Mpo na nini Afrika?
JACOB, oyo azali na mibu 42, azali kobɛla. Asili kozwa SIDA. Apesi yango mpe na mwasi na ye. Alobi na mawa nyonso ete: “Mwasi na ngai ayebi ete ngai nde moto napesi ye maladi oyo.”
Kasi ndenge nini Jacob ye moko azwaki mikrobe yango? Alimboli ete: “Nazalaki kofanda ngai moko na Harare. Nazalaki kokumba motuka na nzela ya Zambie, Zimbabwe, Botswana mpe Swaziland. Mwasi na ngai atikalaki na bana na mboka Manicaland [Zimbabwe]. Elongo na batambwisi mosusu ya mituka, tozalaki mpenza komibatela te.”
Bolózi bouti na pite
Eloko ya liboso ezali lelo kopalanganisa SIDA na Afrika ezali pite. Dawn Mokhobo, mwasi oyo ayekoli maladi ya SIDA, alobaki boye ete: “Bato mingi bazali lisusu komipekisa te na ntina etali kosangisa nzoto.” Zulunalo African Affairs emonisi ete: “Na mikili ya Afrika oyo mizali na nsé na esobé ya Sahara, bato balingi mingi bana, kasi bazali kopesa bobele motuya moke na libala. . . . Soko zemi ezwami, kosangisa nzoto ata ezalaki na kati ya libala te, ekweisami mpenza te.” Engebene zulunalo Nature, bondumba ezali eloko ya liboso oyo ezali kopalanganisa maladi yango. Lisoló yango liyebisi ete: “Basi ya pite bazali kopalanganisa maladi wana epai na basi mingi ya mabala na nzela ya mibali na bango oyo bakotambolaka na basi mingi.”
Ebele bato moke nde bandimi kobongola etamboli na bango. Mokanda moko molobeli SIDA na Afrika (Panos Document), moyebisi likambo oyo molukiluki moko amonaki na Zaïre: “Na mpokwa moko, wana tozalaki na mboka moko ya moke, ba Zaïrois baninga na ngai ya mosala, baoyo nasalaki na bango mpo na kotala makila ya bato mosusu moi mobimba, babimaki elongo na bana basi ya mboka wana. Basangisaki nzoto elongo na bango, mpe bobele moko nde asalelaki motópe oyo babéngi condom to kapote.” Ntango monganga wana atunaki bango soki bayebaki likámá oyo bazalaki na yango, “basɛkaki, mpe balobaki ete tokoki te kotika kosepela na bomoi bobele mpo na kobanga ete noki tokozwa maladi.” Ya solo, mpo na bato mingi, kosangisa nzoto na ntango bazali kokutana, ezali bongo kosepela na bomoi; ezali lisano, ezali kominanola.
Na Afrika lokola mpe na mikili misusu, bondumbá ezali kosalema mingi epai ya bilenge. Enquête mosusu euti kosalema emonisi ete, kati na bilenge 377 na Afrique du Sud, koleka 75% basilaki kosangisa nzoto. Na ngɛlɛ ya Afrika, misionere moko ayebisaki ete, “bilenge basi ya mibu 15 oyo bazwi naino zemi te, bazali mingi te.” Abakisaki ete: “Soki omoni elenge mwasi azali bobele ye moko, boye osengeli komiloba ete akozala na zemi na mbula ekoya, bobele na eleko wana.”
Nzokande, na ntina ya Afrika, makambo mosusu masili kokólisa kopalangana ya SIDA.
Kokabwana ya mabota
Zulunalo Africa South elimboli ete: “Wana mibali mingi ya mibu 20 kino mibu 40 basengeli kotika basi na bango mpe mabota na bango mpo na kokenda kosala mosika lokola batimoli na mabangá ya ntalo, basali na bilanga to na baizine, to lokola bakumbi mituka, kopalangana ya SIDA ekolanda kosalema bobele motindo oyo.” Bomoi ya baoyo bazali na mboka mopaya ezali pɛtɛɛ te. Lokola bakabwani na basi na bango mpe na mabota na bango, mingi basengeli kobunda mpo na kozwa ndako mpe mosala na mboka monene. Engebene zulunalo African Affairs, mikakatano mizwami na moto oyo afandi na mboka mopaya mpo na kokokisa bamposa na ye mpe oyo ya basangani ya libota na ye litikali na mboka na ye, ezali kopesa ye mayoki “ya bolɛmbu mpe ya kozanga elikya” oyo ezali kopusa ye mbala mingi na “kotalela mikumba na ye na bopotu.”
Esili komonana ete, banzela ya mituka ezali myango mizali kopalanganisa SIDA. Mokumbi motuka moko alobaki ete: “Nakosalaka nyonso ete nazala na makángo moko epai nyonso nazali koleka.” Na Afrique de l’Est, mboka moko ezali na kartyé epai basi ya pite 600 bafandi wana; SIDA efandi mpenza na esika wana. Mibali mingi ya basi wana ezali bakumbi mituka oyo bakendaka kopema wana. Motuya ya basi ya pite oyo bazali na mikrobe ya SIDA eleki 80%. Bakumbi mituka oyo basili kozwa mikrobe wana, bakokenda “kopema” lisusu esika mosusu mpe bakosuka na kozonga epai na bango, wana basili kolóna liwa na nzela nyonso oyo bazalaki koleka.
Esengeli lisusu kolobela bitumba ya banamboka mpe matáta ya politike, oyo ezali kosala ete bamilió na bato mingi bazali kokima na mboka mopaya. Alan Whiteside, moto oyo ayekoli maladi ya SIDA, alobi ete: “Bitumba ya banamboka elimboli kobeba ya bizaleli mpo na etamboli na bato. Bato oyo bazali kokima mboka na bango mpo na kokɔta na mboka mosusu, bakoki kopalanganisa maladi. Bango mpe bakotambolaka na basi mingi soko na mibali mingi.”
Likámá liuti na makambo ya monganga
Mpo ete ezali kokelela na makambo matali mosolo, Afrika ekoki te kosilisa mikakatano ya kolongono na nzoto. Totangi kati na mwa mokanda moke Koyeba mpe kozwa meko mpo na SIDA (na Lingelesi) ete: “Na bamboka mingi ya Afrika, mosolo mopesami na moto moko mpo na kolongono na nzoto na mbula moko, ekoki te ata mpo na kotalisa bobele makila mpo na koyeba soko moto azali na SIDA.” Bobele bongo, kati na mokanda SIDA: nsuka ya mokili ebɛlɛmi (na Lingelesi), Keith Edelston amonisi ete, “mbala mingi ezali mpasi mpo na kosomba ata sabuni to eau de javel mpo na kosukola biloko bizali kosalelama.”
Na bamboka mosusu ya Afrika, mbala mingi bakosalelaka ntonga moko mbala mingi. Yango wana M. Edelston apesi likebisi oyo ete: “Zala na mwa ntembe soki balingi kotɔbɔla yo ntonga . . . na Afrika . . . Sɛngá ntonga ya sika oyo bakobimisa yango na emballage na miso na yo.”
Kobangáká noki bakozwa maladi wana, basali na lopitalo bazali lisusu mingi te. Minganga mibale na lopitalo moko ya Afrique du Sud, bamitubaki na ntonga bazalaki kosalisa na yango bato ya SIDA. Bazwaki maladi wana mpe bango nyonso mibale bakufaki. Na yango, minganga motoba oyo bazalaki bapaya, balongwaki na lopitalo wana.
Na komonáká bongo, ezali likambo ya kokamwa te ete bato mingi bakómi kokakatana na ntina na kozongisa makila, moko na myango oyo mizali kotambwisa SIDA. Zulunalo South African Medical Journal ekomaki ete: “Makila mazali na mikrobe ezali mpenza mwango monene mpo na yango maladi ezali kopalangana.” Ebakisi ete: “Ba examens ya malamumalamu ezali kosalema te na Afrique centrale mpe soko 60% ya makila mauti na bato oyo bazali na maladi.”
Na yango, awa ezali naino kobunda na mikakatano mingi mosusu, Afrika ezwi lisusu bolózi oyo ya sika. Mpe yango ekozala mpasi koleka, mingimingi mpo na basi mpe bana.
Bazwi mpasi mpo na mabe ya bato mosusu
Lucy azwi SIDA mpo na mabe ya moto mosusu. Azwaki mikrobe epai na mobali na ye oyo azangi sembo. Lelo, azali mwasi mokufeli mobali na mibu 23, ayebi te nini asengeli kosala. Alobaki ete: “Nayebi te soki nakoki kokanisa ye, to koyina ye mpo ete apesaki ngai maladi.” Mpasi oyo monene emonani epai na bato mingi oyo bazwi SIDA mpo na mabe ya bato mosusu.
Zulunalo The World Today elobi ete: “Motuya ya mibali oyo ezali pene na kokokana na motuya ya basi, bakozwa V.I.H. to mikrobe ya SIDA na mikili ya bobólá; nzokande, ekoki kozala ete basi nde bakooka . . . mpasi mingi mpo na yango.” Ekozala boye mpenza na Afrika epai basi, baoyo bazali na ntina mingi te mpo ete batánga te, mpo ete bazali babólá mpe basundolami na mibali na bango oyo bakenda na mboka mosika, bazali konyokwama nde bazali koloba eloko moko te.
Kasi ezali mpenzampenza likoló na bana nde SIDA ezali kotika bilembo makasi. UNICEF (Ebongiseli ya Lisangá ya Mabota mpo na kosunga bana) ekanisi ete bamilió 2,9 ya basi Baafriké oyo bakokufa na SIDA na mibu zomi mizali koya, bakotika bana bamilió 5,5. Na mokili oyo ezali soko na bitiké 40 000 mpo na SIDA, basili koyebisa ete ezali “na bamboka mosusu . . . etondi bobele na bana.”
Mpasi mosusu emonani epai na bamama bazwi mikrobe oyo bana na bango mpe bazwi yango. Engebene zulunalo South African Medical Journal, “mbala mingi, mama oyo mwana na ye ya moke azwi mikrobe ya SIDA amitunaka soki nani akokufa liboso kati na ye mpe mwana na ye.”
Na bongo, ezali likambo ya kokamwa te ete basi mingi bayebi te soki bakosala boni liboso na SIDA. M. Phiri, monganga moko ya mboka Zambie, ayebisi ete: “Basi bazali koya kotuna biso soki ezali na nkisi moko ekopekisa ete bazwa maladi wana te. . . . Bango moko bazali kokamata meko mpo na komibatela, kasi bazali kobanga ete makángo na bango to mibali na bango bazanga sembo. Yango ezali kotungisa bango.”
Na yango, moto oyo asili kobala akoki kosala nini soki ayei koyeba ete mobalani na ye asalaki ekobo? Soki azwi ekateli ya kolimbisa ye mpe bazongani, mobali to mwasi oyo asalaki mabe asengeli kondima kokende kotalisa makila mpo na koyeba soki azali na V.I.H. to mikrobe ya SIDA. (Tala Matai 19:9; 1 Bakolinti 7:1-5.) Wana eyano ya examen ebimi naino te, babalani yango bakoki kokata ete basangisa nzoto te to, mbala mosusu, kozwa meko ete basalela myango ya komibatela na mikrobe.
Na kotalela ntango molai oyo mikrobe ya SIDA ezali koumela na nzoto na moto kozanga komonana, bilenge oyo balingi kobala basengeli kozala na bokɛngi mpe basengeli te kowela nokinoki mpo na kobalana na moto oyo azalaki liboso na etamboli ya mbindo, ata soki moto yango azali sikawa kotósa mibeko ya boklisto. Na ntina na etuluku ya bato wana bamemi na likámá, docteur S. Tibangayuka, moto ya mboka Tanzanie oyo ayekoli maladi ya SIDA, apesi toli epai na bilenge ete “basalisa examen ya V.I.H. liboso ya kobala.”
Ata nyonso wana, ntango nyonso oyo SIDA ekoumela na Afrika mpe na bamboka mosusu etikali, ekozala na bato mingi oyo bakozwa yango mpo na mabe ya bato mosusu—babalani mpe bana.
[Elilingi na lokasa 17]
Ezali na bantina mingi mpo na yango SIDA ezali koboma bato ebele na Afrika
[Eutelo ya bafɔtɔ]
WHO/E. Hooper