Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 15/8 nk. 25-29
  • Kotika te kosala oyo ezali malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kotika te kosala oyo ezali malamu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Minyoko ya polele
  • Mitungisi ya mokolo na mokolo
  • Komekama oyo tomilukelaka
  • Kondima na makambo oyo ezangi komonana
  • Ndenge ya kozala na esengo atako mikakatano ezali
  • Yehova abengaki ye “moninga na ngai”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Abrahama azalaki nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • “Bólendisa mitema na bino”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Nzambe ameki Abrahama
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 15/8 nk. 25-29

Kotika te kosala oyo ezali malamu

“Tótika te kosala oyo ezali malamu, mpamba te na ntango oyo ekoki, tokobuka mbuma soki tolɛmbi te.”​—BAGALATIA 6:9, NW.

1, 2. (a) Mpo na nini koyika mpiko ezali na ntina mpo na kosalela Nzambe? (b) Abalayama ayikaki mpiko na makambo nini, mpe nini esalisaki ye asala yango?

BISO Batatoli ya Yehova tosepelaka kosala mokano ya Nzambe. Kolata “ekanganeli” ya moyekoli epesaka biso mpe kopema. (Matai 11:29) Atako bongo, kosalela Yehova na Klisto ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Ntoma Paulo amonisaki yango polele ntango alendisaki baninga na ye baklisto ete: “Bozali na mposa ya ezaleli ya koyika mpiko, mpo ete, nsima ya kosala mokano ya Nzambe, bózwa kokokisama ya elaka.” (Baebele 10:36, NW ) Tozali na mposa ya ezaleli ya koyika mpiko mpamba te kosalela Nzambe ekoki kozala na mikakatano.

2 Bomoi ya Abalayama emonisi likambo yango polele. Mbala mingi asengelaki kokamata bikateli ya mpasi mpe makambo mingi ezalaki kotungisa ye. Ntango balobaki na ye ete alongwa na Ulu, mboka ya bozwi, ezalaki kaka ebandeli ya makambo. Talá makambo oyo ekómelaki ye mwa moke na nsima: nzala ekɔtaki na mboka oyo azalaki, bato oyo bazalaki kofanda pene na ye balingaki ye te, mwasi na ye akufaki, bandeko na ye mosusu bayinaki ye, mpe amonaki mpasi ya etumba. Nzokande, komekama ya minene koleka ezalaki nde liboso. Kasi, Abalayama alɛmbaki ata mbala moko te mpo na kosala oyo ezalaki malamu. Ezali likambo ya kosakana te; mpo soki totali, na ntango wana azalaki na Liloba ya Nzambe na mobimba na yango te ndenge biso tozali na yango lelo. Atako bongo, tozali mpenza kokanisa ete ayebaki esakweli ya liboso, epai Nzambe alobaki ete: “Nakotya koyinana kati na yo na mwasi mpe kati na mombóto na yo mpe mombóto na ye.” (Genese 3:15, NW ) Lokola Mombóto asengelaki kobima na kati ya bana ya Abalayama, Satana akokaki kotika ye nyɛɛ te. Na ntembe te, lokola Abalayama asosolaki likambo yango, esalisaki ye na koyikela komekama na ye mpiko na esengo.

3. (a) Mpo na nini basaleli ya Yehova basengeli kotya na makanisi na bango ete bakokutana na minyoko? (b) Bagalatia 6:9 elendisi biso na nini?

3 Lelo oyo, basaleli ya Yehova basengeli mpe kotya na makanisi ete bakokutana na minyoko. (1 Petelo 1:6, 7) Kutu, Emoniseli 12:17 elobi na biso ete Satana azali ‘kobunda etumba’ na batikali bapakolami. Lokola “bampate mosusu” basangani na bapakolami, Satana azali mpe na nkanda na bango makasi. (Yoane 10:16) Longola botɛmɛli oyo baklisto bakoki kokutana na yango na mosala na bango ya kosakola, bakoki mpe kokutana na makambo mosusu ya mpasi na bomoi na bango. Paulo alendisi biso ete: “Tótika te kosala oyo ezali malamu, mpamba te na ntango oyo ekoki tokobuka mbuma soki tolɛmbi te.” (Bagalatia 6:9, NW) Ya solo, atako Satana azali kokana kobebisa kondima na biso, tosengeli kotɛmɛla ye, tosengeli kozala na kondima makasi. (1 Petelo 5:8, 9) Soki tozali kotambola na bosembo mpenza, likambo nini ekomonana? Yakobo 1:2, 3 elobi ete: “Bandeko na ngai bókanisa ete ezali bobele esengo wana ekokwea bino kati na komekama na mitindo na mitindo. Boyebi ete komekama ya kondima na bino ekoyeisa mpiko.”

Minyoko ya polele

4. Ndenge nini Satana asalelaki minyoko ya polele mpo na koluka kobebisa bosembo ya basaleli ya Nzambe?

4 Bomoi ya Abalayama ezali mpenza komonisa “komekama mitindo na mitindo” oyo moklisto akoki kokutana na yango lelo oyo. Na ndakisa, abundisaki basoda oyo bautaki na Sinala. (Genese 14:11-16) Ezali likambo ya kokamwa te ete tii lelo oyo Satana azali kotika te kobimisa minyoko polele. Banda na nsuka ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bikólo mingi epekisaki mosala ya kosakola ya Batatoli ya Yehova. Mokanda Annuaire des Témoins de Jéhovah 2001 eyebisi ndenge oyo banguna banyokolaki baklisto na Angola. Bandeko na biso na bikólo oyo bapekisaki mosala na biso batyelaki Yehova motema mpe bazongaki nsima te! Na esika básala mobulu to bátomboka, bakobaki kosakola na mayele.​—Matai 24:14.

5. Ndenge nini bilenge baklisto bakoki konyokwama na kelasi?

5 Nzokande, monyoko ezalaka kaka na lolenge ya mpasi na nzoto te. Nsukansuka, Abalayama abotaki bana mibale ya mibali: Yisamaele mpe Yisaka. Genese 21:8-12 elobi na biso ete mokolo mosusu Yisamaele azalaki “kosɛka” Yisaka. Na mokanda na ye epai ya Bagalatia, Paulo amonisaki ete kosɛka yango ezalaki kaka mwa matumoli ya bomwana te, mpamba te alobi ete Yisamaele azalaki konyokola Yisaka! (Bagalatia 4:29) Na bongo, ntango baninga ya kelasi bazali kosɛka biso mpe banguna bazali kofinga biso, tokoki mpe koloba ete bazali konyokola biso. Elenge moklisto moko nkombo na ye Ryan ayebisi biso ndenge oyo baninga na ye ya kelasi bayokisaki ye bwale: “Miniti 15 oyo bisi ezalaki kosala mpo na kokende to kouta na kelasi ezalaki lokola bangonga ebele mpamba te bana-kelasi bazalaki kofingafinga ngai. Bazalaki kozikisa bapɛngɛlɛ oyo bakangisaka na yango bapapye na mɔ́tɔ ya eloko oyo bapelisaka na yango likaya mpe bazalaki kotumba ngai yango.” Nyonso wana mpo na nini? “Mateya ya ebongiseli ya Nzambe ekesenisaki ngai na bilenge mosusu na kelasi.” Atako bongo, lokola baboti na ye bazalaki ntango nyonso kolendisa ye, Ryan ayikaki mpiko mpe atikalaki sembo. Bilenge, bolɛmbi matumoli ya baninga na bino? Bóyika mpiko! Soki botikali sembo, bokomona ete maloba ya Yesu ekokokisama epai na bino: “Mapamboli epai na bino wana bakotuka bino mpe bakonyokola bino mpe bakolobela bino mabe nyonso mpo na ngai.”​—Matai 5:11.

Mitungisi ya mokolo na mokolo

6. Nini ekoki kobebisa boyokani kati na baklisto lelo oyo?

6 Komekama oyo tozali kokutana na yango lelo ezali mingimingi mitungisi ya mokolo na mokolo. Esɛngaki ete Abalayama ayika mpiko mpo na matata oyo ebimaki kati na babateli ya mpate na ye na oyo ya Lota, mwana ya ndeko na ye. (Genese 13:5-7) Lelo oyo mpe, soki kati na bandeko ezali kobela te mpe soki ezali na bazuwa ya mpambampamba, yango ekoki kobebisa boyokani to mpe kobebisa kimya ya lisangá. “Mpo epai zuwa mpe kowelana ezali, mobulu na makambo nyonso ya mabe mpe ezali wana.” (Yakobo 3:16, NW) Yango wana ezali mpenza na ntina ete tólɛmba te mpe, na ndakisa ya Abalayama, tóluka kimya mpe tózongisa lolendo nsima mpe tóluka matomba ya bamosusu!​—1 Bakolinti 13:5; Yakobo 3:17.

7. (a) Esengeli kosala nini soki moninga moko moklisto ayokisi yo mpasi na motema? (b) Wapi ndakisa malamu oyo Abalayama apesaki mpo na kobatela boyokani malamu na basusu?

7 Ekoki kozala mpasi tózala bato ya kimya na ntango oyo tomoni ete moninga na biso moklisto asali biso mabe na likambo oyo toyebi te. Masese 12:18 elobi ete: “Moto azali oyo akoloba lokola koswama ya mbeli.” Maloba oyo ezangi boboto, ata soki moto abimisi yango na makanisi ya mabe te, ekoki kosala mpasi mingi. Mpasi yango elekaka lisusu makasi soki bakoseli biso makambo to batɔngi biso. (Nzembo 6:6, 7) Kasi, moklisto akoki kotika te ete mpasi oyo bayokisi ye na motema ezongisa ye nsima! Soki likambo ya ndenge wana ekómeli yo, kutaná na moto oyo asali yo mabe mpo na kosolola na ye na boboto. (Matai 5:23, 24; Baefese 4:26) Zalá na motema ya kolimbisa moto yango. (Bakolose 3:13) Soki tozali bato oyo babombaka nkanda te, yango ekosalisa biso tósilisa mpasi oyo tozali koyoka na motema mpe tóbatela boyokani na ndeko na biso. Tótala Abalayama, ata soki Lota ayokisaki ye nkanda, abombelaki ye nkanda na motema te. Yango wana, Abalayama akendaki mbangu kobikisa Lota na libota na ye.​—Genese 14:12-16.

Komekama oyo tomilukelaka

8. (a) Ndenge nini baklisto ‘bakoki komitɔbɔla na bolɔzi mingi’? (b) Nini esalisaki Abalayama na komipesa mingi na biloko ya mokili te?

8 Ntango mosusu, biso moko nde tomilukelaka komekama. Na ndakisa, Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Bómibombela biloko ya motuya na nse te, awa lopomboli mpe mabanga ikolyaka mpe awa bayibi bakokɔtaka mpe bakobɔtɔla.” (Matai 6:19) Kasi, bandeko mosusu ‘bazali komitɔbɔla na bolɔzi mingi’ na ndenge bazali kotya matomba ya mosuni liboso ya matomba ya Bokonzi. (1 Timote 6:9, 10) Abalayama andimaki kozanga biloko mosusu ya mosuni mpo na kosepelisa Nzambe. “Mpo na kondima, afandi lokola mopaya kati na mokili ya elaka, kati na hema mpo na ndako esika moko na Yisaka mpe na Yakobo, basangani na ye na libula mpo na elaka yango. Zambi azalaki kotalela mboka oyo ezali na miboko, Nzambe azali motongi mpe mozalisi na yango.” (Baebele 11:9, 10) Kondima ya Abalayama na “mboka” oyo ekoya to guvɛrnɛma ya Nzambe, esalisaki ye atya motema na ye na bozwi te. Omoni te ete ezali malamu soki biso mpe tokosala bongo?

9, 10. (a) Ndenge nini mposa ya kozala moto monene ekoki kobota komekama? (b) Lelo oyo, ndenge nini ndeko akoki komitambwisa lokola “oyo aleki moke”?

9 Tótalela likambo mosusu. Biblia ezali kopesa toli ya makasi oyo: “Soko moto nani akanisi ete azali moto monene wana azali bongo te, azali komizimbisa.” (Bagalatia 6:3) Lisusu, balobi na biso ete tósala “eloko moko te na kowelana to na ezaleli ya komitya liboso, kasi na elimo ya komikitisa.” (Bafilipi 2:3, NW) Bato mosusu bamilukelaka komekama mpo balandaka toli yango te. Lokola bazali na mposa ya kozala bato minene na esika bázala na mposa ya kosala “mosala ya malamu,” balɛmbaka nzoto mpe bazalaka lisusu na esengo te soki bazali kozwa mikumba te na lisangá.​—1 Timote 3:1, NW.

10 Abalayama apesaki ndakisa malamu na likambo etali ‘[komitalela] na motindo mobongi te.’ (Baloma 12:3) Ntango akutanaki na Melekisedeke, Abalayama asalaki likambo moko te mpo na komonisa ete lokola azali moninga ya Nzambe, aleki bato mosusu. Kutu, amonisaki ete Melekisedeke aleki ye lokola azali nganga, yango wana apesaki ye ndambo ya zomi. (Baebele 7:4-7) Lelo oyo mpe, baklisto basengeli koluka kozala lokola ‘oyo baleki moke’; basengeli te koluka komitombola. (Luka 9:48) Soki omoni lokola ete baoyo bazali kokamba lisangá bazali kopimela yo mikumba mosusu, fandá okanisa na bosembo mpenza bisika oyo okoki kobongisa na bomoto na yo to na ndenge na yo ya kosala makambo. Na esika osilika mpo ozali kozwa mikumba te, kokisáká malamu mokumba oyo ozali na yango: mokumba ya kosalisa bato mosusu báyeba Yehova. Ɛɛ, “bómisɔkisa na lobɔkɔ ya Nzambe makasi, ete atombola bino na elaka eponi ye.”​—1 Petelo 5:6.

Kondima na makambo oyo ezangi komonana

11, 12. (a) Mpo na nini bato mosusu na kati ya lisangá bazali lisusu kosala makambo na lombangu te? (b) Ndakisa nini ya malamu Abalayama apesaki lokola atyaki kondima na ye na bilaka ya Nzambe na esika ya liboso na bomoi na ye mobimba?

11 Komekama mosusu ekoki kozala soki tozali komona lokola nde nsuka ya mokili mabe oyo ezali koumela. Mokanda ya 2 Petelo 3:12 (NW) elobi ete baklisto basengeli “kozela mpe kobatela ntango nyonso na makanisi koya ya mokolo ya Yehova.” Kasi, mingi babandá kozela “mokolo” yango banda kala mpenza. Yango wana, bamosusu bakoki kolɛmba mpe kobosana ete basengeli kosala makambo na lombangu.

12 Na likambo oyo, tótalela lisusu ndakisa ya Abalayama. Atyaki kondima na ye na bilaka ya Nzambe na esika ya liboso na bomoi na ye mobimba, atako eloko moko te emonisaki ete bilaka yango nyonso ekokokisama ntango ye azali naino na bomoi. Ya solo, aumelaki na bomoi mpe amonaki ndenge oyo mwana na ye Yisaka akolaki. Kasi, bankama ya bambula esengelaki koleka liboso ete bana ya Abalayama bákóma lokola “minzoto ya likoló” to “zɛlo na libongo ya mai.” (Genese 22:17) Kasi, Abalayama ayokaki nkanda te mpe alɛmbaki nzoto te. Yango wana, ntoma Paulo alobaki mpo na Abalayama mpe bato mosusu ya ntango ya kala ete: “Bango nyonso bakufaki kati na kondima, bazangaki kozwa biloko bilakami, kasi bamonaki yango mosika mpe bapesaki yango losako. Bayambolaki ete bazali bapaya na mokili, bato ya mokili mosusu.”​—Baebele 11:13.

13. (a) Ndenge nini baklisto lelo oyo bazali lokola “bapaya”? (b) Mpo na nini Yehova akoboma mokili oyo?

13 Soki kondima na bilaka ya Nzambe oyo esengelaki kokokisama “mosika” ezalaki na esika ya liboso na bomoi ya Abalayama, esengeli mpenza kozala bongo mpo na biso lelo oyo, lokola makambo yango ekokokisama mosika te! Na ndakisa ya Abalayama, tosengeli komitalelaka lokola “bapaya” na mokili ya Satana, tosengeli koboya bomoi ya bisengo. Ya solo, biso tokolinga mpenza ete “nsuka ya makambo nyonso” eya kaka sika sikoyo, na esika ezalaka kaka ete ezali pene. (1 Petelo 4:7) Mbala mosusu tozali na maladi oyo ezali kotungisa biso makasi. To mpe mikakatano ya mbongo ezali kolekela biso. Kasi, tosengeli kobosana te ete soki Yehova akoboma mokili oyo, ezali kaka mpo na kolongola biso na bampasi te, kasi ezali libosoliboso nde mpo na kosantisa nkombo na ye. (Ezekiele 36:23; Matai 6:9, 10) Nsuka ekoya, kasi ekozala te na ntango oyo biso tokomona malamu; ekoya na ntango oyo ekokokisa malamumalamu mikano ya Yehova.

14. Motema molai ya Nzambe ezali na litomba nini epai ya baklisto lelo oyo?

14 Lisusu, tóbosana te ete “Nkolo akoumela nsima ya elaka na ye te, lokola bamosusu bazali kokanisa ete akoumela. Kasi azali na motema molai epai na bino, alingi te ete bamosusu bábeba kasi ete bato nyonso bákóma kobongwana na motema.” (2 Petelo 3:9) Toyoki? Nzambe azali “na motema molai epai na bino,” elingi koloba bino baoyo bozali na kati ya lisangá ya boklisto. (Biso nde totɛngisi makomi.) Na ntembe te, bamosusu kati na biso basengeli na ntango mwa molai mpo na kobongwana mpo ete ‘akuta bango na litɔnɔ te mpe na mbeba te mpe na kimya.’ (2 Petelo 3:14, NW ) Tomoni te ete tosengeli mpenza kotɔnda Nzambe mpo na motema molai na ye?

Ndenge ya kozala na esengo atako mikakatano ezali

15. Nini esalisaki Yesu abatela esengo na ye liboso ya komekama, mpe ndenge nini baklisto bakoki kozwa litomba na kolanda ndakisa na ye?

15 Bomoi ya Abalayama ezali koteya baklisto makambo mingi lelo oyo. Ya solo, azalaki na kondima, kasi azalaki mpe na motema molai, na bokɛngi, na mpiko mpe na bolingo ya solosolo. Atyaki losambo ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na ye. Kasi, tosengeli kobosana te ete ndakisa eleki monene oyo tosengeli kolanda ezali ya Yesu Klisto. Ye mpe akutanaki na komekama ya ndenge na ndenge kasi, na nyonso wana, abatelaki esengo na ye. Mpo na nini? Mpamba te atyaki makanisi na ye na elikya oyo ezalaki liboso na ye. (Baebele 12:2, 3) Yango wana, Paulo alobaki boye na kati ya libondeli: “Tiká ete Nzambe oyo apesaka ezaleli ya koyika mpiko mpe kobɔndisama asala ete na kati na bino bózala na ezaleli ya makanisi ndenge moko na oyo Klisto Yesu azalaki na yango.” (Baloma 15:5, NW) Soki tozali na elimo oyo ebongi, tokoki kozala na esengo atako Satana azali kotyela biso mabaku na nzela.

16. Tokoki kosala nini soki tozali komona lokola nde mikakatano eleki?

16 Soki omoni lokola ete mikakatano eleki yo, kobosana te ete se ndenge alingaki Abalayama, Yehova alingi mpe yo. Alingi ete olonga. (Bafilipi 1:6) Tyelá Yehova motema mobimba, zalá na elikya ete ‘akotika yo te ete omekama na koleka nguya na yo, kasi esika moko na emekeli, akobongisa ekimeli ete okoka koyika mpiko.’ (1 Bakolinti 10:13) Zwá momeseno ya kotánga Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo. (Nzembo 1:2) Kolɛmba te na kosala mabondeli, mpe sɛngáká Yehova asalisa yo na koyika mpiko. (Bafilipi 4:6) ‘Akopesa elimo santu na bango balɔmbi ye.’ (Luka 11:13) Salelá malamu bibongiseli nyonso oyo Yehova azwi mpo na kolendisa yo na elimo, na ndakisa mikanda oyo elimbolaka Biblia. Luká mpe lisungi ya bandeko. (1 Petelo 2:17) Yanganáká ntango nyonso na makita ya lisangá, mpamba te kuna, okozwa elendiseli oyo osengeli na yango mpo na koyika mpiko. (Baebele 10:24, 25) Sepelá na elikya ete mpiko na yo ekomema ezaleli ya moto oyo andimami na miso ya Nzambe mpe ete bosembo na yo ezali kosepelisa motema na ye!​—Masese 27:11; Baloma 5:3-5, NW.

17. Mpo na nini baklisto babungisaka elikya te?

17 Nzambe alingaki Abalayama lokola “moninga” na ye. (Yakobo 2:23) Atako bongo, bomoi ya Abalayama etondaki na komekama mpe bolɔzi. Yango wana, baklisto bakoki kolikya te ete mpo na bango ekozala ndenge mosusu na “mikolo ya nsuka” oyo tozali na yango. Kutu, Biblia elobi na biso ete “bato mabe mpe bakosi bakoleka na mabe.” (2 Timote 3:1, 13) Na esika tóbungisa elikya, tósosola ete mitungisi oyo tozali kokutana na yango ezali komonisa ete nsuka ya mokili ya Satana ekómi pene. Kasi Yesu alobi na biso ete “ye oyo akoyika mpiko kino nsuka, ye wana akobika.” (Matai 24:13) Yango wana, ‘kolɛmba te kosala oyo ezali malamu!’ Landá ndakisa ya Abalayama, mpe zalá kati na baoyo “basili kosangola libula na bilaka mpo na kondima mpe motema pɛtɛɛ.”​—Baebele 6:12.

Osimbaki makambo oyo?

• Lelo oyo, mpo na nini basaleli ya Yehova basengeli kotya na makanisi ete bakokutana na komekama mpe minyoko?

• Ndenge nini Satana akoki kosalela minyoko ya polele?

• Ndenge nini baklisto bakoki kosilisa matata kati na bango?

• Ndenge nini lolendo mpe komitombola ekoki kobimisa komekama?

• Ndenge nini Abalayama atikaki ndakisa malamu na likambo etali kozela kokokisama ya bilaka ya Nzambe?

[Elilingi na lokasa 26]

Bilenge baklisto mingi banyokwamaka, baninga na bango basɛkaka bango

[Elilingi na lokasa 29]

Na ntango ya Abalayama, kokokisama ya bilaka ezalaki “mosika,” kasi bilaka yango ezalaki na esika ya liboso na bomoi na ye

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto