Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 1/6 nk. 24-28
  • Nazwi mbano mpo nakangamaki na nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nazwi mbano mpo nakangamaki na nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nakɔtaki na mangomba ndenge na ndenge
  • Nakɔti na lingomba mosusu
  • Makambo oyo ekomelaki ngai lokola nakɔtaki na lingomba mosusu
  • Tobɔkɔli bana na banzela ya Nzambe
  • Nazwi mbano ya kokangama na Nzambe
  • Kobɔkɔla bana mwambe na banzela ya Yehova ezalaki mpasi mpe esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Kosepela na oyo nazali na yango esungaki ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Jéhovah apesaki ngai makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Natiki kosala mindoki, nakómi kobikisa bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 1/6 nk. 24-28

Lisolo ya bomoi

Nazwi mbano mpo nakangamaki na nzambe

YA WILLIAM AIHINORIA

Mokolo moko, kolela ya Tata na biso oyo tomesanaki koyoka mikolo nyonso elamusaki ngai na katikati ya butu. Asimbaki libumu na ye mpe azalaki kobalukabaluka na mabele. Ngai, Mama na yaya na ngai ya mwasi totɛlɛmaki zingazinga na ye. Ntango mpasi na ye ekitaki, afandaki mpe alobaki ete: “Na mokili oyo, kaka Batatoli ya Yehova nde bazali na kimya.” Nayebaki te mpo na nini alobaki bongo, kasi maloba yango etikalaki na motema na ngai mpamba te ezalaki mbala ya liboso nayoka nkombo Batatoli ya Yehova. Nazalaki komituna soki alingaki mpenza koloba nini.

LIKAMBO yango esalemaki na 1953, ntango nazalaki na mbula motoba. Nabotamá na Ewossa, mboka moko ya bato ya bilanga, na ntei ya ekólo Nigeria; Tata na biso azalaki na basi mingi. Nazalaki mwana ya mibale, kasi mwana mobali ya liboso; tata azalaki na basi misato mpe bana 13. Tozalaki kofanda na ndako ya nkɔkɔ ya mobali; ezalaki ndako ya ndɛlɛ oyo ezalaki na biteni minei. Tozalaki mpe kofanda na nkɔkɔ ya mwasi, na bandeko ya Tata misato ya mibali, na basi na bango mpe bana na bango.

Namonaki mpasi mingi na bomwana na ngai. Mingimingi mpo na mikakatano ya nzoto ya Tata. Anyokwamaki bambula ebele na mpasi ya libumu tii na liwa na ye. Nkisi moko te, ezala ya bonkɔkɔ to ya lopitalo oyo libota na biso bato ya mboka na Afrika tokokaki kosomba esilisaki maladi na ye oyo eyebanaki nkombo te. Mbala mingi tozalaki kolekisa butu mobimba na kolela pembeni ya Tata, wana azali kobalukabaluka na mabele mpo na mpasi makasi, tii ntango nsoso ekolela. Mbala mingi azalaki kotika biso na mabɔkɔ ya nkɔkɔ ya mwasi mpo na kokende mibembo elongo na Mama mpo na koluka nkisi oyo ekobikisa ye.

Tozalaki kobikela na kolona mpe kotɛkisa mbala, songo, mpe makaso. Tozalaki mpe mwa moke kokɔngɔla makiki ya ndembo mpo na kozwa mwa mbongo. Tozalaki kolya mingimingi mbala. Na ntɔngɔ tozalaki kolya mbala, nsima ya midi tozalaki kolya mbala batuti, na butu lisusu mbala. Ntango mosusu tozalaki kolya mpe mwa moke makemba ya kotumba.

Tomipesaki mingi na losambo ya bankɔkɔ. Libota na biso ezalaki na momeseno ya kokabela milimo ya bankɔkɔ bilei; tozalaki kotika yango liboso ya banzete bakangisá yango bankisi. Tata azalaki mpe kosambela ekeko moko mpo na kobengana bilimo mabe mpe bandɔki.

Ntango nakómaki na mbula mitano, tokendaki kofanda, mpo na mwa ntango, na ferme moko na ntaka ya kilomɛtrɛ soki zomi na moko. Kuna, Tata abɛlaki maladi ya mokosa (filariose), yango ebakisaki mpasi likoló ya maladi na ye ya libumu. Na moi, azalaki kokoka kosala mosala te, mpe butu nyonso mpasi ya libumu na ye ezalaki konyokola ye. Ngai nabɛlaki lolenge moko ya maladi oyo babengaka typhus. Nyonso wana esalaki ete tóbikelaka kaka na biloko oyo bandeko na biso bazalaki kokabela biso. Lokola bobola elekaki makasi, tozongaki na mboka na biso na Ewossa. Tata alingaki ete ngai, mwana na ye ya mobali ya liboso, nasala mosala ya malamu kasi mosala ya bilanga te. Amonaki ete soki natángi kelasi ya malamu, nakokoka kobongisa bomoi ya libota mpe ekosalisa ngai nasalisa bandeko na ngai.

Nakɔtaki na mangomba ndenge na ndenge

Ntango tozongaki na mboka na biso, nabandaki kotánga kelasi. Yango nde ememaki ngai na mangomba ya boklisto. Na bambula ya 1950, biteyelo nyonso ezalaki ya mangomba ya mindɛlɛ oyo bazalaki koyangela mboka na biso. Lokola eteyelo ya ebandeli oyo nakɔtaki ezalaki ya Bakatolike, esengelaki ete ngai mpe nazala Mokatolike.

Na 1966, ntango nakokisaki mbula 19, nakɔtaki na eteyelo ya katikati ya Lingomba ya Baptiste na engumba ya Ewohinmi, oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ mwambe na Ewossa. Kuna, nakɔtaki na lingomba mosusu. Lokola nakómaki kotánga na eteyelo ya Baprotesta, basango bapekisaki ngai kolya kominyo na misa ya lomingo.

Nazwaki Biblia mbala ya liboso ntango nazalaki na eteyelo yango ya Lingomba ya Baptiste. Atako natikaki te kokende na ndako-nzambe ya Katolike, nazalaki kotánga Biblia ngai moko mikolo nyonso ya lomingo nsima ya misa. Nazalaki kosepela mingi na mateya ya Yesu Klisto; ezalaki kopesa ngai mposa ya kokangama na Nzambe. Lokola nazalaki kotánga Biblia mingi, nakómaki koyina bokosi oyo bakambi mosusu bazalaki na yango na bomoi na bango mpe etamboli ya mbindo ya bandimi mingi. Makambo bato oyo bamibengaka baklisto bazalaki kosala ekeseneki mingi mpenza na mateya mpe bizaleli ya Yesu na bayekoli na ye.

Nayokaki mabe mingi na motema mpo na makambo mosusu. Mokolo moko nakendeki kosomba sapɛlɛ na magazini moko oyo batɛkaka biloko ya losambo, namonaki batii bikelakela likoló ya porte ya magazini yango. Mokolo mosusu, mokambi ya eteyelo ya Baptiste alingaki kosangisa na ngai nzoto. Nayaki koyeba na nsima ete azalaki kosangisa nzoto na mibali mpe ete asangisaki nzoto na bana mosusu. Nakanisaki makambo nyonso wana mpe namitunaki ete: ‘Nzambe andimaka mpenza mangomba oyo bandimi na yango mpe ata bakambi na yango basalaka masumu minene kasi bazwaka etumbu te?’

Nakɔti na lingomba mosusu

Atako bongo, nalingaki makambo oyo nazalaki kotánga na Biblia mpe nazwaki ekateli ya kolanda kotánga yango. Na ntango wana nde nakómaki kokanisa lisusu maloba oyo Tata alobaki elekaki mbula 15: “Na mokili oyo, kaka Batatoli ya Yehova nde bazali na kimya.” Kasi nazalaki kobanga mwa moke, mpamba te bato mosusu bazalaki kotyola bilenge Batatoli na eteyelo na biso mpe mbala mosusu bazalaki kopesa bango etumbu mpo bazalaki koboya kosangana na biso na losambo ya ntɔngɔ. Mpe bindimeli na bango mosusu ezalaki ndenge mosusu. Na ndakisa, ezalaki mpasi nandima ete bobele bato 144 000 bakokende na likoló. (Emoniseli 14:⁠3) Lokola nazalaki na mposa ya kokende na likoló, nazalaki komituna soki bato yango nyonso basilaki koponama liboso ngai nabotama.

Namonaki mpenza ete bizaleli mpe etamboli ya Batatoli ekeseneki na oyo ya bato mosusu. Bazalaki kokɔta te na misala ya mbindo mpe ya mobulu oyo bilenge mosusu ya eteyelo bazalaki kosala. Namonaki mpenza ete bazalaki komikɔtisa te na makambo ya mokili, ndenge kaka natángaki na Biblia ete bato oyo bazali na lingomba ya solo basengeli kozala bato ya mokili te.​—⁠Yoane 17:​14-16; Yakobo 1:⁠27.

Nazwaki ekateli ya koluka koyeba bindimeli yango malamu. Na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1969, nazwaki buku “Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko.” Na sanza oyo elandaki, mobongisi-nzela moko, ndenge Batatoli ya Yehova babengaka basakoli ya ntango nyonso, abandaki koyekolisa ngai Biblia. Boyekoli ya liboso epesaki ngai mposa mingi ya koyeba makambo mosusu mpe nabandaki kotánga buku Solo mokolo moko ya pɔsɔ na butu tii nasilisaki yango nsima ya midi ya mokolo oyo elandaki. Mbala moko nabandaki koyebisa baninga na ngai ya kelasi makambo malamu oyo natángaki. Bana-kelasi mpe balakisi bakanisaki ete lingomba ya sika nakɔtaki ekómisaki ngai moto ya ligboma. Kasi nayebaki malamu ete nabandaki ligboma te.​—⁠Misala 26:⁠24.

Bayebisaki baboti na ngai ete nakómi koteya makambo ya lingomba moko ya sika. Basɛngaki ngai nazonga na mboka nokinoki mpo báyeba likambo nini ezali kosala ngai. Moto ya kotuna toli azalaki te, mpamba te Batatoli nyonso bakendeki na liyangani ya etúká na engumba ya Ilesha. Ntango nazongaki na mboka, Mama na bandeko mosusu batunaki ngai ebele ya mituna mpe balobaki mabe mpo na ngai. Nasalaki nyonso mpo nalimbolela bango makambo oyo nazalaki koyekola na Biblia.​—⁠1 Petelo 3:⁠15.

Ntango tata-leki amonaki ete alongaki te komonisa ngai ete Batatoli ya Yehova bazali bateyi ya lokuta, amekaki kozwa ngai na nzela mosusu. Alobaki na ngai boye: “Kobosana te ete okendeki na eteyelo mpo na koyekola. Soki otiki kotánga mpo na kokende kosakola, okosilisa kelasi te. Ekoleka malamu ozela tii ntango okosilisa kelasi na yo bongo okɔta na lingomba na yo ya sika.” Na ntango wana namonaki ete likambo alobaki ezali malamu, yango wana natikaki koyekola na Batatoli.

Na sanza ya Desɛmbɛ 1970, nsima kaka ya kozwa diplome, nakendeki mbala moko na Ndako ya Bokonzi, mpe kobanda ntango wana, nakendaka na makita nyonso ya Batatoli ya Yehova. Na mokolo ya 30 Augusto 1971, nazwaki batisimo mpo na komonisa ete namipesi na Nzambe. Likambo yango etungisaki baboti na ngai mpe bato nyonso ya mboka. Balobaki ete nayokisaki bango nsɔni mpamba te nazalaki moto ya liboso ya mboka Ewossa mpe ya bamboka ya zingazinga oyo Leta afutelaki ngai kelasi. Mingi bazalaki kotyela ngai elikya ete nakokende mosika. Bazalaki kolikya ete nakosalela mayele nazwi na kelasi mpo na kosalisa mboka na biso.

Makambo oyo ekomelaki ngai lokola nakɔtaki na lingomba mosusu

Libota na ngai mpe bankumu ya mboka batindaki bato mpo bándimisa ngai natika lingomba na ngai. Ntango bazalaki koloba na ngai, bazalaki mpe kolakela ngai mabe. Bazalaki koloba ete: “Soki olongwe na lingomba wana te, okobonga te na bomoi na yo. Okozwa mosala te. Okotonga ndako na yo moko te. Okobala te mpe okobota bana te.”

Nyonso oyo balobaki ezalaki mpamba mpo sanza zomi na nsima ya kosilisa kelasi, nazwaki mosala ya molakisi. Na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1972, nabalaki Veronica, mwasi na ngai ya bolingo. Na nsima, nazwaki formasyo mpe nakómaki mosali ya Leta na kati ya mboka mpo na makambo etali bilanga. Nasombaki motuka na ngai ya liboso, mpe nabandaki kotonga ndako na biso. Victory, mwana na biso ya mwasi ya liboso abotamaki na mokolo ya 5 Novɛmbɛ 1973, mpe na bambula oyo elandaki tobotaki lisusu Lydia, Wilfred, na Joan. Tobotaki mwana na biso ya nsuka Micah na 1986. Tolingaka bango nyonso mingi mpe bazali mpo na biso likabo ya Yehova.​—⁠Nzembo 127:⁠3.

Soki nakanisi bomoi na ngai, nakoki koloba ete mabe oyo bato ya mboka balakelaki ngai ebongwanaki nyonso mapamboli. Yango wana napesaki mwana na ngai ya liboso nkombo Victory [elingi koloba Bolongi]. Eleki mwa mikolo, bato ya mboka bakomelaki ngai mokanda oyo elobaki boye: “Soki okosepela, tolingi ete ozonga na mboka mpo na kosalisa mboka, mpamba te tomoni ete Nzambe azali kopambola yo.”

Tobɔkɔli bana na banzela ya Nzambe

Ngai na mwasi na ngai toyebaki ete tokokoka te kosangisa mokumba Nzambe apesi biso ya kobɔkɔla bana na koluka kozala bazwi. Yango wana, tomesanaki na kosepela na bomoi ya mindɔndɔ te. Tosepelaka kozala na bomoi oyo tozali na yango na esika ya koluka bomoi ya ndenge mosusu oyo ekoki kobimisa mikakatano mingi.

Na ekólo na biso, mabota mingi bameseni kofanda na lopango moko na mabota mosusu mpe basalelaka kikoso moko, balambaka esika moko, mpe basalaka biloko mosusu esika moko. Tozalaki na esengo mingi mpo ete, bisika nyonso oyo Leta azalaki kotinda ngai mpo nakende kosala, tozalaki kofanda lopango mobimba biso moko. Ya solo, bandako ya kofutela ya lolenge yango ezalaki ntalo mingi, kasi ezalaki malamu mpo bana bábeba te na baninga ya mabe. Natɔndaka Yehova mpo ete na boumeli ya bambula, tozwaki likoki ya kobɔkɔla bana na biso na bisika ya malamu mpo na elimo na bango.

Lisusu, mwasi na ngai atikalaka na ndako mpo na kobatela bana na biso. Soki nauti mosala, tosalaka makasi mpo na kosala makambo elongo libota mobimba. Nyonso oyo tosalaka, tosalaka yango elongo, ezala koyekola Biblia na libota, kobongisa makita mpe koyangana na makita ya lisangá, kobima na mosala ya boklisto mpe kolekisa ntango na bato mosusu.

Tosalaki nyonso mpo na kolanda toli ya Deteronome 6:​6, 7, oyo elendisi baboti báteya bana na bango kaka na ndako te kasi na mabaku nyonso. Yango esalaka ete bana bálekisaka ntango na bango kaka na baninga ya lisangá, na esika ya kozalaka na bato ya mokili. Bana bazali kotala ndakisa na biso mpe bayekoli ete basengeli kozala na ekɛngɛ na baninga ya mokili, mpamba te ngai na Veronica tolekisaka ntango mingi te na bato oyo tozali na bango bindimeli ndenge moko te.​—⁠Masese 13:20; 1 Bakolinti 15:⁠33.

Longola toli mpe mateya na biso, ezali na eloko mosusu oyo etindaka bana na biso bázala na etamboli ya malamu. Tozalaka tii lelo oyo na momeseno ya koyamba na ndako na biso baklisto ya molende oyo mingi kati na bango bazali bakɛngɛli-batamboli ya Batatoli ya Yehova. Ntango nyonso oyo baklisto yango oyo bakɔmeli bazalaki kolekisa elongo na libota na biso epesaki bana na biso libaku ya komona mpe komekola bomoi na bango ya komipesa. Yango esalaki ete mateya na biso esimba lisusu malamu mitema na bango mpe solo efanda mpenza na mitema ya bana.

Nazwi mbano ya kokangama na Nzambe

Lelo oyo ngai na mwasi na ngai tozali na mosala ya ntango nyonso, elongo na bana na biso minei. Nasalaki mosala ya mobongisi-nzela mbala ya liboso na 1973. Na bambula mosusu, nazalaki kokata mosala ya ntango nyonso mbala na mbala mpo na mikakatano ya mbongo. Mbala mosusu nazalaki mpe kozwa libaku malamu ya kotángisa na Eteyelo ya Mosala ya Bokonzi oyo ebongisami mpo na kosalisa bakɛngɛli Batatoli ya Yehova bákokisa mokumba na bango malamu. Mikolo oyo, nazali mpe na mokumba ya malamu ya kosala kati ya Komite mpo na boyokani na minganga, mpe lisusu nazali mokɛngɛli ya engumba ya Uhonmora.

Bana na ngai ya basi mibale ya liboso, Victory mpe Lydia babalá mibali ya malamu oyo bazali bankulutu baklisto ya makoki mpenza. Bazali kosala, elongo na mibali na bango na Betele ya Batatoli ya Yehova na Igieduma, na Nigeria. Mwana na biso ya mobali ya liboso Wilfred, azali mosaleli na misala, mpe mwana na biso ya nsuka Micah, azalaka mbala na mbala mobongisi-nzela mosungi. Na 1997, Joan asilisaki kotánga na eteyelo ya ntei mpe abandaki mosala ya mobongisi-nzela ya ntango nyonso.

Moko na makambo oyo namonaka ete ezali mbano monene na bomoi na ngai ezali ya kosalisa bato bákóma basaleli ya Yehova Nzambe. Na kati ya bato oyo nasalisi ezali mpe na bandeko na ngai mosusu. Tata na biso asalaki makasi mpo asalela Yehova, kasi lokola azalaki na basi ebele, yango epekisaki ye kokola na elimo. Banda bolenge na ngai, nalingaka bato. Soki natali mpasi oyo bato mosusu bazali komona, nabosanaka mikakatano nyonso oyo nazalaka na yango. Nakanisi ete bato bamonaka ete mposa na ngai ya kosalisa bango eutaka mpenza na motema na ngai, mpe yango wana ezalaka pɛtɛɛ mpo básolola na ngai.

Moko ya bato oyo nasalisaki ayeba mikano ya Nzambe ezali elenge mobali moko oyo azalaki kolala kaka na mbeto. Azaláká kosala na kompanyi ya kura mpe kuna akangamaki na kura na ndenge moko ya nsɔmɔ, mpe akómá paralize banda na ntolo tii na makolo. Andimaki koyekola Biblia mpe malɛmbɛmalɛmbɛ akómaki kosalela mateya azalaki koyekola. Ntango azwaki batisimo mokolo ya 14 Ɔkɔtɔbɛ 1995 na mwa mai moko pene ya ndako na biso, ezalaki mbala na ye ya liboso alongwa na mbeto banda mbula 15. Alobaki ete ezali mokolo oyo eleki esengo na bomoi na ye. Lelo oyo azali mosaleli ya misala na lisangá.

Nayokaka mawa ata moke te mpo naponaki, eleki mbula 30, kosalela Yehova elongo na bato na ye oyo bazali na bomoko mpe bamipesi na ye. Namonaki bolingo ya solo oyo bazali na yango. Ata soki elikya ya bomoi ya seko ezalaka te na kati ya mbano oyo Yehova akopesa basaleli na ye sembo, nalingaki kaka kokangama na Nzambe bomoi na ngai mobimba. (1 Timote 6:6; Baebele 11:⁠6) Ezali nzela oyo etambwisaki ngai mpe esalaki ete bomoi na ngai ezala na kimya, ememela ngai mpe libota na ngai esengo mpe bolamu.

[Elilingi na lokasa 25]

Ngai na mwasi na ngai na bana na 1990

[Elilingi na lokasa 26]

Ngai na mwasi na ngai na bana na biso mpe babokilo na biso mibale

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto