Tyelá liloba ya Yehova motema
“Natyeli liloba na yo motema.”—NZEMBO 119:42, NW.
1. Okoki koloba nini mpo na mokomi ya Nzembo 119 mpe elimo oyo azalaki na yango?
MOKOMI ya Nzembo 119 azali moto oyo azalaki kolinga liloba ya Yehova mingi. Ekoki kozala ete ezalaki Hizikiya, mwana ya mokonzi moko ya Yuda. Makanisi oyo emonisami na nzembo yango oyo epemamaki na Nzambe eyokani na elimo ya Hizikiya, oyo “akangamaki na Yehova” ntango ye moko akómaki mokonzi ya Yuda. (2 Mikonzi 18:3-7) Likambo moko oyo tokoki kotyela ntembe ezali ete mokomi ya nzembo yango ayebaki bobola na ye ya elimo.—Matai 5:3.
2. Nini ezali likanisi ya ntina na Nzembo 119, mpe nzembo yango ekomami ndenge nini?
2 Likanisi ya ntina na Nzembo 119 ezali valɛrɛ ya liloba to nsango ya Nzambe.a Mokomi akomaki nzembo yango na kolanda alfabɛ, na ntembe te mpo na kosalisa moto akanga yango na motó. Mokomoko ya bavɛrsɛ 176 ya nzembo yango ebandi na lɛtrɛ moko ya alfabɛ ya Liebele. Na Liebele, mokomoko ya biteni 22 ya nzembo yango ezali na milɔngɔ 8 oyo ebandi nyonso na lɛtrɛ ndenge moko ya alfabɛ. Nzembo yango elobeli liloba, mobeko, banzela, mitindo, malako, bakomandema, mpe bikateli ya Yehova. Na lisolo oyo mpe oyo elandi, tokolobela Nzembo 119 ndenge ebongolami na kolanda malamu Biblia ya Liebele. Soki tozali kokanisa makambo oyo basaleli ya Yehova ya ntango ya kala bakutanaki na yango mpe oyo ya ntango na biso bazali kokutana na yango, ekosalisa biso tókanga ntina malamu ya nzembo yango oyo epemami na Nzambe mpe ekosalisa biso tósepela lisusu mingi na Biblia, Liloba ya Nzambe.
Tosá liloba ya Nzambe mpo ozala na esengo
3. Kozala na mbeba te elimboli nini, mpe pesá ndakisa ya moto moko oyo azalaki na mbeba te.
3 Tozwaka bolamu ya solosolo soki tozali kotosa mibeko ya Nzambe. (Nzembo 119:1-8) Soki tozali kotosa mibeko ya Yehova, akomona ete tozali ‘na mbeba te na nzela na biso.’ (Nzembo 119:1, NW) Ntango balobi ete tozali na mbeba te, yango elakisi te ete tozali bato ya kokoka, kasi emonisi nde ete tozali kosala makasi mpo na kosala mokano ya Yehova Nzambe. Noa “atambolaki elongo na Nzambe” mpamba te “azalaki na mbeba te na kati ya bato ya ntango na ye.” Moto yango ya sembo abikaki na Mpela ná libota na ye mpamba te azalaki kotambola ndenge oyo Yehova asɛngaki. (Genese 6:9, NW; 1 Petelo 3:20) Biso mpe ndenge moko, mpo tóbika na nsuka ya mokili oyo, tosengeli ‘kobatela malamumalamu mitindo oyo Nzambe apesaka’ mpe na bongo, kosala mokano na ye.—Nzembo 119:4, NW.
4. Tosengeli kosala nini mpo tózala na esengo mpe tólonga?
4 Yehova akotika biso ata mokolo moko te soki tozali ‘kokumisa ye na motema ya sembo mpe tozali kokoba kotosa malako na ye.’ (Nzembo 119:7, 8, NW) Nzambe asundolaki Yosua te, mokambi ya Yisalaele oyo alandaki toli ya ‘kotánga buku ya mobeko butu na moi mpo na kotosa makambo nyonso oyo ekomami kati na yango.’ Yango nde esalisaki ye alonga mpe asala na bwanya. (Yosua 1:8) Ata ntango Yosua akómaki na nsuka ya bomoi na ye, akobaki kokumisa Nzambe mpe alobaki na Bayisalaele boye: “Bino boyebi na mitema na bino mpe na milimo na bino nyonso ete eloko moko ezangi te na makambo malamu nyonso oyo [Yehova] Nzambe na bino atyaki ndaka na yango na ntina na bino.” (Yosua 23:14) Lokola Yosua mpe mokomi ya Nzembo 119, biso mpe tokoki kozala na esengo mpe kolonga ntango tozali kokumisa Yehova mpe kotyela liloba na ye motema.
Liloba ya Yehova ebatelaka biso pɛto
5. (a) Limbolá ndenge oyo moto akoki kotikala pɛto na elimo. (b) Makambo nini ekoki kosalisa elenge oyo asali lisumu ya monene?
5 Tokoki kozala pɛto na elimo soki tozali kotosa liloba ya Nzambe. (Nzembo 119:9-16) Tokoki kosala yango ata soki baboti na biso bazali kopesa biso ndakisa ya malamu te. Hizikiya ‘apɛtolaki nzela na ye’ atako tata na ye azalaki kosambela bikeko; maloba wana ekoki kolimbola ete aboyaki losambo ya bato ya bikólo mosusu. Ekoki kozala ete elenge moko oyo azali mosaleli ya Nzambe asali lisumu ya monene. Kobongola motema, libondeli, lisalisi ya baboti na ye, mpe batoli ya bankulutu ekoki kosalisa ye azala lokola Hizikiya, ‘apɛtola nzela na ye mpe azala ekɛngɛ.’—Yakobo 5:13-15.
6. Basi nini ‘bapɛtolaki nzela na bango mpe bazalaki ekɛngɛ na kolanda liloba ya Nzambe’?
6 Atako Lahaba ná Luta bazalaki na bomoi bambula mingi mpenza liboso Nzembo 119 ekomama, bango mpe ‘bapɛtolaki nzela na bango.’ Lahaba azalaki moto ya Kanana mpe mwasi ya ndumba, kasi na nsima, akómaki mosambeli ya Yehova oyo azalaki na kondima makasi. (Baebele 11:30, 31) Luta, mwasi moko ya Moaba, atikaki banzambe na ye, akómaki kosalela Yehova mpe kotosa Mibeko na ye. (Luta 1:14-17; 4:9-13) Basi yango mibale oyo bazalaki Bayisalaele te ‘bazalaki ekɛngɛ na kolanda liloba ya Nzambe’ mpe bazwaki lokumu monene ya kokóma bankɔkɔ ya Yesu Klisto.—Matai 1:1, 4-6.
7. Ndenge nini Danyele ná baninga na ye misato batikaki ndakisa malamu na oyo etali kotikala pɛto na elimo?
7 “Makanisi ya motema ya moto ezali mabe longwa na bolenge na ye”; kasi, bilenge bakoki kotambola na nzela ya pɛto, ata na mokili oyo Satana azali koyangela. (Genese 8:21; 1 Yoane 5:19) Ntango bamemaki Danyele ná baninga na ye bilenge Baebele mosusu misato na boombo na Babilone, ‘bazalaki ekɛngɛ na kolanda liloba ya Nzambe.’ Na ndakisa, baboyaki “bilei kitoko ya mokonzi” mpo bámikómisa mbindo te. (Danyele 1:6-10) Bato ya Babilone bazalaki kolya banyama ya mbindo oyo epekisamaki na Mibeko ya Moize. (Levitike 11:1-31; 20:24-26) Lokola bato ya Babilone bazalaki kokata banyama nkingo te mpe bazalaki kolya misuni na yango, bazalaki kobuka mobeko ya Nzambe mpo na makila. (Genese 9:3, 4) Yango wana, Baebele minei wana baboyaki kolya bilei kitoko ya mokonzi! Bilenge yango oyo bazalaki kobanga Nzambe batikalaki pɛto na elimo mpe na bongo, batikaki ndakisa malamu mpenza.
Liloba ya Nzambe esalisaka biso tózala sembo
8. Ezaleli mpe boyebi nini tosengeli na yango mpo tókanga ntina ya mobeko ya Nzambe mpe tósalela yango?
8 Kolinga mingi liloba ya Nzambe ezali moko na makambo ya ntina oyo moto asengeli kosala mpo atikala sembo epai ya Yehova. (Nzembo 119:17-24) Soki tozali lokola mokomi ya nzembo oyo apemamaki na Nzambe, tokozala na mposa ya kokanga ntina ya “makambo ya kokamwa” ya mobeko ya Nzambe. Tokozala ntango nyonso ‘na mposa ya bikateli ya Yehova’ mpe tokomonisa ete tozali ‘kosepela na makebisi na ye.’ (Nzembo 119:18, 20, 24, NW) Soki tobandi kosalela Yehova sika, tokómi nde na ‘mposa makasi ya mabɛlɛ oyo ezali ya liloba’? (1 Petelo 2:1, 2) Tosengeli koyeba malamu mateya ya ebandeli ya Biblia mpo esalisa biso tókanga ntina ya mobeko ya Nzambe mpe tósalela yango.
9. Tosengeli kosala nini ntango makambo oyo bato bazali kosɛnga biso eyokani te na mobeko ya Nzambe?
9 Ekoki kozala ete tolingaka makebisi ya Nzambe; kasi, ezali boni soki “bana ya mokonzi” bazali koloba mabe mpo na biso? (Nzembo 119:23, 24, NW) Lelo oyo, bakonzi mingi bazali kolinga ete tótosa mibeko ya bato liboso ya kotosa mibeko ya Nzambe. Soki makambo oyo bato bazali kosɛnga biso eyokani te na mokano ya Nzambe, tosengeli kosala nini? Bolingo makasi oyo tozali na yango mpo na liloba ya Nzambe ekosalisa biso tótikala sembo epai ya Yehova. Biso mpe tokoloba ndenge bantoma ya Yesu Klisto balobaki ntango banyokolaki bango ete: “Tosengeli kotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato.”—Misala 5:29.
10, 11. Monisá ndenge oyo tokoki kotikala sembo epai ya Yehova ata soki tozali na mpasi makasi.
10 Tokoki kotikala sembo epai ya Yehova ata soki tozali na mikakatano makasi. (Nzembo 119:25-32) Mpo tólonga kotikala sembo epai ya Nzambe, tosengeli kozala motó makasi te mpe kobondela makasi mpo ateyaka biso. Tosengeli mpe kopona “nzela ya bosembo.”—Nzembo 119:26, 30, NW.
11 Hizikiya, oyo mbala mosusu akomaki Nzembo 119, aponaki “nzela ya bosembo.” Alandaki yango atako afandaki na bato oyo bazalaki kosambela banzambe ya lokuta mpe ekoki kozala ete libota ya mokonzi mpe bato oyo bazalaki kosala ná mokonzi bazalaki kosɛka ye. Ekoki mpenza kozala ete mpo na makambo wana, ‘molimo na ye ezalaki kozanga mpɔngi mpo na mpasi na motema.’ (Nzembo 119:28, NW) Atako bongo, Hizikiya atyelaki Nzambe motema, akómaki mokonzi ya malamu, mpe asalaki oyo “ezalaki sembo na miso ya [Yehova].” (2 Mikonzi 18:1-5) Biso mpe, soki tozali kotyela Nzambe motema, tokoki koyikela minyoko mpiko mpe kotikala sembo.—Yakobo 1:5-8.
Liloba ya Yehova epesaka mpiko
12. Ndenge nini mokomoko na biso akoki kosalela makanisi ya Nzembo 119:36, 37?
12 Kotosa liloba ya Nzambe epesaka biso mpiko oyo tosengeli na yango mpo na kolonga mikakatano ya bomoi. (Nzembo 119:33-40, NW) Toyekolaka mateya ya Yehova na komikitisa nyonso mpo tóbatela mobeko na ye “na motema mobimba.” (Nzembo 119:33, 34, NW) Lokola mokomi ya nzembo, tosɛngaka Nzambe boye: “Balolá motema na ngai epai ya makebisi na yo, kasi na matomba te,” elingi koloba matomba ezangi sembo. (Nzembo 119:36, NW) Lokola ntoma Paulo, ‘tomitambwisaka na bosembo na makambo nyonso.’ (Baebele 13:18) Soki patrɔ na biso asɛngi biso tósala likambo moko oyo elongobani te, na mpiko nyonso tobatelaka malako ya Nzambe; mpe Yehova azangaka te kopambola ekateli na biso. Kutu, asalisaka biso tólonga bamposa nyonso ya mabe. Yango wana, tóbondelaka boye: “Tiká ete miso na ngai etala te makambo oyo ezangi ntina.” (Nzembo 119:37, NW) Tosengeli soki moke te kolula makambo ezangi ntina oyo Nzambe ayini. (Nzembo 97:10) Ezaleli yango esalisaka biso tóboya makambo lokola kotala bafilme to mikanda ya bato bazali bolumbu mpe misala ya bilimo mabe.—1 Bakolinti 6:9, 10; Emoniseli 21:8.
13. Ntango bayekoli ya Yesu bazalaki konyokwama, ndenge nini bazwaki makasi ya kopesa litatoli na mpiko?
13 Boyebi ya sikisiki ya liloba ya Nzambe esalisaka biso tópesa litatoli na mpiko nyonso. (Nzembo 119:41-48) Tosengeli kozala na mpiko mpo na ‘kopesa eyano na ye oyo azali koloba mabe mpo na biso.’ (Nzembo 119:42, NW) Ntango mosusu tokoki kozala lokola bayekoli ya Yesu oyo, ntango bazalaki konyokola bango, babondelaki boye: “Yehova, . . . pesá baombo na yo likoki ya kokoba koloba liloba na yo na mpiko mpenza.” Nini esalemaki? “Bango nyonso batondaki na elimo santu mpe babandaki koloba liloba ya Nzambe na mpiko.” Nkolo Mokonzi oyo asalisaki bango, asalisaka biso mpe tóloba liloba na ye na mpiko.—Misala 4:24-31.
14. Nini esalisaka biso tópesa litatoli na mpiko lokola Paulo?
14 Tokozala na mpiko ya kopesa litatoli kozanga koyoka nsɔni soki tozali kolinga makasi “liloba ya solo” mpe ‘kobatela ntango nyonso mobeko ya Nzambe.’ (Nzembo 119: 43, 44, NW) Komipesa na koyekola Liloba ya Nzambe epesaka biso makoki ya ‘koloba makebisi na ye liboso ya bakonzi.’ (Nzembo 119:46, NW) Libondeli mpe elimo ya Yehova ekosalisa biso mpe tóloba makambo oyo ebongi mpe na ndenge oyo ebongi. (Matai 10:16-20; Bakolose 4:6) Na mpiko nyonso, Paulo ayebisaki makebisi ya Nzambe liboso ya bakonzi na ekeke ya liboso. Na ndakisa, apesaki litatoli epai ya Felikisi, guvɛrnɛrɛ Moloma, mpe moto yango “ayokaki ye na likambo etali kondimela Klisto Yesu.” (Misala 24:24, 25) Paulo apesaki mpe litatoli epai ya Guvɛrnɛrɛ Fesitusi mpe Mokonzi Agilipa. (Misala 25:22–26:32) Na lisalisi ya Yehova, biso mpe tokoki kopesa litatoli na mpiko mpe ‘koyokela nsango malamu nsɔni’ ata moke te.—Baloma 1:16.
Liloba ya Nzambe ebɔndisaka biso
15. Ndenge nini Liloba ya Nzambe ekoki kobɔndisa biso ntango bato mosusu bazali kosɛka biso?
15 Liloba ya Yehova ebɔndisaka mpenza. (Nzembo 119:49-56) Ntango mosusu tozalaka mpenza na mposa ya kobɔndisama. Atako biso Batatoli ya Yehova tosakolaka na mpiko nyonso, ntango mosusu “bato ya lolendo,” baoyo babangaka te kosala mabe na miso ya Nzambe, ‘basɛkaka biso mingi.’ (Nzembo 119:51, NW) Nzokande, ntango tozali kobondela, makambo ya kolendisa oyo totángaki na Liloba ya Nzambe ekoki kozongela biso na makanisi mpe ‘kobɔndisa’ biso. (Nzembo 119:52, NW) Ntango tozali kopesa Nzambe malɔmbɔ na biso, tokoki kokanisa mobeko to etinda moko ya Biblia oyo ekobɔndisa biso mpe ekopesa biso mpiko oyo tosengeli na yango na ntango ya mpasi.
16. Makambo nini basaleli ya Nzambe basalaki te ata ntango bazalaki kotɛmɛla bango?
16 Bato ya lolendo oyo bazalaki kosɛka mokomi ya nzembo bazalaki Bayisalaele, elingi koloba bato ya libota ya Nzambe. Likambo ya nsɔni mpenza! Biso tósala lokola bango te, tózala nde na ekateli ya kotika mobeko ya Nzambe soki moke te. (Nzembo 119:51) Ntango Banazi banyokolaki basaleli ya Nzambe to mpe ntango bato mosusu banyokolaki bango na nsima, mingi baboyaki kotika mibeko mpe mitinda ya Liloba ya Nzambe. (Yoane 15:18-21) Kotosa Yehova ezali mpe kilo te mpamba te batoli na ye ezali lokola banzembo ya kobɔndisa mpo na biso.—Nzembo 119:54; 1 Yoane 5:3.
Zalá na botɔndi mpo na liloba ya Yehova
17. Kosepela na liloba ya Nzambe etindaka biso tósala nini?
17 Tolakisaka ete tozali na botɔndi mpo na liloba ya Nzambe soki tozali kotosa yango. (Nzembo 119:57-64) Mokomi ya nzembo ‘alakaki ete akobatela maloba ya Yehova,’ mpe ata ‘na midi ya butu azalaki kolamuka mpo na kotɔnda Nzambe mpo na bikateli na Ye ya sembo.’ Soki mpɔngi ekimi biso na butu, ezali libaku malamu mpo na kobondela Nzambe mpe kopesa ye matɔndi! (Nzembo 119:57, 62) Lokola liloba ya Nzambe ezali na motuya mingi na miso na biso, tolukaka mateya na ye mpe yango ekómisaka biso ‘baninga ya baoyo babangaka Yehova,’ elingi koloba bato oyo bazali na limemya mingi mpo na Nzambe. (Nzembo 119:63, 64, NW) Na mokili mobimba, ezali na baninga mosusu te oyo baleki bato ya ndenge wana!
18. Ndenge nini Yehova ayanolaka mabondeli na biso ntango ‘bansinga ya bato mabe ezingi biso’?
18 Ntango tozali kobondela na motema na biso mobimba mpe na komikitisa nyonso, tozali kosɛnga Yehova ateya biso, tozali ‘kosepelisa ye’ mpo na kozwa ngɔlu na ye. Tosengeli mpenzampenza kobondelaka ntango ‘bansinga ya bato mabe ezingi biso.’ (Nzembo 119:58, 61, NW) Yehova akoki kokata bansinga ya banguna oyo ekangi biso mpe kopesa biso bonsomi mpo tósakola Bokonzi mpe tókómisa bato bayekoli. (Matai 24:14; 28:19, 20) Likambo yango emonanaka mingi na mikili oyo mosala na biso epekisami.
Zalá na kondima na liloba ya Nzambe
19, 20. Na ndenge nini ekoki kozala malamu tónyokwama?
19 Kondima epai ya Nzambe mpe na liloba na ye ekoki kosalisa biso tóyika mpiko ntango tozali na mikakatano mpe tósala mokano na ye. (Nzembo 119:65-72) Atako bato ya lolendo ‘bapakolaki ye lokuta,’ mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Ezali malamu mpo na ngai lokola banyokolaki ngai.” (Nzembo 119:66, 69, 71, NW) Na ndenge nini ekoki kozala malamu mpo na mosaleli ya Yehova anyokwama?
20 Ntango bazali konyokola biso, na ntembe te tobondelaka Yehova na etingya, mpe yango esalaka ete tópusana penepene na ye. Yango ekoki kosala ete tómipesa mingi na koyekola Liloba na ye mpe tóbakisa milende mpo na kotosa yango. Yango ebakisaka esengo na bomoi na biso. Kasi, ezali boni soki na ntango tozali konyokwama, tomoni ete tozali na motema mokuse to na lolendo? Kobondela na etingya, Liloba ya Nzambe mpe elimo na ye ekoki kosalisa biso tólonga bizaleli yango mpe ‘tólata bomoto ya sika’ malamumalamu. (Bakolose 3:9-14) Longola yango, kondima na biso elendisamaka ntango tozali koyikela minyoko mpiko. (1 Petelo 1:6, 7) Minyoko ya Paulo esalisaki ye mpamba te etindaki ye akóma kotyela Yehova motema mingi. (2 Bakolinti 1:8-10) Biso mpe totikaka ete minyoko ebota mbuma malamu epai na biso?
Tótika te kotyela Yehova motema
21. Nini emonanaka ntango Nzambe ayokisi bato ya lolendo nsɔni?
21 Liloba ya Nzambe emonisi ntina malamu oyo tosengeli kotyela Yehova motema. (Nzembo 119:73-80, NW) Soki tozali kotyela Mozalisi na biso motema, tokozala na ntina ya koyoka nsɔni te. Nzokande, mpo na makambo oyo bato mosusu bazali kosala biso, tozali na mposa ya kobɔndisama mpe kobondela ete: “Tiká bato ya lolendo báyoka nsɔni.” (Nzembo 119:76-78, NW) Soki Yehova ayokisi bango nsɔni, yango emonisaka polele banzela mabe na bango mpe esantisaka nkombo na ye. Tokoki kozala na elikya ete bato oyo bazali konyokola basaleli ya Nzambe bazwaka eloko moko ya malonga te. Na ndakisa, balongaka te mpe ata mokolo moko te bakolonga kosilisa Batatoli ya Yehova, bato oyo batyelaka Nzambe motema na bango mobimba.—Masese 3:5, 6.
22. Na ndimbola nini mokomi ya nzembo azalaki “lokola ekótó na kati ya milinga”?
22 Liloba ya Nzambe elendisaka elikya oyo totyelaka ye ntango tozali konyokwama. (Nzembo 119:81-88) Lokola bato ya lolendo banyokolaki ye, mokomi ya nzembo amiyokaki ‘lokola ekótó na kati ya milinga.’ (Nzembo 119:83, 86, NW) Na ntango ya kala, bazalaki kosala bikótó ya mposo ya nyama mpo na kotya mai, masanga to miliki. Soki bazali kosalela yango te mpe batye yango na ndako oyo ezangi tiyo oyo ebimisaka milinga, bikótó yango ekokaki kofinanafinana. Yo mpe osilá komiyoka lokola “ekótó na kati ya milinga” mpo na minyoko to mikakatano mosusu? Soki osilá koyoka bongo, tyelá Yehova motema mpe bondelá ye boye: “Na motema-boboto na yo, batelá ngai na bomoi, mpo nakoba kotosa makebisi na yo.”—Nzembo 119:88, NW.
23. Makambo nini toyekoli na Nzembo 119:1-88, mpe motuna nini tokoki komituna liboso tóyekola Nzembo 119:89-176?
23 Makambo oyo toyekoli na eteni ya liboso ya Nzembo 119 emonisi ete Yehova azali na boboto epai ya basaleli na ye mpo batyelaka liloba na ye motema mpe balingaka mingi malako, makebisi, bakomandema, mpe mibeko na ye. (Nzembo 119:16, 47, 64, 70, 77, 88, NW) Asepelaka ete bato oyo bamipesi na ye bázala ekɛngɛ na kolanda liloba na ye. (Nzembo 119:9, 17, 41, 42) Ntango tozali kozela boyekoli ya eteni oyo etikali ya nzembo kitoko yango, ekozala malamu omituna boye: ‘Natikaka mpenza ete liloba ya Yehova ezala pole mpo na nzela na ngai?’
[Maloba na nse ya lokasa]
a Awa bazali kolobela nsango ya Yehova, kasi te Biblia to Liloba ya Nzambe mobimba.
Okopesa eyano nini?
• Nini epesaka bolamu ya solosolo?
• Ndenge nini liloba ya Yehova ebatelaka biso pɛto na elimo?
• Ndenge nini liloba ya Nzambe epesaka mpiko mpe ebɔndisaka?
• Mpo na nini tosengeli kozala na kondima epai ya Yehova mpe na liloba na ye?
[Bililingi na lokasa 11]
Luta, Lahaba, mpe bilenge Baebele oyo bakendaki boombo na Babilone ‘bazalaki ekɛngɛ na kolanda liloba ya Nzambe’
[Elilingi na lokasa 12]
Na mpiko nyonso, Paulo ‘ayebisaki makebisi ya Nzambe liboso ya bakonzi’