Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 15/2 nk. 3-5
  • Bosolo nini mpenza ezali na Barulo ya Mbu Ekufá?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bosolo nini mpenza ezali na Barulo ya Mbu Ekufá?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Barulo ya Mbu Ekufá ezali nini?
  • Nani akomaki Barulo ya Mbu Ekufá?
  • Bato oyo bafandaki na Qumrân bazalaki nde Baesene?
  • Ezali ata na likambo moko te to na rulo moko te oyo babombaki
  • Barulo ya Mbu Ekufá ezali mpenza na litomba nini mpo na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • ‘Memelá ngai barulo, mingimingi ya mposo ya nyama’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Barulo ya la mer morte​—Biloko na motuya bimonanaki naino te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Makomami mosantu ebongwaná?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2020
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 15/2 nk. 3-5

Bosolo nini mpenza ezali na Barulo ya Mbu Ekufá?

Eleki sikoyo mbula 50, Moarabe moko mobateli ya bampate oyo afandaka na esobe (bédouin), abwakaki libanga na mobenga moko mpe yango esalaki ete bákundola biloko ya motuya oyo eleki biloko nyonso oyo bato ya arkeoloji bakundolaki na ekeke ya 20. Ntango abwakaki libanga, ayokaki lokola makɛlɛlɛ ya mbeki epasuki. Nsima ya koluka, akutaki rulo ya liboso kati na barulo oyo ebengamaka lelo oyo Barulo ya Mbu Ekufá.

BARULO yango ebendaki likebi ya bato mingi ya mayele na bapanzi-nsango mpe ebimisaki ntembe mingi. Ata mpe kati na bato mosusu nyonso, mobulungano mpe makambo ya lokuta ezali mingi. Nsango etambolaki ete babombaki makambo mosusu mpamba te barulo yango ezalaki na makambo oyo ekokaki kozala likama mpo na kondima ya baklisto na ya Bayuda. Kasi, barulo yango ezali mpenza na makambo nini? Nsima ya mbula koleka 50, tokoki koyeba bosolo ya makambo yango?

Barulo ya Mbu Ekufá ezali nini?

Barulo ya Mbu Ekufá ezali bamaniskri ya kala ya Bayuda oyo ekomamaki mingimingi na Liebele, mosusu na Aramɛyɛ mpe mwa ndambo na Grɛki. Mingi kati na barulo mpe biteni na yango ekomamaki liboso ya kobotama ya Yesu, elingi koloba eumeli mbula koleka 2 000. Kati na barulo ya liboso oyo ezwamaki na mabɔkɔ ya Baarabe oyo bafandaka na esobe, ezalaki na maniskri nsambo ya milai oyo ebebaki, kasi nyonso ebebaki ndenge moko te. Ntango balukaki malamu na mibenga mosusu, bazwaki barulo mosusu mpe biteni ebele ya barulo. Banda na 1947 tii na 1956, bamonaki mibenga 11 oyo ezalaki na barulo kati na yango pene ya Qumrân, mboka moko oyo ezali pene ya Mbu Ekufá.

Ntango babongisaki barulo mpe biteni nyonso, bazwaki bamaniskri soki 800. Bamaniskri koleka 200 mwa moke, ezali bakopi ya makomi ya mikanda mosusu ya Biblia na Liebele. Bamaniskri mosusu ezali makomi ya kala ya Bayuda, kasi ezali mikanda ya Biblia te, ezali na oyo babengi Apocryphe mpe mosusu babengi Pseudépigraphe.a

Kati na barulo nyonso, oyo bato ya mayele basepelaki na yango mingi ezalaki makomi oyo eyebanaki liboso te. Kati na yango ezalaki na bandimbola ya Mibeko ya Bayuda, mibeko ya sikisiki mpo na bomoko ya bandimi ya mwa lingomba oyo bazalaká kofanda na Qumrân, nzembo ya losambo mpe mabondeli, mpe lisusu mikanda oyo ezali kolobela bindimeli na ntina na kokokisama ya bisakweli ya Biblia mpe na ntina na mikolo ya nsuka. Ezali mpe na makomi oyo ekokani na mosusu te oyo ezali kolimbola Biblia. Yango nde eleki koumela kati na makomi nyonso oyo ezali lokola mikanda ya ntango na biso oyo elimbolaka vɛrsɛ mokomoko ya Biblia.

Nani akomaki Barulo ya Mbu Ekufá?

Mayele ndenge na ndenge ya koyeba bambula oyo mikanda ya kala eumeli emonisi ete barulo yango ekomamaki to ebongisamaki na eleko oyo ebandi na ekeke ya misato L.T.B. tii na ekeke ya liboso T.B. Bato mosusu ya mayele bamonisaki ete ekoki kozala Bayuda ya Yelusaleme nde babombaki barulo oyo na mibenga, liboso ya kobebisama ya tempelo na mobu 70 T.B. Nzokande, ebele ya bato ya mayele oyo bayekolaka barulo bamonaka ete likanisi wana eyokani te na makambo oyo ezali na kati ya barulo yango. Barulo mingi elobeli mateya mpe mimeseno oyo eyokani te na oyo ya bakonzi ya mangomba oyo bazalaki na Yelusaleme. Barulo oyo elobeli lisangá moko oyo ezalaki kondima ete Nzambe asilaki kobwaka banganga mpe losambo oyo ezalaki kosalema na tempelo ya Yelusaleme; mpe akómaki kotalela losambo ya mwa lingomba na bango, kati na esobe, lokola losambo oyo ebongi na esika ya tempelo. Yango emonisi mpenza ete ekoki kozala bakonzi ya tempelo ya Yelusaleme te nde babombaki ebele ya barulo ya motindo wana.

Atako, mbala mosusu, bakomi bazalaki na Qumrân, ekoki mpenza kozala ete barulo mingi esangisamaki epai mosusu, nde na nsima, bato ya mwa lingomba wana bamemaki yango na Qumrân. Tokoki koloba ete Barulo ya Mbu Ekufá ezali bibliotɛkɛ moko monene. Lokola bibliotɛkɛ nyonso, ekoki kozala ete na kati ya mikanda na yango ezalaki mpe na mikanda oyo eutaki epai ya bato oyo bazalaki na bindimeli mosusu, nyonso ezalaki kaka na bindimeli ya batángi na yango te. Kasi, makomi oyo ezali na bakopi ebele, na ntembe te emonisi makambo mpe bindimeli ya mwa lingomba yango.

Bato oyo bafandaki na Qumrân bazalaki nde Baesene?

Soki barulo yango ezalaki nde bibliotɛkɛ ya Qumrân, boye bato oyo bafandaki na mboka yango bazalaki banani? Profɛsɛrɛ Eleazar Sukenik, ye azwelaki Iniversite ya Liebele na Jérusalem barulo misato na 1947, azalaki moto ya liboso oyo akanisaki ete barulo yango ezalaká ya lisangá moko ya Baesene.

Baesene ezalaki mwa lingomba ya Bayuda oyo bakomi ya ekeke ya liboso, lokola Josèphe, Philon d’Alexandrie na Pline l’Ancien, balobelaki. Ebandeli mpenza ya Baesene eyebani te. Kasi, ekoki kozala ete babandaki na eleko ya mobulungano oyo elandaki botomboki ya Bamakabe oyo esalemaki na ekeke ya mibale L.T.B.b Josèphe alobaki ete bazalaki na eleko wana mpe alimbolaki ndenge oyo bindimeli na bango ekesanaki na bindimeli ya Bafalisai na Basadukai. Pline akomaki ete lisangá moko ya Baesene ezalaki kofanda pene na Mbu Ekufá, kati ya Yeliko na Ene-gedi.

Profɛsɛrɛ James VanderKam, moto moko ya mayele oyo ayekolaka Barulo ya Mbu Ekufá, apesi likanisi ete “Baesene ya Qumrân bazalaki se ndambo ya bandimi ya mwa lingomba ya Baesene oyo ezalaki na bandimi mingi,” baoyo Josèphe alobi ete bazalaki bato soki nkóto minei. Na kotalela makomi oyo ezwamaki na Qumrân oyo elobeli mwa lingomba oyo ezalaki kofanda wana, emonani ete ekokani mingi na Baesene, ata na makambo nyonso mpenza te, koleka mwa mangomba mosusu ya Bayuda oyo eyebani ete ezalaká na eleko wana.

Bato mosusu balobaki ete lingomba ya boklisto ebandaki na Qumrân. Nzokande, ezali na makambo mingi oyo ekeseni mpenza kati na bindimeli ya mwa lingomba ya Qumrân na baklisto ya liboso. Makomi oyo ezwamaki na Qumrân emonisi ete mwa lingomba yango ezalaki na mibeko ya makasimakasi mpo na sabata, mpe elekisaki ndelo na kolanda makambo ya bopɛto mpo na losambo. (Matai 15:1-20; Luka 6:1-11) Tokoki mpe koloba bongo na lolenge oyo bamitangolaki na bato mosusu, na endimeli na bango ete bomoi ya moto na moto etángamá kala mpe endimeli na bango ete molimo ekufaka te. Bazalaki mpe kolendisa mingi likambo ya kozala monzemba mpe bazalaki na makanisi mosusu mpenza mpo na likambo ya kosangana na baanzelu na losambo na bango. Nyonso oyo emonisi ete mwa lingomba yango ezali na boyokani te na mateya ya Yesu mpe na mateya ya baklisto ya liboso.​—Matai 5:14-16; Yoane 11:23, 24; Bakolose 2:18; 1 Timote 4:1-3.

Ezali ata na likambo moko te to na rulo moko te oyo babombaki

Na bambula oyo elandaki bokundoli ya Barulo ya Mbu Ekufá, mikanda ya ndenge na ndenge ebimaki. Yango esalaki ete bato ya mayele na mokili mobimba báyeba biloko oyo ekundolamaki na ebandeli. Kasi biteni ebele ya barulo oyo eutaki na moko ya mibenga, oyo babengaka Mobenga 4, ebimisaki kwɔkɔsɔ mingi. Biteni yango ezalaki na mabɔkɔ ya mwa bato moke ya mayele oyo bautaki na bikólo ndenge na ndenge, oyo bazalaki kosala na Palestine Archaeological Museum, na Jérusalem ya Ɛsti (na ntango wana ezalaki na kati ya ekólo Jordanie). Na kati ya bato ya mayele yango, moko te azalaki Moyuda to moto ya Israël.

Bato yango bazwaki ekateli ete moto mosusu akoki kosalela barulo wana te, tii bakosilisa koyekola yango mpe bakokoma na mikanda makambo nyonso oyo bango bakomona. Motángo ya bato ya mayele yango ekokaki mpe kobongwana te. Soki moko na bango akufi, kaka moto mosusu ya sika nde akokaki kokɔta na esika na ye. Nzokande, mosala ezalaki monene mpe esɛngaki ete bato bázala mingi, mpe na makambo mosusu, esɛngaki bato oyo bayebi mpenzampenza Liebele ya kala na Aramɛyɛ. Profɛsɛrɛ James VanderKam amonisaki likambo yango boye: “Biteni ya barulo ebele ebele motindo wana, elekaki mpenza mingi mpo bato ya mayele mwambe mpamba báyekola yango ata soki bayebi mpenza mosala.”

