Longolá mabaku oyo ezali kopekisa yo kokola!
KANISÁ ete opelisi vuatire na yo, motɛrɛ ezali kosala, kasi eboyi kotambola. Vuatire na yo ekufi? Te, libanga monene efandi liboso ya pine. Mpo vuatire etambola, esengeli kaka kolongola libanga yango.
Ndenge moko mpe, bato mosusu oyo bazali koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, bazali na mabaku oyo ekoki kopekisa bango bákola na elimo. Na ndakisa, Yesu akebisaki ete makambo lokola ‘mitungisi ya mokili oyo mpe mposa ya mosolo’ ekoki ‘kokanga liloba’ ete ebota mbuma te.—Matai 13:22.
Mpo na basusu, misala mabe oyo bamesaná na yango esalaka ete bákola te. Mobali moko ya ekólo Japon, nkombo na ye Yutaka, azalaki kosepela na mateya ya Biblia, kasi azalaki na mokakatano monene mpo azalaki kobɛta masano ya mbongo. Mbala na mbala, amekaki kotika momeseno yango mabe, kasi akokaki te. Momeseno wana esilisaki ye ebele ya mbongo oyo azalaki na yango, ndako misato oyo azalaki na yango ezalaki lisusu te, libota na ye bazalaki lisusu kotosa ye te, mpe azalaki lisusu na lokumu te. Akokaki nde kolongola libanga wana monene mpe kokóma moklisto?
Tólobela mpe mwasi moko nkombo na ye Keiko. Na lisalisi ya Biblia, atikaki mimeseno mabe lokola kosambela bikeko, kosala pite, mpe koyebisa makambo oyo ekoya. Kasi, Keiko andimi ete: “Mokakatano oyo elekaki monene mpo na ngai ezalaki ya komela likaya. Mbala mingi namekaki kotika yango kasi nakokaki te.”
Yo mpe okoki kokanisa ete ozali na libaku moko oyo ekoki kolongwa te, oyo ezali kopekisa yo okola. Ezala libaku nini oyo ozali na yango, zalá na kondima ete, liloba ya Nzambe ekoki kosalisa yo olonga yango.
Kanisá lisusu toli oyo Yesu apesaki bayekoli na ye ntango bakokaki te kobimisa demo oyo azalaki kotungisa mobali moko oyo azalaki na maladi ya ndɛkɛ. Na nsima, ntango Yesu alongaki kobimisa demo yango, alobaki na bayekoli na ye ete: “Soki bozali na kondima ata lokola mbuma ya sinapi, bokoloba na ngomba oyo ete, Tambolá longwa awa kino esika kuna mpe ekotambola. Likambo moko te ekoleka nguya na bino.” (Matai 17:14-20; Malako 9:17-29) Ya solo, mokakatano oyo biso tokoki komona lokola ngomba molai, ezali eloko ya moke mpenza na miso ya Mozalisi na biso, oyo azali na nguya nyonso.—Genese 18:14; Malako 10:27.
Ndenge ya koyeba mabaku oyo epekisaka yo okola
Liboso ete olongola mabaku oyo ezali kopekisa yo okola, esengeli oyeba mabaku yango. Ndenge nini okoki koyeba yango? Ntango mosusu ndeko moko na kati ya lisangá, ekoki kozala nkulutu to ndeko oyo ayekolaka na yo Biblia, akoki kobenda likebi na yo likoló ya likambo moko. Na esika ete toli na ye ya bolingo epesa yo nkanda, osengeli nde na komikitisa nyonso “koyoka disipilini mpe kokóma na bwanya.” (Masese 8:33, NW ) Ntango mosusu boyekoli na yo ya Biblia ekoki kosalisa yo oyeba bolɛmbu na yo. Ya solo, Liloba ya Nzambe “ezali na bomoi mpe na nguya.” (Baebele 4:12) Kotánga Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka yango ekoki kobimisa polele makanisi na yo ya mozindo, mayoki na yo, mpe bamposa ya makanisi na yo. Ekosalisa yo na komitalela yo moko na boyokani na mitinda ya sembo ya Yehova. Ekomonisa mpe ekoyebisa yo makambo oyo ekoki kopekisa yo okola na elimo.—Yakobo 1:23-25.
Na ndakisa, ekoki kozala ete moyekoli moko ya Biblia azalaka na momeseno ya kokanisa makambo ya mbindo. Akoki kokanisa ete mabe moko ezali te ntango azali na makanisi yango, to kokanisa ete azali kosala likambo moko ya mabe te. Na ntango azali koyekola, akoki kokutana na maloba ya Yakobo 1:14, 15, oyo elobi ete: “Moto na moto akomekamaka mpo na kobendama mpe kolɛngolama na mposa mabe na ye moko. Na nsima, esili mposa kozwa zemi, eboti lisumu, mpe esili lisumu yango kokola eboti kufa.” Sikoyo amoni mpenza ete soki akolisi kaka makanisi yango, ezali libaku oyo ekopekisa ye akola! Ndenge nini akoki kolongola libaku yango?—Malako 7:21-23.
Ndenge ya kolongola mabaku
Mbala mosusu, na lisalisi ya moklisto moko oyo akɔmeli, moyekoli yango akoki kosalela Indexa ya mikanda ya la Société, ntango azali koluka makanisi ya Liloba ya Nzambe. Na ndakisa, soki afungoli na motó ya likambo “Pensée,” yango ekotinda ye na ebele ya masolo oyo la Société abimisá, oyo elobeli ndenge ya kolonga makanisi mabe. Masolo yango epesi mikapo ya Biblia oyo ekoki kosalisa ye mingi, na ndakisa Bafilipi 4:8, oyo elobi ete: “Mpo na makambo nyonso ya solo, na makambo nyonso ya lokumu, na makambo nyonso ya sembo, na makambo nyonso ya pɛto, na makambo nyonso ya boboto, na makambo nyonso ya ngɔlu, soki malamu ezali mpe soki lisanzoli ezali, bókanisa makambo yango.” Ɛɛ, na esika ya kokanisa makambo ya mbindo, esengeli nde kozala na makanisi ya pɛto, makanisi ya kolendisa!
Ntango azali kolukaluka, na ntembe te moyekoli akomona mitinda mosusu ya Biblia, oyo ekosalisa ye akómisa likambo yango monene te. Na ndakisa, Masese 6:27 mpe Matai 5:28 ekebisi mpo na oyo etali koleisa elimo na yo na makambo oyo ekoki kolamwisa mposa ya kosangisa nzoto. Mokomi ya Nzembo abondelaki ete: “Bendá miso na ngai ete natala biloko mpamba te.” (Nzembo 119:37) Ya solo, kotánga kaka mikapo wana ya Biblia ekoki te. Moto ya mayele alobi ete: “Motema ya moyengebeni emanyolaka.” (Masese 15:28, NW ) Soki moyekoli yango akanisi na mozindo makambo nini oyo Nzambe atindi tósala mpe mpo na nini apesi mitinda yango, akoki kokóma na bososoli mozindo ya bwanya ya Yehova mpe ya banzela na ye oyo ezangi makambo makasi.
Ya nsuka, moto oyo azali kosala makasi mpo na kolongola mabaku oyo ezali kopekisa ye akola, asengeli noki mpenza koluka lisungi ya Yehova. Kutu, Nzambe ayebi malamu ndenge tosalemi, ayebi ete tozali bato ya kozanga kokoka, oyo basalemaki na mputulu. (Nzembo 103:14) Soki tozali kobondela Nzambe kozanga kotika mpo na koluka lisalisi na ye, mpe soki tozali kosala milende mpo na kotika nzela te na makanisi ya mbindo, nsukansuka, tokozwa litomba malamu; tokobatela lisosoli ya pɛto.—Baebele 9:14.
Kolɛmba te
Ezala mokakatano nini ozali kobundana na yango, yebá ete mbala mosusu okoki kokwea. Soki okwei, ekoki kokóma ete olɛmbi nzoto mpe okómi mawamawa. Kasi, kobosana te maloba ya Bagalatia 6:9, oyo elobi ete: “Tólɛmbaka mpo na kosalaka malamu te zambi na ntango oyo ekoki, tokobuka soki tokotika motema te.” Basaleli ya molende ya Nzambe lokola Davidi mpe Petelo bakómaki mpe mawamawa ntango bakweaki. Kasi balɛmbaki te. Na komikitisa mpenza, bandimaki toli, basalaki mbongwana oyo esengeli, mpe balandaki komonisa ete bazali mpenza basaleli ya Nzambe. (Masese 24:16) Atako Davidi asalaki mabunga, Yehova abengaki ye ‘mobali abongi na motema na ngai moko, oyo akosala mokano na ngai nyonso.’ (Misala 13:22) Ndenge moko mpe, Petelo alongaki mabunga na ye mpe akómaki na mikumba minene na lisangá ya boklisto.
Lelo oyo, bato mingi basili kolongola mabaku oyo ezalaki kopekisa bango bakola. Yutaka, oyo tolobelaki liboso, andimaki koyekola Biblia. Ayebisi boye: “Ndenge Yehova azalaki kosunga ngai mpe kopambola ngai na likambo mokomoko oyo nazalaki kosala mpo nabongwana, esalisaki ngai nalonga mokakatano na ngai ya kobɛta masano ya mbongo. Nazali na esengo mingi ya komona ndenge maloba ya Yesu, oyo elobi ete soki ozali na kondima, okoki kolongola ata ‘ngomba,’ ekokanaki epai na ngai.” Na nsima Yutaka akómaki mosaleli ya misala na lisangá.
Bongo Keiko, oyo azalaki na momeseno mabe ya komɛla likaya? Ndeko mwasi oyo azalaki koyekola na ye Biblia ayebisaki ye ete atánga masolo ndenge na ndenge ya Lamuká! oyo elobeli momeseno ya komɛla likaya. Kutu, Keiko abambaki maloba ya 2 Bakolinti 7:1 na kati ya motuka na ye, mpo eyebisaka ye mokolo na mokolo ete asengeli kotikala pɛto na miso ya Yehova. Kasi, azalaki kolonga kaka te. Keiko alobi ete: “Nazalaki mpenza kolɛmba nzoto. Na bongo nabandaki komituna soki mposa na ngai ezalaki mpenza nini—ya kosalela Yehova to Satana?” Ntango azwaki ekateli ete alingaki nde kosalela Yehova, abondelaki na molende mpenza mpo na koluka lisungi. Alobi: “Nakamwaki mpenza ndenge natikaki komela likaya kozanga nkaka. Nayokaka mawa kaka mpo nasalaki yango noki te.”
Yo mpe okoki kolongola mabaku oyo ezali kopekisa yo okola. Soki okómi koyokanisa makanisi na yo, bamposa na yo, maloba na yo, mpe misala na yo na mitinda ya Biblia, okomona ete okopesa nzoto na yo kilo mpe okokóma moto ya kotyela motema. Bandeko na yo ya elimo mpe bato ya libota na yo, bakolendisama soki bazali pembeni na yo. Likambo eleki ntina, okokolisa boyokani na yo elongo na Yehova Nzambe. Apesaki elaka ete ‘akolongola mabaku nyonso na nzela ya bato na ye’ mpo Satana azwa bango te. (Yisaya 57:14) Mpe okoki komindimisa ete soki osali milende mpo na kolongola mpe kolonga mabaku oyo ezali kopekisa yo okola na elimo, Yehova akopambola yo mingi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova, na minɔkɔ mwa mingi.
[Elilingi na lokasa 28]
Yesu alakaki ete soki tozali na kondima, tokolongola mabaku oyo ekokani na ngomba
[Elilingi na lokasa 30]
Kotánga Biblia elendisaka biso na milende na biso ya kolonga bolɛmbu ya elimo