11 Ntango Hizikiya akolaki, amonaki ndenge tata na ye, mosambeli ya bikeko, azalaki kotambwisa mboka. Bato ya bikólo oyo ezalaki zingazinga balingaki Yuda ata moke te. Lesini, mokonzi ya Sulia, ayokanaki na Peka, mokonzi ya Yisalaele, mpe bazingelaki Yelusaleme. (2 Mikonzi 16:5, 6) Mbala na mbala Baedome na Bafilistia bazalaki kokɔta na Yuda mpo na kobundisa yango. Kutu, babɔtɔlaki bamboka mosusu ya Yuda. (2 Ntango 28:16-19) Ahaza asalaki nini liboso ya mikakatano yango? Ntango Basulia babundisaki ye, na esika asɛnga lisalisi epai ya Yehova, Ahaza akendaki epai ya mokonzi ya Asulia, apesaki ye wolo na palata; mosusu kutu azwaki yango na tempelo. Atako bongo, Yuda ezwaki kimya ya solosolo te.—2 Mikonzi 16:6, 8.
12. Hizikiya asengelaki kosala nini mpo asala makambo mabe lokola tata na ye te?
12 Nsukansuka, Ahaza akufaki mpe Hizikiya akómaki mokonzi ntango azalaki na mbula 25. (2 Ntango 29:1) Azalaki naino elenge mpenza, kasi azalaki mokonzi malamu. Alandaki ndakisa ya tata na ye te oyo azalaki sembo te. Ye akangamaki na mibeko ya Yehova. Mibeko ya Yehova elobaki boye mpo na bakonzi: “Wana ekofanda [mokonzi] na kiti na bokonzi na ye, akokoma mpo na ye mpenza kati na buku maloba na Mobeko oyo, longwa na oyo ezali na mabɔkɔ na banganga, Balevi. Yango ekozala na ye elongo mpe akotánga kati na yango mikolo nyonso na bomoi na ye, ete ayekola [kobanga Yehova] Nzambe na ye na kotosa maloba nyonso na lilako oyo.” (Deteronome 17:18, 19) Lokola azalaki kotánga Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo, Hizikiya ayekolaki kobanga Yehova mpe asalaki mabunga lokola tata na ye te oyo azalaki kobanga Nzambe te.
13. Ndenge nini moklisto akoki komindimisa ete makambo na ye nyonso makozala malamu na ndimbola ya elimo?
13 Ezali kaka bakonzi ya Yisalaele te nde balendisamaki ete báyekolaka Liloba ya Nzambe ntango nyonso. Bayisalaele nyonso oyo bazalaki kobanga Nzambe basengelaki mpe kotángaka Liloba ya Nzambe mbala na mbala. Nzembo ya liboso emonisi ete moto oyo azali mpenza na esengo ezali moto oyo “mposa na ye ezali kati na Mobeko na [Yehova]; akokanisa mpe Mobeko na ye butu na moi.” (Nzembo 1:1, 2) Mokomi ya nzembo alobi boye mpo na moto yango: “Nyonso ekosalaka ye ebongi.” (Nzembo 1:3) Nzokande, Biblia elobi ete moto oyo andimaka Yehova Nzambe te “azali moto moko ya mitema mibale mpe abongolaka bizaleli na ye ntango nyonso.” (Yakobi 1:8, Boyokani ya Sika) Biso nyonso tolingaka kozala na esengo mpe na bomoi ya malamu. Soki tozali kotánga Biblia mokolo na mokolo mpe na ndenge esengeli, ekoki kosalisa biso tózala malamu.
Liloba ya Nzambe esalisaki Yesu
14. Ndenge nini Yesu amonisaki ete alingaki Liloba ya Nzambe?
14 Mokolo moko, baboti ya Yesu bakutaki ye afandi na balakisi na tempelo ya Yelusaleme. Bato yango bayebaki Mibeko ya Nzambe kasi “bakamwaki na bososoli na ye mpe na [biyano] na ye”! (Luka 2:46, 47) Na ntango wana Yesu azalaki na mbula 12. Tomoni mpenza ete ata ntango azalaki naino mwana moke, Yesu alingaki Liloba ya Nzambe mingi. Na nsima, Yesu apamelaki Zabolo na maloba oyo azwaki na Biblia. Alobaki boye: “Moto akobika bobele na kwanga te nde na maloba nyonso makobimaka na monɔkɔ ya Nzambe.” (Matai 4:3-10) Nsima ya mwa ntango, Yesu asalelaki Biblia mpo na koteya bato ya mboka na ye Nasalete.—Luka 4:16-21.
15. Yesu apesaki ndakisa nini ntango azalaki koteya bato mosusu?
15 Ntango Yesu azalaki koteya, mbala mingi azalaki koloba makambo oyo ezali na Liloba ya Nzambe mpo bato bándima mateya na ye. Bato oyo bazalaki koyoka ye ‘bakamwaki mingi na mateya na ye.’ (Matai 7:28) Yango ekoki kokamwisa biso te mpamba te mateya ya Yesu eutaki epai ya Yehova Nzambe! Yesu alobaki boye: “Mateya na ngai mazali na ngai te kasi na motindi na ngai. Ye oyo akosololaka na motema na ye moko azali koluka lokumu na ye mpenza. Nde ye oyo akolukaka lokumu na Motindi na ye azali sembo mpe bokesene ezali kati na ye te.”—Yoane 7:16, 18.
16. Yesu asalaki nini mpo na komonisa ete alingaki mpenza Liloba ya Nzambe?
16 Yesu azalaki na “bokesene te,” kasi mokomi ya nzembo 119 azalaki na bokesene. Yesu azalaki na lisumu te, azalaki Mwana ya Nzambe, mpe ‘amisɔkisaki mpe atosaki kino na kufa.’ (Bafilipi 2:8; Baebele 7:26) Atako Yesu azalaki moto ya kokoka, azalaki koyekola Mibeko ya Nzambe mpe kotosa makambo oyo azalaki koyekola. Yango nde esalisaki ye mpenza mpo azala ntango nyonso sembo. Ntango Petelo asalelaki mopanga mpo na kopekisa bato oyo bayaki kokanga Nkolo na ye, Yesu apamelaki ye mpe atunaki boye: “Oyebi te ’te nakoki kosenga lisalisi epai ya Tata na ngai, mpe na mbala moko akoki kotindela ngai batayo ya baanzelu ebele koleka kutu zomi na mibale? Kasi soki nasali boye, ndenge nini nakokokisa makambo oyo ekomama na Mikanda ’te esengeli kosalama?” (Matai 26:53, 54, Boyokani ya Sika) Mpo na Yesu, kokokisa bisakweli ya Biblia ezalaki na ntina mingi koleka kobika na liwa ya mpasi mpe ya nsɔni. Ya solo, Yesu alingaki mpenza Liloba ya Nzambe!
Bato mosusu oyo balandaki ndakisa ya Klisto
17. Ndenge nini ntoma Paulo azalaki kotalela Liloba ya Nzambe?
17 Ntoma Paulo akomelaki bandeko na ye baklisto ete: “Bólanda ndakisa na ngai, ndenge ngai nazali kolanda ndakisa ya Klisto.” (1 Bakolinti 11:1, NW) Na ndakisa ya Nkolo na ye, Paulo alingaki Biblia mingi. Kutu alobaki boye: “Na nse ya motema na ngai moko nasepelaka mingi mpo na Mibeko ya Nzambe.” (Roma 7:22, Boyokani ya Sika) Mbala mingi, Paulo azalaki koloba makambo oyo ezali na Liloba ya Nzambe. (Misala 13:32-41; 17:2, 3; 28:23) Ntango Paulo apesaki Timote, moninga na ye ya mosala, malako ya nsuka, amonisaki mosala monene oyo Liloba ya Nzambe esengeli kokokisa na bomoi ya mokolo na mokolo ya moto nyonso oyo azali “moto ya Nzambe.”—2 Timote 3:15-17.
18. Pesá ndakisa ya moto moko na mikolo na biso oyo azalaki komemya Liloba ya Nzambe.
18 Na mikolo na biso, basaleli mingi ya sembo ya Yehova balandi ndakisa ya Yesu na likambo etali kolinga Liloba ya Nzambe. Na ebandeli ya ekeke oyo, bakabelaki elenge moko Biblia epai ya moninga na ye. Elenge yango alobaki boye mpo na likabo kitoko oyo bapesaki ye: “Nakanaki ete bomoi na ngai mobimba nakobanda kotánga eteni moko ya Biblia mokolo na mokolo.” Elenge yango ezalaki Frederick Franz. Lokola alingaki Biblia mingi, esalisaki ye na kolekisa bomoi molai mpe ya esengo na mosala ya Yehova. Frederick akangaki mikapo ya Biblia mpe akokaki kozongela yango na mobimba na motó.
19. Ndenge nini bato mosusu babongisaka programɛ ya kotánga Biblia mpo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi?
19 Batatoli ya Yehova balobelaka mingi likambo ya kotánga Biblia mbala na mbala. Pɔsɔ na pɔsɔ, ntango bazali kobongisa likita na bango oyo babengi Eteyelo mpo na mosala ya Teokrasi, batángaka mikapo ya Biblia. Na likita yango, balobelaka makambo ya ntina oyo ezali na mikapo oyo batángaki. Batatoli mosusu bakabolaka mikapo oyo epesami mpo na pɔsɔ mobimba na biteni mingi mpe batángaka eteni moko na mokolo. Ntango bazali kotánga, bakanisaka malamumalamu makambo oyo bazali kotánga. Soki bakoki kosala yango, balukaka na mikanda mosusu oyo elimbolaka Biblia.
20. Esengeli kosala nini mpo na kozwa ntango ya kotánga Biblia mbala na mbala?
20 Mpo otángaka Biblia mokolo na mokolo, mbala mosusu ekosɛnga na yo ‘osomba ntango’ na makambo mosusu oyo osalaka. (Baefese 5:16) Kasi, matomba oyo okozwa eleki mpenza makambo oyo okoki komipimela. Soki obandi komesana kotánga Biblia mokolo na mokolo, okolinga Liloba ya Nzambe mingi. Mosika te, okoloba lokola mokomi ya nzembo ete: “Nalingi Mobeko na yo na bolingo [mingi]! Nakobanzaka yango mokolo mobimba.” (Nzembo 119:97) Ezaleli wana ekopesa yo bolamu sikoyo mpe na mikolo ekoya, ndenge tokomona yango na lisolo elandi.
Ozali koyeba lisusu?
◻ Ndenge nini moto oyo akomaki Nzembo 119 amonisaki ete alingaki Liloba ya Nzambe mingi?
◻ Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Yesu mpe na ndakisa ya Paulo?
◻ Ndenge nini tokoki lisusu kolinga Liloba ya Nzambe mingi?
[Bililingi na lokasa 10]
Bakonzi ya sembo basengelaki kotánga Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo. Yo mpe osalaka yango?
[Elilingi na lokasa 12]
Ata ntango azalaki elenge, Yesu alingaki Liloba ya Nzambe.