Bato bakoki kokómisa mokili oyo esika malamu mpenza mpo na kofanda?
“Bakonzi ya politiki bakoki te kozongisa makambo oyo ezalaki kosala ete bato bázala na bomoi ya malamu. Bazali na makoki te ya kozongisa lisusu bizaleli malamu oyo bato bazalaká na yango kala. Ata soki bakonzi ya politiki bazali malamu ndenge nini, bakoki te kozongisa lisusu bizaleli malamu na makambo ya bafianse to ya mabala, kosala ete batata bákokisaka mokumba ya kobɔkɔla bana na bango malamu, kosala ete bato bákóma koyoka nsɔni na makambo oyo bazalaki koyokela yango nsɔni kala . . . Mibeko ekoki te kosilisa ebele ya mikakatano oyo tozali na yango lelo na makambo etali bizaleli malamu.”
YO mpe ondimi maloba wana ya moto moko oyo azalaká mopesi-toli ya guvɛrnɛma ya États-Unis? Soki ondimi yango, boye bampasi nyonso oyo tozali komona lelo mpo na lokoso, kozanga bolingo na kati ya mabota, pite mpe ekobo, kozanga koyeba makambo, mpe mpo na makambo mosusu ya mabe oyo ezali koboma mboka, ekosila ndenge nini? Bato mosusu balobaka ete makambo yango ekoki kosila te; yango wana, bamipesaka kaka na makambo na bango moko. Bato mosusu bazali kotya motema ete mokonzi malamu oyo ayebi kobenda bato, mbala mosusu kutu akoki kozala mokonzi ya lingomba, akoya kolakisa bango nzela ya malamu.
Kutu, eleki sikoyo mbula nkóto mibale, bato balingaki kotya Yesu Klisto mokonzi mpo bamonaki ete lokola Nzambe nde atindaki ye, alingaki kozala mokonzi oyo akoki mpenza. Kasi, ntango Yesu ayebaki makanisi na bango, mbala moko akimaki bango. (Yoane 6:14, 15) Na nsima, Yesu ayebisaki guvɛrnɛrɛ moko oyo azalaki Moloma ete: “Bokonzi na ngai ezali na mokili oyo te.” (Yoane 18:36) Nzokande, na moi ya lelo, bato oyo bazali kosala lokola Yesu bazali mingi te—ata mpe bakonzi ya mangomba oyo balobaka ete bazali bayekoli ya Yesu. Bamosusu kati na bango balukaki kokómisa mokili esika moko malamu mpenza mpo na kofanda, bapesaki bato ya politiki makanisi oyo basengeli kolanda to mpe bango moko bazwaki bibonga ya bokonzi. Tokoki komona yango soki totali makambo oyo elekaki na bambula ya 1960 mpe 1970.
Makambo oyo bakonzi ya mangomba basalaki mpo na koluka kobongisa mokili
Na nsuka ya bambula 1960, bato mosusu ya teoloji na Amérique latine babandaki kobunda mpo na bolamu ya babola mpe bato oyo bazali konyokwama. Yango wana, babimisaki mateya ya lingomba oyo etali kosikola bato (théologie de la libération), mateya oyo elobaka ete Klisto azali mobikisi kaka na ndenge oyo Biblia ezali kolobela ye te, kasi mpe na makambo ya politiki mpe ya nkita. Na États-Unis, bakonzi mingi ya mangomba oyo bazalaki koyoka mawa mingi ndenge bizaleli ya bato ekómaki kobeba, basalaki ebongiseli moko oyo babengaki “Majorité morale,” to lisangá ya bato nyonso oyo balingaka bizaleli malamu. Mokano na yango ezalaki ya kopona, na ntango ya voti, bato ya politiki oyo bakobimisa mibeko ya malamu mpo na mabota. Ndenge moko mpe, na mikili ya Bamizilma, bituluku mingi elendisaki mpenza likambo ya kotosa Coran mpo na kokitisa makambo ya kofuta kanyaka mpe makambo mosusu ya mabe.
Okanisi ete mokili ekómi esika moko ya malamu mpo na milende nyonso wana oyo bato basali? Makambo nyonso ezali komonisa ete bizaleli ya bato ezali se kobeba; bato ya mbongo bazali se kokóma na mbongo mingi mpe babola bazali se kozinda na bobola, ata na bamboka oyo mateya ya lingomba oyo etali kosikola bato ezali makasi.
Lokola ebongiseli oyo babengaki “Majorité morale” na États-Unis ekokisaki mikano na yango te, Jerry Falwell, moto oyo abandisaki ebongiseli yango, abomaki yango na 1989. Bibongiseli mosusu ya ndenge wana mpe ebimaki. Kasi, Paul Weyrich, moto oyo abimisaki nkombo “majorité morale,” akomaki na Zulunalo moko (Christianity Today) ete: “Ata soki tolongi na politiki, tolongaka te kosala makambo oyo tokanisaka ete ezali na ntina.” Akomaki mpe ete: “Bizaleli ya bato ezali se kobeba. Bizaleli ya bato ebebi makasi mpenza, elekeli mpenza bakonzi ya politiki.”
Mopanzi-nsango Cal Thomas alobelaki likambo oyo ye azalaki komona ete yango nde ezali kozanga mpo bato ya politiki bábongisa mokili oyo: “Mbongwana ya solosolo eutaka nde na motema, kasi na voti te, mpamba te mikakatano minene oyo tozali na yango ezali ya nkita te mpe ya politiki te, kasi ya bizaleli malamu mpe ya makambo ya Nzambe.”
Kasi ndenge nini bato bakoki kosilisa mikakatano etali bizaleli malamu mpe makambo ya Nzambe na mokili oyo ezangi mibeko, epai bato bakataka bango moko nini ezali malamu mpe nini ezali mabe? Soki ata bato minene mpe bato oyo bazali na makanisi malamu—ata soki bazali bato ya mangomba to te—bakoki te kokómisa mokili oyo esika ya malamu mpo na kofanda, nani akoki kosala yango? Tokozwa eyano na lisolo oyo elandi. Eyano yango ezali na maloba oyo Yesu alobaki ete Bokonzi na ye ezali ya mokili oyo te.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]
Bana: fɔtɔ ya ONU; mabele: Mountain High Maps® Copyright © 1997 Digital Wisdom, Inc.