Soki mitinda ebongwani, bato batyelanaka motema lisusu te
Ntango Henri I azalaki mokonzi ya Angleterre (1100-1135), emekeli na bolai oyo babengi yard moko ezalaki “bolai oyo ebandi na nsɔngɛ ya zolo ya Mokonzi tii na nsɔngɛ ya mosapi ya monene ya lobɔkɔ na ye, wana asemboli lobɔkɔ liboso na ye mpe atɛlɛmisi mosapi yango.” Na ndenge yango, mpo na koyeba soki nzete oyo bazali kosalela lokola emekeli ya yard moko ezali mpenza sikisiki, esengelaki kokende epai ya mokonzi mpe komeka yango na nzoto na ye.
LELO OYO, mpo na koyeba soki biloko oyo bazali kosalela mpo na komeka bolai, bonene, bozito mpe bongo na bongo, ezali mpenza sikisiki mpo bakokanisaka yango na bimekeli ya sikisiki oyo endimami na bato nyonso. Na ndakisa, mɛtrɛ moko ezali mpenzampenza ntaka oyo pole esalaka na sekonde moko na esika oyo mopɛpɛ to eloko mosusu ezali te, kabolá na 299 792 458. Mpo ezala mpenza sikisiki, basilá kopona bolai oyo pole yango esengeli kozala mpe esengeli kouta na rayon lazer moko oyo esi eponamá. Ata na esika nini, soki bato bazali na bisaleli oyo ekoki kobimisa mɛtrɛ ya motindo yango, bakoki koyeba soki mɛtrɛ oyo bazali kosalela mpo na koyeba bolai ekokani mpenza na oyo bato nyonso basalelaka.
Soki bimekeli ya sikisiki oyo basalelaka mpo na koyeba bosikisiki ya bimekeli mosusu ebongwani ata moke, ntembe ekoki kobima; yango wana, basalaka makasi mpo na kobatela bimekeli yango. Na ndakisa, na Angleterre, ezali na ebende moko esalemi na platine esangani na iridié, yango nde bazwaka lokola ndakisa ya kilogramɛ moko mpo na komeka kilo ya biloko. Babombaka ebende yango na laboratware moko (National Physical Laboratory). Mokolo na mokolo, mputulu oyo milinga ya mituka mpe bampɛpɔ etikaka ekweaka likoló ya emekeli yango mpe ebakisaka mwa mokemoke bozito na yango. Kasi, ebende yango esalamaki na kolanda ebende oyo mokili mobimba etalelaka lokola ndakisa ya bimekeli nyonso ya bozito; ebende oyo wana babombaka yango na shambre moko ya nse ya mabele mpe bazipá yango na nse ya basaani misato ya minene na laboratware moko (Bureau international des poids et mesures), na engumba ya Sèvres, na France. Kasi, ata bozito ya ebende yango ebongwanaka mpe lokola biloko mikemike oyo ekoki komonana na miso te ekɔtelaka yango. Na bongo, tii na moi ya lelo, basava ya mokili mobimba oyo bayekolaka bimekeli bazwi naino te eloko oyo ekoki kobongwana te mpo ezala ndakisa ya sikisiki ya emekeli.
Ata soki moto akoki komona ete mbongwana mikemike wana ekosala eloko te, soki eloko oyo bazali kosalela lokola ndakisa ebongwani makasi, yango ekoki kobulunganisa. Na Angleterre, ntango batikaki kosalela bimekeli ya bozito ya ekólo na bango (livre na once) mpo na kosalela bimekeli babengi métrique (kilogramɛ na gramɛ), bato mingi batyelaki yango motema te, mpe ezalaki na bantina oyo bazalaki kondima yango te. Batɛkisi mosusu ya mayele mabe bakómaki kokosa bakiliya lokola bamesenaki naino te na ndenge ya sika ya komeka biloko.
Mitinda oyo etali libota mpe bizaleli malamu
Ekozala boni soki mitinda oyo etali libota mpe bizaleli malamu ebongwani? Makambo ekoki kobeba mpenza. Bato mingi bazali kolɛmba nzoto ntango bazali koyoka na bansango ndenge oyo mabota ezali kobeba, makambo ya mbindo na etamboli ya basi na mibali, ndenge bana bazali konyokwama; yango ezali komonisa mpenza ete na mikolo na biso, mitinda ezali kobeba. Mabota mosusu ezali na tata te to ezali na mama te; bana mosusu bazali kobɔkwama na “baboti” oyo bazali mibali na mibali to basi na basi; bato oyo bazali na mokumba ya kobatela mpe koteya bana bazali kobebisa bana; nyonso wana ezali makambo oyo ezali kosalema mpo bato baboyi mitinda ya kala. Ndenge esakolamá na Biblia eleki soki mbula nkóto mibale, bato mingi bazali kokóma “bamikumisi na bango mpenza, . . . bato bazangi bolingo, . . . bayini ya malamu, . . . baoyo bakolingaka malamu na bango mpenza koleka bolingo na Nzambe.”—2 Timote 3:1-4.
Ntango mitinda oyo etali bizaleli malamu ezali kobeba, bato bazali lisusu kotyelana motema te. Na mikolo eleki, na engumba Hyde, na nɔrdi ya Angleterre, epai kuna bato batyelaka mingi minganga oyo basalisaka mabota na bango motema, oyo batalelaka lokola bato oyo “babongi na limemya mpe na kotyela motema,” mbeba ya minene esalamaki na ntina etali mitinda ya mosala ya monganga. Likambo ya mawa ezali ete minganga mosusu basalelaki mabe ezaleli yango ya kotyela minganga motema. Ndenge nini? Balapolo ya tribinale emonisaki ete monganga moko abomisaki basi soki 15 oyo azalaki kosalisa. Kutu, bapolisi balukaki koyeba ndenge oyo bato mosusu 130, oyo monganga yango asalisaki, bakufaki. Ntango basambisaki ye mpe bakatelaki ye etumbu ya bolɔkɔ, bato nyonso bamonaki polele ete monganga yango abebisaki mpenza elikya oyo batyelaki ye. Bapesaki bakonzi mibale ya bapolisi oyo bazalaki kosala na bolɔkɔ oyo batyaki ye misala mosusu mpo bákɛngɛlaka monganga ya motema mabe wana te, mpamba te ekoki mpenza kozala ete ye nde abomaki mpe mama na bango. Kutu, zulunalo moko (Daily Telegraph) oyo ezalaki na lisolo ya makambo yango ebengaki monganga yango ete “‘Zabolo’ ya monganga.”
Na kotala ndenge oyo mitinda ezali kobongwanabongwana mpe ndenge makambo mingi ya bomoi ezali kobeba, nani oyo tokoki kotyela mpenza motema? Epai wapi okokuta mitinda oyo ebongwanaka te, mitinda oyo euti na mokonzi oyo azali na nguya ya kobatela yango? Lisolo oyo elandi ekopesa biyano na mituna yango.