Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 1/8 nk. 24-28
  • Natiki kosala mindoki, nakómi kobikisa bato

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Natiki kosala mindoki, nakómi kobikisa bato
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Makambo ya sika na États-Unis
  • Moninga moko ya molende
  • Ekateli ya mpasi
  • Tobɔkɔli bana bálingaka Yehova
  • Mikolo oyo eleki mikolo nyonso ya bomoi na ngai na esengo
  • Kokanisa na bolingo oyo nazalaki na yango liboso esalisaki ngai nayika mpiko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Otikaka ete Moyemi-mbɛki Monene abongisa yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Kobɔkɔla bana mwambe na banzela ya Yehova ezalaki mpasi mpe esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Nazwi mbano mpo nakangamaki na nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 1/8 nk. 24-28

Lisolo ya Bomoi

Natiki kosala mindoki, nakómi kobikisa bato

LISOLO YA ISIDOROS ISMAILIDIS

Nafukamaki mpe mai ya miso ezalaki kokita ngai na matama. Nasalaki libondeli mpe nalobaki boye: “Ɛ Nzambe, lisosoli na ngai ezali koloba na ngai ete nakoki kosala lisusu te na izini oyo esalaka mindoki. Nameki koluka mosala mosusu na ndenge nyonso, kasi nazwi te. Lobi, nakopesa bango mokanda ete nalongwe na mosala. Yehova, kotika te ete bana na biso minei bázanga eloko ya kolya.” Ndenge nini nakómaki na esika yango?

MBOKA ezalaki na kimya mpe makambo nyonso ezalaki malamu na Drama, na nɔrdi ya ekólo Grèce, epai nabotamaki na 1932. Tata azalaki koyebisa ngai makambo oyo azalaki kolinga ete ngai nasala. Azalaki kolendisa ngai nakende kotánga kelasi na États-Unis. Ntango babebisaki ekólo Grèce na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bato mingi na Grèce bazalaki koloba boye: “Bokoki koyiba biloko na biso, kasi bokoki koyiba oyo ezali na makanisi na biso te.” Nazalaki na mposa makasi ya kotánga kelasi minene mpe kozwa eloko oyo moto akoki koyiba yango te.

Banda bomwana na ngai, nakɔtaki na masangá ndenge na ndenge ya bilenge ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔksɛ ya Grèce. Na masangá yango bazalaki kokebisa biso mpo na mwa mangomba mikemike. Nazali koyeba lisusu mwa lingomba moko oyo batángaki nkombo na yango—Batatoli ya Yehova—balobaki ete bango nde motɛmɛli ya Klisto.

Ntango nazwaki diplome na eteyelo ya tekiniki na engumba Athènes na 1953, nakendaki na Allemagne mpo na koluka mosala mpe kotánga lisusu. Kasi makambo esimbaki te, mpe nasalaki mibembo na bamboka mosusu. Nsima ya mwa bapɔsɔ, ntango nakómaki na engumba moko oyo ezali na libongo na ekólo Belgique, mbongo nyonso nazalaki na yango esilaki. Nazali koyeba lisusu ete nakɔtaki na kati ya ndakonzambe moko, nafandaki, mpe nalelaki mingi na boye ete natikaki mpisoli na nse na esika oyo nafandaki. Nabondelaki ete soki Nzambe asalisi ngai mpe nakómi na États-Unis, nakoluka biloko ya mokili te kasi nakotánga kelasi mpe nakosala makasi nazala moklisto mpe moto malamu. Nsukansuka, na 1957, nakómaki na États-Unis.

Makambo ya sika na États-Unis

Mopaya oyo akómi sika na États-Unis oyo ayebi Lingelesi te mpe azali na mbongo te azali mpenza na bomoi ya mpasi. Nazalaki kosala bisika mibale na butu mpe na moi nazalaki kokende na kelasi. Nakɔtaki biteyelo mingi ya minene mpe nazwaki badiplome ya iniversite. Na nsima, nakendaki kotánga na Iniversite ya Californie na engumba Los Angeles mpe nazwaki diplome ya licence na physique appliquée. Maloba oyo tata alobaki na ngai ete natánga kelasi etindaki ngai nazonga nsima te atako namonaki mpasi mpenza na bambula wana.

