Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 1/2 nk. 3-4
  • Bopɛto ezali mpenza na ntina nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bopɛto ezali mpenza na ntina nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Masolo mosusu
  • Bopɛto elimboli mpenza nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Wapi ntina ya bopeto?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Yehova alingaka bato ya pɛto
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2019
  • Nzambe alingaka bopɛto
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 1/2 nk. 3-4

Bopɛto ezali mpenza na ntina nini?

BATO nyonso bazali na likanisi moko te mpo na likambo etali bopɛto. Na ndakisa, ntango mama atindi mwana na ye ya moke akende kosukola mabɔkɔ na elongi, mwana akoki kokanisa ete soki apɔlisi kaka mabɔkɔ na mai mpe apangusi monɔkɔ, ekoki bongo. Kasi, mama ayebi ete kosala ndenge wana ekoki te. Akozwa mwana, akozonga na ye na esika oyo mai ezali, akonika ye mabɔkɔ mpe elongi na sabuni ata soki mwana azali koboya!

Na mokili mobimba, bato nyonso batalelaka bopɛto ndenge moko te; bato na bato bazali na makanisi oyo bateyaki bango na oyo etali bopɛto. Na ntango ya kala, na bamboka mingi, eteyelo ezalaki esika ya pɛto oyo makambo nyonso ezalaki na molɔngɔ; yango ezalaki koteya bana-kelasi bopɛto. Lelo oyo, mabándá ya biteyelo mosusu, oyo kala ezalaki bisika ya kosakana mpe ya kosala ngalasisi, ekómá nde lokola bisika oyo babwakaka matiti, bisika okoki kokuta salite mpe ndenge nyonso ya bosɔtɔ. Bongo ezali boni na kati ya kelasi yango moko? Darren, oyo azali mokɛngɛli ya eteyelo moko ya ntei na ekólo Australie, alobaki boye: “ Sikoyo tokómi komona bosɔtɔ mpenza na kati ya kelasi.” Soki olobi na bana-kelasi mosusu ete, “Lokotá eloko wana” to “Longolá bosɔtɔ wana,” bakomona lokola nde opesi bango etumbu. Ezali bongo mpamba te balakisi mosusu bapesaka mwana-kelasi oyo asali mabe etumbu ya kotya bopɛto.

Ntango mosusu, mikóló mpe bapesaka ndakisa malamu te na likambo etali bopɛto, ezala na makambo oyo basalaka mokolo na mokolo to na esika ya mosala. Na ndakisa, babalabala, bazando mpe bandako ya Leta etondi na bosɔtɔ mpe ezali salite. Baizini mosusu ezali kobebisa mai na mopɛpɛ. Nzokande, tokoki koloba te ete baizini na bakompanyi nde ebebisaka mai na mopɛpɛ; ezali nde bato oyo basalelaka yango. Soki lelo oyo mai na mopɛpɛ ezali kobeba na mokili mobimba mpe likambo yango ezali kobimisa mikakatano mingi, ezali libosoliboso mpo ete bato bazali na lokoso; kasi, ntina mosusu ezali mpe ete bato mingi bameseni na bosɔtɔ. Mokonzi moko ya kala na ekólo Australie andimaki likanisi yango ntango alobaki ete: “Mpo na kobatela bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto ya bato nyonso, esengeli mobali mokomoko, mwasi mokomoko mpe mwana mokomoko abatela bopɛto.”

Atako bongo, mpo na bato mosusu, bopɛto ezali likambo ya moto na moto; etali bato mosusu te. Kasi, ezali mpenza bongo?

Ezali na ntina mingi ete biloko na biso ya kolya, ezala tosombi yango na zando to tozali kolya yango na restora to na ndako ya moninga moko, ezala pɛto. Bato oyo balambaka biloko ya kolya to batyelaka biso yango na mesa basengeli kozala pɛto mpenza. Soki mabɔkɔ na bango to oyo ya biso ezali na salite, yango ekoki komemela biso bamaladi ebele. Tokoloba boni mpo na balopitalo, bisika oyo esengeli kozala pɛto koleka bisika nyonso mosusu? Zulunalo moko (The New England Journal of Medicine) eyebisi ete eloko esalaka ete bato oyo bazali na mbeto ya lopitalo bázwa maladi mosusu oyo, mbula na mbula ezali kosɛnga bamilio ya badolare, ezali ete minganga mpe balifulume mingi bazali na momeseno ya kosukola mabɔkɔ te. Ebongi mpenza tóboya ete moto moko atya bomoi na biso na likama mpo azali pɛto te.

Tosengeli mpe kotika te ete moto moko, ezala asali yango na nko to te, abebisa mai na biso ya kosukola, ya kolambela to ya komɛla. Omoni te ete kotambola makolo-ngulu na zɛlo ya libongo oyo ekoki kozala na bantonga oyo bato bamɛlaka bangi to mpe bato mosusu bamitɔbɔlaki na yango ezali mpenza likama? Kasi, motuna oyo ntango mosusu ezali na ntina mingi mpo na mokomoko na biso ezali oyo: Tozalaka mpenza pɛto na ndako na biso?

Na buku na ye (Chasing Dirt), mokomi Suellen Hoy atuni motuna oyo: “Tozali mpenza pɛto ndenge oyo tozalaki kala?” Apesi eyano: “Ekoki mpenza kozala ete eyano ezali ‘te.’ ” Amonisi ete soki bato bazali lisusu pɛto te, ntina ya libosoliboso ezali mpo mimeseno malamu ezali kobongwana. Lokola bato balekisaka lisusu mingimingi ntango na ndako te, balukaka moto mosusu oyo bazali kofuta ye mpo atyelaka bango bopɛto na ndako. Yango wana, bato bazali komona lisusu ntina mingi te ya kobatela bopɛto ya esika oyo bafandi. Moto moko alobaki ete “nasukolaka kikoso te, nasukolaka nde nzoto na ngai. Ata soki ndako na ngai ezali salite, ngai nazali pɛto.”

Nzokande, bopɛto esuki kaka te na komonana na libándá. Ezali mpe kotalela makambo mosusu ya bomoi na biso. Bopɛto etalelaka mpe motema na biso, elingi koloba bizaleli malamu na biso mpe losambo na biso. Tótalela ndenge oyo yango esalemaka.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto