Oyebi makambo nini mpo na bondɔki?
BONDƆKI! Okanisaka nini soki oyoki liloba yango?
Mpo na bato mingi, bondɔki ezali makanisi mpamba, bandimaka likambo yango te. Mpo na bango, bondɔki ezali kaka na makanisi ya bato to ezali kaka masapo: masapo oyo elobaka ete bandɔki bazalaka bankɔkɔ moko boye balatá bilamba ezipá nzoto mobimba tii na motó, okomona bazali kotɔkisa nzungu na mɔ́tɔ mpe bazali kobwaka mapapu ya ngembo na kati, babongolaka bato magbɔlɔlɔ, mpe na butu bapumbwaka likoló na nzete ya kɔmbɔ na kosɛka na mongongo makasi.
Nzokande, mpo na bato mosusu, bondɔki ezali likambo ya lisɛki te. Bato ya mayele mosusu oyo bayekolaka likambo ya bondɔki balobi ete katikati ya bato ya mokili mobimba bandimaka ete bandɔki bazali mpenza mpe bakoki kobebisa bomoi ya bato. Bamilio ya bato bandimaka ete bandɔki bakoki kosala mabe, bazali bato ya kosakana na bango te, mpe esengeli kobanga bango. Na ndakisa, mokanda moko oyo elobeli ndenge oyo bato basambelaka bankɔkɔ na Afrika elobi boye: “Bato ya Afrika bandimaka mpenzampenza ete bandɔki na banganga-nkisi bazali na nguya mpe bakoki kosala bato mabe . . . Na bamboka, banguna ya liboso ya bato ezali bandɔki na banganga-nkisi. Tii na moi ya lelo, na bisika mingi, ntango mosusu babɛtaka bandɔki mpe babomaka bango.”
Nzokande, na mikili ya Mpoto, bato bazali lisusu kotyola bandɔki te. Mikanda, televizyo, mpe bafilme mingi oyo ebimi elongoli bato kobanga bandɔki. David Davis, moto moko ya mayele oyo ayekolaka ndenge oyo bato basalaka masano, alobi boye: “Tokómi komona bandɔki ya bilenge mibali mpe bilenge basi ya kitoko. Bakompanyi oyo esalaka bafilme na États-Unis elingaka kosalela makambo oyo ezali koleka na mokili mpo na kobimisa bafilme. . . . Ntango bazali kolakisa bilenge mibali mpe basi ya kitoko oyo bazali bandɔki, bato mingi, ezala basi to bana, bazali kosepela na bango.” Bakompanyi ya televizyo ezali na mayele ya kobongola likambo nyonso mpe kokómisa yango lisano mpe bazali kozwela yango mbongo.
Bato mosusu balobi ete bondɔki ekómi moko na makambo oyo bato mingi bazali komipesa na yango na États-Unis. Bato mingi na mikili ya bozwi, nsima ya komona ndenge oyo masangá mosusu ezali kobunda mpo na kotombola lokumu ya basi mpe lokola balingi lisusu mangomba ya minene te, bazali koluka kokokisa bamposa na bango ya elimo na makambo ndenge na ndenge ya bondɔki. Kutu, makambo yango ya bondɔki ezali ndenge na ndenge na boye ete bato balimbolaka yango ndenge moko te.
Banda kala, bandɔki balingamaka te, banyokolaka bango, to mpe babomaka bango. Yango wana, tokoki kokamwa te na komona ete bandɔki bazali kosala nyonso mpo bato bándima bango. Na ankɛtɛ moko, batunaki bandɔki mwa mingi báloba likambo oyo balingi bato báyeba mpo na bango. Margot Adler, mwasi moko ya mayele oyo ayekolaki makambo etali bondɔki, amonisaki eyano na bango na mokuse ete: “Tozali bato mabe te. Tosambelaka Zabolo te. Tosalaka bato mabe te, tobebisaka bango te. Tozali mabe te. Tozali kaka bato lokola bino. Tozali na mabota, tosalaka, tokanisaka, mpe tozalaka mpe na mikano. Tozali mwa lingomba ya mabe te. Tolakelaka bato mabe te. . . . Bosengeli kobangaka biso te. . . . Tozali ndenge oyo bokanisaka te, tozali kaka lokola bino.”
Mokemoke bato bazali kondima maloba yango. Kasi, yango elingi nde koloba ete makambo ya bondɔki esengeli kotungisa biso te? Tótalela motuna yango na lisolo oyo elandi.