Na ntango yango, nakutanaki na elenge mwasi moko ya kitoko, moto ya ekólo Grèce, nkombo na ye Ekaterini, mpe tobalanaki na 1964. Nsima ya mbula misato, tobotaki mwana na biso ya mobali ya liboso; mpe na boumeli ya mbula minei oyo elandaki, tobotaki lisusu bana mibali mibale mpe mwana moko ya mwasi. Kobɔkɔla bana mpe mbala moko kotánga na iniversite ezalaki lisɛki te.

Na ntango yango, nazalaki kosala na kompanyi moko oyo esalaka bampɛpɔ ya bitumba mpo na basoda ya États-Unis na engumba Sunnyvale, na etúká ya Californie. Nasalaki mpe misala mingi etali kosala bampɛpɔ na bafize, bakisa mpe mpo na kosala fize Agena na Apollo. Nazwaki kutu medayi mpo na mosala oyo nasalaki mpo na Apollo 8 mpe Apollo 11. Nsima, nalandaki lisusu bakelasi mpe namipesaki mingi na misala ya kosala bampɛpɔ ya bitumba mpe bafize ya sika mpo na basoda. Na ntango wana nakanisaki ete nazwaki nyonso oyo nasengelaki na yango: nazalaki na mwasi ya kitoko, bana minei ya malamu, mpe mosala ya lokumu mpe ndako ya kitoko.

Moninga moko ya molende

Na ebandeli ya 1967, nakutanaki na Jim na esika ya mosala, azalaki moto moko ya komikitisa mpe ya boboto. Jim azalaki ntango nyonso na elongi ya kosɛka, mpe ata mbala moko te aboyaki soki nabengi ye tómela mwa kafe na ntango ya bopemi. Na ntango yango nde azalaki koyebisa ngai makambo ya Biblia. Jim ayebisaki ngai ete azali koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova.

Esalaki ngai mpasi mingi ntango nayokaki ete Jim azali kosolola na bato ya lingomba yango. Ndenge nini moto malamu boye akosamaki na mwa lingomba ya batɛmɛli ya Klisto? Kasi, nakokaki koboya Jim te mpamba te azalaki kosepela na ngai mpe azalaki moto ya boboto. Mokolo na mokolo azalaki na eloko moko ya sika mpo na kopesa ngai natánga. Na ndakisa, mokolo moko ayaki na biro na ngai mpe alobaki ete: “Isidoros, lisolo oyo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali kolobela ndenge ya kobongisa libota mpo ezala malamu. Memá yango na ndako, mpe bótánga yango na mwasi na yo.” Nayebisaki ye ete nakotánga yango, kasi na nsima nakendaki na twaleti, nakataki yango mikemike, mpe nabwakaki yango na kabine.

Mbula misato mobimba, nazalaki kopasola mikanda nyonso na bazulunalo oyo Jim azalaki kopesa ngai. Lokola nazalaki na makanisi mabe mpo na Batatoli ya Yehova, kasi nalingaki ete Jim azala kaka moninga na ngai, namonaki ete eleki malamu nayoka makambo oyo azalaki koloba na ngai mpe na nsima nabosana yango mbala moko.

Kasi, na masolo na biso, namonaki ete makambo mingi oyo nazalaki kondima mpe kosala ezalaki na Biblia te. Namonaki ete liteya ya Bosato, ya lifelo ya mɔ́tɔ, mpe liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te euti na Makomami te. (Mosakoli 9:10, Ezekiele 18:4, Yoane 20:17) Lokola nazalaki na lolendo mpo ete nazalaki na Lingomba ya Ɔrtɔdɔksɛ, naboyaki kondima polele ete Jim azali koloba solo. Kasi lokola azalaki kosalela kaka Biblia mpe azalaki kopesa makanisi na ye moko te, nayaki kondima ete moto yango akoki koteya ngai makambo ya ntina na kati ya Biblia.

Mwasi na ngai amonaki ete bomoi na ngai ekómaki mwa ndenge mosusu, mpe atunaki ngai soki nasololaka na moninga na ngai oyo ayekolaka na Batatoli. Ntango nandimaki, alobaki ete: “Tokoki kokɔta ata na lingomba nini kasi na Lingomba ya Batatoli ya Yehova te.” Kasi, mwa moke na nsima, ngai na mwasi na ngai, na bana na biso minei, tokómaki kokende makita ya Batatoli pɔsɔ na pɔsɔ.

Ekateli ya mpasi

Lokola nazalaki koyekola Biblia, mokolo mosusu natángaki maloba ya mosakoli Yisaya oyo elobaka ete: “Bakotula mipanga na bango ete mizala bitimweli, mpe makɔnga na bango ete mazala bikateli na matiti. Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te.” (Yisaya 2:4) Namitunaki boye: ‘Ndenge nini mosaleli ya Nzambe oyo alingaka kimya akoki kosala mosala ya kosala mindoki mpo na koboma bato?’ (Nzembo 46:9) Naumelaki te mpo na kozwa ekateli ya kotika mosala yango mpe koluka mosala mosusu.

Kasi, ezalaki likambo ya lisɛki te. Nazalaki na mosala ya lokumu. Nasalaki mosala makasi na boumeli ya bambula mingi, natángaki kelasi mingi, mpe nasalaki lisusu milende mingi mpo nakóma na esika wana. Nakómaki na esika monene, mpe na mbala moko natika mosala na ngai? Kasi, bolingo makasi mpo na Yehova mpe mposa ya kosala mokano na ye elekaki.—Matai 7:21.

Nazwaki mosala na kompanyi moko na engumba Seattle, na etúká ya Washington. Kasi, nayaki lisusu komona ete namikɔtisi lisusu nde malamumalamu na mosala oyo eyokani te na Yisaya 2:4. Nazalaki kosala makasi nasalaka kaka misala oyo etali makambo mosusu, kasi nalongaki te, mpe lisosoli na ngai ezalaki kotungisa ngai. Namonaki polele ete soki nalandi kaka mosala yango nakozala na lisosoli ya malamu te.—1 Petelo 3:21.

Emonanaki polele ete tosengelaki kobongola makambo mingi. Sanza motoba ekokaki ata te, tobongolaki bomoi na biso mpe mbongo oyo liboso tozalaki kobimisa mpo na bilei ya mokolo moko na libota ekómaki mpo na mikolo mibale. Na nsima, totɛkisaki ndako na biso ya monene mpe tosombaki mosusu ya moke na engumba Denver, na etúká ya Colorado. Sikoyo ekómaki ntango ya kosala likambo ya nsuka: kotika mosala. Nakomaki mokanda na kompanyi mpo na koyebisa bango ete nalongwe na mosala, nalimbolaki ete lisosoli na ngai ezali kopesa ngai nzela lisusu te ete nasalaka mosala yango. Na butu yango, ntango bana balalaki, ngai na mwasi na ngai tofukamaki mpe tobondelaki Yehova, ndenge nalobaki yango na ebandeli ya lisolo oyo.

Sanza moko ekokaki ata te, tokendaki kofanda na Denver, mpe nsima ya pɔsɔ mibale, na sanza ya Yuli 1975, ngai na mwasi na ngai tozwaki batisimo. Nasalaki sanza motoba mobimba nazwaki mosala te, mpe mwa mbongo tozalaki na yango ebandaki kosila. Ntango tokokisaki sanza ya nsambo, mbongo oyo totikalaki na yango ekokaki ata te mpo na kofutela ndako sanza moko. Nabandaki koluka mosala nyonso oyo nakokaki kozwa, kasi mbala moko bazwaki ngai na mosala lokola ingénieur. Mbongo bazalaki kofuta ngai ezalaki soki katikati ya mbongo oyo nazalaki kozwa na mosala ya liboso; atako bongo, ezalaki mingi koleka oyo nasɛngaki Yehova. Nazalaki na esengo na ndenge natyaki matomba ya Bokonzi na esika ya liboso!—Matai 6:33.

Tobɔkɔli bana bálingaka Yehova

Na ntango yango ngai na Ekaterini tozalaki kobunda na mosala monene ya kobɔkɔla bana na biso minei na mateya ya Nzambe. Likambo ya esengo, tomoni ndenge bango nyonso, na lisalisi ya Yehova, bakómi baklisto oyo bakɔmeli, bamipesi na mosala ya ntina etali kosakola Bokonzi. Bana na biso misato ya mibali, Christos, Lakes, na Gregory, bazwaki badiplome na Eteyelo mpo na kobongisa basungi mpe bazali sikoyo kosala na bisika ndenge na ndenge, kotala mpe kolendisa masangá. Toula, mwana na biso ya mwasi, azali kosala na biro monene ya Batatoli ya Yehova na New York. Mitema na biso etondaki na esengo na ndenge tomonaki bango nyonso batiki misala ya lokumu mpe ya mbongo mingi mpo na kosalela Yehova.

Bato mingi batunaki soki sɛkɛlɛ ya kobɔkɔla bana malamu boye ezali nini. Ndenge ya kosala ezali mingi mpo na kobɔkɔla bana malamu, kasi biso tosalaki makasi mpo na koteya bana bálinga Yehova mpe bazalani na bango na mitema na bango mpenza. (Deteronome 6:6, 7; Matai 22:37-39) Tolakisaki bana ete tokoki koyebisa Yehova te ete tolingaka ye na maloba, kasi misala na biso nde esengeli komonisa yango.

Tozalaki kozwa mokolo moko na pɔsɔ moko, mingimingi mokolo ya pɔsɔ, mpo na kobima na mosala ya kosakola libota mobimba. Pɔsɔ na pɔsɔ, na mokolo ya yambo na mpokwa, nsima ya kolya, tozalaki koyekola Biblia na mwana mokomoko. Ntango bana bazalaki mike, tozalaki koyekola na mwana mokomoko mwa miniti moke mbala mingi na pɔsɔ, kasi ntango bakolaki, tokómaki koyekola mwa ntango molai, mbala moko na pɔsɔ. Ntango tozalaki koyekola, bana na biso bazalaki kobanga te mpo na koyebisa biso makambo oyo ezali kotungisa bango.

Tozalaki lisusu kominanola libota mobimba esika moko. Tozalaki kobɛta bibɛtɛlo ya miziki elongo, mpe mwana na mwana azalaki kobɛta nzembo oyo ye alingaka mingi. Bawikende mosusu, tozalaki kobengisa mabota mosusu na ndako na biso mpo na kolekisa ntango elongo mpe kolendisana. Na konje, tozalaki mpe kokende mibembo libota mobimba. Na mobembo moko, tolekisaki pɔsɔ mibale kotala bangomba ya Colorado mpe tobimaki na mosala ya kosakola na bandeko ya masangá oyo ezali kuna. Bana na biso bakanisaka, na esengo nyonso, ndenge bazalaki kosala na mayangani ya etúká na badepartema ndenge na ndenge mpe bapesaki mabɔkɔ mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi na bisika mingi. Ntango tomemaki bana na Grèce mpo na kotala bandeko na bango, bakutanaki lisusu na Batatoli mingi ya sembo oyo bakɔtaki bolɔkɔ mpo na kondima na bango. Yango esimbaki mitema na bango mpe esalisaki bango mpo na kozwa ekateli ya kozala ntango nyonso makasi mpe na mpiko mpo na solo.

Na ntembe te, ntango mosusu bana bamitambwisaki malamu te to baponaki baninga ya mabe. Ntango mosusu mpe, biso nde tozalaki kobimisela bango mikakatano mpe kolekisa ndelo na makambo mosusu oyo tozalaki kopekisa bango. Kasi soki tosaleli “mpamela ya Nkolo,” ndenge elobelami na Biblia, ezalaki kosalisa biso nyonso tóbongisa esika oyo makambo ezali kotambola malamu te.—Baefese 6:4; 2 Timote 3:16, 17.

Mikolo oyo eleki mikolo nyonso ya bomoi na ngai na esengo

Ntango bana na biso bakɔtaki na mosala ya ntango nyonso, ngai na Ekaterini tobandaki kokanisa eloko oyo tokosala mpo tómipesa lisusu mingi na mosala oyo ya kobikisa bato. Yango wana, na 1994, nasɛngaki nabima epaso na mosala. Tobandaki kosala lokola babongisi-nzela ya sanza na sanza. Teritware na biso ezalaki na biteyelo minene mpe bainiversite epai tozali kopesa bayekoli litatoli mpe tozali koyekola Biblia na bamosusu kati na bango. Lokola nayebi mikakatano na bango, mpo ete ngai mpe nazalaki lokola bango eleki bambula mingi te, nazali kosalisa bango báyeba Yehova. Nazwaki libaku malamu ya koyekola Biblia na bayekoli oyo bautaki na Bolivie, Brésil, Chili, Chine, Égypte, Éthiopie, Mexique, Thaïlande, mpe Turquie! Nazalaki mpe kopesa litatoli na telefone, mingimingi na bato oyo balobaka monɔkɔ ya mboka na ngai.

Atako nazali na mwa mikakatano mpo soki nazali koloba moto akoyeba ete nazali moto ya Grèce mpe lisusu mbula ezali kopusana, nasalaka ntango nyonso makasi ete Yehova asalela ngai mpe nazali na elimo ya Yisaya, oyo alobaki ete: “Ngai oyo! Tindá ngai!” (Yisaya 6:8) Tozali na esengo ete tosalisi bato koleka motoba bámipesa na Yehova. Yango nde mikolo oyo eleki mikolo nyonso ya bomoi na ngai na esengo.

Kala, bomoi na ngai mobimba ezalaki se na makambo ya kosala mindoki ya nsɔmɔnsɔmɔ mpo na koboma baninga na ngai bato. Kasi, Yehova, na boboto na ye, afungolaki nzela mpo na ngai na libota na ngai tókóma basaleli na ye oyo bamipesi mpe tóteya bato nsango malamu oyo ezali komema na bomoi ya seko na paladiso awa na mabele. Soki nakanisi ekateli ya makasi oyo nasengelaki kozwa, maloba ya Malaki 3:10 eyelaka ngai na makanisi ete: “Meká ngai [sikoyo] na yango, soko nakozipwela bino maninisa na lola te kosopela bino lipamboli kino esika ekozanga mpo na yango.” Asalaki yango mpe mitema na biso esepelaka!

[Etanda/Elilingi na lokasa 27]

Lakes: Tata alingaki ezaleli ya liso na nse ya lokasa te. Azalaki kosala makasi ete ye moko mpe azala moto ya liso na nse ya lokasa te, mingimingi na makambo oyo etali kopesa libota na ye ndakisa ya malamu. Mbala mingi azalaki koloba na biso ete: “Soki bomipesi na Yehova, bomoi na bino ekozala na ntina. Bosengeli kondima komipimela makambo mosusu mpo na Yehova. Yango nde bomoi ya moklisto.” Nabombá maloba yango mpe esalisaki ngai nalanda ndakisa na ye mpe namipimelá makambo mosusu mpo na Yehova.

[Etanda/Elilingi na lokasa 27]

Christos: Nasepelaka mingi ndenge baboti na ngai bazalaki sembo epai ya Yehova mpe ndenge oyo bamipesaki mpo na kokokisa mokumba na bango ya baboti. Libota na biso mobimba tozalaki kosala makambo elongo, ezala na mosala ya kosakola to na bakonje na biso. Atako bazalaki na likoki ya kosala makambo mingi mosusu, baboti na ngai bazalaki na bomoi ya mindɔndɔ te mpe batyaki mosala ya Nzambe na esika ya liboso. Lelo oyo, nayebi ete nazali na esengo mingi lokola namipesi mobimba na mosala ya Yehova.

[Etanda/Elilingi na lokasa 28]

Gregory: Koleka maloba ya kolendisa oyo baboti na ngai bazalaki koloba na ngai mpo namipesa mingi na mosala na ngai ya kosakola, ndakisa na bango mpe esengo na bango oyo ezalaki komonana polele na mosala ya Yehova etindaki ngai natalela lisusu makambo na ngai. Namitungisaki ata na likambo moko te mpo na kobanda mosala ya ntango nyonso, mpe namipesi mobimba na mosala ya Yehova. Nazali kopesa baboti na ngai matɔndi mpo basalisaki ngai na kosala molende mpe sikoyo nazali na esengo mpo na milende nasalaki.

[Etanda/Elilingi na lokasa 28]

Toula: Baboti na ngai bazalaki ntango nyonso koloba ete eloko oyo eleki biloko nyonso na ntina oyo tokoki kozala na yango ezali boninga na biso na Yehova mpe tokozala na esengo ya solosolo kaka soki tozali kopesa Yehova biloko na biso oyo eleki malamu. Basalisaki biso tómona ete Yehova azali solo. Tata azalaki koloba na biso mbala mingi ete ezalaka esengo mingi soki okei kolala na lisosoli oyo ezali kotungisa yo te, wana oyebi ete osali nyonso ekoki na yo mpo na kosepelisa Yehova.

[Elilingi na lokasa 25]

Ntango nazalaki soda na Grèce, na 1951

[Elilingi na lokasa 25]

Ngai na Ekaterini na 1966

[Elilingi na lokasa 26]

Libota na ngai na 1996: (banda na lobɔkɔ ya mwasi) Gregory, Christos, Toula; (na liboso) Lakes, Ekaterini, mpe ngai

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto