Cyrille Lukaris—Moto oyo atalelaki Biblia na motuya mingi
Ezalaki mokolo moko na eleko ya molunge na mobu 1638, babomi-mbisi na Mai Monene ya Marmara pembeni ya engumba Constantinople (lelo oyo Istanbul), mboka-mokonzi ya Empire ottoman; bakamwaki ntango bamonaki ebembe ya moto moko ezali kotepatepa na mai. Ntango batalaki yango malamu, bayokaki nsɔmɔ na komona ete moto yango ezalaki nde mokonzi monene ya lingomba na Constantinople, mokonzi ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse. Ezalaki na ndenge yango nde Cyrille Lukaris, mokonzi moko monene ya lingomba na ekeke ya 17 akufaki.
LUKARIS alingaki kobimisa libongoli ya Makomami ya Greke ya boklisto na monɔkɔ ya Greke oyo bato nyonso balobaka kasi akufaki liboso ete mposa na ye ekokisama. Likambo mosusu oyo Lukaris azalaki na mposa ete esalema kasi esalemaki te, ezalaki ete Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse esengelaki kozongela “mateya ya Evanzile, mateya oyo ezali na mindɔndɔ te.” Lukaris azalaki nani? Mikakatano nini akutanaki na yango mpo na kokokisa mposa na ye?
Ayokaki mawa mpo bato bazalaki koteyama malamu te
Cyrille Lukaris abotamaki na mobu 1572, na engumba Candie (lelo oyo Héraklion), na esanga ya Crète, na ntango yango eyangelamaki na mboka Venise. Lokola azalaki na mayele mingi, atángaki kelasi na engumba Venise mpe na engumba Padoue na Italie, mpe asalaki mibembo mingi na Italie mpe na bikólo mosusu. Kowelana oyo ezalaki na kati ya lingomba ezalaki kotungisa ye mingi mpe mbongwana oyo ezalaki kosalema na kati ya mangomba na Mpoto ezalaki kosepelisa ye mingi. Ekoki kozala ete akendaki na Genève, epai bato ebele bakómaki kolanda mingi mateya ya Calvin.
Ntango akómaki na ekólo Pologne, Lukaris amonaki ete bato ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse na mboka yango, ezala basango to bandimi, bazalaki lokola babola mpenza na elimo mpo bazalaki koteyama malamu te. Ntango azongaki na engumba Alexandrie mpe na Constantinople, ayokaki mawa mingi na komona ete bisika mpo na kotánga (pupitre) Makomami na bandakonzambe ezalaki lisusu te!
Na mobu 1602, Lukaris akendaki na Alexandrie, kuna akómaki mokonzi monene ya lingomba, na esika ya ndeko na ye Meletios. Ye na bato mingi ya teoloji na Mpoto oyo balingaki lingomba esala mbongwana, bazalaki kotindelana mikanda. Na mokanda moko akomaki ete Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ezali naino na misala mingi ya lokuta. Na mikanda mosusu, alobelaki mingi likambo oyo ete lingomba esengeli kolongola biyambayamba mpe koteya “mateya ya Baevanzile oyo ezali na mindɔndɔ te” mpe lisusu koteya bobele Biblia.
Lukaris ayokaki lisusu mawa na komona ete makambo oyo Batata ya Lingomba bazalaki koloba ezalaki na lokumu ndenge moko na maloba ya Yesu mpe ya bantoma. Akomaki boye: “Nazali koyoka mpasi na motema ntango moto azali koloba ete, tosengeli kotalela makambo ya bonkɔkɔ mpe Makomami ndenge moko.” (Matai 15:6) Alobaki lisusu ete, mpo na ye, losambo ya bikeko ezali mabe mpenza. Lisusu kosala libondeli na nkombo ya “basantu” ezali nde kofinga Moyokanisi, Yesu.—1 Timote 2:5.
Bokonzi ya lingomba ekómi ya kosomba na mbongo
Makanisi wana, bakisa mpe ndenge azalaki koyina Lingomba ya Katolike, etindaki basango ya lisangá ya Jésuite na bato ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse oyo balingaki kosangana na Bakatolike báyina Lukaris mpe bányokola ye. Atako bazalaki kotɛmɛla ye, na mobu 1620, baponaki Lukaris lokola mokonzi monene ya lingomba na Constantinople. Na ntango wana, Empire ottoman ezalaki na bokonzi likoló ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse. Guvɛrnɛma ya Ottoman ekokaki kolongola mokonzi monene moko ya Lingomba mpe kotya mosusu soki bafuti bango mbongo.
Banguna ya Lukaris, mingimingi basango ya lisangá ya Jésuite mpe bato ya Congregatio de Propaganda Fide (Lisangá mpo na kopalanganisa kondima), lisangá moko ya makasi oyo pápa asalaki, bazalaki ntango nyonso kokosela Lukaris makambo mpe kofandela ye makita. Buku moko (Kyrillos Loukaris) elobi ete: “Mpo na kokokisa mokano na bango, basango ya lisangá ya Jésuite basalelaki mayele mabe ya ndenge nyonso: lokuta, sɔngisɔngi, kolɛtɛ (flatterie) mpe mingimingi, kanyaka, yango mpenza nde esalisaki bango na kosomba mitema ya bakonzi ya [Ottoman].” Yango wana, na mobu 1622, babenganaki Lukaris na esanga ya Rhodes, mpe Grégoire moto ya Amasya alakaki kosomba bokonzi ya lingomba na mbongo ya bibende nkóto ntuku mibale (20 000). Kasi, Grégoire akokaki kopesa mbongo oyo alakaki te, na yango Anthimus moto ya Adrianople asombaki bokonzi yango, mpe na nsima atikaki yango. Likambo ya kokamwa, bazongisaki Lukaris mokonzi ya lingomba.
Lokola akómaki lisusu mokonzi, Lukaris azwaki mokano ya kobimisa libongoli moko ya Biblia mpe batrakte ya teoloji mpo na koteya bakonzi ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse na bandimi na bango. Mpo na kokokisa likambo yango, ayokanaki na ambasadɛrɛ ya Angleterre mpo na komema masini ya konyata mikanda (imprimerie) na Constantinople. Nzokande, ntango masini yango ekómaki na mobu 1627, banguna ya Lukaris bakoselaki ye makambo ete azali kosalela yango na makambo ya politiki, mpe na yango babebisaki masini yango. Sikoyo Lukaris asengelaki kosalela bamasini ya konyata mikanda na Genève.
Libongoli moko ya Makomami ya boklisto
Lokola Lukaris azalaki kotalela Biblia na motuya mingi mpe andimaki ete ekoki mpenza koteya bato, yango epesaki ye mposa ya kosala ete moto nyonso akoka kotánga yango. Amonaki ete bamaniskri ya Biblia ya libosoliboso oyo ekomamaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe na lokota ya Greke ezalaki makasi mingi mpo bato mingi bakanga ntina na yango. Buku ya liboso oyo Lukaris atindaki básala ezalaki libongoli ya Makomami ya Greke ya boklisto oyo esengelaki kokómama na monɔkɔ ya Greke oyo bato nyonso bazalaki koloba na ntango na ye. Maximus Callipolites, ye azalaki sango mpe atángaki kelasi mingi, abandaki mosala yango na sanza ya Marsi ya mobu 1629. Bato mingi ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse bazalaki komona ete kosala libongoli mosusu ya Biblia ezali mabe, ata soki bato oyo bazali kotánga oyo ya kala bazali kokanga ntina ya makambo yango te. Mpo na kokitisa bango mitema, Lukaris asalaki boye: akomaki na molɔngɔ moko maloba ndenge ezalaki liboso, mpe na mopanzi abongolaki na ndenge ya sika, azalaki mpe kolimbola mwa maloba mosusu. Lokola Callipolites akufaki mwa moke nsima ya kobimisa maniskri yango, Lukaris ye moko atángaki yango mpo na koyeba soki mabunga ezali to te. Biblia yango ebimaki mwa moke nsima ya liwa ya Lukaris na mobu 1638.
Atako Lukaris asalaki nyonso mpo na kokitisa bato mitema, baepiskɔpɔ mingi basepelaki na libongoli yango te. Maloba oyo Lukaris akomaki na ebandeli ya Biblia yango emonisaki polele ete alingaki mpenza Liloba ya Nzambe. Akomaki ete Makomami, oyo ekomami na ndenge bato nyonso balobaka, ezali “nsango kitoko, oyo likoló epesi biso.” Alendisaki bato “báyeba mpe bámesana na makambo nyonso [ya Biblia]” mpe alobaki ete lolenge mosusu ezali te ya koyeba “makambo etali kondima ya solosolo . . . oyo ebatelami na Evanzile mosantu mpe ya Nzambe.”—Bafilipi 1:9, 10.
Lukaris atɔndɔlaki na mpiko nyonso, baoyo bazalaki kopekisa bato báyekola Biblia mpe baoyo bazalaki koboya bábongola makomi ya ebandeli. Alobaki ete: “Soki tozali koloba to kotánga kozanga ete tókanga ntina, ezali lokola tozali koloba na mopɛpɛ.” (Talá 1 Bakolinti 14:7-9.) Asukisaki maloba ya ebandeli boye: “Wana bozali kotánga Evanzile mosantu oyo ya Nzambe, bótanga yango mpo na kozwela yango litomba, . . . mpe tiká ete Nzambe angɛngisa nzela na bino na makambo malamu ntango nyonso.”—Masese 4:18.
Kokóma mondimi
Nsima ya kobanda kobongola Biblia, Lukaris asalaki likambo mosusu oyo esɛngaki kozala na mpiko. Na mobu 1629 abimisaki mokanda moko, na Genève, oyo ezalaki na motó ya likambo ete: Confession of Faith (Kokóma mondimi). Mokanda yango ezalaki kolobela nde bindimeli na ye moko, mpe akanisaki ete Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ekolanda yango. Mokanda moko (The Orthodox Church), elobi ete mokanda “Kokóma mondimi” ekweisaki liteya ya Lingomba ya Ɔrtɔdokse oyo etali kozala na banganga-nzambe mpe kozala na masangá ya basantu na kati ya lingomba (saints ordres). Mokanda yango emonisaki lisusu ete kosambela bililingi mpe kobondela basantu ezali losambo ya bikeko.”
Mokanda “Kokóma mondimi” ezalaki na masolo 18. Lisolo ya mibale emonisaki ete Nzambe nde akomisaki Biblia mpe makambo oyo ezali na kati ya Biblia eleki oyo lingomba ekoki koloba. Lisolo yango elobi lisusu boye: “Tondimi ete Nzambe nde apesi biso Makomami Mosantu. . . Tondimi mpe ete tosengeli kotosa Makomami Mosantu koleka makambo ya Lingomba. Koteyama na Elimo Santu ekeseni mpenza na koteyama na moto.”—2 Timote 3:16.
Lisolo ya mwambe mpe ya zomi elobi ete Yesu Klisto azali Moyokanisi se moko, Nganga Monene, mpe Mokonzi ya lisangá. Lukaris akomaki ete: “Tondimi ete Nkolo na biso Yesu Klisto afandi na lobɔkɔ ya mobali ya Tata na Ye mpe kuna azali kobondela mpo na biso, ye moko azali kosala mosala ya nganga monene mpe moyokanisi ya solo mpe ya sembo.”—Matai 23:10.
Lisolo ya 12 emonisi ete lingomba ekoki kopɛngwa, ekoki kokanisa ete lokuta ezali solo, kasi kongɛnga ya elimo santu ekoki kozongisa yango na nzela malamu na misala malamu ya basaleli ya sembo. Na lisolo ya 18, Lukaris alobi ete epongelo ezali likanisi mpamba: “Emonani polele ete likanisi ya Epongelo esengeli kondimama te.”
Maloba ya nsuka ya mokanda “Kokóma mondimi” ezali na mituna mpe biyano mingi. Kuna, Lukaris amonisi ete moto nyonso oyo azali sembo asengeli kotánga Makomami mpe ezali mpenza mabe soki moklisto moko atángaka Liloba ya Nzambe te. Alobaki lisusu ete tosengeli koboya mikanda oyo ebengami ete Apokrife.—Emoniseli 22:18, 19.
Motuna ya minei etunamaki boye: “Ndenge nini tosengeli kotalela bililingi?” Lukaris apesi eyano oyo: “Makomami Mosantu mpe ya Nzambe ezali koteya biso polele ete, ‘Okosala ekeko mpo na yo te, soko elilingi na eloko na lola na likoló te, na mokili na nse te, to na mai na nse na mokili te. Okokumbamela yango te to kosalela yango te; [Exode 20:4, 5]’ lokola tosengeli kosalela ekelamu te, kasi bobele Mozalisi mpe Mokeli ya likoló na mabele, mpe kosambela kaka Ye moko. . . . Kosambela mpe kosalela [bililingi], lokola epekisami . . . na Makomami Mosantu, toboyi yango, soki te tokobosana, mpe na esika tósambela Mozalisi mpe Mokeli, tokosambela nde langi mpe mayemi mpe bikelamu.”—Misala 17:29.
Atako Lukaris ayebaki makambo nyonso ya lokuta te, ntango azalaki na bomoi,a na eleko wana ya molili na elimo, asalaki milende oyo ebongi kozwa longonya mpo ete alingaki ete bato bátosa mateya ya Biblia koleka mateya ya lingomba mpe mpo bato báteyama na yango.
Lukaris azwaki lisusu mikakatano mwa moke nsima ya kobima ya mokanda “Kokóma mondimi.” Na mobu 1633, Cyrille Contari, episkɔpɔ ya Berée (lelo Aleppo), monguna ya Lukaris mpe basango ya lisangá ya Jésuite oyo bazalaki kopesa ye mabɔkɔ, bayokanaki na bakonzi ya Ottoman ete akopesa bango mbongo mpo bátya ye mokonzi ya lingomba. Kasi, mayele mabe ya Contari elongaki te lokola akokaki kopesa mbongo yango te. Lukaris atikalaki mokonzi ya lingomba. Na mbula oyo elandaki, Athanasius moto ya Thessalonique apesaki mbongo palata nkóto ntuku motoba (60 000) mpo na kokóma mokonzi ya lingomba. Balongolaki lisusu Lukaris na bokonzi. Kasi, elekaki ata sanza moko te babengaki ye lisusu mpe bazongisaki ye na bokonzi. Na nsima Cyrille Contari apesaki palata nkóto ntuku mitano (50 000). Mbala oyo babenganaki Lukaris na Rhodes. Nsima ya sanza motoba, baninga na ye basalaki nyonso mpe bazongisaki ye na bokonzi.
Kasi, na mobu 1638, basango ya lisangá ya Jésuite na baninga na bango ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse bafundaki Lukaris ete azali koluka kokweisa Empire ottoman. Na mbala oyo mokonzi apesaki mitindo ete báboma ye. Bakangaki Lukaris, mpe mokolo ya 27 Yuli 1638, bakɔtisaki ye na masuwa moko ya moke lokola nde bakei na ye na mboka mopaya. Ntango masuwa ekómaki na kati ya ebale, babomaki ye. Bakundaki ye pembeni ya libongo, na nsima bakundolaki ye mpe babwakaki ye na ebale. Babomi-mbisi balɔkɔtaki ebembe na ye mpe na nsima baninga na ye bakundaki yango.
Liteya mpo na biso
Nganga-mayele moko alobi ete: “Tokoki kobosana te ete moko na mokambo oyo [Lukaris] azalaki mposa asala, ezalaki ya kongɛngisa bakonzi ya lingomba na ye mpe koteya mpe bampate oyo, na ekeke ya zomi na motoba mpe na ebandeli ya ekeke ya zomi na nsambo, bayebaki ata eloko te.” Lukaris akutanaki na mikakatano mingi oyo epekisaki ye kokokisa mposa na ye. Mbala mitano mobimba balongolaki ye na kiti ya bokonzi ya lingomba. Mbula ntuku misato na minei nsima ya liwa na ye, na likita moko oyo baepiskɔpɔ basalaki na Jérusalem balobaki ete bindimeli na ye ezalaki ya lipɛngwi. Balobaki ete Makomaki “esengeli kotángama, na moto nyonso te, kasi bobele na baoyo bayebaka makambo mozindo ya elimo nsima ya kolukaluka makambo na ndenge oyo ebongi,” elingi koloba, kaka bakonzi ya lingomba mpo bazalaki koloba ete bango nde bayekolaki makambo yango na kelasi.
Mbala oyo lisusu, bakonzi ya lingomba bapekisaki milende oyo ezalaki kosalama mpo ete bandimi na bango bázala na Liloba ya Nzambe. Bakangaki monɔkɔ nyonso oyo ezalaki kolobela mabunga ya bindimeli na bango oyo euti na Biblia te. Bamonisaki mpenza ete balingaki ata moke te bato bázala na bonsomi ya losambo mpe báyeba mateya ya solo. Likambo ya mawa, ezaleli yango ezali komonana na ndenge mingi tii na moi ya lelo. Lisolo ya Lukaris ezali komonisa biso makambo oyo esalemaka ntango bakonzi ya mangomba bazali koluka na nzela nyonso mpo na kokanga bato nzela ya kozala na bonsomi ya kobimisa makanisi mpe ya koloba.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na mokanda “Kokóma mondimi,” Lukaris andimaki liteya ya Trinite, andimaki liteya oyo balobaka ete makambo nyonso masilá kokanama liboso mpe andimaki ete molimo ekufaka te; nzokande mateya nyonso wana ezali na Biblia te.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 29]
Lukaris asalaki milende oyo ebongi kozwa longonya mpo ete alingaki ete bato batosa mateya ya Biblia koleka mateya ya lingomba mpe bateyama na yango
[Etanda/Elilingi na lokasa 28]
Lukaris mpe Codex Alexandrinus
Moko na biloko ya motuya oyo ezali na British Library ezali bongo Codex Alexandrinus, maniskri ya Biblia ya ekeke ya mitano T.B. Na ebandeli, maniskri yango ezalaki na nkasa 820, kasi nkasa 773 oyo ebatelamaki, ezali tii lelo oyo.
Ntango Lukaris azalaki mokonzi ya lingomba na Alexandrie, na ekólo Égypte, azalaki na babuku ebele. Ntango akómaki mokonzi ya lingomba na Constantinople, amemaki Codex Alexandrinus. Na mobu 1624 apesaki yango na mabɔkɔ ya ambasadɛrɛ ya Angleterre oyo azalaki na ekólo Turquie amemela Jacques I, Mokonzi ya Angleterre, lokola likabo. Lokola Jacques I akufaki, nsima ya mbula misato, bapesaki yango na Charles I oyo akómaki mokonzi.
Na mobu 1757, Bibliotɛkɛ ya Mokonzi ekómaki bibliotɛkɛ ya Leta mpe codex kitoko wana ezali sikoyo na John Ritblat Gallery na kati ya British Library.
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Gewerbehalle, Vol. 10
Euti na Codex Alexandrinus in Reduced Photographic Facsimile, 1909
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 26]
Bib. Publ. Univ. de Genève