Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 15/4 nk. 17-21
  • Batata ya lingomba balongisaki solo ya Biblia?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batata ya lingomba balongisaki solo ya Biblia?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Makambo ya kala
  • Bakomi mpe balobi
  • Mateya ya Nzambe to mateya ya bato?
  • Moboko oyo esimbi boklisto ya solo
  • Mateya ya filozofi ya Bagreke-Ebongisaki mateya ya boklisto?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Eteni 4—Ntango nini mpe ndenge nini liteya ya Bosato likólaki?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Liteya ya Trinité ekólaki ndenge nini?
    Osengeli kondima Trinité?
  • Osengeli kondima liteya ya Bosato?
    Lamuká!—2013
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 15/4 nk. 17-21

Batata ya lingomba balongisaki solo ya Biblia?

Ozala moklisto to te, ekoki kozala ete mateya na bango esalá likambo moko na ndenge oyo yo otalelaka Nzambe ya Biblia, Yesu mpe boklisto. Moko na bango abengamaki Monɔkɔ ya Wolo; mosusu abengamaki Monene. Bango nyonso babengaki bango “baoyo balandaki mpenza bomoi ya Klisto.” Bazali mpenza banani? Bazali bato ya mayele ya kala ya Lingomba, bakomi, bato ya teoloji, bato ya filozofi, baoyo mateya na bango nde esimbi mpenza makanisi ya mateya ya “boklisto”: Batata ya Lingomba.

DÉMÉTRIOS CONSTANTELOS, profɛsɛrɛ ya makambo ya losambo na Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Grèce, alobi ete: “Liloba ya Nzambe ezali kaka na Biblia te. Elimo Santu oyo eyebisaka liloba ya Nzambe, ekoki kosuka na buku moko te.” Maloba ya Nzambe ekoki kouta na esika nini mosusu oyo tokoki kotyela motema? Na buku na ye (Understanding the Greek Orthodox Church), Constantelos alobi boye: “Bonkɔkɔ ya Lingomba mpe Makomami Mosantu ezali lokola ngámbo mibale ya mbongo ya ebende kaka moko.”

“Bonkɔkɔ ya Lingomba” yango ezali mingimingi mateya mpe mikanda ya Batata ya Lingomba. Bango bazalaki bato minene ya teoloji mpe bato ya filozofi oyo bazalaki mpe “baklisto” banda na ekeke ya mibale tii na ekeke ya mitano na ntango na biso. Ndenge nini mateya na bango ekɔtaki na kati ya mateya ya “boklisto” ya ntango na biso? Bazalaki mpenza koteya Biblia na mateya na bango? Nini esengeli kozala moboko makasi ya solo ya boklisto mpo na moyekoli ya Yesu Klisto?

Makambo ya kala

Na katikati ya ekeke ya mibale ya ntango na biso, bato oyo bazalaki komibenga baklisto mpe bazalaki kobunda mpo na kondima na bango liboso ya Baloma oyo bazalaki konyokola bango, mpe liboso ya bapɛngwi. Nzokande, na ntango yango, ezalaki na mateya ndenge na ndenge ya teoloji. Bato ya mangomba bazalaki kotyana ntembe mpo na “bonzambe” ya Yesu; mpe lisusu bato ya mayele bazalaki na makanisi ndenge na ndenge mpo na lolenge mpe mosala ya elimo santu. Ntembe makasi mpe bokabwani na mateya ya “boklisto” oyo ezalaki kosila te, ekɔtaki tii na makambo ya politiki mpe epai ya bato ya mayele; ntango mosusu ezalaki kobimisa mobulu, botomboki, matata, ata mpe bitumba. Paul Johnson, moto ya mayele na istware, akomi boye: “Boklisto [ya lipɛngwi] ebandaki na mobulungano, na ntembe, na bokabwani mpe ekobaki bongo. . . . Na ekeke ya mibale mpe ya misato na ntango na biso mateya ndenge na ndenge ya mangomba ezalaki koteyama na mikili ya Méditerranée ya katikati mpe ya ɛsti, mpe bato na bato bazalaki kosala makasi mpo na kopalanganisa mateya na bango. . . . Na yango, banda na ebandeli, ezalaki na mitindo ndenge na ndenge ya boklisto, oyo ezalaki na makambo ndenge moko te.”

