Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 1/3 nk. 20-24
  • Toboyaki bomoi ya mindɔndɔ mpo na kosalela Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Toboyaki bomoi ya mindɔndɔ mpo na kosalela Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tokutani na bandeko oyo bazalaki kotambwisa mosala
  • Mayangani ya ebandeli oyo tokanisaka mingi
  • Nalingaki mosala ya kosakola mingi
  • Mayangani mosusu oyo tobosanaka te
  • Moninga ya ntango nyonso
  • Tomesanaki na makambo ya sika
  • Nakufeli molongani ya bolingo
  • Nazali na botɔndi mpo na mosala oyo nasali
  • Bomoi ya malamu mpenza na mosala ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Tyelá Yehova motema akosalisa yo mpenza
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Natyaki miso mpe motema na ngai na libonza
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Nakangamaki na bosembo nyonso na lisanga ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 1/3 nk. 20-24

Lisolo ya Bomoi

Toboyaki bomoi ya mindɔndɔ mpo na kosalela Yehova

LISOLO YA CLARA GERBER MOYER

Nazali na mbula 92 mpe nakokaka lisusu kotambola mpenza te, kasi bɔɔngɔ na ngai ezali naino malamu mpe nabombaka makambo malamu. Nazali kotɔnda Yehova mingi na ndenge nasalelaki ye banda bomwana na ngai! Kozala na bomoi ezangi mindɔndɔ esalisi ngai mingi na likambo yango.

NABOTAMÁ mokolo ya 18 Augusto 1907, na engumba Alliance, na etúká ya Ohio, na États-Unis. Libota na biso ezalaki na bana mitano mpe ngai nazali mwana ya liboso. Ntango nazalaki na mbula mwambe, Moyekoli moko ya Biblia, ndenge bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova ntango wana, azalaki mosakoli ya ntango nyonso, akɔtaki na velo na ye na ferme na biso. Akutanaki na mama na ngai, Laura Gerber, na ekuke mpe atunaki ye soki ayebi ntina oyo Nzambe atiki nzela na mabe. Mama azalaki komituna likambo yango banda kala.

Nsima ya kosɛnga nzela epai ya Tata, azalaki na ndako ya kobomba biloko, Mama alobaki na moto yango amemela ye buku Étude des Écritures. Yango ezalaki na volimi motoba. Atángaki yango mpe asepelaki mpenza na mateya ya solo ya Biblia oyo azalaki koyekola. Ayekolaki volimi ya motoba, oyo ezalaki na motó ya likambo ete La nouvelle création (Bozalisi ya sika), mpe akangaki ntina ete baklisto basengeli kozwa batisimo na kozindisama na mai. Lokola ayebaki te ndenge ya kokutana na Bayekoli ya Biblia, asɛngaki Tata abatisa ye na liziba moko ya mai oyo ezalaki na kati ya ferme, atako ezalaki na sanza ya Marsi, sanza oyo ezalaka mpiɔ makasi; ezalaki na 1916.

Nsima ya mwa mikolo, Mama atángaki na zulunalo moko ete lisukulu moko ekosalama na Daughters of Veterans Hall, na engumba Alliance. Lisukulu yango ezalaki na motó ya likambo ete “Le divin plan des âges.” Mama azwaki mbala moko mokano ya kokende, mpamba te buku Étude des Écritures na volimi 1, ezalaki na motó ya likambo yango. Tokangisaki pusupusu na biso na mpunda mpe libota mobimba tomataki mpe tokendaki na likita mpo na mbala ya liboso. Banda wana tozalaki koyangana na makita na bandako ya bandeko mokolo ya lomingo mpe na mokolo ya misato na mpokwa. Mwa moke na nsima, Mama azwaki lisusu batisimo, na mbala oyo, nkulutu na lisangá nde abatisaki ye. Tata, ye moto amipesaki mingi na mosala ya ferme, asepelaki koyekola Biblia, mpe azwaki batisimo nsima ya mwa bambula.

Tokutani na bandeko oyo bazalaki kotambwisa mosala

Na mokolo ya 10 Yuni 1917, Joseph Rutherford, prezida ya la Société Watch Tower na ntango wana, ayaki na Alliance kosala lisukulu oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Mpo na nini mabota bazali kobunda?” Nazalaki na mbula libwa mpe nakendaki na liyangani yango na baboti na ngai mpe baleki na ngai mibale ya mibali, Willie na Charles. Biso nyonso oyo toyanganaki tozalaki bato koleka nkama moko. Nsima ya lisukulu ya Ndeko Rutherford, bayangani mingi bakangaki fɔtɔ na ye na libándá ya Columbia Theater, esika oyo asalaki lisukulu. Na pɔsɔ oyo elandaki, kaka na ndako yango, Alexander Macmillan asalaki lisukulu oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Bokonzi ya Nzambe ezali koya.” Tosepelaki ndenge bandeko yango bayaki na engumba ya moke oyo tozalaki.

Mayangani ya ebandeli oyo tokanisaka mingi

Liyangani ya liboso oyo nakendaki ezalaki na 1918, na engumba Atwater, na etúká ya Ohio, mosika mingi te na Alliance. Mama atunaki ndeko oyo autaki na biro ya la Société soki na mbula na ngai nakoki kozwa batisimo. Mpo na ngai namonaki ete namipesaki na Nzambe mpo nasala mokano na ye, yango wana bandimaki nazwa batisimo mokolo yango na liziba moko pene na elanga monene ya pɔmɔ. Nalataki bilamba mosusu mpo na batisimo na ndako moko ya kapɔ oyo bandeko basalaki mpe nazwaki batisimo na robe ya kolalela ya kala mpe elekaki ngai na molai mpenza.

Na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1919, ngai na baboti na ngai tokɔtaki na engbunduka mpe tokendaki na engumba Sandusky, na etúká ya Ohio, na Lake Erie. Kuna tozwaki masuwa, mpe eumelaki te, tokómaki na Cedar Point esika liyangani moko monene, oyo tobosanaka yango te, esalemaki. Ntango tobimaki na masuwa, tomonaki mwa esika moko oyo bazalaki kotɛkisa biloko ya kolya, kaka na libongo wana. Nasombaki hamburger oyo ezalaki bilei ya ntalo makasi mpo na ngai na ntango wana. Ezalaki mpenza elɛngi! Tozalaki bato 7 000 na liyangani yango, mpe yango eumelaki mikolo mwambe. Lokola masini ya kotombola mongongo ezalaki te, nasengelaki kolanda na likebi mpenza.

Na liyangani yango babimisaki zulunalo mosusu oyo esengelaki kobanda kobima elongo na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, nkombo na yango L’Âge d’Or (lelo Lamuká!). Lokola nakendaki na liyangani yango, nazangisaki kelasi pɔsɔ mobimba, kasi likambo nasalaki ezalaki na ntina. Cedar Point ezalaki esika bato mingi bazalaki kokende konje, mpe esika yango ezalaki na barestora mpe bato oyo bayaki na liyangani basengelaki kolya na barestora yango. Kasi, soki mpo na ntina nini, bato ya barestora na baoyo bakabolaka biloko ya kolya basalaki mosala na bango te, yango wana, bandeko oyo bayebi kolamba bakómaki kolamba mpo na bato oyo bayaki na liyangani. Banda wana mpe na boumeli ya bambula mingi, basaleli ya Yehova bazalaki kolamba bilei bango moko na mayangani ya mike mpe ya minene.

Na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1922 tozongaki lisusu na Cedar Point na liyangani oyo eumelaki mikolo libwa. Biso nyonso oyo toyanganaki tozalaki bato koleka 18 000. Ezali kuna nde Ndeko Rutherford alendisaki biso ete “bósakola, bósakola, bósakola, Mokonzi mpe bokonzi na ye.” Nzokande, nabandaki mosala na ngai ya kosakola bambula mingi liboso, tozalaki kokabola batrakte mpe zulunalo Lamuká!

Nalingaki mosala ya kosakola mingi

Na ebandeli ya 1918, ngai mpe nakabolaki trakte Babilone ekwei (na Lingelesi) na baferme ya zingazinga. Lokola mpiɔ ezalaki makasi, liboso ya kobima na ndako tozalaki kotumba libanga moko na mɔ́tɔ mpe tozalaki komema yango na pusupusu na biso mpo makolo na biso ezwaka mwa mɔ́tɔ. Tozalaki kolata bakazaka ya kilo na bikɔti, mpamba te pusupusu na biso ezipamaki kaka na likoló mpe ezalaki na barido na mipanzi kasi ezalaki na eloko ya kopesa molunge na kati te. Ezalaki mikolo ya esengo.

Na 1920, la Société abimisaki buku Le mystère accompli lokola zulunalo,a tozalaki kobenga yango ZG. Ngai na baboti na ngai tobimaki na buku yango na mosala ya kosakola na engumba Alliance. Na ntango wana moto na moto azalaki kokende ye moko koteya ndako na ndako; na yango, nazalaki kobanga ntango nazalaki kobuta baesikalie ya ndako moko mpo na kosolola na bato ebele oyo bazalaki kofanda na baveranda. Mokolo moko nsima ya kosala mwa lisolo, mwasi moko alobaki boye: “Bomoni te ete asaleli biso mwa lisolo kitoko?” mpe azwaki mokanda. Mokolo yango nakabolaki ba ZG 13, ezalaki mbala ya liboso nasala mpenza mwa ntango molai na bato na mosala ya ndako na ndako.

Ntango nazalaki na kelasi ya misato na eteyelo ya ntei, Mama azwaki maladi ya pneumonie mpe azalaki kofanda kaka na ndako soki sanza mobimba. Hazel, leki na biso ya nsuka ya mwasi, azalaki moke. Yango wana natikaki kelasi mpo na kosala na ferme mpe kobatela bana. Kasi, na libota na biso tozalaki kozwa mateya ya solo ya Biblia na lisɛki te, mpe tozalaki kokende makita ya lisangá pɔsɔ na pɔsɔ.

Na 1928 na Ekaniseli ya liwa ya Klisto, bapesaki bayangani trakte oyo ezalaki na motó ya likambo “Wapi bato mosusu libwa?” Ezalaki kolobela lisolo ya Luka 17:11-19, epai Biblia elobi ete na kati ya bato zomi ya maba oyo Yesu abikisaki kaka moko nde apesaki ye matɔndi mpo abikisaki ye na ndenge ya likamwisi. Likambo yango esimbaki motema na ngai. Namitunaki ete, ‘Nazalaka mpenza na botɔndi?’

Lokola Mama abikaki mpe akómaki nzoto makasi mpe ngai nazalaki nzoto kolɔngɔnɔ mpe nazalaki lisusu na mokumba ya kotala baleki te, nazwaki mokano ya kolongwa na ndako mpe kokóma mobongisi-nzela, ndenge babengaka basakoli ya ntango nyonso. Baboti na ngai balendisaki ngai mpo na kozwa mokano yango. Na yango, ngai na moninga na ngai, Agnes Aleta, tozwaki teritware na biso, mpe mokolo ya 28 Augusto 1928, tokɔtaki na engbunduka na ngonga ya 9:00 ya mpokwa. Mokomoko na biso azalaki kaka na valise na sakosi ya kotya mikanda. Na gare ya engbunduka, baleki na ngai ya basi na baboti na ngai bazalaki kolela, biso mpe tozalaki kolela. Nazalaki kokanisa ete nakomona bango lisusu te, mpo tozalaki kokanisa ete Armagedon ekómi pene. Na ntɔngɔ ya mokolo oyo elandaki, tokómaki na teritware na biso na engumba Brooksville, na etúká ya Kentucky.

Tozalaki kofutela shambre moko ya moke na otɛlɛ moko mpe tosombaki makaroni mpe tozalaki kosala bagato biso moko. Mokolo na mokolo, moto na moto azalaki kokende na ngámbo na ye kosakola mpe kokabola mikanda, tozalaki kotya mikanda mitano mpo na likabo ya dolare 1,98. Mokemoke tosakolaki na engumba yango mobimba, mpe bato mingi basepelaki na Biblia.

Pene na sanza misato, tosakolaki na ndako nyonso na Brooksville mpe na zingazinga mpe lisusu na engumba Augusta. Na nsima, tokendaki kosakola na bingumba Maysville, Paris, mpe Richmond. Na boumeli ya mbula misato oyo elandaki, tosakolaki na bingumba mingi ya Kentucky epai masangá ezalaki te. Mbala mingi basakoli mosusu to mpe mabota mobimba na Ohio bazalaki koya mpe kosangana na biso na mosala ya kosakola pɔsɔ moko to mpe koleka.

Mayangani mosusu oyo tobosanaka te

Tokanisaka mingi liyangani oyo esalamaki mokolo ya 24 tii mokolo ya 30 Yuli na Columbus, na etúká ya Ohio. Na liyangani yango nde bayebisaki biso ete tokobanda kobengama na nkombo Batatoli ya Yehova; nkombo oyo euti na Biblia. (Yisaya 43:12) Liboso na yango, soki bato batuni biso ete tozali bato ya lingomba nini, tozalaki koloba, “Bayekoli ya Biblia na mokili mobimba.” Kasi nkombo yango ezalaki kokesenisa biso malamumalamu te, mpamba te bato ya mangomba mosusu mpe bazalaki koyekola Biblia.

Moninga na ngai, Agnes, abalaki, mpe natikalaki ngai moko. Yango wana nasepelaki mingi koyoka ete babengi babongisi-nzela oyo bazali koluka baninga ya mosala bákende na esika moko. Kuna nakutanaki na Bertha, na Elsie Garty, na Bessie Ensminger. Bazalaki na mituka mibale mpe bazalaki koluka ndeko mwasi mosusu oyo azali mobongisi-nzela mpo básala esika moko. Nsima ya liyangani tokendaki elongo, atako tokutanaki naino liboso te.

Na eleko ya molunge, tosalaki na etúká mobimba ya Pennsylvanie. Na nsima, lokola eleko ya malili ekómaki pene, tosɛngaki bátinda biso na bateritware ya sudi ya bitúká ya Caroline du Nord, Virginie, mpe na Maryland epai oyo ezalaki na molunge. Na prɛnta, tozongaki na nɔrdi. Na ntango wana, babongisi-nzela bazalaki na momeseno wana. Na 1934, John Booth na Rudolph Abbuhl, balandaki momeseno yango, bakamataki Ralph Moyer na leki na ye Willard mpe bakendaki na engumba Hazard, na etúká ya Kentucky.

Nazalaki kokutana na Ralph mbala mingi. Kasi toyebanaki malamu na liyangani monene oyo esalamaki mokolo ya 30 Mai tii mokolo ya 3 Yuni 1935 na Washington. Ngai na Ralph tofandaki esika moko na likoló ntango basalaki lisukulu mpo na “ebele monene.” (Emoniseli 7:9-14) Kino ntango wana tozalaki kokanisa ete ebele monene ezali etuluku moko ya bato oyo bakozala na likoló kasi bazali sembo mingi lokola ba 144 000 te. (Emoniseli 14:1-3) Na yango nalingaki kozala kati na bango te!

Ntango Ndeko Rutherford alimbolaki ete ebele monene ezali bato ya sembo oyo bakobika na Armagedon mpe bakofanda awa na mabele, bato mingi bakamwaki. Nsima, asɛngaki na bato nyonso oyo bazali na ebele monene bátɛlɛma. Ngai natɛlɛmaki te, kasi Ralph atɛlɛmaki. Na nsima, nayaki koyeba malamu, mpe 1935 ezalaki mbula ya nsuka oyo nalyaki limpa mpe namelaki vinyo na Ekaniseli ya liwa ya Klisto. Kasi, Mama alandaki kolya limpa mpe komela vinyo tii na liwa na ye na Novɛmbɛ 1957.

Moninga ya ntango nyonso

Ngai na Ralph tolandaki kotindelana mikanda. Ngai nazalaki kosala na engumba Lake Placid, na etúká ya New York, mpe ye azalaki na etúká ya Pennsylvanie. Na 1936, asalaki wagɔ moko ya moke oyo akangisaki yango na motuka na ye. Alongwaki na yango banda na engumba Pottstown, na Pennsylvanie, tii na engumba Newark, na etúká ya New Jersey, na liyangani oyo esalamaki kuna banda mokolo ya 16 tii mokolo ya 18 Ɔkɔtɔbɛ ya mbula yango. Mokolo moko na mpokwa nsima ya liyangani, biso babongisi-nzela mingi tokendaki kotala wagɔ ya sika ya Ralph. Ngai na ye totɛlɛmaki na kati ya wagɔ pembeni ya tono ya mai oyo atyaki na kati mpe atunaki ngai ete: “Osepeli na wagɔ yango?”

Ntango nandimaki na motó, atunaki lisusu ete: “Okolinga ofandaka awa?”

Nalobaki, “Ɛɛ,” mpe apesaki ngai bizi oyo nakoki kobosana yango ata moke te. Nsima ya mikolo mibale tokomisaki libala na biso na mikanda ya Leta. Mokolo ya 19 Ɔkɔtɔbɛ, mokolo oyo elandaki mokolo ya nsuka ya liyangani, tokendaki na Brooklyn kotala bandako ya konyata mikanda ya la Société Watch Tower. Tosɛngaki bápesa biso teritware. Grant Suiter azalaki kotala makambo ya teritware, mpe atunaki biso ete banani bakosala kuna. Ralph, alobaki boye, “Tokoki kosala kuna soki tobalani.”

Ndeko Suiter alobaki boye: “Soki bozongi na ngonga ya 5:00 ya mpokwa, tokoki kobongisa likambo yango.” Na mpokwa yango tobalanaki na ndako ya ndeko moko pene na Brooklyn Heights. Tokendaki na mwa baninga kolya na restora moko mpe tozwaki bisi mpe tozongaki esika oyo wagɔ ya Ralph ezalaki na Newark, na etúká ya New Jersey.

Eumelaki te, tokendaki na mwa mboka Heathsville, na etúká ya Virginie, teritware na biso ya liboso na mosala ya mobongisi-nzela. Tosalaki na Northumberland, mpe lisusu tokendaki na Fulton, mpe na Franklin, na Pennsylvanie. Na 1939, babengaki Ralph na mosala ya zone, mosala yango esɛngaki kokende kotala masangá mbala na mbala. Tozalaki kotala masangá na etúká ya Tennessee. Na mbula oyo elandaki, nabotaki Allen, mwana na biso ya mobali, mpe na 1941 totikaki mosala ya zone. Batindaki biso na engumba Marion, na etúká ya Virginie, lokola babongisi-nzela monene. Na ntango wana, mobongisi-nzela monene azalaki kosakola ngonga 200 sanza na sanza.

Tomesanaki na makambo ya sika

Na 1943, namonaki ete ebongi natika mosala ya mobongisi-nzela monene. Lokola tozalaki kofanda na wagɔ ya moke, esengelaki kosala misala ya ndako lokola kobatela mwana, kolamba, kosukola bilamba, mpe nasakolaka ngonga 60 sanza na sanza. Kasi Ralph azalaki kaka mobongisi-nzela monene.

Na 1945, tozongaki na Alliance, na etúká ya Ohio, totɛkisaki wagɔ oyo tofandaki na boumeli ya mbula libwa, mpe tokendaki kofanda na ferme na baboti na ngai. Ezalaki kuna, na liboso ya monɔkɔ ya ndako (porte), nde mwana na biso ya mwasi, Rebekah, abotamaki. Ralph azwaki mosala ya ndambo ya mokolo na engumba mpe akobaki kosala lokola mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Nazalaki kosala na ferme mpe nazalaki kosala nyonso oyo nakoki mpo na kosalisa ye atika mosala ya mobongisi-nzela te. Baboti na ngai bakabelaki biso ndambo ya mabele, kasi Ralph aboyaki. Alingaki tózala na makambo ebele te mpo tókoka kosalela mingi matomba ya Bokonzi.

Na 1950, tokendaki kofanda lisusu na Pottstown, na Pennsylvanie, mpe tobandaki kofutela ndako ya dolare 25 na sanza. Atako ntalo ya ndako yango ya kofutela ezalaki kobongwana, kasi nsima ya mbula 30, ekómaki kaka na dolare 75. Tomonaki ete Yehova azalaki kosalisa biso tóluka bomoi ya mindɔndɔ te. (Matai 6:31-33) Ralph azalaki kosala mosala ya kokata nsuki mikolo misato na pɔsɔ moko. Pɔsɔ na pɔsɔ tozalaki koyekola Biblia na bana na biso mibale, tozalaki kokende na makita, mpe libota mobimba tozalaki kobima na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Ralph azalaki mokɛngɛli-mokambi na lisangá na biso. Lokola tozalaki na bomoi ya mindɔndɔ te, tosalaki mingi na mosala ya Yehova.

Nakufeli molongani ya bolingo

Mokolo ya 17 Mai 1981, tozalaki kolanda lisukulu na Ndako ya Bokonzi. Ralph azalaki koyoka nzoto malamu te, atɛlɛmaki mpe akendaki na nsuka, mpe apesaki mosaleli moko ya misala mwa mokanda aya kopesa ngai mpe alobaki azongi na ndako. Ralph azalaki na momeseno wana te, yango wana nasɛngaki ndeko moko amema ngai na motuka nokinoki na ndako. Na ngonga wana kaka Ralph akufaki na maladi ya moto oyo babengi accident vasculaire cérébral. Na nsuka ya boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na ntɔngɔ yango, bayebisaki na lisangá ete akufi.

Na sanza yango Ralph asilaki kosakola koleka ngonga 50. Asalaki mosala ya mobongisi-nzela koleka mbula 46. Ayekolaki Biblia na bato koleka 100 baoyo bakómaki Batatoli ya Yehova oyo bazwi batisimo. Mapamboli ya elimo oyo tozwaki elekaki mpasi nyonso oyo tokutanaki na yango.

Nazali na botɔndi mpo na mosala oyo nasali

Na boumeli ya mbula 18 oyo eleki, nazalaki kofanda ngai moko, nazalaki kokende makita, kosakola epai ya bato ndenge makoki epesi nzela, mpe koyekola Liloba ya Nzambe. Sikoyo nazali kofanda na ndako ya mibange. Nazali kaka na biloko moke mpe naboyi kozala na televizyo. Nasali misala mingi na bomoi na ngai mpe nazwi mapamboli mingi na elimo. Baboti na ngai na baleki na ngai mibale ya mibali bazalaki sembo tii liwa na bango, mpe baleki na ngai ya basi bazali tii lelo oyo kotambola na bosembo nyonso na nzela ya solo.

Nazali na esengo mpo mwana na ngai ya mobali, Allen, azali nkulutu na lisangá. Na boumeli ya bambula mingi azalaki kotya bamasini ya kokolisa lolaka (sonorisation) na Ndako ya Bokonzi mpe na Bandako ya Mayangani, azalaki mpe kosala yango na ntango ya mayangani. Mwasi na ye azali kosalela Nzambe na bosembo, mpe bana na bango mibale bazali bankulutu na lisangá. Mwana na ngai ya mwasi, Rebekah Karres, asali koleka mbula 35 na mosala ya ntango nyonso, mpe asalaki mbula minei na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn. Ye na mobali na ye basalaki koleka mbula 25 na mosala ya mokɛngɛli-motamboli na bitúká mingi ya États-Unis.

Yesu alobaki ete Bokonzi ezali lokola eloko moko ya motuya oyo ebombami kasi moto akoki kozwa yango. (Matai 13:44) Nazali na botɔndi mpo baboti na ngai bazwaki eloko ya motuya yango banda kala. Soki nakanisi mbula koleka 80 oyo nalekisi na mosala ya Nzambe, namonaka mpenza ete nazalaki na libaku malamu, epesaka ngai mawa te! Ya solo, soki nakokaki kobandela bomoi na ngai, nakopona nzela se moko wana, mpamba te, ‘boboto ya Nzambe eleki ata bomoi.’—Nzembo 63:3.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Le mystère accompli ezalaki volimi ya nsambo ya buku Étude des Écritures. Charles Taze Russell moto akomaki bavolimi motoba ya liboso. Le mystère accompli ebimaki nsima ya liwa ya Russell.

[Elilingi na lokasa 23]

Na 1917 ntango tozalaki kolanda lisukulu ya Ndeko Rutherford na Alliance, na etúká ya Ohio

[Elilingi na lokasa 23]

Ngai na Ralph liboso ya wagɔ oyo atongaki

[Elilingi na lokasa 24]

Ngai na bana na ngai mibale lelo oyo

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto