Ozali komikundola?
Osepelaki mpenza na botángi ya banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo eutaki kobima? Soki ɛɛ, talá soki okoki kopesa biyano na mituna milandi:
• Likambo nini ya ntina mingi tosengeli kobosana te ntango tozali koluka kosilisa matata na moto moko?
Likambo ya liboso ezali koyeba ete biso mpe tokoki kozala na makanisi to na elimo ya mabe. Na nsima tosengeli kotala malamu soki likambo yango euti epai na biso to epai ya moto mosusu.—15/8, lokasa 23.
• “Ntango ya kozongisa makambo nyonso ndenge ezalaki” oyo elobelami na Misala 3:21 (NW ), ekoya ntango nini?
Kozongisa makambo nyonso ndenge ezalaki ekosalema na ndenge mibale. Libosoliboso, kozongisa makambo ndenge ezalaki na paladiso ya elimo oyo ezali kosalema kobanda 1919. Ya mibale, ekosalema ntango mabele ekozonga paladiso.—1/9, nkasa 17, 18.
• Ndenge nini nsɛlɛlɛ atako ezali na mokonzi te, ndenge Masese 6:6-8 elobi yango, kasi ezali kopesa biso ndakisa malamu?
Esika nsɛlɛlɛ ezali, ezalaka na nsɛlɛlɛ moko oyo ezali mama-mokonzi, ezali mama-mokonzi kaka mpo yango nde ebotaki maki mpe ezali mama ya bansɛlɛlɛ nyonso wana. Bansɛlɛlɛ esalaka mosala, biso mpe tosengeli kozala bongo, tosengeli kosala makasi mpo na kobongisa mosala na biso, ata soki bato bazali komona biso te.—15/9, lokasa 26.
• Tokoki nde koloba ete esakweli ya Huluda oyo ekomami na 2 Mikonzi 22:20 ete Yosiya akokufa na “kimya,” ekokisamaki solo atako bazokisaki ye mpota monene na etumba?
Ɛɛ, Yosiya akufaki na kimya na ndimbola oyo ete akufaki liboso ya likama monene ya 609-607 L.T.B., ntango bato ya Babilone bayaki kozingela mpe kobebisa Yelusaleme.—15/9, lokasa 30.
• Mpo na nini tokoki koloba ete Salomo akumisaki basi ntango akokanisaki bango na “mboloko na bolingo mpe ntaba ya [ngomba] na kitoko”? (Masese 5:18, 19)
Ntaba ya mwasi, to ntaba ya ngomba, ezalaka kimya mpe bonzenga. Kasi, ekoki kofanda mpe kobota na ngomba ya mabanga, esika oyo moto akómaka te mpe biloko ya kolya ezalaka mingi te.—1/10, nkasa 30, 31.
• Henry Grew mpe George Storrs bazalaki banani?
Bato mibale yango bazalaki na bomoi na bambula ya 1800 mpe bazalaki bayekoli ya molende ya Biblia. Grew asosolaki ete liteya ya Bosato, molimo ekufaka te, na lifelo ya mɔ́tɔ, ezali mateya oyo euti na Biblia te. Storrs asosolaki ete bato mosusu bakozwa bomoi ya seko awa na mabele. Bango mibale bateyaki makambo yango liboso ya Charles Taze Russell, oyo abandaki kobimisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na 1879.—15/10, nkasa 26-30.
• Ndenge nini Batatoli ya Yehova batalelaka mayele ya monganga oyo esɛngaka kosalisa moto na kosalela makila na ye moko?
Lokola makambo oyo bandimaka euti na Biblia, bandimaka te kobombisa makila na bango mpe na nsima bázongisa bango yango lisusu na nzoto. Ezali likambo etali moklisto ye moko mpo na kozwa ekateli na ntina etali ndenge oyo basengeli kosalela makila na ye na ntango ya lipaso, ekizamɛ ya monganga, to na nkisi mosusu. Asengeli kotalela makambo oyo Biblia elobi mpo na makila mpe koyeba ete amipesi mobimba na Nzambe.—15/10, nkasa 30, 31.
• Eloko nini ya ntina mingi Batatoli ya Yehova na mokili mobimba basengeli na yango, mpe batalelaki likambo yango na ebandeli ya mbula oyo?
Batatoli ya Yehova bazali na mposa ya Ndako ya Bokonzi 11 000, na mikili ya bobola esika bandeko bazali na mbongo mingi te. Makabo oyo baklisto bazali kopesa na mikili mingi ezali kotindama mpo na kotonga bisika ya malamu ya makita.—1/11, lokasa 30.
• Tángá mwa maloba ya Greke oyo esalelami na Biblia mpe etaleli losambo?
Moko na yango ezali leïtourgia, oyo ebongolamaka na “mosala mpo na litomba ya bato nyonso.” Mosusu ezali latréïa, oyo ebongolamaka na “mosala ya bosantu.” (Baebele 10:11; Luka 2:36, 37)—15/11, nkasa 11, 12.
• Wapi liteya ya ntina mingi oyo tokoki kozwa na lisolo ya bomoi ya Adama na Eva?
Koluka lipanda ata ya ndenge nini epai ya Yehova ezali bozoba.—15/11, nkasa 24-27.
• Makambo nini ezali na kati ya Makomami oyo emonisi ete Nzambe apesaka basaleli na ye nguya?
Davidi, Habakuku, na ntoma Paulo bango nyonso balobaki makambo oyo emonisi ete Yehova Nzambe apesaki bango makasi, to nguya. (Nzembo 60:12; Habakuku 3:19; Bafilipi 4:13) Na bongo, tokoki kozala na elikya ete Nzambe azali na mposa mpe na makoki ya kopesa biso makasi.—1/12, nkasa 10, 11.