Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 14
  • Nzambe ameki Abrahama

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe ameki Abrahama
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Kondima na ye emekamaki
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Abrahama azalaki nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Yehova abengaki ye “moninga na ngai”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Elembo eleki monene ya bolingo ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 14

Lisolo 14

Nzambe ameki Abrahama

ABRAHAMA azali kosala nini awa? Asimbi mbeli. Alingi koboma mwana na ye! Mpo na nini? Tótala naino ndenge Abrahama ná Sara babotaki mwana yango.

Nzambe apesaki bango elaka ete bakobota mwana mobali. Kasi, likambo yango emonanaki lokola ekoki kosalema te, mpo bakómaki mibange. Nzokande, Abrahama azalaki kondima ete Nzambe akoki kosala ata makambo oyo ekoki kosalema te. Bongo eloko nini esalemaki?

Mbula mobimba eleki banda Nzambe apesaki elaka yango. Na nsima, ntango Abrahama akómi na mbula nkama moko (100) mpe Sara na mbula ntuku libwa (90), babotaki mwana mobali, bapesi ye nkombo Yisaka. Na yango, Nzambe akokisi elaka na ye!

Ntango Yisaka akoli, Yehova ameki kondima ya Abrahama. Abengaki ye: ‘Abrahama!’ Mpe Abrahama azongisi ete: ‘Ngai oyo!’ Nzambe alobi na ye: ‘Kamatá Yisaka, mwana na yo, mwana na yo kaka moko, mpe kende na ngomba oyo nakolakisa yo. Kuna bomá mwana na yo mpe pesá ngai ye mbeka.’

Maloba yango epesaki Abrahama mawa mpenza, mpo alingaki mwana na ye mingi. Longola yango, Nzambe alakaki Abrahama ete bana na ye bakofanda na mokili ya Kanana. Kasi ndenge nini elaka yango ekokokisama soki Yisaka akufi? Atako Abrahama ayebaki ntina ya likambo yango te, akobaki kotosa Nzambe.

Ntango Abrahama akei mpe akómi na ngomba, akangi Yisaka nsinga mpe alalisi ye na etumbelo oyo atongaki. Na nsima, akamati mbeli na ye mpo aboma mwana na ye. Bongo na ntango yango anzelu ya Nzambe abengi ye: ‘Abrahama, Abrahama!’ Mpe ye ayanoli ete: ‘Ngai oyo!’

Nzambe alobi na ye: ‘Koboma mwana na yo te! Kosala ye mpe eloko moko te! Sikoyo nayebi ete ondimelaka ngai, mpo oboyeli ngai mwana na yo te, mwana na yo kaka moko.’

Abrahama azalaki na kondima makasi mpenza! Azalaki kondima ete Yehova azali na likoki ya kosala makambo nyonso, mpe Yehova akoki ata kosekwisa Yisaka. Kasi mposa ya Nzambe ezalaki mpenza te ete Abrahama aboma Yisaka. Na nsima, Nzambe alakisaki ye mpate-mobali moko oyo maseke na yango ekangamaki na mwa banzete oyo ezalaki pene wana, mpe alobaki na Abrahama ete apesa yango mbeka na esika ya mwana na ye.

Ebandeli 21:1-7; 22:1-18.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto