Bomoi mosusu ezalaka nsima ya liwa?
YOBO, moto oyo azalaki na bomoi eleki sikoyo mbula soki 3 500, atunaki motuna oyo: “Soki moto akufi, akoki kozonga lisusu na bomoi?” (Yobo 14:14, NW ) Banda kalakala motuna oyo etungisaka bato. Bato ya bikólo nyonso bamituná motuna yango mpe babimisá makanisi ndenge na ndenge mpo na komeka kopesa eyano na motuna yango.
Bato mingi oyo bamibengaka baklisto bakanisaka ete bato bakendaka na likoló mpe na lifelo. Nzokande, bato ya Lingomba ya Hindu, bango bakanisaka ete soki moto akufi, abotamaka lisusu. Emir Muawiyah, ye azali mosungi na eteyelo moko ya Bamizilma, alobaki boye: “Biso tondimaka ete mokolo ya kosambisa ezali, mokolo yango moto na moto akotɛlɛma liboso ya Nzambe, Allah, mpe ekozala lokola liboso ya tribinale.” Bamizilma bakanisaka ete Allah akotalela bomoi ya moto na moto mpe akotinda ye, to na paladiso to na lifelo ya mɔ́tɔ.
Na ekólo Sri Lanka, ezala bato ya Lingomba ya Bouddha to mpe Bakatolike, soki moto akufi na kati ya libota, batikaka bikuke mpe maninisa ya ndako polele. Bapelisaka mwinda ya petrole, mpe soki batii mowei na sanduku, batyaka ngámbo ya makolo etalana na ekuke ya ndako. Bakanisaka ete kosala bongo esalisaka ete elimo ya mowei ezala na mpasi te mpo na kobima.
Ronald Bernd, profɛsɛrɛ na Iniversite ya Western Australia, ayebisi ete bankolo-mabele ya Australie bakanisaka ete “bato bazali na elimo oyo ekufaka te.” Na bikólo mosusu ya Afrika bandimaka ete nsima ya liwa, bato mpamba bakómaka bilima, kasi bato ya lokumu bakómaka bilimu ya bankɔkɔ oyo basengeli kokumisaka mpe kobelelaka bango lokola batambwisi na bango.
Na bikólo mosusu, makanisi ya bato mpo na baoyo bakufá esangani na bonkɔkɔ na mateya ya mangomba ya boklisto. Na ndakisa, na Afrika ya Wɛsti, Bakatolike na Baprotesta mingi bazali na momeseno ya kozipa batalatala soki moto akufi mpo moto atala yango te noki te akomona elimo ya moto oyo akufi.
Tomoni mpenza ete biyano ezali ebele na motuna oyo: ‘Nini ekómelaka biso soki tokufi?’ Kasi, likanisi moko oyo ezali kozonga na biyano nyonso ezali ete moto azali na eloko moko na kati na ye oyo ekufaka te. Bato mosusu balobaka ete “eloko” yango ezali elimo. Na ndakisa, na bisika mingi na Afrika mpe na Azia mpe na bisanga ya Polynésie, ya Mélanésie mpe ya Micronésie na Mbu ya Pasifike, bato mingi bakanisaka ete molimo nde ekufaka, kasi elimo ekufaka te. Kutu, na minɔkɔ mosusu, liloba “molimo” ezali te.
Ezali ya solo ete moto ya bomoi azalaka na elimo? Elimo yango ebimaka na nzoto soki moto akufi? Soki ezali bongo, elimo yango ekendaka wapi? Elikya nini tokoki kozala na yango mpo na bato oyo bakufá? Esengeli mpenza kotalela mituna yango. Ata soki ozali moto ya mboka nini to ozali na lingomba nini, mokolo mosusu liwa ekoyela yo. Mituna oyo etaleli yo mpenza. Tolendisi yo otalela likambo yango malamumalamu.