Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/4 nk. 12-13
  • Barulo ya la mer morte​—Biloko na motuya bimonanaki naino te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Barulo ya la mer morte​—Biloko na motuya bimonanaki naino te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bokundoli oyo bosalemaki naino te
  • Biloko na sika kati na Mobenga 11
  • Barulo ezwamaki na la mer morte​—Bokundoli boleki na motuya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Barulo ya Mbu Ekufá ezali mpenza na litomba nini mpo na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Bosolo nini mpenza ezali na Barulo ya Mbu Ekufá?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Boyekoli nimero 5—Makomi ya Liebele kati na Makomami Mosantu
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/4 nk. 12-13

Barulo ya la mer morte​—Biloko na motuya bimonanaki naino te

NA NSÉ na Wadi Qumran, epai na Nord​—Ouest na ngámbo ya la Mer Morte, bitiká na bifelo ya kala bitelemi wana. Lokola etalelamaki na boumeli na bambula mingi ete ezalaki bitiká ya Moloma moko na makasi mingi, bakundoli na biloko na kala (archéologues) bazalaki kotya likebi likoló na yango te. Kasi, uta bokundoli ya buku na Yisaya esalemaki na 1947, bayei kotalela mabelé wana mpo na kosala bokundoli na biloko na kala.

Kala mingi te, bato na mayele bauti koloba ete bandako yango ezalaki mpo na Bayuda. Bakanisaki na nsima ete ezali bato yango nde babómbaki barulo kati mibenga ya mabángá oyo ezali zingazinga wana. Kasi emonani lokola ete bokundoli oyo euti kosalema sika, ezali kobetela maloba wana ntembe.

Bokundoli oyo bosalemaki naino te

Ba Bédouins bayebaki mpenza motuya ya makomi ya yambo oyo bazwaki. Na 1952, mobangé mobali moko ayebisaki ete, na ntango azalaki elenge, alandaki esósóló (perdrix) moko oyo ezokaki nde ekimaki kati na lilusu ya mabángá, lilusu oyo kati na yango akutaki mbeki mpe mwinda na mafuta na kala. Ba Bédouins basalaki bongo bokundoli ya sika.

Mobangé mobali wana azalaki naino na makoki ya koyeba lilusu ya libángá yango kati na mibenga mozindo ya mabángá oyo ya mabulumabulu. Emonanaki ete ezalaki mobenga mosalemaki na bato, moyebani sikawa na nkombo Mobenga 4. Kati na yango, ba Bédouins bazalaki kobimisa bandambo na makomi longwa na bozindo ya metele moko. Ata moko kati na makomi yango ebómbámaki na mbéki te; mpo na mingi kati na yango, pene na nyonso ebukanaki, eyindaki mpe ezalaki makasi te. Na boumeli ya ntango, bakundolaki soko bandambo 40 000 oyo bakutaki soko pene na makomi 400. Kati na bankámá na makomi na Biblia oyo mazwamaki, ezali na masoló ya mikanda nyonso ya Makomami na hébreu, longola bobele oyo na Estere. Mingi na mikanda oyo euti na Mobenga 4, ebimisami naino te.

Moko na makomi ya ntina koleka ezalaki na mikanda ya Samwele oyo mikomamaki bobele na rulo moko wana. Rulo oyo liboso esengelaki kozala na biteni 57, sikawa ezali naino na biteni 47. Makomami na hébreu oyo mazali kati na yango, mazali pene na kokokana na oyo masalelamaki na babongoli ya la Septante, libongoli ya greke. Bakutaki lisusu bandambo ya la Septante oyo ezalaki na mwa masoló ya Levitike mpe ya Mituya, bandambo oyo esalemaki uta ekeke ya liboso ya ntango na biso. Makomi ya Levitike mazali kosalela nkomá LAO mpo na kobongola , nkombo na Nzambe na hébreu, kasi ebongolaki te liloba oyo na greke ete, Ky’ri.os, “Nkolo.”a

Kati na ndambo moko ya Deteronome, makomi ya hébreu ezali na mokapo 32, verset 43, oyo ezali kokutama kati na la Septante mpe oyo etangami na Hébreu 1:6, ete: “Mpe tika ete baanzelu nyonso na Nzambe, bakumbamela ye!” Ezali mbala ya liboso na komona maloba oyo kati na makomi ya hébreu, likambo oyo lizali komonisa solo ete, makomami yango masalelamaki mpenza lokola moboko mpo na kosala libongoli na greke. Balimboli na Biblia bakozwaka bongo bososoli mingi longwa na makomi ya la Septante, oyo etangami mbala mingi kati na Makomami na greke ya boklisto.

Rulo moko ya Exode oyo ekomamaki liboso na nsuka na ekeke ya misato ya ntango na biso, rulo ya Samwele ekomamaki na nsuka ya ekeke moko oyo mpe rulo moko ya Yilimia ekomamaki katikati na mobu 225 mpe mobu 175 liboso ya ntango na biso. Makomi mingi oyo makomamaki uta ekeke ya yambo liboso na ntango na biso, mazwamaki mpo na kolimbola mabongwani oyo mabimaki kati na lolenge na kokoma mpe motindo na nkomá ya hébreu mpe na araméen, likambo malamu oyo lizali kopesa nzela mpo na koyeba eleko oyo makomi masalemaki

Biloko na sika kati na Mobenga 11

Na nsuka, bolukiluki bosalemaki na mabelé nyonso ya Qumran, ezala na ba Bédouins mpe bakundoli na biloko na kala lokola. Kasi na 1956, ba Bédouins bamonaki bangembó kobima na malusu ya mabángá, epai na Nord ya Mobenga 1. Bamataki efelo esalemi na mabángá wana mpe bamonaki mobenga mosusu oyo ekotelo na yango ezipámá. Mpo na kozipola yango, esengelaki kolongola ba tonnes mibale ya mabángá minene oyo ezipaki yango. Kati na yango, basalaki bokundoli kitoko: makomi mibale na kokoka mpe ndambo milai ya makomi mosusu mitano.

Rulo kitoko ya Nzembo, emonisaki bokundoli oyo boleki na motuya. Mbinga ya loposo na nyama emonisi ete ezali loposo ya ngombe, kasi loposo ya ntaba te. Lokola esalemaki na mposo mitano oyo ekangisamaki, na nkasa minei oyo ekabwanaki mokomoko mpe na ndambo minei, buku yango ezalaki na molai koleka bametele minei. Eteni na likoló na rulo ebatelami malamu; nzokande, nsé na yango esilá kobeba mingi mpenza. Ekomamaki uta ndambo na yambo ya ekeke ya liboso mpe ezali na biteni 41 ya Nzembo. Nkomá minei ya hébreu to Tétragramme, oyo ekomami soko mbala 105 na lolenge na hébreu ya ebandeli, emonisami mpenza kati na mikapo oyo mikomami na alphabet oyo eyebani.

Makomi mosusu ya Levitike, yango ekomamaki nyonso na hébreu ya kala, kasi kino sikawa, naino ndimbola moko te ya kitoko esili kopesama na ntina na likambo yango. Ezali bongo mokanda moleki molai mingi oyo esalelaki lolenge na nkomá wana oyo esalelamaki ntango Bayuda bakendeki na boombo na Babilone, na nsuka na ekeke ya nsambo liboso na ntango na biso.

Bazwaki lisusu Targum, to maloba ya mokanda na Yobo oyo matangamaki na monoko Araméen. Ezali kati na ba Targums oyo ekomamaki liboso. Motuya monene ya bakomantere ya mikanda misusu ya Biblia, mizwamaki mpe kati na mibenga mikeseni. Mpo na nini barulo nyonso wana ebómbámaki malamu mpenza kati na mibenga yango?

Lokola tosilaki koloba yango, mbala mosusu ndambo mosusu ya barulo ebómbámaki na basangani ya lingomba ya Qumran. Kasi makambo mamonani mazali kopesa likanisi ete, mingi na yango etyamaki wana na Bayuda oyo bazalaki kokima mampinga na Baloma na Yudea, na mobu  68 ya ntango na biso, mbula mibale liboso na kobebisama na Yelusaleme. Esobé na Yudea ezalaki ebómbelo kitoko mpo na makomi wana ya motuya, ezala kati na mibenga oyo mizalaki penepene na Qumran, kati na mibenga oyo mitangwi na bakilometele mingi epai na Nord, zingazinga na Yeriko, to mpe lisusu na mibenga oyo mizali na ngelé, pene na Massada. Tozali mpenza na esengo lokola makomi yango mabómbamaki. Ezali kopesa bilembeteli mosusu mpo na komonisa kozanga kobongwana ya Liloba lipemami na Jéhovah. Solo mpenza, “mpo na oyo etali liloba ya Nzambe na biso, likoumela seko.”​—Yisaya 40:8, MN.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Tala Traduction du monde nouveau, ebimeli ya 1984 na Lingelesi, oyo ezali na mitindami. Appendice 1C (5) mpe na note ya Levitike 3:12, epai kuna makomi yango malakisami na elembo oyo 4Q LXX Lev.

[Etanda na lokasa 13]

ELOKO MOSUSU YA SIKA EKOMONANA NA NTANGO EKOYA?

Atako esili koleka bambula mingi uta yango ekundolamaki, ntango mingi ya bandambo minene na barulo ya la mer Morte ebimisami naino te.Zulunalo New York Times ya le 23 Décembre 1990 elobelaki likambo yango boye ete: “Bafotó [ya mikanda yango] ebómbami mpenza na etuluku moko ya bato na mayele oyo bazali kokima baninga na bango mpe baboyi kobimisa mikanda mingi oyo bazali na yango.’’ Kasi zulunalo yango eyebisaki na sikisiki ete, kala mingi te, libongwani moko liukaki kosalema kati na ekipe ya bakomi, libongwani oyo likokaki komema na kolongola “etuluku ya bato oyo bazali kobomba barulo yango . . . , boye bato nyonso bakoyeba makambo mingi na ntina na eleko kitoko kati na lisoló ya bato.”

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 12]

Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto