Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 1/11 nk. 27-30
  • “Mapamboli ya Yehova epesaka bozwi”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Mapamboli ya Yehova epesaka bozwi”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Yehova apamboli basaleli na ye
  • Mapamboli na ntango na biso
  • Zongiselá Yehova
  • Salelá Nzambe ‘na motema moko mpe na molimo moko’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Pesáká na esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Osepelaka ‘na libaku malamu ya kopesa na boboto’?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • ‘Tiká tópesa Yehova likabo’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 1/11 nk. 27-30

“Mapamboli ya Yehova epesaka bozwi”

BISO nyonso tolingaka kopambolama. Mapamboli ememaka esengo, bolamu, to bomɛngo. Lokola Yehova azali Mopesi ya “makabo nyonso malamu mpe makabo nyonso mabongi,” lipamboli nyonso ya solosolo mpe ya seko eutaka epai ya Mozalisi na biso oyo atondi na bolingo. (Yakobo 1:17) Asopaka mapamboli na ye likoló ya bato nyonso, ata baoyo bayebi ye te. Yesu alobaki boye mpo na Tata na ye: “Akobimisa moi na ye na bato mabe mpe na bato malamu mpe akonokisa mbula na bayengebene mpe na bapɛngwi.” (Matai 5:45) Kasi, Yehova amibanzabanzaka mingi koleka mpo na baoyo balingaka ye.​—Deteronome 28:1-14; Yobo 1:1; 42:12.

Mokomi ya nzembo akomaki ete: “[Yehova] akoboya kopesa eloko malamu soki moke te na baoyo bazali kotambola alima.” (Nzembo 84:11) Ya solo, baoyo basalelaka Yehova bazali na bomoi ya malamu mpe oyo ezali mpenza na ntina. Bayebaka ete “mapamboli ya Yehova epesaka bozwi, mpe abakisaka mpasi likoló na yango te.” Biblia elobi mpe ete: “Baoyo bapambolami na [Yehova] bakosangola mokili.” (Masese 10:22, NW; Nzembo 37:22, 29) Ekozala mpenza lipamboli!

Ndenge nini tokoki kozwa mapamboli ya Yehova? Ya liboso, tosengeli kolona bizaleli oyo esepelisaka ye. (Deteronome 30:16, 19, 20; Mika 6:8) Ndakisa ya basaleli misato ya Yehova na ntango ya kala ezali komonisa biso likambo yango.

Yehova apamboli basaleli na ye

Noa azalaki mosaleli monene ya Nzambe. Na Genese 6:​8, tozali kotánga ete: “Noa azwaki ngɔlu na miso ya [Yehova].” Mpo na nini? Ezali mpo ete Noa azalaki moto ya botosi. Lisolo yango elobi ete: “Noa atambolaki na Nzambe elongo.” Noa alandaki malako ya sembo ya Yehova mpe atosaki mibeko na ye. Na ntango oyo mokili etondaki na mobulu mpe na misala ya mbindo, motema ya Noa etindaki ye “asala na boyokani na makambo nyonso oyo Nzambe atindaki ye. Asalaki mpenza bongo.” (Genese 6:9, 22, NW) Yango wana Yehova apesaki ye mokumba ya kotonga “masuwa mpo na kobikisa libota na ye [Noa].” (Baebele 11:7) Na ndenge yango, Noa na libota na ye​—mpe na nzela na bango​—bato babikaki ntango mokili ya ntango wana ebomamaki. Mpe Noa akufaki na elikya ya kosekwa mpo na kozala na bomoi ya seko awa na mabele. Azwaki mapamboli mingi mpenza!

Abalayama mpe azalaki na bizaleli oyo esepelisaki Yehova. Ezaleli na ye oyo elekaki mosusu nyonso ezali kondima. (Baebele 11:8-10) Abalayama atikaki Ulu mpe nsima Halana, epai azalaki na bomoi ya malamu, mpo azalaki na kondima na elaka ya Yehova ete bana na ye bakokóma ebele mpe bakozala lipamboli mpo na mabota nyonso. (Genese 12:2, 3) Atako amekamaki bambula mingi, kondima na ye ezwaki lifuti ntango mwana na ye Yisaka abotamaki. Na nzela na ye, Abalayama akómaki nkɔkɔ ya Yisalaele, libota oyo Nzambe aponaki, mpe nsukansuka akómaki nkɔkɔ ya Masiya. (Baloma 4:19-21) Longola yango, azali “tata ya baoyo nyonso bazali kondima,” mpe abengamaki “moninga ya Nzambe.” (Baloma 4:11; Yakobo 2:23; Bagalatia 3:7, 29) Talá bomoi ya ntina oyo azalaki na yango mpe ebele ya mapamboli oyo azwaki!

Tótalela mpe moto ya sembo, Mose. Kati na bizaleli mingi ya malamu oyo azalaki na yango, tokoki kotánga ezaleli ya kosepela mingi na makambo ya elimo. Mose apesaki mokɔngɔ na bozwi nyonso ya Ezipito mpe “ayikaki mpiko lokola ete azali komona ye oyo amonanaka te.” (Baebele 11:27) Nsima ya kolekisa mbula 40 na Midyani, azongaki na Ezipito ntango akómaki mokóló mpenza mpe akendaki kokutana na Falo, mokonzi ya ekólo oyo elekaki na nguya na ntango wana, mpo na kosɛnga ete bandeko na ye bázwa bonsomi. (Exode 7:1-7) Amonaki malɔzi zomi, ndenge Mai Motane ekabwanaki, mpe ndenge basoda ya Falo babomamaki. Yehova apesaki libota ya Yisalaele Mibeko na nzela na ye mpe azalaki moyokanisi ya kondimana oyo Nzambe asalaki na libota yango. Na boumeli ya mbula 40, Mose akambaki libota ya Yisalaele na esobe. Azalaki mpenza na bomoi ya ntina mpe Nzambe apesaki ye mikumba mingi.

Mapamboli na ntango na biso

Masolo yango emonisi ete bomoi ya baoyo basalelaka Nzambe ezalaka mpenza bomoi ya ntina. Ntango basaleli ya Yehova bazali kolona bizaleli lokola botosi, kondima, mpe kosepela na makambo ya elimo, bazwaka mapamboli mingi.

Mapamboli nini tozali na yango? Na ntango oyo bamilio ya bandimi ya mangomba ya boklisto bazali na nzala ya elimo, biso tozali na “nsai mpo na bolamu ya Yehova.” (Yilimia 31:12, NW) Na nzela ya Yesu Klisto mpe ya “moombo ya sembo mpe ya mayele,” Yehova apesi ebele ya bilei ya elimo, oyo esalisaka biso tótikala na “nzela oyo [ezali komema, NW] na bomoi.” (Matai 7:13, 14; 24:45; Yoane 17:3) Kozala elongo na bandeko na biso baklisto ezali mpe lipamboli mosusu ya monene. Na makita mpe na mabaku mosusu, kozala elongo na baninga na biso basambeli ya Yehova oyo bazali na bolingo mpe oyo basalaka makasi mpo na kolata “bomoto ya sika,” epesaka biso esengo monene. (Bakolose 3:8-10; Nzembo 133:1) Nzokande, lipamboli na biso oyo eleki monene ezali libaku malamu ya kozala baninga mpenza ya Yehova Nzambe mpe kolanda matambe ya Mwana na ye, Klisto Yesu.​—Baloma 5:1, 8; Bafilipi 3:8.

Ntango tozali kokanisa mapamboli wana, tozali komona ete mosala na biso epai ya Nzambe ezali mpenza na motuya monene. Ntango mosusu tokoki kokanisa lisese ya Yesu oyo elobelaki motɛkisi oyo amonaki mayaka ya kitoko mpenza. Yesu alobaki mpo na moto yango ete: “Ezwi ye [liyaka] moko ya motuya monene, akei mpe atɛkisi nyonso ezalaki na ye mpe asombi yango.” (Matai 13:46) Na ntembe te biso mpe toyokaka ndenge yango mpo na boyokani na biso na Nzambe, mpo na libaku malamu ya kosalela ye, mpo na boninga ya bandeko na biso baklisto, mpo na elikya oyo tozali na yango, mpe mpo na mapamboli mosusu oyo tozali na yango mpo na kondima na biso. Ezali na eloko mosusu te oyo ezali na motuya mingi na bomoi na biso koleka yango.

Zongiselá Yehova

Lokola toyebi ete ezali Yehova nde moto apesaka makabo nyonso ya malamu, mitema na biso ekotinda biso na komonisa botɔndi mpo na mapamboli oyo tozwaka. Ndenge nini tokoki kosala yango? Lolenge moko ezali ya kosalisa basusu mpo bázwa mpe mapamboli yango. (Matai 28:19) Na mikili koleka 230, Batatoli ya Yehova bakendaka kotala bazalani na bango mpo na kosalisa bango na kosala likambo yango. Ntango bazali kosala bongo, bazali kosalela biloko na bango moko: ntango na bango, makasi na bango mpe biloko na bango ya mosuni mpo na kosalisa basusu “báyeba mpenza solo.”​—1 Timote 2:4, NW.

Tótalela ndakisa ya babongisi-nzela oyo bafandaka na engumba Glendale, na États-Unis. Mokolo nyonso ya pɔsɔ na ntɔngɔ, basalaka mobembo ya kilomɛtrɛ soki 100 mpo na kokende mpe kozonga, ntango bakendaka kosolola na bato na bolɔkɔ moko. Atako bakoki kolekisa kaka mwa ntango moke elongo na bato ya bolɔkɔ yango, balɛmbaka nzoto te. Moko na bango alobi boye: “Tozali mpenza kozwa matomba mingi na kosala na esika yango oyo ezali lokola bisika mosusu te. Tozali kosala yango na esengo mingi. Bato mingi bazali kosepela, yango wana ezali mpasi mpo na kosolola na bango nyonso. Sikoyo, tozali koyekola na bato mitano, mpe bato mosusu minei basɛngaki báyekolaka Biblia.”

Baklisto mingi ya molende bazali na esengo ya kosalisa bato mpo na kokokisa mosala yango ya kobikisa bomoi mpe bazali kosala yango kozanga kofutisa mbongo. Bazali na likanisi ya Yesu, oyo alobaki ete: “Bozwaki ofele, bópesa mpe ofele.” (Matai 10:8, NW) Bamilio ya bato na mokili mobimba bazali kosala mosala yango moko, oyo ezali kosɛnga komipimela, mpe na nzela ya mosala yango, ebele ya bato ya mitema sembo bazali kosepela mpe bazali kokóma bayekoli. Kaka na bambula mitano oyo euti koleka, bato pene na milio moko na ndambo bamipesaki epai ya Yehova. Mpo na kokokisa bamposa ya ebele ya bato oyo bazali se kobakisama, ezali kosɛnga kobimisa Babiblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia, kotonga Bandako ya sika ya Bokonzi mpe bisika mosusu ya makita. Epai wapi mbongo ya kokokisa makambo wana nyonso eutaka? Nyonso eutaka kaka na makabo ya bolingo malamu.

Lokola mbongo ezali mpenza mpasi na mikili mosusu, bato mingi bazali kobunda mpo na kokokisa bamposa ya mabota na bango. Zulunalo moko (New Scientist) emonisi ete mpo na miliare moko ya bato, ndambo monene (70%) ya mbongo oyo bakoki kozwa ezali kaka mpo na biloko ya kolya. Bandeko na biso baklisto mingi bazali kokutana na makambo wana. Soki bandeko na bango bandimi basalisi bango te, bakoki kozwa biloko lokola mikanda te to bakoki mpe kozwa te Bandako ya Bokonzi oyo ebongi mpenza.

Yango elingi koloba te ete bato yango bazali kokanga mabɔkɔ mpo na kozela ete basusu bámema mokumba na bango. Kasi bazali na mposa ya lisungi. Ntango Mose alendisaki Bayisalaele ete bápesa makabo ya biloko mpo na komonisa botɔndi na bango epai ya Yehova mpo na mapamboli oyo bazwaki, alobaki ete: “Moto na moto akopesa lokola ekoki na ye, lokola na lipamboli ya [Yehova] Nzambe na yo, oyo esili ye kopesa na yo.” (Deteronome 16:17) Yango wana, ntango Yesu amonaki mwasi moko mokufeli-mobali kotya “mea mibale ya motuya moke” na tempelo, akumisaki mwasi yango na miso ya bayekoli na ye. Mwasi yango asalaki oyo akokaki kosala. (Luka 21:2, 3) Ndenge moko mpe, baklisto oyo bazali babola basalaka oyo bakoki kosala. Mpe soki ezali na likambo oyo bakoki te, makabo oyo euti epai ya bandeko na bango baklisto oyo bazali mpenza babola te, ekoki kokokisa yango.​—2 Bakolinti 8:13-15.

Ntango tozali kozongisela Nzambe na lolenge wana, ezali na ntina tósala yango na motema malamu. (2 Bakolinti 8:12) Paulo alobaki ete: “Moto na moto asala [lokola] na motema na ye, na mposa moke te mpe na kopusama te; mpo Nzambe alingi ye oyo apesaka na esengo.” (2 Bakolinti 9:7) Ntango tozali kopesa mpenza na motema na biso mobimba, tozali kopesa mabɔkɔ mpo ete matomba ya Teokrasi ekoba kokola ndenge ezali kosalema lelo mpe na mbala moko, tozali kobakisa esengo na biso.​—Misala 20:35.

Kosakola mpe kopesa makabo ya bolingo malamu ezali ndenge mibale oyo tokoki kozongisela Yehova mpo na mapamboli oyo apesi biso. Tolendisami mpenza na koyeba ete Yehova azali na mposa ya kosopa mapamboli na ye likoló ya bato mingi mpenza, bato ya motema sembo oyo mbala mosusu lelo oyo bayebi naino ye te! (2 Petelo 3:9) Yango wana, tólanda kosalela biloko oyo tozali na yango mpo na mosala ya Nzambe, mpo na koluka bato ya mitema sembo mpe kosalisa bango bákolisa bizaleli lokola botosi, kondima mpe botɔndi. Na ndenge wana, tokoyoka esengo ya kosalisa bango “bámeka mpe básosola ete [Yehova] azali malamu.”​—Nzembo 34:8.

[Etanda na lokasa 28]

Ndenge bato mosusu bapesaka

MAKABO MPO NA MOSALA NA MOKILI MOBIMBA

Bandeko mingi babombaka mwa mosolo, to bakanaka kosala bongo soki bazwi mbongo, mpe batyaka yango na kɛsi ya makabo oyo bakomá “Makabo mpo na mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba​—Matai 24:14.”

Sanza na sanza masangá matindaka mbongo yango na biro monene ya la Société na Brooklyn, na New York to na biro ya filiale oyo ezali na mboka na bango. Makabo ya bolingo malamu ya mbongo makoki kotindama mbala moko na Treasurer’s Office, Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania, 25 Columbia Heights, Brooklyn, New York 11201-2483, to na biro ya filiale ya mboka na bino. Okoki mpe kopesa biju to biloko mosusu ya motuya. Osengeli kokoma mokanda moko ya mokuse mpo na komonisa ete makabo yango ezali makabo ya bolingo malamu.

KOSIMBISA MBONGO

Moto akoki kosimbisa mbongo na ye na boye ete soki asengeli na yango, akoki kozwa yango. Mpo na koyeba makambo mosusu, okoki kokomela Treasurer’s Office na adresi oyo etyami likoló.

LIBULA MPO NA KOSUNGA

Longola makabo ya mbongo oyo epesami libela to oyo ekozongisama, ezali mpe na myango mosusu ya kopesa makabo mpo na matomba ya mosala ya Bokonzi kati na mokili mobimba. Yango esangisi:

Asiransi: Moto akoki kokomisa nkombo ya la Société Watch Tower mpo la Société azwa mbongo ya asiransi to azwa mbongo na ye ya epaso.

Mosolo na banki: Na mikili mosusu, moto akoki kofungola kɔnti na banki, kopesa certificat de dépot, to kobombisa mbongo ya epaso mpo na la Société Watch Tower, to kotya yango na nkombo ya la Société mpe la Société akosangola yango soki akufi.

Lotomo ya mosolo: Okoki kopesa na la Société lotomo ya mosolo (titres et obligations) lokola likabo mpo na libela, to kobatela lotomo ya kozwa mbongo yango ntango ozali naino na bomoi.

Lopango to ndako: Moto akoki kopesa la Société Watch Tower lopango, ndako to biloko mosusu oyo bikoki kotekama, libela, to mpe akoki kobatela lotomo ya kosalela yango ntango azali naino na bomoi. Esengeli koyebisa biro ya filiale ya mboka na bino liboso ya kopesa biloko yango.

Kobombisa mbongo: Moto akoki kobombisa mbongo na ye to biloko mosusu na Société. La Société akobanda kozongiselaka moto yango to bato mosusu oyo ye aponi, mwa mbongo, mbula na mbula na boumeli ya bomoi na ye mobimba. Kobanda na ntango oyo abombisi mbongo to biloko yango, Leta akokitisela ye takse oyo asengelaki kofuta kobanda mbula oyo abombisaki mbongo to biloko yango.

Mokanda ya kopesa libula: Moto akoki kopesa na la Société biloko to ndako to mosolo na mokanda ya kozwa libula oyo mondimami na mibeko, to akoki kopesa na la Société lotomo ya kozwa biloko oyo akotika. Soki moto akufi, biloko oyo atikaki mpo na lingomba, ntango mosusu Leta akitisaka mpako na yango.

Lokola ebengeli “libula mpo na kosunga” emonisi yango, lolenge oyo ya makabo esɛngaka ete mopesi azwa bibongiseli. Mpo na kosalisa bato oyo balingi kopesa makabo mpo na mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba na lolenge ya libula mpo na kosunga, la Société abongisaki mwa buku moko ekomami na Lingelesi mpe na Espagnol oyo ezali na motó ya likambo ete Charitable Planning to Benefit Kingdom Service Worldwide (Makabo makanami mpo na mosala ya Bokonzi na mokili mobimba). Mwa buku yango ekomamaki mpo na koyanola na ebele ya mituna oyo batunaki na ntina na makabo, mpe mokanda ya kopesa libula. Yango ezali mpe kopesa bandimbola mosusu ya sikisiki likoló na bibongiseli mpo na makabo ya biloko lokola ndako, mosolo, mpe mpako. Mpe ekomami mpo na kosunga baoyo bafandi na États-Unis mpe balingi kopesa likabo sikoyo to balingi kotika lotomo ya kozwa yango nsima ya liwa na bango. Bato yango basengeli koyeba kopona myango oyo eleki malamu mpe oyo ezali kosalema na kotaleláká ezalela ya mabota na bango mpe oyo ya bango moko. Soki olingi kozwa mwa buku yango okoki kosɛnga na Charitable Planning Office (Biro ya la Société oyo etalaka makabo oyo moto apesi lokola libula mpo na kosunga.)

Nsima ya kotánga mwa buku yango mpe ya kosolola na bandeko ya Charitable Planning Office, bato mingi basungaki la Société mpe mpako mpo na biloko yango ekitaki. Yambo ya kopesa likabo nyonso, esengeli koyebisa Charitable Planning Office mpe kopesa ye kopi ya mokanda nyonso oyo emonisi bibongiseli yango. Soki osepeli na bibongiseli oyo mpo na kopesa makabo, okoki kosolola na Charitable Planning Office, ezala na mokanda to na telefone to kosolola na biro ya la Société ya mboka na bino.

CHARITABLE PLANNING OFFICE

Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania

100 Watchtower Drive,

Patterson, New York 12563-9204

Telephone: (845) 306-0707

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto