Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/1 nk. 8-9
  • ‘Kosakola Liloba’ ebɔndisaka

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Kosakola Liloba’ ebɔndisaka
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mosala oyo epesaka esengo
  • Baministre oyo bazali kobɔndisama
  • Bato oyo bazali kondima bazali kobɔndisama
  • “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli”
    “Yaká, landá ngai”
  • “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Mosala oyo ebɔndisaka
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • “Bóya epai na ngai, . . . mpe ngai nakopemisa bino”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/1 nk. 8-9

“Bóya epai na ngai, . . . mpe nakobɔndisa bino”

‘Kosakola Liloba’ ebɔndisaka

MOTO moko ya kokoka azwaki mokumba moko ya ntina mingi. Azalaki koteya malamu mpenza, yango wana ‘ebele ya bato bakamwaki na ndenge na ye ya koteya.’ (Matai 7:​28, NW) Azalaki mpe mosakoli ya molende. Azalaki kolekisa ntango mingi na kosakola Bokonzi ya Nzambe; asalaki mosala yango na makasi na ye nyonso mpe na makoki na ye nyonso. Yesu Klisto atambolaki ekólo na ye mobimba mpo na kosakola mpe koteya na ndenge oyo moto mosusu asalaki te.​—⁠Matai 9:⁠35.

Yesu azalaki na mokumba oyo asengelaki kokokisa nokinoki: kosakola “Nsango Malamu ya Bokonzi” epai ya bato ya ntango na ye mpe kobongisa bayekoli na ye mpo na nsima básala mosala yango na mokili mobimba. (Matai 4:23; 24:14; 28:​19, 20) Mokumba monene ya kosakola oyo esengeli kosalema nokinoki mpe na mokili mobimba elingaki komonana kilo na miso ya bayekoli ya Yesu oyo bazalaki bato ya kozanga kokoka mpe bazalaki na makoki mingi te?

Te! Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete bábondela Yehova Nzambe, “Nkolo ya elanga,” ete atinda bato mosusu ya mosala; na nsima atindaki bango bákende koteya bato. (Matai 9:38; 10:⁠1) Na nsima alobaki na bango ete mokumba ya kozala moyekoli na ye, bakisa mpe mokumba ya kosakola, ekopemisa bango mpe ekobɔndisa bango. Yesu alobaki ete: “Bóya epai na ngai, . . . mpe nakobɔndisa bino.”​—⁠Matai 11:​28, NW.

Mosala oyo epesaka esengo

Maloba wana ezali mpenza maloba ya boboto, ya bolingo mpe ezali komonisa motema mawa! Ezali komonisa lobanzo oyo Yesu azalaka na yango mpo na bayekoli na ye. Bayekoli na ye babɔndisamaka ntango bazali kokokisa mokumba na bango ya kosakola “nsango malamu” ya Bokonzi ya Nzambe. Mosala yango epesaka bango mpenza esengo.​—⁠Yoane 4:⁠36.

Bambula ebele liboso Yesu aya awa na mabele, Makomami emonisaki ete moto oyo azali kosalela Nzambe mosala mosantu asengeli kozala na esengo. Mokomi ya nzembo amonisaki yango ntango ayembaki boye: “Bósala lokito ya kosepela liboso na [Yehova], bino bato ya mokili mobimba; bósalela [Yehova] na esengo, bóya liboso na ye na loyembo.” (Nzembo 100:​1, 2) Lelo oyo, bato ya bikólo nyonso bazali kosepela kati na Yehova, mpe masanzoli na bango ezali lokola lokito ya basoda oyo balongi etumba. Bato oyo bamipesi mpenza na Nzambe bayaka liboso na ye “na loyembo.” Likambo yango ebongi mpenza mpamba te Yehova azali “Nzambe ya esengo” oyo alingi ete basaleli na ye báyoka esengo ntango bazali kosalela ye.​—⁠1 Timote 1:​11, NW.

Baministre oyo bazali kobɔndisama

Ndenge nini mosala ya kosakola, oyo ezali mosala ya makasi, ezali kolɛmbisa biso te kasi ezali nde kobɔndisa biso? Mpo na Yesu, kosala mosala ya Yehova ezalaki lokola bilei oyo ezali kopesa makasi. Alobaki boye: “Bilei na ngai ezali boye ete nasala mokano ya Motindi na ngai mpe ete nasukisa mosala na ye.”​—⁠Yoane 4:⁠34.

Ndenge moko mpe lelo oyo, basakoli ya molende basepelaka ntango bazali ‘kosakola liloba.’ (2 Timote 4:⁠2) Connie azali mwasi moklisto ya mbula soki 50, asakolaka ngonga koleka 70 na sanza; ye alobi boye: “Soki nauti kosakola, namiyokaka malamu ata soki na mpokwa nayoki nzoto elɛmbi.”

Bongo soki bato baboyi koyoka nsango ya Bokonzi? Connie alobi lisusu boye: “Báyoka ngai, báyoka ngai te, naino namiyoká te ete nalekisaki ntango na ngai mpamba na mosala ya kosakola. Lisusu, lokola nayebi ete mosala wana esepelisaka Yehova, nayokaka esengo ya koyebisa bato mateya ya solo mpamba te ntango nazali koyebisa bango, esalisaka ngai nakɔtisa malamumalamu na motema na ngai elikya kitoko oyo Biblia epesi biso.”

Basakoli mosusu bayokaka ete soki bazali kosalisa bato mpo bázwa boyebi ya solosolo ya Nzambe, bomoi na bango ekómaka na ntina. Meloney, elenge mwasi moko oyo mbala mingi asakolaka ngonga koleka 50 na sanza, alobi boye: “Mosala ya kosakola ebɔndisaka ngai mpamba te esalisaka ngai nayeba kotambwisa bomoi na ngai mpe esalaka ete bomoi na ngai ezala na ntina. Ntango nabimi na mosala ya kosakola, nabosanaka mikakatano na ngai mpe mitungisi ya bomoi.”

Motatoli ya Yehova mosusu ya molende, nkombo na ye Millicent, alobi boye: “Mokolo nyonso oyo nalekisi na koyebisa bato mokano ya Nzambe mpo na bato mpe kolimbwela bango ndenge oyo Paladiso ekozonga awa na mabele, mokolo yango ezalaka na ntina. Mosala ya kosakola esalisaka ngai namona mokolo na mokolo ete Yehova azali solo mpe epesaka ngai kimya mpe esengo na motema oyo moto akoki kozwa na ndenge mosusu te.”

Bato oyo bazali kondima bazali kobɔndisama

Mosala ya kosakola ebɔndisaka basakoli ya Bokonzi; kasi, nsango ya bomoi ebɔndisaka mpe baoyo bandimaka yango. Na ekólo Portugal, molakisi moko oyo atángaki kelasi epai ya basango na bamamelo; azalaki ntango nyonso komona ete lingomba na ye ezalaki kokokisa bamposa na ye ya elimo te. Azalaki kozwa biyano te na mituna oyo azalaki komituna na ntina etali mateya ya Biblia. Ntango akómaki koyekola Biblia na Motatoli ya Yehova moko pɔsɔ na pɔsɔ, miso na ye ebandaki kofungwama mokemoke mpo na kokanga ntina ya Makomami. Molakisi yango azalaki koyoka esengo mingi. Alobi boye: “Nazalaki kozela na motema likoló ete mokolo ya misato ekoka mpo tóyekola Biblia mpamba te nazalaki kozwa eyano oyo euti na Biblia na motuna mokomoko oyo nazalaki na yango mpe biyano yango ezalaki mpenza kondimisa ngai.” Lelo oyo, mwasi yango amipesi na Yehova mpe azali kosalela ye; azali mpe koteya bato mosusu mateya ya solo ya Biblia oyo ezali kobɔndisa bango.

Nyonso wana ezali komonisa polele ete Batatoli ya Yehova babangaka te ete mosala ya kosakola oyo bapesi bango eleki monene to mpe babangaka te mpo basengeli kosala yango na mokili mobimba. Lisusu, balɛmbaka nzoto te mpo bato bazali koboya koyoka bango to kotɛmɛla bango. Bamipesi na molende mpenza mpo na kokokisa mokumba na bango ya kosakola Bokonzi. Bazali koteya bato nsango malamu na bisika nyonso oyo bazali: na esika moko oyo mituka etɛlɛmaka na États-Unis (1), na libándá ya mpɛpɔ na ekólo Corée (2), na bangomba ya Andes (3) to na magazini moko na Londres (4). Na mokili mobimba, bayekoli ya Yesu bazali na esengo ya kokokisa mosala oyo ezali kopesa bango matomba. Lokola Yesu alakaki yango, apesi bango libɔndisi mpe azali kosalela bango mpo na kobɔndisa bato mosusu.​—⁠Emoniseli 22:⁠17.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto