Bato bazali koyinana mingi
“Bato bamesanaka ata moke te na makambo ya bato oyo bango bayinaka.”—JAMES RUSSELL LOWELL, MOKOMI MPE AMBASADƐRƐ.
LELO oyo, ata na esika nini oyo tozali, tozali komona ete bato bazali koyinana. Bankombo ya bisika lokola Timor oriental, Kosovo, Liberia, Littleton, na Sarajevo; na bankombo ya bato lokola néonazi, skinhead, na mindɛlɛ oyo bamonisaka ete bango nde baleki bato ya mposo mosusu, etindaka biso na kokanisa mbala moko bililingi oyo tomonaki na televizyo, bililingi ya bisika oyo batumbi na mɔ́tɔ, mabulu oyo batimoli mpo na kokunda bato ebele esika moko, mpe lisusu bibembe ya bato; bililingi yango elongwaka na makanisi noki te.
Bato bazali lisusu na elikya te ete koyinana, matata, na mobulu ekosila mokolo mosusu. Danielle Mitterand, mwasi ya prezida ya kala ya France oyo akufá, alobaki boye ntango akanisaki ndenge makambo ezalaki ntango azalaki elenge: “Bato bazalaki kokanisa ete bakozala na bonsomi mpe bakozala na bondeko, mpe bakotyelana motema; bazalaki kokanisa ete bakozala na kimya ya makanisi ntango bafandi na bazalani na bango; bakozala na bomoi ya malamu, bomoi ya kimya mpe oyo elongobani na mokili ya malamu epai bato bazali na boboto mpe bazali komitungisa mpo na bamosusu.” Makambo nyonso wana esuki ndenge nini? Na mawa nyonso, alobaki ete: “Nsima ya mbula ntuku mitano, makambo nyonso oyo tokanisaki ekei na mai.”
Moto nyonso azali komona ndenge oyo koyinana ezali kongala lelo oyo. Koyinana ekómi komonana na bisika ebele mpe na mitindo ndenge na ndenge ya mabe mpenza. Atako bato ebele bazalaki kokanisa ete bakozala na kimya mpe eloko moko ekobangisa bango te, bazali lisusu kokanisa bongo te, mpamba te bato bazali kosalela bazalani na bango mobulu mpo bazali koyina bango, mpe mbala nyonso oyo basali likambo mabe mpo bazali koyina, ezali mabe koleka oyo basalaki liboso. Ata soki na ndako na biso to na mboka na biso bazali koyina biso te, tóyeba ete na esika mosusu bakoyina biso. Mokolo na mokolo tolandaka bansango mpe baemisyo mosusu na televizyo oyo ezali komonisa ndenge bato bazali koyinana. Kutu, makambo yango ekɔti ata na Internet. Tótala mwa bandakisa ya makambo yango.
Soki totali na mbula zomi oyo eleki, bato bangalisaki bolingo ya ekólo. Joseph Nye Junior, mokambi ya ebongiseli moko (Harvard Center for International Affairs), alobaki ete: “Na bisika mingi na mokili, bato bazali kokóma na bolingo ya ekólo mingi, kasi ezali kokita te. Na esika ete mokili ezala lokola mboka moko, mokili ekabwani na bituluku bituluku mpe etuluku mokomoko elingi komibatela liboso ya etuluku mosusu. Yango nde ezali kobimisa matata mingi.”
Koyinana mosusu emonanaka mpenza polele te, esukaka kaka na ekólo moko to na kartye moko. Ntango ba skinhead mitano babomaki mobange moko ya Lingomba ya Sikh na Canada, “bato balobaki ete likambo ya koboma bato oyo bazali koyina, na ekólo oyo bakumisaka yango ete bato ya mposo ndenge na ndenge oyo bafandaka kuna bayokanaka malamu ezongi lisusu.” Na Allemagne, mwa bambula oyo elekaki, bato ya molende mabe oyo bayinaka bato ya mposo mosusu bazalaki lisusu kosala mobulu mingi te; kasi na 1997, mobulu ebakisamaki lisusu mingi (27 %). Manfred Kanther, ministre ya intérieur, alobaki ete: “Ndenge likambo yango ezali kobakisama ezali kolɛmbisa nzoto.”
Bapanzi-nsango basalaki ankɛtɛ moko na nɔrdi ya ekólo Albanie, mpe emonisaki ete bana koleka 6 000 bazali kobanga kobima na bandako na bango mpo banguna na bango bakoki kobɛta bango masasi. Bana yango bazali kobima na balabala te mpo na mboka yango, bato bamesaná kobomana mpo na kozongisa mabe na mabe, yango wana “bomoi ekómi mpasi mpo na mabota mingi.” Na États-Unis, lapolo ya bapolisi (F.B.I.) eyebisi ete “soki tokamati bato 7 755 oyo babomaki bango na 1998, koleka bato 50 likoló ya monkama kati na bato yango babomaki bango mpo na koyinana oyo ezali kati na bato oyo bazali na mposo moko te.” Makambo mosusu oyo ezali kotinda bato na koyinana mpe kobomana ezali makanisi mabe oyo bazalaka na yango mpo na bato ya lingomba mosusu, ya ekólo mosusu, to bato oyo bautá epai mosusu, na bibɔsɔnɔ.
Longola yango, mokolo na mokolo masolo ya bazulunalo ezali komonisa ete bato bakómi koyina bapaya mingi koleka, mingimingi bapaya oyo bakimá mboka na bango, baoyo bakómi lelo oyo koleka milio 21 na mokili mobimba. Ezali mawa na komona ete bilenge nde bazali kolakisa mpenza ete balingi bapaya te, mpamba te bazali kolanda bato mabe ya politiki, mpe bato mosusu oyo balukaka kofunda bato mosusu mpo na komonisa ete bango nde bazali koya na mikakatano na mboka. Makambo mosusu ezali kobota koyinana yango oyo: bato bazali kotyelana motema te, bazali koboya kondima makanisi ya bamosusu, mpe bazali komona ete bato oyo bakokani na bango te bazali bato mabe.
Wapi mwa makambo oyo ezali kosala ete bato báyinana mingi? Mpe ndenge nini koyinana ekoki kosila? Tokotalela mituna yango na lisolo oyo elandi.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]
Daud/Sipa Press.