Mitinda ya nani okoki kotyela motema?
Moto moko oyo ayaki kotala Afrika mpo na mbala ya liboso, akamwaki ntango amonaki moto moko oyo atɛlɛmaki alima pembeni ya nzela, mpe azalaki kosala soki alekisi mwa miniti, okomona abendi makolo mpo na kopusana mwa moke mpe azalaki kokende kaka na ngámbo moko. Mopaya yango ayaki koyeba nsima ntina oyo moto yango azalaki kosala bongo. Azalaki nde kolanda elili ya likonzi ya bansinga ya telefone. Elili yango ezalaki kobongwana mokemoke wana moi ezalaki kokende na kolala.
NDENGE moko na elili wana oyo ezalaki kobongwana mpo na moi, makambo mpe mitinda ya bato ebongwanaka ntango nyonso. Nzokande, Yehova Nzambe, “Tata ya pole ya likoló,” abongwanaka te. Moyekoli Yakobo akomaki ete: “Epai na ye, kobaluka ya elili ebongwanaka te.” (Yakobo 1:17, NW) Mosakoli Malaki akomaki maloba oyo Nzambe alobaki ete: “Ngai [Yehova] nakobongwana te.” (Malaki 3:6) Na ntango ya Yisaya, Nzambe ayebisaki libota ya Yisalaele boye: “Kino ntango na konuna, ngai oyo, kino nsuki ikómi pɛɛ ngai nakokumba bino, ngai nasalaki.” (Yisaya 46:4) Yango wana, ata soki eleki bambula mingi, tokoki kotika te kotya motema na bilaka ya Mozwi-na-Nguya-Nyonso.
Tozwi liteya na Mibeko
Bilaka ya Yehova ebongwanaka te mpe tokoki kotyela yango motema, ezali mpe bongo mpo na mitinda na ye oyo etali malamu na mabe. Tokanisi ete soki ozali liboso ya moto moko oyo azali koteka biloko na bakilo mibale ekeseni mpo na komeka biloko, kasi moko kaka nde ezali ya malamu, okotyela moto ya ndenge wana motema? Soki moke te. Ndenge moko mpe, “epimelo ya bozito ya lokuta eboyami na [Yehova]; nde bozito ya sembo esepelisi ye.” (Masese 11:1; 20:10) Na Mibeko oyo Yehova apesaki Bayisalaele, etinda oyo mpe ezalaki: “Bokosala mabe te kati na kokata makambo to na emekeli ya molai to na emekeli ya bozito to na emekeli ya kɔpɔ. Bokozala na emekeli ya bozito alima mpe na bibende na yango alima mpe na efa alima mpe na hini alima. Ngai nazali [Yehova] Nzambe na bino oyo abimisaki bino na mokili ya Ezipito.”—Levitike 19:35, 36.
Ntango Bayisalaele bazalaki kotosa mobeko wana, Nzambe azalaki kosepela na bango mpe bazalaki kozwa bolamu mingi. Ndenge moko mpe, mosaleli oyo atyelaka Yehova motema mpe alandaka mitinda na ye oyo ebongwanaka te, ezala na makambo ya komeka kilo, bolai, boike ya biloko to na makambo mosusu nyonso ya bomoi, azwaka mapamboli mingi. Nzambe alobi boye: “Ngai nazali [Yehova], Nzambe na yo, ye oyo akolakisa yo mpo na litomba, ye oyo akokamba yo na nzela ekoki na yo kotambola na yango.”—Yisaya 48:17.
Mpo na nini lelo oyo mitinda ezali se kobeba?
Biblia emonisi ntina oyo mitinda ezali se kobeba lelo oyo. Emoniseli, mokanda ya nsuka ya Biblia, elobeli etumba moko oyo esalemaki na likoló; emonisi mpe ete nsuka ya etumba yango ebongolaki makambo ya bato tii na moi ya lelo. Ntoma Yoane akomaki boye: “Etumba ebimaki kati na likoló; Mikaele na baanzelu na ye babundaki etumba na dalagona. Dalagona abundaki, na baanzelu na ye, nde balongaki te, mpe esika kati na likoló ezwami mpo na bango lisusu te. Dalagona yango monene abwakami, ye nyoka ya kalakala, oyo abyangami Motɛmɛli mpe Satana, mozimbisi ya bato ya mokili mobimba; abwakami na nse, baanzelu na ye mpe babwakami na ye elongo.”—Emoniseli 12:7-9.
Makambo nini etumba yango ebimisaki mwa moke nsima ya nsuka na yango? Yoane akomaki lisusu boye: “Na bongo, bósepela, ɛ likoló, mpe bino bafandi wana! Mawa na mokili mpe mai monene! Mpo ete Satana akiteli bino na kongala mingi, awa eyebi ye ete azali na mwa elaka mokuse.”—Emoniseli 12:12.
“Mawa na mokili” ekɔtaki ntango Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebandaki na 1914 mpe esukisaki eleko moko oyo ezalaki na mitinda oyo ekeseni mpenza na mitinda ya moi ya lelo. Barbara Tuchman, moto ya mayele na istware, alobaki boye: “Etumba Monene ya 1914-1918 ezali lokola ndelo oyo ekabolaki ntango wana na ntango na biso. Ndenge oyo etumba yango ebomaki ebele ya bato oyo basengelaki kozala na bomoi mpe kosala misala na bambula oyo elandaki, ndenge oyo esilisaki kondima ya bato, ebongolaki makanisi ya bato, mpe etikaki bato na bilembo mpe mobulungano oyo ekosila te, ekesenisaki ndenge ya kokanisa ya bato oyo babotami nsima na baoyo bazalaki liboso ya etumba.” Eric Hobsbawm, ye mpe azali moto ya mayele na istware, azali mpe na makanisi yango, alobi boye: “Kobanda 1914, mitinda oyo ezalaki komonana malamu ezali kobunga mokemoke na mikili ya bozwi . . . Ezali mpasi mpo na koyeba soki tokosuka wapi na kozonga oyo tozali kozonga, mpe nokinoki, na makambo oyo bankɔkɔ na biso oyo bazalaki na bomoi na ekeke ya 19, bakokaki kobenga mitinda ya bosɛnzi.”
Na mokanda na ye (Humanity—A Moral History of the Twentieth Century), mokomi Jonathan Glover alobi boye: “Likambo moko oyo tozali komona na mikolo na biso ezali ete mibeko oyo etali bizaleli malamu ezali kobunga.” Atako moto yango azali mpenza kondima te ete mibeko oyo etali bizaleli malamu ekoki kouta na esika mosusu, ndenge bato bazali kopesa mangomba mokongo na mikili ya Mpoto, alobi boye: “Bato oyo batyelaka mibeko ya Nzambe motema te mpo na bizaleli malamu basengeli kaka komitungisa na ndenge oyo mibeko yango ezali kobunga.”
Na moi ya lelo, lokola bato bazali lisusu kotyelana motema te—na makambo ya mombongo, ya politiki, ya mangomba, ya boyokani ya bato to na mabota—mpe makambo mabe oyo yango ezali komema, nyonso wana ezali mayele mabe ya Zabolo mpo na kopesa bato ya mokili mawa. Satana azali na ekateli ya kobunda tii na nsuka mpe kokufa nzela moko na baoyo bazali kosala makasi ete bálanda mitinda ya Nzambe.—Emoniseli 12:17.
Ndenge nini ezaleli oyo bato mingi bakómi na yango ya kozanga kotyelana motema ekoki kosila? Ntoma Petelo apesi eyano ete: “Tozali kotalela Likoló ya sika mpe nse ya sika, [lokola] elakaki ye; boyengebene ekofanda kati na yango.” (2 Petelo 3:13) Tokoki kotyela elaka yango motema mpamba te, Nzambe azali na nguya ya kokokisa mokano na ye mpe apesi ndanga ete akokokisa yango. Mpo na ‘liloba oyo ekobima na monɔkɔ na ye,’ Yehova alobi boye: “[ekozonga] epai na ngai mpamba te, kasi ekosukisa oyo ekani ngai, ekolonga na likambo litindaki ngai yango.” Tokoki mpenza kotyela elaka yango motema!—Yisaya 55:11; Emoniseli 21:4, 5.
Tólanda mitinda ya Nzambe
Na mokili oyo mitinda ezali se kobongwana mpe kobeba, Batatoli ya Yehova bazali kosala makasi ete bátosaka mitinda ya Biblia. Yango wana, bakeseni mpenza na bato mosusu nyonso, mpe bato mosusu bazali kokamwa mpo na bango, mosusu mpe bazali kosɛka bango.
Na liyangani moko ya Batatoli ya Yehova oyo esalemaki na Londres, mopanzi-nsango moko na televizyo atunaki ndeko moko oyo azalaki na mokumba ya kosolola na bapanzi-nsango, soki Batatoli ya Yehova bazali mpenza baklisto. Ndeko yango alobaki boye: “Tozali mpenza baklisto mpamba te tolandaka mpenza ndakisa ya Yesu. Na mokili oyo, ebele ya bato bazali koluka kaka bamposa na bango, kasi biso totalelaka Yesu Klisto lokola nzela, solo mpe bomoi. Tondimaka ete azali Mwana ya Nzambe, azali na kati ya Bosato te; na bongo, boyebi na biso ya Biblia ekeseni na oyo ya mangomba mosusu.”
Ntango balakisaki lisolo na bango na televizyo ya Angleterre (BBC), na nsuka, mopanzi-nsango alobaki boye: “Nayebi sikoyo ntina oyo Batatoli ya Yehova bayaka na bandako na biso. Nakanisi te ete nasi namoná bato 25 000 balati malamu mpe bazali na bizaleli malamu basangani esika moko.” Maloba ya moto yango oyo azali Motatoli te, ezali mpenza litatoli malamu oyo ezali komonisa ete kotosa mitinda ya Nzambe oyo ebongwanaka te ezali likambo ya mayele!
Toyebi ete bato mosusu bakoki koyoka mabe na likanisi ya kolanda mitinda ya moto mosusu, kasi tozali kolendisa yo otánga Biblia na yo mpo oyekola mitinda ya Nzambe. Kasi, ezala kaka koyekola ya likolólikoló te. Landá toli ya ntoma Paulo oyo elobi boye: “[Bólandaka] makambo ya ntango oyo te kasi bóbongwana mpo na kozwa makanisi ya sika kino bokokoka kososola mokano ya Nzambe, yango malamu, yango bokoki koyamba, yango mpe ebongi kwa.” (Baloma 12:2) Kende na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova na kartye na bino mpe sololá na Batatoli oyo okokuta kuna. Okomona ete bazali bato lokola bato nyonso, batyelaka bilaka ya Biblia motema mpe bamonisaka ete batyelaka Nzambe motema na ndenge balandaka mitinda na ye.
Okozwa mapamboli mingi soki olandi mitinda ya Nzambe na bomoi na yo, mitinda oyo ebongwanaka te mpe oyo tokoki kotyela motema. Yoká likambo oyo Nzambe azali koloba ete: “Soko oyokaki malako na ngai mbɛlɛ kimya na yo ezalaki lokola ebale mpe boyengebene na yo lokola mbɔngɛ ya mai-na-monana.”—Yisaya 48:18.
[Bililingi na lokasa 5]
Lelo oyo, kozanga kotyelana motema ezali komonana na makambo ya mombongo, ya politiki, ya mangomba, mpe na kati ya mabota