Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 1/2 lok. 3
  • Bomoi ya makama

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bomoi ya makama
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini komibatela na mokili oyo etondi na makama?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Biyano oyo ebongi!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mpo na nini Afrika?
    Lamuká!—1993
  • Bato ya SIDA bazali kobakisama na ndenge ya nsɔmɔ!
    Lamuká!—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 1/2 lok. 3

Bomoi ya makama

“Ezali na likambo moko te oyo okoki kosala mokolo mobimba, ata kaka kolala, oyo ezangi likama mpo oloba ete yango nde likambo ya nsuka oyo okosala.”​—Zulunalo Discover.

BOMOI ekómi lokola moto azali kotambola na bisika oyo bakundikundi bamine, mpamba te likama to liwa ekoki koyela ye ata na ntango nini mpe, mbala mingi elakaka te. Mboka na mboka ezali na makambo na yango oyo ezali komema makama mingi. Ekoki kozala makama ya motuka, bitumba, nzala, sida, kanser, maladi ya motema mpe makambo mosusu ndenge na ndenge. Na ndakisa, na mikili ya Afrika, sida ekómi koboma bato mingi koleka makambo mosusu nyonso. Na zulunalo moko (U.S.News & World Report) bakomaki ete na mbula moko euti koleka, sida “ebomaki bato milio 2,2; motango yango eleki mbala zomi motango ya bato oyo bakufaki na bitumba nyonso oyo esalemaki na Afrika.”

Nzokande, bato bazali kobimisa ebele ya mbongo mpo bázala na bomoi molai mpe mpo na kokima bamaladi mpe ebele ya mikakatano ya nzoto. Makanisi mingi oyo ezali kopesama, na ndakisa kopona malamu biloko ya kolya mpe ya komela mpe kokembisa nzoto, ekoki kozala na mwa matomba. Nzokande, ezali na mokanda moko oyo ezali komonisa makambo ya ntina mingi oyo ekoki kosalisa biso na kozala na bomoi ya malamu mpe bomoi oyo ezali na makama mingi te. Mokanda yango ezali Biblia. Biblia ezali kopesa toli mpo na makambo ndenge na ndenge lokola bokolɔngɔnɔ ya nzoto mpe bomoi ya malamu. Ya solo, Biblia elobeli likambo mokomoko na bozindo te. Kasi, ezali kopesa makanisi ya malamu mpenza oyo tokoki kosalela na makambo lokola kolya, kokembisa nzoto, kozala na makanisi malamu, oyo etali kosangisa nzoto, komela masanga, likaya, bangi mpe makambo mosusu mingi.

Bato mingi bazali na mikakatano ya kozwa mbongo. Na likambo yango mpe Biblia ezali kosalisa biso. Ezali kolendisa biso tótalelaka mbongo mpe tósalelaka yango na ndenge ya malamu, mpe lisusu ezali komonisa biso ndenge ya kozala mosali ya malamu to nkolo-mosala ya malamu. Na mokuse, Biblia ezali na toli ya malamu, kaka mpo na mikakatano ya mbongo te to mpo na kozala nzoto malamu, kasi mpo na bomoi. Olingi koyeba ndenge oyo Biblia ekoki mpenza kosalisa moto na bomoi lelo oyo? Tolendisi yo otánga lisolo oyo elandi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto