Bato ya SIDA bazali kobakisama na ndenge ya nsɔmɔ!
EUTI NA MOKOMI NA BISO NA AFRIKA YA SUDI
THEMBEKA azali elenge mwasi ya mbula 12, afandaka na mwa mboka moko na Sudi ya Afrika. Baboti na ye bakufaki na maladi ya sida; atikalá na mokumba ya kobɔkɔla baleki na ye misato ya basi: moko azali na mbula zomi, oyo mosusu azali na mbula motoba mpe oyo ya nsuka azali na mbula minei. Mopanzi-nsango moko alobaki ete: “Bana yango bazali na eloko te mpe babikelaka kaka na mwa makabo lokola mwa limpa to mwa mbála.” Zulunalo moko ya Afrika ya Sudi etyaki fɔtɔ ya bana yango na lokasa ya liboso; zulunalo yango ekomaki lisolo moko oyo elobelaki likita ya mbala ya 13 oyo esangisaka bikólo mingi mpo na kolobela likambo ya sida, likita oyo esalemaki na sanza ya Yuli 2000 na engumba Durban, na Afrika ya Sudi.
Bamilio ya bana oyo baboti na bango bakufá na sida bazali kokutana na mikakatano oyo ekokani na oyo ya Thembeka na baleki na ye. Na likita yango balobelaki mayele oyo bakoki kosalela mpo na kolonga maladi ya sida oyo ezali se kopalangana. Na ndakisa, balobelaki ndenge ya koteya bato bámibatela na sida na kosalela kapɔti; kozwa bankisi ya sida oyo ezali ntalo moke mpe ekómi komonana; kobakisa lisusu mbongo mpo na kosunga bolukiluki oyo ezali kosalema mpo na kobimisa nkisi ya mangwele ya sida. Balobelaki mpe likambo oyo etali ndenge oyo basi, mingimingi bilenge basi, bazali kozwa sida mpambampamba.
Likambo ya mawa ezali ete mibali mingi oyo bazali na bamaladi oyo ezwamaka na nzela ya kosangisa nzoto, bazali kokanisa ete soki basangisi nzoto na mwana mwasi oyo ayebi naino mibali te, bakobika; yango wana bazali koluka bitike oyo baboti na bango bakufá na sida. Longola wana, mibali mingi balingaka kobala elenge mwasi oyo asi abotá. Yango wana, bato bazali komona ete soki basaleli kapɔti, ekopekisa bango bábala to mpe bábota.
Ezali mawa na komona ete bilenge basi mingi bayebaka te ete bakoki kozwa sida. Zulunalo moko ya Afrika ya Sudi (Sowetan) elobelaki lapolo moko ya UNICEF boye: “Baankɛtɛ ya UNICEF emonisi ete, na Afrika ya Sudi, bilenge basi mingi (51%) oyo bazali na mbula banda 15 tii 19 bayebaka te ete moto oyo azali komonana ete azali nzoto kolɔngɔnɔ akoki kozala na mikrobe ya sida mpe akoki kopesa bango yango.”
Soki sida ezali kopalangana ezali mpe mpo bato mingi bazali kosangisa nzoto na basi na makasi. Ranjeni Munusamy, oyo azalaki na likita yango, akomaki na zulunalo Sunday Times oyo ebimaka na Johannesburg, na Afrika ya Sudi ete: “Milende mingi oyo ezali kosalema mpo na kokebisa bato mpo na sida mpe kosunga bato ya sida ezali kobebisama na makambo oyo mibali bazali kosala basi na makasi, makambo lokola: kosangisa na basi nzoto na makasi, kosangisa nzoto kati na bandeko, kobɛta basi mpe makambo mosusu ya kosambwisa nzoto ya basi. Mbala mingi mibali bazali kosangisa na basi nzoto na makasi, yango wana bazali kozwa mikrobe ya sida.”
Mitango oyo babimisaki na likita wana ezali kobangisa, ndenge etanda oyo ezali na lokasa elandi emonisi yango. Mokolo na mokolo bilenge soki 7 000 mpe bana mike soki 1 000 bazali kozwa mikrobe ya sida. Bobele na 1999, balakisi ya bana soki 860 000 bakufaki na sida na mikili ya Afrika oyo ezali na Sudi ya Sahara.
Ankɛtɛ moko oyo esalemaki na ebongiseli moko (Medical Research Council) ya Afrika ya Sudi emonisaki ete, na ekólo yango, bato milio 4,2 bazali na mikrobe ya sida; yango elingi koloba ete na kati ya bato 10 ya ekólo yango, moto moko azali na sida. Na bikólo oyo ezali zingazinga, kutu koloba te. Zulunalo moko (The Natal Witness) elobelaki mitango oyo ebimisamaki na Biro oyo etángaka motango ya bato na États-Unis, ete: “Mosika te, motango ya bato oyo bafandi na bikólo ya Afrika oyo ezali na bato mingi ya sida ekobanda kokita lokola bamilio ya bato oyo bazali na maladi yango bazali kokufa; lisusu, liboso ete mbula zomi oyo ezali koya ekóma na nsuka na yango, na bikólo yango, bato bakobanda koumela na bomoi kaka na mbula soki 30.”
Likama ya sida ezali komonisa lisusu ete tozali na “ntango ya mpasi” oyo Biblia esakolaki ete ekoya “na mikolo ya nsuka.” (2 Timote 3:1-5) Bato oyo balingaka Biblia, Liloba ya Nzambe, bazali na elikya ya komona ndenge oyo sida mpe mikakatano mosusu nyonso oyo ezali konyokola bato ekosila mpo na libela. Etikali moke ete Bokonzi ya Nzambe eyangela mabele. Na kati ya mokili ya sika ya bosembo, bobola mpe minyoko ekozala makambo ya kala. (Nzembo 72:12-14; 2 Petelo 3:13) Kutu, bato oyo bakofanda na mabele bakozala nzoto kolɔngɔnɔ mpenza mpe moto moko te akoloba lisusu ete: “Nazali na maladi.”—Yisaya 33:24, NW.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 18]
Na mokili mobimba, bana oyo batikali bitike mpo na sida bazali soki 13 000 000
[Etanda/Karte na lokasa 19]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
MOTÁNGO YA BATO (BANDA MBULA 15 KINO 49) OYO BAZALAKI NA MIKROBE YA SIDA, NA NSUKA YA MOBU 1999
Amérique du Nord 890 000
Antilles 350 000
Amérique latine 1 200 000
Europe occidentale 520 000
Europe de l’Est mpe Europe centrale 410 000
Afrique du Nord mpe Moyen-Orient 210 000
Afrique subsaharienne 23 400 000
Asie du Sud mpe Asie du Sud-Est 5 400 000
Asie orientale mpe Pacifique 530 000
Australie mpe Nouvelle-Zélande 15 000
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Eutelo: ONUSIDA
[Etanda/Elilingi na lokasa 15]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
MOTÁNGO YA BATO LIKOLÓ NA MONKAMA (BANDA MBULA 15 KINO 49) OYO BAZALAKI NA MIKROBE YA SIDA NA MIKILI 16 YA AFRIKA, NA NSUKA YA MOBU 1999
1 Botswana 35,8%
2 Swaziland 25,2
3 Zimbabwe 25
4 Lesotho 23,5
5 Zambie 20
6 Afrique du Sud 20
7 Namibie 19,5
8 Malawi 16
9 Kenya 14
10 R.C.A. 14
11 Mozambique 13,2
12 Djibouti 11,7
13 Burundi 11,3
14 Rwanda 11,2
15 Côte d’Ivoire 10,7
16 Éthiopie 10,6
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Eutelo: ONUSIDA
[Elilingi na lokasa 19]
Thembeka na baleki na ye ya basi
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Fɔtɔ: Brett Eloff