Barulo ya Mbu Ekufá ezali mpenza na litomba nini mpo na yo?
Liboso bákundola Barulo ya Mbu Ekufá, bamaniskri ya Makomami ya Liebele oyo elekaki koumela ekomamaki soki na ekeke ya libwa to ya zomi T.B. Lokola Makomami ya Liebele ekomamaki koleka mbula nkóto liboso ya bamaniskri wana, nini ekokaki mpenza kondimisa biso ete babongolaki makambo te na kati ya Liloba ya Nzambe ndenge ezali lelo? Profɛsɛrɛ Julio Trebolle Barrera, moko ya bato ya mayele oyo bautaki na bikólo ndenge na ndenge oyo babongisaki Barulo ya Mbu Ekufá liboso bábimisa yango, alobi boye: “Rulo ya Yisaya [oyo ezwamaki na Qumrân] ezali mpenza komonisa ete Bayuda oyo bazalaki kosala bakopi ya makomi ya Biblia na boumeli ya mbula koleka nkóto bazalaki kosala yango na bosembo mpe na likebi mpenza.”
RULO oyo Barrera alobeli ezali na mokanda ya Yisaya na mobimba na yango. Bamaniskri koleka 200 ya Biblia oyo ezwamaki na Qumrân ezalaki na bandambo ya mikanda nyonso ya Makomami ya Liebele, longola kaka mokanda ya Esetele. Longola Rulo ya Yisaya oyo ezali na mokanda mobimba ya Yisaya, barulo mosusu oyo etikali ezali kaka na biteni ya mikanda mosusu nyonso. Mikanda ya Biblia oyo emonanaki mingi na Qumrân ezalaki oyo: Nzembo (rulo 36), Deteronome (rulo 29), mpe Yisaya (rulo 21). Yango mpe ezali mikanda oyo bazongeli mbala na mbala na Makomami ya Grɛki ya boklisto.
Atako barulo emonisi polele ete makomi ya Biblia ebongwanaki mpenza te, kasi emonisi mpe ete Bayuda oyo bazalaki nsima ya boombo na Babilone bazalaki kosalela Babiblia ya Liebele oyo ezalaki nyonso na makomi ndenge moko te. Barulo nyonso te ezali na maloba to makomi ndenge moko na makomi ya Bamasorete. Barulo mosusu ekokani mingi na libongoli ya Septante ya lokota ya Grɛki. Kala, balimboli ya Biblia bazalaki kokanisa ete bokeseni oyo ezali na libongoli ya Septante mbala mosusu eutaki na mabunga to na makanisi oyo mobongoli akɔtisaki na ndenge alingi. Kasi, barulo emonisi ete bokeseni yango eutaki nde na mitindo ndenge na ndenge ya makomi ya Liebele. Ekoki kozala mpo na yango nde na bisika mosusu oyo baklisto ya liboso bazongelaki Makomami ya Liebele, maloba oyo basalelaki ekeseni na oyo ezali na makomi ya Bamasorete.—Exode 1:5; Misala 7:14.
Na bongo, barulo yango ya Biblia na biteni mosusu ezali mpenza kosalisa biso na koyekola mpo na koyeba makambo oyo esalemaki na Biblia ya Liebele banda bakomaki yango tii na ndenge ekómeli biso. Barulo ya Mbu Ekufá emonisi mpenza ete libongoli ya Septante mpe Pentatɛkɛ ya Basamalia ezali na ntina mingi mpo na koluka mabunga oyo, mbala mosusu, ekɔtaki ntango bazalaki kokoma yango. Ezali mpe makomi oyo ekoki kosalisa babongoli ya Biblia na kotala bisika oyo bakoki kobongisa makomi ya Bamasorete. Na bisika mingi, endimisi bikateli ya Komite ya bobongoli Biblia Traduction du monde nouveau ya kozongisa nkombo ya Yehova na bisika oyo balongolaki yango na makomi ya Bamasorete.
Barulo oyo ezali komonisa mibeko mpe bindimeli ya mwa lingomba oyo ezalaki na Qumrân emonisi mpenza polele ete losambo ya Bayuda ezalaki na mwa mangomba ya mikemike mingi ntango Yesu azalaki awa na mabele. Mwa lingomba ya Qumrân ezalaki na mimeseno oyo ekesanaki na oyo ya Bafalisai na ya Basadukai. Ekoki kozala bokeseni yango nde esalaki ete bandimi ya mwa lingomba yango bákende kofanda na esobe. Bamikosaki na kokanisa ete bango nde bakokisaki esakweli ya Yisaya 40:3 na ntina na mongongo oyo, kati na esobe, ezali kobongisa nzela ya Yehova. Biteni mingi ya barulo ezali kolobela Masiya, mpe bakomi na yango bakanisaki ete koya na ye ekómaki pene. Yango esengeli mpenza kobenda likebi na biso, mpamba te Luka akomaki ete “bato bazalaki kozela” koya ya Masiya.—Luka 3:15, NW.
Barulo ya Mbu Ekufá esalisi biso ata mwa moke na koyeba ndenge nini bomoi ya Bayuda ezalaká na ntango oyo Yesu azalaki kosakola. Epesi mpe makambo oyo ekoki kosalisa ntango boyekoli ezali kosalema mpo na kokokanisa Liebele ya kala na makomi ya Biblia. Kasi, makomi ya ebele ya Barulo ya Mbu Ekufá esengeli naino kotalelama malamumalamu. Yango wana, ekoki kozala ete na mikolo ekoya tokoyeba makambo mosusu ya sika. Ya solo, atako tokómi na ekeke ya 21, ezala bato ya mayele oyo balimbolaka Biblia to bayekoli ya Biblia, biso nyonso tozali naino na mposa ya koyeba makambo oyo ezali na kati ya biloko ya motuya oyo eleki biloko nyonso oyo bato ya arkeoloji bakundolaki na ekeke ya 20.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 7]
Mibenga ya Qumrân: Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.; maniskri: Na ndingisa ya Shrine of the Book, Israel Museum, Jérusalem