Na eleko yango, bakomi mpe bato ya mayele mingi bakómaki kokanisa ete basengeli kosalela mateya ya filozofi mpo na kolimbola mateya ya “boklisto.” Mpo na kosepelisa “baklisto” ya sika oyo bazalaki Bayuda te kasi batángá mingi, bakomi yango ya lingomba bazalaki kosalela mingi mikanda ya kala ya Bagrɛki mpe ya Bayuda. Kobanda na Justin le Martyr (soki 100-165 T.B.), moto oyo akomaki mikanda na lokota ya Grɛki, bato oyo bazalaki komibenga baklisto bamipesaki mingi na koyekola mateya ya filozofi ya Bagrɛki.

Likambo yango emonanaki na mikanda ya Origène (soki 185-254 T.B.), mokomi moko ya Grɛki oyo autaki na engumba Alexandrie. Na mokanda moko oyo Origène akómaki (On First Principles), alukaki mpo na mbala ya liboso kolimbola mateya minene ya teoloji ya “boklisto” na maloba ya filozofi ya Bagrɛki. Likita Monene ya Nicée (325 T.B.), oyo emekaki kolimbola mpe kondimisa “bonzambe” ya Klisto, elobelaki likambo moko monene oyo epesaki mpenza bato mposa ya kolimbola mateya ya “boklisto.” Likita yango ebandisaki likambo ya sika ya kolimbola malamumalamu mateya na makita minene ya lingomba.

Bakomi mpe balobi

Eusèbe moto ya Césarée, akomaki mokanda moko na ntango oyo Likita Monene ya liboso ya Nicée esalemaki mpe andimaki makambo oyo Amperɛrɛ Constantin alobaki. Koleka mwa moke mbula 100 nsima ya Likita ya Nicée, bato ya teoloji oyo mingi na bango bazalaki kokoma mikanda na lokota ya Grɛki, babimisaki ntembe makasi oyo ezwaki ntango molai, mpo na Bosato (Trinité), liteya monene ya mangomba ya boklisto. Kati na bango, bakonzi oyo bazalaki na esika ya liboso ezali: Athanase, episkɔpɔ ya Alexandrie, ye azalaki molobi monene, mpe bakambi misato ya lingomba oyo bautaki na Cappadoce, na etúká ya Asie Mineure: Basile le Grand, na ndeko na ye Grégoire moto ya Nysse, mpe moninga na bango Grégoire moto ya Nazianze.

Bakomi mpe basakoli ya ntango wana bakolisaki maloba ya ntɔki. Grégorie moto ya Nazianze mpe Jean Chrysostome (elimboli “Monɔkɔ ya wolo”) bazalaki koloba na lokota ya Grɛki, mpe Ambroise moto ya Milan na Augustin moto ya Hippone, na lokota ya Latin; bazalaki balobi minene, bato ya lokumu mpe ya mayele oyo bayebaki koloba na ntango wana. Mokomi oyo alekaki na ntango wana ezali Augustin. Basalelaki mingi mikanda na ye ya teoloji mpo ete makanisi ya “boklisto” ezala ndenge toyebi yango lelo oyo. Jérôme, moto ya mayele ya kokoma mikanda na ntango wana, asalaki mosala monene ya kobongola Biblia longwa na minɔkɔ oyo ekomamaki na ebandeli mpo na kotya yango na Latin; libongoli yango ebengamaki Vulgate.

Kasi, mituna ya ntina ezali oyo: Batata yango ya Lingomba, balandaki mpenza Biblia? Na mateya na bango, bakangamaki na Makomami oyo epemami? Mikanda na bango epesaka mpenza boyebi ya sikisiki ya Nzambe?

Mateya ya Nzambe to mateya ya bato?

Eumeli naino te, Méthode moto ya Pisidie, episkɔpɔ ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Grèce, akomaki buku moko (The Hellenic Pedestal of Christianity) mpo na komonisa ete mimeseno mpe mateya ya filozofi ya Bagrɛki nde esimbi mateya ya “boklisto” ya mikolo na biso. Na buku yango, andimaki kozanga kokakatana ete: “Batata ya Lingomba nyonso ya minene bazalaki komona ete makambo ya Bagrɛki ezali na ntina mingi, mpe bazwaki yango na mimeseno ya kalakala ya Bagrɛki, mpo na kosalela yango lokola mayele mpo na kososola mpe kolimbola malamu mateya ya boklisto.”

Tókamata na ndakisa, likanisi oyo emonisaka ete Tata, Mwana, mpe elimo santu bazali na kati ya Bosato (Trinité). Nsima ya Likita ya Nicée, Batata mingi ya Lingomba bakómaki kondima liteya ya Bosato. Mikanda mpe masolo na bango esalaki mosala monene mpo na kokómisa Bosato liteya monene na mangomba ya boklisto. Nzokande, Biblia elobelaka Bosato te. Bongo, Batata ya Lingomba bazwaki liteya yango epai wapi? Diksionɛrɛ moko (A Dictionary of Religious Knowledge) emonisi ete mingi balobaka ete Bosato “ezali liteya ya lokuta oyo bazwaki na mangomba ya bapakano, mpe bakɔtisaki yango na mateya ya boklisto.” Mpe buku mosusu (The Paganism in Our Christianity) elobi ete: “Liteya ya [Bosato] eutaki mpenza epai ya bapakano.”a​—Yoane 3:16; 14:28.

Tókamata lisusu liteya oyo elobi ete molimo ekufaka te; endimeli oyo emonisi ete eteni mosusu ya moto etikalaka na bomoi soki nzoto ekufi. Batata ya Lingomba bazalaki mpe bato ya liboso oyo bakɔtisaki likanisi yango na lingomba; likanisi yango ezalaki liboso te. Biblia emonisi polele ete molimo ekoki kokufa: “Molimo oyo asali lisumu, ye akokufa.” (Ezekiele 18:4) Nini mpenza ememaki Batata ya Lingomba na koteya ete molimo ekufaka te? Buku moko (New Catholic Encyclopedia) elobi boye: “Liteya ya boklisto oyo elobi ete molimo ezali eloko ezangi komonana oyo Nzambe asalaki mpe akɔtisaki yango na nzoto ya moto ntango akelaki ye mpo azala na bomoi, ekolaki mokemoke na mateya ya filozofi ya boklisto. Ezali Origène oyo azalaki na Azia mpe Saint Augustin oyo azalaki na Mpoto nde babimisaki likanisi ete molimo ezali eloko ezangi komonana, mpe yango endimamaki lokola liteya ya lingomba mpe babimisaki liteya ya filozofi mpo na molimo. . . . [Liteya ya Augustin] . . . eutaki mingimingi (na bokeseni moke) na makanisi ya bato oyo bazalaki kolanda Platon.” Zulunalo moko (Presbyterian Life) elobi ete: “Liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te ezali liteya ya Bagrɛki oyo eutaki na mangomba ya kobombana mpe oyo Platon, moto ya filozofi, abongisaki yango malamumalamu.”b

Moboko oyo esimbi boklisto ya solo

Nsima ya kotalela na mokuse lisolo ya Batata ya Lingomba ya ntango ya kala, mpe epai oyo mateya na bango eutaki, ebongi mpenza tótuna motuna oyo: Kondima ya moklisto ya solo ekoki kosimbama na mateya ya Batata ya Lingomba? Tótika Biblia epesa eyano.

Ya liboso, Yesu Klisto aboyaki likambo ya kosalela liloba “Tata” lokola titre ntango alobaki ete: “Bóbenga moto tata awa na mokili te, zambi moko azali tata na bino, oyo ya Likoló.” (Matai 23:9) Na lingomba, kobenga moto moko “Tata” ebongi te mpo na baklisto mpe Makomami endimi yango te. Basilisaki kokoma Liloba ya Nzambe na mobu 98 na ntango na biso, na mikanda ya ntoma Yoane. Na yango, baklisto ya solo bazali na mposa te ete moto mosusu ayela bango maloba oyo epemami. Bakebaka ete ‘bábebisa te liloba ya Nzambe’ mpo na kolanda bonkɔkɔ ya bato. Kotika mibeko ya bato ezwa esika ya Liloba ya Nzambe ezali likama ya elimo. Yesu akebisaki ete: “Soki mokufi miso akokamba mokufi miso na nzela, bango mibale bakokwea na libulu.”​—Matai 15:6, 14.

Moklisto azali na mposa ya emonaneli moko te oyo ekoki kouta epai ya Nzambe, longola oyo ezali na kati ya Biblia. Mokanda ya Emoniseli ekebisi mpo na likambo ya kobakisa eloko mosusu na makomi oyo epemami: “Soki moto moko akobakisa mosusu na yango, Nzambe akobakisa na ye malɔzi masili kokomama na mokanda oyo.”​—Emoniseli 22:18.

Mateya ya solo ya boklisto ezali na Liloba ekomami ya Nzambe, Biblia. (Yoane 17:17; 2 Timote 3:16; 2 Yoane 1-4) Mpo na kokanga ntina na yango malamu, tozali na mposa ya mateya ya filozofi ya mokili te. Mpo na baoyo bamekaki kosalela mayele ya bato mpo na kolimbola mabombami ya Nzambe, ebongi kozongela mituna oyo ya ntoma Paulo: “Wapi moto ya mayele? Wapi mokomeli? Wapi molobalobi ya ekeke oyo? Nzambe akómisi mayele ya mokili eloko na bolema te?”​—1 Bakolinti 1:20.

Na yango, lisangá ya solo ya boklisto ezali “likonzi mpe etɛmiselo ya makambo ya solo.” (1 Timote 3:15) Bakɛngɛli na yango babatelaka bopɛto ya mateya na bango na kati ya lisangá, bakebaka ete liteya moko te ya mabe ekɔta kati na yango. (2 Timote 2:15-18, 25) Babatelaka lisangá liboso ya ‘basakoli ya lokuta, balakisi ya lokuta, mpe mikabwano na libebi.’ (2 Petelo 2:1) Nsima ya liwa ya bantoma, Batata ya Lingomba bapesaki nzela ete “kopɛngwa longwa na kondima, na [kolanda] bilimo na kozimbisa mpe mateya ya bilimo mabe” ekɔta na lisangá ya boklisto.​—1 Timote 4:1.

Mbuma mabe ya lipɛngwi yango ezali komonana lelo na mangomba ya boklisto. Bindimeli mpe misala na yango ekeseni mpenza na solo ya Biblia.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mwa buku Okoki kondima Trinité? elobeli mingi liteya ya Bosato, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

b Mpo na koyeba malamu makambo oyo Biblia ezali koteya mpo na molimo, talá buku Ndenge ya kosolola na bato na Makomami, nkasa 27-32 mpe 253-259; ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 18]

BATATA YA LINGOMBA YA CAPPADOCE

Sango Kallistos, oyo azali mokomi, alobaki ete “Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse . . . epesaka limemya mingi na bakomi ya ekeke ya minei, mpe mingimingi mpo na baoyo babengaka bango ‘Bakonzi Minene misato’ ya Lingomba: Grégoire moto ya Nazianze, Basile le Grand, mpe Jean Chrysostome.” Mateya ya Batata yango ya Lingomba eyokani mpenza na Makomami oyo epemami? Buku moko (The Fathers of the Greek Church) elobi boye mpo na Basile le Grand: “Mikanda na ye emonisi ete na bomoi na ye mobimba akangamaki makasi na Platon, na Homer, na bato ya mayele ya istware mpe na bato ya maloba ya ntɔki, mpe alandaki lolenge ya makambo na bango. . . . Basile atikalaki kaka ‘Mogrɛki.’” Ezalaki mpe ndenge moko mpo na Grégoire moto ya Nazianze. “Mpo na ye, ndenge malamu oyo Lingomba ekokaki kolonga mpe kokenda liboso ezalaki ya kolanda mimeseno ya Bagrɛki.”

Mpo na bango nyonso misato, Profɛsɛrɛ Panagiotis Christou akomi boye: “Atako mbala mosusu bazalaki kokebisa bato na ‘mateya ya filozofi mpe na makanisi mpamba’ [Bakolose 2:8, NW]​—mpo na kolanda etinda ya Kondimana ya Sika​—bazalaki mpe komipesa na koyekola mateya ya filozofi mpe mateya mosusu oyo eyokani na yango; mpe bazalaki kutu kolendisa bato mosusu ete báyekola yango.” Tomoni mpenza ete bateyi yango ya lingomba bazalaki kokanisa ete Biblia ekokaki te mpo na kolongisa makanisi na bango. Ndenge oyo bazalaki koluka makanisi mosusu mpo esimba mateya na bango emonisi nde ete mateya na bango ezalaki kouta na Biblia te? Ntoma Paulo akebisaki Baebele oyo bakómaki baklisto ete: “Bópɛngwa te na mateya ya mokili mosusu ya ndenge na ndenge.”​—Baebele 13:9.

[Eutelo ya bafɔtɔ]

© Archivo Iconografico, S.A./CORBIS

[Etanda/​Elilingi na lokasa 20]

CYRILLE MOTO YA ALEXANDRIE​—TATA YA LINGOMBA OYO AZALAKI NA NTEMBE MINGI

Cyrille moto ya Alexandrie (soki 375-444 T.B.) azali moko ya Batata ya Lingomba oyo balekaki ntembe. Hans von Campenhausen, moto ya mayele ya makambo ya kala ya mangomba, alobi mpo na ye ete “azalaki koluka kondimisa makanisi na ye, moto ya mobulu mpe ya mayele mabe, oyo azalaki na lofundo mpo na lokumu ya mosala mpe mokumba na ye;” mpe abakisaki ete “azalaki kotalela ata likambo moko te ete ezali malamu, longola kaka soki akokaki kosalela yango mpo na kotombola bokonzi na ye . . . Makambo na ye ya makasimakasi mpe ezaleli ya koluka matomba na ye moko ezalaki ata kotungisa ye na makanisi te.” Ntango azalaki episkɔpɔ ya Alexandrie, Cyrille azalaki kofuta kanyaka, kokosa, mpe azalaki kotya sɔngisɔngi mpo bálongola episkɔpɔ ya Constantinople. Balobaka ete ye nde abomaki Hypatia, moto moko ya filozofi oyo akufaki liwa ya nsɔmɔ na mobu 415 na ntango na biso. Mpo na mikanda ya teoloji oyo Cyrille akomaki, Campenhausen alobi ete: “Abandisaki likambo ya mituna ya kozwa bikateli mpo na kondima makambo kaka na lisalisi ya Biblia te, kasi mpe na lisalisi ya makanisi ebele oyo bato ya mayele bazalaki kopesa.”

[Elilingi na lokasa 19]

Jérôme

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Garo Nalbandian

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto