Buku oyo bilenge mingi basepelaka na yango te
ELENGE mwasi moko nkombo na ye Beate alobaki boye: “Nakoyeba ndenge nini soki Biblia ezali mpenza Liloba ya Nzambe? Kutu buku yango esepelisaka ngai te.”
Beate afandaka na Allemagne; kuna, bilenge mingi bazali na makanisi lokola ye; yango wana, kotánga Biblia elobelaka bango eloko te. Ankɛtɛ moko oyo eutaki kosalama kuna emonisaki ete soki ozwi bilenge monkama, okomona ntango mosusu kaka elenge moko nde atángaka Biblia mingi; kaka bilenge mibale nde batángaka yango mwa mingi; bilenge zomi na libwa batángaka yango mwa moke; nzokande bilenge pene na ntuku mwambe batalaka yango ata na liso te. Na bamboka mosusu mpe ekoki kozala ndenge wana; ata mpe na mboka na bino. Tozali komona polele ete bilenge mingi basepelaka na Biblia te.
Yango wana, soki ebele ya bilenge bazali koyeba makambo oyo ezali na Biblia te, tokoki kokamwa te! Na ebandeli ya mobu 2000, zulunalo moko (Lausitzer Rundschau) elobelaki ankɛtɛ moko oyo esalamaki mpo na koyeba soki bato boni bayebi Mibeko Zomi mpe bazali kotosa yango na bomoi na bango. Na bato monkama oyo bazalaki na mbula koleka 60, baoyo bayebaki mibeko yango mpe bazalaki kotosa yango bazalaki 67; kasi na baoyo bambula na bango ezalaki na nse ya 30, kaka bato 28 mpamba nde bamonanaki. Ya solo, bilenge mingi bayebaka eloko moko te na oyo etali Liloba ya Nzambe.
Ezali na bilenge oyo bazali na likanisi mosusu
Soki otamboli epai na epai na mokili, okomona bamilio ya bilenge oyo bamoni ete Liloba ya Nzambe ezali eloko ya motuya mingi. Tózwa elenge Alexander, ye azali na mbula 19 mpe atángaka Biblia ntɔngɔ nyonso liboso ya kokende mosala. Alobi boye: “Wana ezali ndenge na ngai ya kobanda mokolo malamu.” Mosusu ezali Sandra, ye atángaka Biblia na mpokwa nyonso. Alobi boye: “Ekɔtá na misala na ngai ya mokolo na mokolo.” Mosusu mpe, nkombo na ye Julia, azali na mbula 13; butu nyonso, atángaka mokapo ata moko ya Biblia liboso ya kolala. Alobi boye: “Nasepelaka na yango mwayɛ te, kutu nakosala makasi ete natika te.”
Na makanisi wana mibale, wapi ya malamu mpe ya mayele? Biblia ezali mpenza mokanda ya kotánga? Ezali mpenza mokanda ya ntina mpo na bilenge? Okanisi boni?