Ntango Etumba ya Mikolo Motoba esalemaki na 1967, Jérusalem ya Ɛsti ekómaki na ekólo Israël; kasi, makambo ebongwanaki te na ntina etali bato ya mayele oyo basengeli koyekola barulo wana. Lokola ekómaki koleka bambula mingi mpo na kobimisa barulo ya Mobenga 4, bato mwa mingi ya mayele basilikaki. Na 1977, Profɛsɛrɛ Geza Vermes, ya Iniversite ya Oxford, abengaki yango likambo ya nsɔni oyo eleki monene mpo na bato ya mayele na ekeke ya 20. Bato mosusu bakómaki koloba ete Lingomba ya Katolike ezalaki kobomba makambo oyo ekomamaki na barulo wana, mpamba te makambo yango ekokaki kobebisa boklisto.

Nsukansuka, na bambula ya 1980, babakisaki bato mosusu mpo na koyekola barulo yango mpe bakómaki bato 20. Na nsima, na 1990, ntango Emanuel Tov, molakisi na Iniversite ya Liebele na Jérusalem, aponamaki mokambi ya ekipi yango, babakisaki bato mosusu ya mayele mpe bakómaki bato koleka 50. Babongisaki programɛ ya sikisiki mpo na kobimisa mosala nyonso oyo bato ya mayele basalaki na barulo oyo etikalaki.

Na 1991, makambo ebongwanaki na ndenge oyo bato bakanisaki te. Ya liboso, babimisaki buku moko (A Preliminary Edition of the Unpublished Dead Sea Scrolls). Babongisaki yango na lisalisi ya ordinatɛrɛ na kolanda makambo oyo bato ya mayele oyo bazalaki koyekola yango bazalaki kokoma. Na nsima, ebongiseli moko babengi Huntington Library (na États-Unis), eyebisaki ete ekobimisa bafɔtɔ ya barulo nyonso mpo na moto nyonso ya mayele oyo alingi koyekola yango. Mosika te, ntango babimisaki buku moko (A Facsimile Edition of the Dead Sea Scrolls), bapesaki nzela na moto nyonso oyo alingi amona bafɔtɔ ya barulo oyo ebimisamaki naino te.

Na ndenge yango, na kati ya mbula zomi oyo eleki, bato ya mayele bakokaki koyekola Barulo nyonso ya Mbu Ekufá. Boyekoli yango emonisi ete ezali ata na likambo moko te to na rulo moko te oyo babombaki. Lokola bazali kobimisa barulo ya nsuka, bato bakoki sikoyo koyekola yango malamumalamu. Bato mosusu ya mayele oyo bazali bato ya sika, bakoki sikoyo koyekola barulo yango. Kasi, boyekoli yango ezali mpenza na ntina nini mpo na bayekoli ya Biblia?

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ezala Apocryphe (oyo elimboli, “ebombami”) to Pseudépigraphe (oyo elimboli, “makomi oyo bakosi ete moto boye nde akomaki yango”), nyonso ezali makomi ya Bayuda oyo ekomamaki banda ekeke ya misato L.T.B. tii ekeke ya liboso T.B. Lingomba ya Katolike endimaka ete mikanda oyo babengi apocryphe ezali mikanda ya Biblia, Bayuda na Baprotesta bandimaka yango te. Mikanda oyo babengi pseudépigraphe ezali mingimingi makambo mosusu oyo ebakisami na masolo ya Biblia, mpe balobi ete ekomamaki na bato mosusu oyo bayebani mingi kati na baoyo bakomaki Biblia.

b Talá lisolo “Bamakabe bazalaki banani?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ 1998, nkasa 21-24.

[Elilingi na lokasa 3]

Ndambo ya mibenga pene na Mbu Ekufá esika bakutaki barulo ya kala

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]

Eteni ya rulo: nkasa 3, 4 mpe 6: Na ndingisa ya Israel Antiquities Authority

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 5]

Na ndingisa ya Shrine of the Book, Israel Museum, Jérusalem

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto