Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/11 nk. 26-29
  • Molende mpo na kobimisa Biblia na Grɛki oyo bato nyonso balobaka

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Molende mpo na kobimisa Biblia na Grɛki oyo bato nyonso balobaka
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Pole engɛngi moke
  • Mobongoli moko ya mpiko
  • Mokonzi-mwasi moko asepeli na Biblia
  • Banguna oyo balɛmbaka noki te
  • “Liloba ya Yehova ezali koumela seko”
  • Ezali na ntina oyekola Ebre mpe Greki?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Likambo ya esengo mpo na bato oyo balingaka Liloba ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Na mokili mobimba, bato ebele bazali kosepela na Libongoli ya Mokili ya Sika
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Cyrille Lukaris​—Moto oyo atalelaki Biblia na motuya mingi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/11 nk. 26-29

Molende mpo na kobimisa Biblia na Grɛki oyo bato nyonso balobaka

Mbala mosusu okokamwa na koyeba ete na Grèce, mboka oyo balobaka ete bonsomi ya makanisi ebandá, kobongola Biblia na lokota oyo bato nyonso bayebi ezalaki likambo ya mpasi mpe ezwaki ntango molai. Kasi, nani oyo akokaki kopekisa Biblia ebimisama na Grɛki ya pɛtɛɛ? Mpo na nini bato mosusu balukaki kopekisa Biblia oyo ekomami na Grɛki ya pɛtɛɛ?

MOTO mosusu akoki kokanisa ete bato oyo balobaka Grɛki bazali na libaku malamu mpo ete eteni monene ya Makomami Mosantu ekomamaki na lokota na bango. Nzokande, Grɛki oyo elobamaka na mikolo na biso ekeseni mpenza na Grɛki oyo ezali na libongoli ya Biblia ya Septante ya Makomami ya Liebele mpe na oyo ya Makomami ya Grɛki ya boklisto. Kutu, na boumeli ya bikeke motoba oyo eleki, bato mingi oyo balobaka monɔkɔ ya Grɛki bazalaki komona Grɛki oyo bakomaki na yango Biblia lokola kaka monɔkɔ ya bapaya. Maloba ya sika ekotá, gramɛrɛ mpe elobeli na yango ebongwaná mpenza.

Bamaniskri ya Grɛki oyo ekomamaki kobanda na ekeke ya misato tii na ekeke ya zomi na motoba ezali komonisa ete bazalaki kosala makasi bábongola libongoli ya Septante na Grɛki oyo bato bakómaki koloba. Na ekeke ya misato, Grégoire, episkɔpɔ ya Néo-Césarée (soki na mobu 213 tii soki mobu 270 na ntango na biso [T.B.]), abongolaki mokanda ya Mosakoli ya libongoli ya Septante na Grɛki ya pɛtɛɛ. Na ekeke ya 11, Tobie ben Éliezér, Moyuda moko oyo azalaki kofanda na Masedonia, abongolaki biteni ya mikanda mitano ya liboso ndenge ezalaki na libongoli ya Septante na Grɛki oyo bato nyonso bazalaki koloba. Kutu, asalelaki alfabɛ ya Liebele mpo na kosalisa Bayuda ya Masedonia oyo bazalaki koloba kaka Grɛki kasi bayebaki kotánga alfabɛ ya Liebele. Mikanda nyonso mitano ya liboso ya Biblia na Grɛki oyo bato nyonso bazalaki koloba ebimisamaki na Constantinople na mobu 1547.

Pole engɛngi moke

Na ekeke ya 15 ntango Ampire Ottoman ekómaki koyangela bamboka ya Ampire Byzantin epai bato bazalaki koloba Grɛki, bato mingi kuna bayekolisaki bango kotánga te. Atako Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ezalaki na likoki ya kosala makambo mingi na bamboka oyo Ampire Ottoman ezalaki koyangela, etikaki bandimi na bango na bobola mpe batángisaki bango kelasi te. Thomas Spelios, mokomi ya ekólo Grèce alobaki ete: “Mokano mpenza ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse mpe mateya na yango ezalaki ya kopekisa bandimi na bango kokɔta na Lingomba ya Bamizilma mpe báyoka te mateya ya Lingomba ya Katolike. Yango wana, mateya ya Bagrɛki ezalaki kokende liboso te.” Lokola makambo ezalaki mabe ndenge wana, bato oyo balingaka Biblia bamonaki ete basengeli kosalisa bato oyo bazalaki komitungisa mpo bázwa libɔndisi na mokanda ya Nzembo. Banda mobu 1543 tii mobu 1835, mabongoli 18 ya mokanda ya Nzembo esalemaki na Grɛki.

Maximus Callipolitès, sango moko ya Callipolis, asalaki libongoli ya liboso ya Makomami ya Grɛki ya boklisto na mobimba na Grɛki na mobu 1630. Mosala yango etambwisamaki na Cyrille Loucaris, mokonzi monene ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse na Constantinople, oyo na nsima abongolaki makambo mingi na lingomba yango. Kasi, na kati ya lingomba, Loucaris azalaki na banguna oyo bazalaki koboya mbongwana nyonso to libongoli ya Biblia na Grɛki oyo bato nyonso bazalaki koloba.a Babomaki ye mpo azalaki kosala makambo oyo bango balingaki te. Atako bongo, Biblia soki 1 500 ya libongoli ya Maximus enyatamaki na mobu 1638. Mbula 34 nsima ya kobima ya libongoli yango, na likita moko oyo basalaki na Yelusaleme, baepiskɔpɔ ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse balobaki ete Makomami “esengeli kotángama na bato nyonso te, kasi bobele baoyo bayebaka makambo ya elimo na mozindo nsima ya kolukaluka makambo na ndenge oyo ebongi.” Elingi koloba ete kaka bakonzi ya lingomba oyo batángá kelasi mingi nde basengeli kotánga makomami.

Na mobu 1703, Séraphin, sango moko ya Grèce oyo autaki na esanga Lesbos, amekaki kobimisa libongoli oyo babongisaki yango lisusu na Biblia ya Maximus na Londres. Ntango mokonzi ya Angleterre aboyaki kokokisa elaka na ye ya kosunga ye na mbongo, Séraphin abimisaki libongoli yango na mbongo na ye moko. Na maloba ya makasi oyo akomaki na ebandeli ya Biblia yango, Séraphin amonisaki ntina oyo “moklisto nyonso ya solo” asengeli kotánga Biblia, mpe alobaki ete bakonzi minene ya lingomba bazalaki “kotika bato na molili mpo na koluka kobomba etamboli na bango ya mabe.” Yango wana banguna na ye na kati ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse bakangisaki ye na Russie mpe batindaki ye na etúká ya Sibérie epai akufaki na mobu 1735.

Na maloba ya ebandeli ya libongoli ya Biblia ya Maximus oyo babongisaki yango lisusu, balobelaki nzala ya elimo ya bato oyo bazalaki koloba Grɛki na ntango wana, mokonzi moko ya lingomba na Grèce alobaki maloba oyo mpo na Biblia ya Maximus oyo babongisaki yango lisusu: “Bagrɛki na bato ya bikólo mosusu bayambaki Biblia Mosantu yango na mposa makasi. Bazalaki mpe kotánga yango. Mpe bamonaki ete mpasi na bango ekiti, mpe kondima na bango epai ya Nzambe . . . ekómi makasi.” Kasi, bakonzi ya mangomba na bango bakómaki kobanga ete soki bato babandi kokanga ntina ya makambo oyo ezali na Biblia, bindimeli ya mangomba oyo eyokani na Makomami te mpe misala mabe na bango ekomonana polele. Yango wana, na mobu 1823 mpe lisusu na mobu 1836, mokonzi monene ya lingomba ya Constantinople abimisaki mobeko ya kotumba mabongoli nyonso wana ya Biblia.

Mobongoli moko ya mpiko

Botɛmɛli ezalaki makasi, kasi lokola bato mingi bazalaki na mposa ya koyeba Biblia, moto moko monene abimaki mpe asalaki mosala ya ntina, abongolaki Biblia na Grɛki oyo bato bazalaki koloba na ntango wana. Moto yango ya mpiko ezalaki Neofitos Vámvas, moto ya mayele na makambo ya nkota mpe na makambo ya Biblia, oyo bato mingi batalelaka ye lokola moko na “Balakisi ya ekólo.”

Vámvas amonaki polele ete Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse nde ezalaki kosala ete ebele ya bato báyeba Biblia te. Andimaki mpenza ete mpo bato bálongwa na mpɔngi ya elimo, esengeli ete Biblia ebongolama na Grɛki oyo bato nyonso bazalaki koloba. Na mobu 1831, na lisalisi ya bato mosusu ya mayele, abandaki kobongola Biblia na Grɛki oyo bazalaki kokoma na yango mikanda. Libongoli na ye ya Biblia mobimba ebimaki na mobu 1850. Lokola bakonzi ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Grèce baboyaki kosalisa ye, asengaki lisalisi na kompanyi moko ya Angleterre oyo ebimisaka Biblia (British and Foreign Bible Society [BFBS] ) mpo na kobimisa mpe kokabola libongoli na ye. Lingomba ekómaki kobenga ye “moto ya protesta” mpe mosika te babenganaki ye na Lingomba.

Libongoli ya Vámvas elandaki mpenza King James Version mpe ezongelaki mabunga ya libongoli wana mpo ete boyebi ya Biblia ezalaki moke mpe bato bayekolaki mingi te mpe boyebi ya lokota ezalaki moke na eleko wana. Kasi, na boumeli ya bambula, ezalaki libongoli se moko ya Biblia na lokota ya Grɛki oyo bato nyonso bazalaki koloba oyo bato bazalaki na yango. Likambo oyo ekoki kobenda likebi na biso ezali ete Biblia yango ezali na nkombo ya Nzambe mbala minei oyo bakomá yango “Ieová.”​—⁠Genese 22:14; Exode 6:3; 17:15; Basambisi 6:⁠24.

Ndenge nini bato bayambaki Biblia yango mpe Babiblia mosusu oyo ekomamaki na maloba ya pɛtɛɛ? Basepelaki mingi mpenza! Ntango motɛkisi moko ya Babiblia ya kompanyi ya Angleterre oyo ebimisaka Biblia akitaki na masuwa moko oyo etɛlɛmaki na esanga moko ya Grèce, “bana ebele bayaki pembeni na ye na kati ya babwato mpo na kosomba [Babiblia] na boye ete asengelaki . . . koyebisa kapitɛni ete bálongwa wana” noki te Babiblia nyonso ekosila kaka na esika moko! Kasi banguna bakangaki mabɔkɔ te.

Basango ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse bapekisaki Babiblia wana. Na ndakisa, na engumba Athènes babɔtɔlaki ebele ya Babiblia. Na mobu 1833, episkɔpɔ ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Crète atumbaki Babiblia “Kondimana ya Sika” oyo amonaki na monastɛrɛ moko. Sango moko abombaki Biblia moko mpe bato ya bamboka oyo ezalaki pembenipembeni babombaki Babiblia na bango kino ntango mokonzi ya lingomba yango alongwaki na esanga.

Mwa bambula na nsima, na esanga ya Corfou, Saint synode ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Grèce epekisaki Biblia ya Vámvas. Bapekisaki kotɛka yango mpe babebisaki Babiblia oyo bamonaki. Na bisanga ya Chios, Síros, mpe Mykonos, bakonzi ya mangomba batumbaki Babiblia. Kasi, mosala ya kolimwisa mabongoli ya Biblia esukaki wana te.

Mokonzi-mwasi moko asepeli na Biblia

Na bambula ya 1870, Olga, mokonzi-mwasi ya Grèce, amonaki ete bato nyonso ya Grèce bayebaki mpenza Biblia malamu te. Lokola azalaki kokanisa ete soki bato ya ekólo na ye bayebi Makomami, yango ekoki kobɔndisa mpe kolendisa bango; yango wana asalaki makasi mpo na kozwa Biblia oyo ekomami na maloba ya pɛtɛɛ koleka libongoli ya Vámvas.

Episkɔpɔ-mokonzi ya Athènes mpe Prokopios, mokambi ya Saint synode balendisaki mokonzi-mwasi na maloba mpamba ete asala mosala yango. Kasi, ntango mokonzi-mwasi asɛngaki Saint synode ete bándima polele mosala yango, baboyaki kopesa ye nzela. Atako bongo, mokonzi-mwasi yango azongaki nsima te. Na mobu 1899 asɛngaki bango lisusu, mpe mpo na mbala ya mibale baboyaki. Atako baboyaki, azwaki ekateli ya kobimisa mwa ndambo ya Babiblia na mbongo na ye moko. Asalaki yango na 1900.

Banguna oyo balɛmbaka noki te

Na 1901, zulunalo moko monene ya Athènes (Acropole) ebimisaki libongoli ya Evanzile ya Matai na Grɛki oyo bato nyonso balobaka, oyo Alexandre Pallis, mobongoli moko ya Biblia oyo azalaki kosala na Liverpool, na Angleterre, asalaki. Mposa ya Pallis mpe baninga na ye ezalaki ya ‘kolakisa Bagrɛki’ mpe “kosalisa ekólo” ete ekwea te.

Bayekoli ya teoloji ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse mpe balakisi na bango babengaki libongoli yango ete “ezali kotyola biloko ya motuya mingi ya losambo na ekólo,” ezali kosambwisa Makomi Mosantu. Joakim III, mokonzi monene ya lingomba ya Constantinople akabolaki mokanda moko oyo epekisaki libongoli wana. Ekómaki ntembe ya makambo ya politiki, mpe bato ya politiki oyo bazalaki kowelana bakɔtisaki likambo yango na makambo ya politiki.

Na Athènes, bapanzi-nsango mosusu ya minene bakómaki koloba mabe mpo na libongoli ya Pallis, bazalaki kobenga bato oyo bazalaki kotánga yango ete “bato oyo bandimaka Nzambe te,” “bato oyo bazali kotɛka mboka,” mpe “bato oyo bazali kosala na bapaya” mpo na kokweisa ekólo Grèce. Na Athènes, kobanda mokolo ya 5 kino 8 Novɛmbɛ 1901, bakonzi mosusu ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Grèce oyo baboyaki mbongwana, batindaki bayekoli ya biteyelo minene ete bátomboka. Bakɔtaki na babiro ya zulunalo Acropole, bakendaki na ndako ya mokonzi, bakɔtaki na Iniversite ya Athènes, mpe basɛngaki ete guvɛrnɛma elongwa. Na nsuka, bato mwambe bakufaki na mobulu oyo basoda basalaki. Na mokolo oyo elandaki, mokonzi asɛngaki ete bálongola episkɔpɔ-mokonzi Prokopios, mpe na nsima ya mikolo mibale balongolaki baministre nyonso.

Sanza moko na nsima, bayekoli batombokaki lisusu mpe batumbaki Babiblia ya Pallis na miso ya bato nyonso. Babimisaki ekateli mpo na kopekisa libongoli yango ete emonana lisusu te mpe basɛngaki ete moto nyonso oyo akomeka kobimisa libongoli mosusu akozwa etumbu ya makasi. Na ndenge yango, bapekisaki libongoli nyonso ya Biblia na Grɛki oyo bato nyonso bazalaki koloba. Makambo ezalaki mabe mpenza!

“Liloba ya Yehova ezali koumela seko”

Na 1924, balongolaki mobeko oyo epekisaki kosalela Biblia oyo ekomami na Grɛki oyo bato nyonso bazalaki koloba. Banda wana, Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Grèce elongaki lisusu te kopekisa bato kozala na Biblia. Na ntango wana, Batatoli ya Yehova bazalaki kopalanganisa mateya ya Biblia na Grèce ndenge basalaki na bikólo mosusu. Kobanda 1905, bazalaki kosalela libongoli ya Vámvas mpo na kosalisa bankóto ya bato oyo balobaka Grɛki bázwa boyebi ya solo ya Biblia.

Bato mingi ya mayele mpe balakisi mingi bazalaki kosala milende mpo na kobimisa Biblia na Grɛki oyo bato nyonso bazalaki koloba. Lelo oyo, mabongoli ya Biblia oyo Bagrɛki nyonso bakoki kotánga, ezala mobimba to ndambo na yango, ezali soki 30. Biblia moko ya motuya na kati ya Babiblia nyonso wana ezali Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu, ebimisamaki na 1997 mpo na milio 16 ya bato na mokili mobimba oyo balobaka Grɛki. Libongoli yango, oyo ebimisami na Batatoli ya Yehova, ebongoli Liloba ya Nzambe na lokota oyo bato bakoki kotánga kozanga nkaka, oyo bato bakoki kokanga ntina malamu, ebongoli makomi ya ebandeli na bosembo mpenza.

Molende oyo esalemaki mpo na kobongola Biblia na Grɛki oyo bato nyonso balobaka emonisi likambo moko ya ntina. Emonisi polele ete atako bato basali makasi ndenge nini mpo na kopekisa yango, “liloba ya Yehova ezali koumela libela na libela.”​—⁠1 Petelo 1:⁠25.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Lisolo oyo elobeli Cyrille Loucaris ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwali 2000, nkasa 26-29.

[Elilingi na lokasa 27]

Cyrille Loucaris atambwisaki mosala ya liboso ya kobongola Makomami ya boklisto mobimba na Grɛki na mobu 1630

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Bib. Publ. Univ. de Genève

[Bililingi na lokasa 28]

Mwa mabongoli na lokota ya Grɛki: Banzembo enyatamaki na: (1) 1828 na Ilarion, (2) 1832 na Vámvas, (3) 1643 na Julianus. “Kondimana ya Kala” enyatamaki na: (4) 1840, na Vámvas

Mokonzi-Mwasi Olga

[Eutelo ya bafɔtɔs]

Babiblia: Bibliothèque nationale de Grèce; Mokonzi Mwasi Olga: Culver Pictures

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 26]

Papirise: Ebimisami na ndingisa ya bakambi ya The Trustee of the Chester Beatty Library, Dublin

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 29]

Papirise: Ebimisami na ndingisa ya bakambi ya The trustees of the Chester Beatty Library, Dublin

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto