Mosala oyo ebɔndisaka
1 Nsango ya Biblia ebɔndisaka baoyo nyonso bazali kondima yango mpe kosalela yango na bomoi na bango. (Nz. 19:7, 8) Esalisaka bango bátika kolanda mateya ya lokuta mpe bátika mimeseno ya mabe; epesaka mpe elikya ya solosolo mpo na mikolo ezali koya. Nzokande, ezali kaka te baoyo bandimaka koyoka nsango malamu nde bazwelaka yango bolamu. Baoyo basakwelaka bamosusu solo ya Biblia oyo ebɔndisaka, bango mpe babɔndisamaka.—Mas. 11:25.
2 Mosala ya kosakola epesaka bango makasi: Yesu alobaki ete baoyo bandimi kozala bayekoli na ye, elingi koloba ete bandimi komema ekanganeli na ye oyo esɛngaka mpe kosakola mpe kokómisa bato bayekoli, ‘bakozwa kopema mpo na milimo na bango.’ (Mat. 11:29) Yesu ye moko mpe azalaki kozwa makasi ntango azalaki kopesa bato mosusu litatoli. Yango ezalaki lokola bilei mpo na ye. (Yoa. 4:34) Ntango atindaki bayekoli 70 bákende kosakola, bazongaki na esengo mpamba te bamonaki ete Yehova apambolaki milende na bango.—Luka 10:17.
3 Lelo oyo, baklisto mingi bazwaka mpe makasi ntango babimaka na mosala ya kosakola. Ndeko mwasi moko alobaki boye: “Mosala ya kosakola ebɔndisaka ngai, mpamba te esalisaka ngai nayeba kotambwisa bomoi na ngai mpe esalaka ete bomoi na ngai ezala na ntina. Ntango nabimi na mosala ya kosakola, nabosanaka mikakatano na ngai mpe mitungisi ya bomoi.” Mosakoli mosusu ya molende alobaki boye: “Mosala ya kosakola esalisaka ngai namona mokolo na mokolo ete Yehova azali mpenza, mpe epesaka ngai kimya mpe esengo na motema oyo nakoki kozwa na ndenge mosusu te.” Tozali mpenza na libaku malamu ya kozala “bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe”!—1 Kol. 3:9.
4 Ekanganeli ya Klisto ezali ya pɛtɛpɛtɛ: Yesu alendisaki baklisto ete ‘básala makasi mpenza,’ atako bongo azali kosɛnga biso te makambo oyo eleki makoki na biso. (Luka 13:24) Azali nde kobenga biso na bolingo mpenza ete ‘tómitya na nse ya ekanganeli na ye elongo na ye.’ (Mat. 11:29, maloba na nse ya lokasa na Lifalanse.) Baoyo bazali na mikakatano bakoki kondimisama ete mosala oyo bazali kosalela Nzambe na molimo na bango mobimba, ata soki ezali moke ndenge nini, esepelisaka ye mingi.—Mko. 14:6-8; Kols. 3:23.
5 Kosalela Nzambe oyo asepelaka na mosala nyonso oyo tozali kosala mpo na lokumu ya nkombo na ye ebɔndisaka biso mpenza! (Ebe. 6:10) Tiká tósala ntango nyonso makasi mpo tópesaka ye nyonso oyo tozali na yango ya malamu.